Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosala

Mosala

Mosala ná esengo ezali na boyokani nini?

Wapi mwa matomba ya koyekola kosala mosala malamu mpe kitoko?

Mas 22:29

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 1Sa 16:​16-23—Davidi ayebanaki lokola moto oyo ayebi kobɛta miziki, yango esalaki ete azala na ntina epai ya mokonzi ya Yisraele oyo atungisamaki

    • 2Nt 2:​13, 14—Lokola Hirame-abi ayebaki mosala malamu, Mokonzi Salomo asalelaki ye na mosala monene ya botongi

Basaleli ya Yehova basengeli koyebana lokola basali ya ndenge nini?

Ef 4:28; Kol 3:23

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 24:​10-21—Rebeka asalaki koleka oyo mosali ya Abrahama asɛngaki ye, asalisaki mpenza mpe asalaki mosala makasi

    • Flp 2:​19-23—Ntoma Paulo apesaki elenge Timote mokumba ya ntina mingi mpo Timote azalaki na komikitisa mpe na mposa ya kosalela basusu

Mpo na nini basaleli ya Nzambe basalaka makasi bázala bagɔigɔi te?

Mas 13:4; 18:9; 21:​25, 26; Mos 10:18

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mas 6:​6-11—Mokonzi Salomo asalelaki ndakisa ya furmi mpo na kobimisa liteya ya kozala makasi na mosala mpe koboya kozala gɔigɔi

Mpo na nini tosengeli kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa na biso?

Mpo na nini tosengeli kosala mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota?

1Ti 5:8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Rt 1:​16, 17; 2:​2, 3, 6, 7, 17, 18—Ruta, mwasi oyo mobali akufá, asalaki mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya mama-bokilo na ye Naomi

    • Mt 15:​4-9—Baoyo bazalaki koboya kokokisa bamposa ya baboti na bango kaka mpo bazalaki kosalela Nzambe, Yesu amonisaki ete bazalaki kosala mabe

Mpo na nini bakristo basengeli kokabola na basusu matomba oyo bazwi na mosala na bango?

Ndenge nini tosengeli kotalela mbongo oyo bafutaka biso na mosala?

Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka ete tósala mosala malamu mpe tókokisa bamposa na biso ya mosuni?

Mt 6:​25, 30-32; Lk 11:​2, 3; 2Ko 9:10

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Eb 31:​3-13—Labana asalelaki Yakobo, mwana ya ndeko na ye makambo malamu te, kasi Yehova amonaki mosala makasi ya Yakobo mpe apambolaki ye

    • Eb 39:​1-6, 20-23—Yehova apambolaki mosala ya Yozefe, ezala na ndako ya Potifare mpe na bolɔkɔ

Mpo na nini mosala ya mosuni esengeli ata moke te kozwa esika ya mosala ya Nzambe?

Nz 39:​5-7; Mt 6:33; Yn 6:27

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Lk 12:​15-21—Yesu apesaki ndakisa mpo na komonisa ete ezali bozoba kotya bozwi ya mosuni na esika ya liboso mpe ya elimo na nsima

    • 1Ti 6:​17-19—Ntoma Paulo akebisaki bakristo oyo bazalaki bazwi ete bázala na lolendo te, mpe alendisaki bango bázala “bazwi na misala ya malamu”

Mitinda nini ekoki kosalisa biso ntango tozali koluka mosala?

Kosala mpo na Yehova

Mosala nini eleki ntina oyo bakristo bakoki kosala?

Mpo na nini tozalaka na mposa makasi ya kosala oyo tokoki na mosala ya Yehova?

Mpo na nini tosengeli kozela te ete basaleli nyonso ya Yehova básala ndenge moko na mosala na ye?

Ga 6:​3-5

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 25:​14, 15—Ndakisa ya Yesu emonisi ete azalaki kozela te ete bayekoli na ye nyonso básala ndenge moko

    • Lk 21:​2-4—Na boboto mpenza Yesu andimaki motuya ya likabo ya moke ya mwasi mobola oyo mobali akufá

Epai wapi tozwaka makasi ya kokokisa mosala oyo bapesi biso na mosala ya Yehova?

2Ko 4:7; Ef 3:​20, 21; Flp 4:13

  • Ndakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • 2Ti 4:17—Ntoma Paulo andimaki ete azwaki nguya oyo asengelaki na yango na ntango oyo esengeli

Mpo na nini tozalaka na esengo ntango tosalaka mosala makasi mpo na Yehova?