Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bwanya

Bwanya

Mpo tózwa bwanya ya solosolo tosengeli kosala nini?

Epai wapi tokoki kozwa bwanya ya solosolo?

Ebongi mpenza kobondela Nzambe mpo na kosɛnga bwanya?

Kol 1:9; Yk 1:5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Nt 1:​8-12—Mokonzi Salomo abondelaki Nzambe mpo na kosɛnga bwanya mpo akamba Yisraele malamu, mpe Yehova asepelaki kopesa ye yango

    • Mas 2:​1-5—Bwanya, mayele, mpe bososoli ekokanisami na biloko ya motuya oyo ebombani, oyo soki tokobi koluka yango Yehova akosalisa biso tózwa yango

Ndenge nini Yehova apesaka biso bwanya?

Yis 11:2; 1Ko 1:​24, 30; 2:13; Ef 1:17; Kol 2:​2, 3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mas 8:​1-3, 22-31—Bwanya emonisami lokola moto mpe ezali kolobela nde Mwana ya Nzambe, mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisama

    • Mt 13:​51-54—Bato mingi oyo bazalaki koyoka Yesu bamitunaki ndenge nini moto oyo akolaki elongo na bango akoki kozala na bwanya mozindo boye

Ndenge nini tomonisaka ete tozali na bwanya oyo euti na Nzambe?

Ndenge nini bwanya esalisaka mpe ebatelaka biso?

Bwanya oyo euti na Nzambe ezali na motuya nini?

Mas 3:​13, 14; 8:11

Talá mpe Yb 28:18

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yb 28:​12, 15-19—Atako Yobo anyokwamaki mingi na bampasi, amonisaki botɔndi mpo na bwanya ya Nzambe

    • Nz 19:​7-9—Mokonzi Davidi alobaki ete mibeko mpe makundoli ya Yehova ekoki kopesa bwanya ata na baoyo bazangi mayele

Mpo na nini ezali likama koyoka bwanya ya bato ya mokili oyo bayebi Nzambe te?