Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bonzemba

Bonzemba

Mpo na nini tokoki kotalela bonzemba lokola likabo?

Mpo na nini ezali mabe kotya mokristo oyo azali monzemba mbamba ete abala?

1Ko 7:​28, 32-35; 1Te 4:11

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ro 14:​10-12—Ntoma Paulo amonisaki ntina oyo ezali mabe kosambisa mokristo mosusu

    • 1Ko 9:​3-5—Ntoma Paulo azalaki na lotomo ya kobala; kasi bonzemba esalisaki ye asala mingi mpo na Yehova

Minzemba basengeli nde kokanisa ete bakozala na bomoi ya esengo kaka soki babali?

1Ko 7:8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Bas11:​30-40—Mwana mwasi ya Yefeta abalaki te, kasi azalaki na bomoi ya malamu mpenza

    • Mis 20:35—Kristo abalaki te, kasi maloba na ye emonisi ete azalaki na esengo mpo na oyo azalaki kosala mpo na basusu

    • 1Te 1:​2-9; 2:12—Ntoma Paulo, oyo azalaki monzemba, amonisi esengo mpe matomba azwaki na mosala ya kosakola

Mpo na nini minzemba basengeli kozala na etamboli ya pɛto lokola basaleli nyonso ya Nzambe?

1Ko 6:18; Ga 5:​19-21; Ef 5:​3, 4

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mas 7:​7-23—Mokonzi Salomo alobelaki likambo ya mabe oyo ekómelaki elenge mobali oyo atikaki ete mwasi ya ndumba akweisa ye

    • Loy 4:12; 8:​8-10—Lokola mwana mwasi Moshulame azalaki na etamboli ya pɛto akumisamaki

Na ntango nini ekoki kozala malamu ete monzemba abala?