Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Losambo

Losambo

Tosengeli kosambela kaka nani?

Kob 34:14; Mib 5:​8-10; Yis 42:8

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mt 4:​8-10—Satana ayebisaki Yesu ete akopesa ye makonzi nyonso ya mabele soki asambeli ye; Yesu aboyaki, azalaki na ekateli ya kosambela kaka Yehova

    • Em 19:​9, 10—Anzelu moko ya nguya aboyaki ntoma Yoane asambela ye

Ndenge nini Yehova alingaka tósambela ye?

Yn 4:24; Yk 1:​26, 27

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Yis 1:​10-17—Yehovah andimaka te losambo ya bato oyo basalelaka ye na bokosi, oyo batosaka te mibeko na ye

    • Mt 15:​1-11—Yesu amonisaki ete Yehova andimaka te losambo ya baoyo bátyaka mibeko ya bato na esika ya liboso koleka mibeko ya Nzambe

Soki likoki ezali, tosengeli kosambela Yehova elongo na banani?

Ebr 10:​24, 25

Talá mpe Nz 133:​1-3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Mis 2:​40-42—Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki koyangana elongo mpo na kobondela, kolekisa ntango, mpe koyekola liloba ya Nzambe

    • 1Ko 14:​26-40—Ntoma Paulo amonisaki ete makita ya lisangá esengeli kobongisama malamu mpe kolendisa mpo moto nyonso ayekola mpe akanga ntina ya mateya

Tosengeli kosala nini mpo tómindimisa ete Yehova andimaka losambo na biso?

Mt 7:​21-24; 1Yn 2:17; 5:3

  • Bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa:

    • Ebr 11:6—Ntoma Paulo amonisaki ete kondima ezali na ntina soki tolingi Yehova andima losambo na biso

    • Yk 2:​14-17, 24-26—Yakobo, ndeko ya Yesu, amonisaki ete kondima na biso esengeli komonana na misala; kondima etindaka biso na misala