Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 2

Sololá ndenge bato basololaka

Sololá ndenge bato basololaka

Etinda: “Liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!”—Mas. 15:23.

Oyo Filipe asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 8:​30, 31. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Ndenge nini Filipe abandaki lisolo na ye?

  2.   Mpo na nini okanisi ete Filipe abandaki lisolo na ye na ndenge ebongi mpe ateyaki moto yango likambo moko ya sika?

Ndakisa ya Filipe eteyi biso nini?

2. Soki tosali ete lisolo ekende ndenge bato basololaka mpenza, yango ekosala ete moto oyo tozali kosolola na ye akakatana te kobimisa makanisi na ye mpo na nsango oyo tomemeli ye.

Mekolá Filipe

3. Saleláká miso. Tokoki koyeba makambo mingi etali moto kaka na ndenge atɛlɛmi, bajɛstɛ azali kosala, to mpe elongi na ye. Moto yango azali mpenza na mposa bósolola? Okoki kobanda lisolo na yo na motuna lokola, “Oyebi ete . . . ?” Koluka te kosolisa moto na makasi soki azali na ye na mposa ya kosolola te.

4. Zalá na motema molai. Kokanisa te ete osengeli kokɔtisa makambo ya Biblia mbala moko kaka ntango obandi lisolo. Zelá libaku ya malamu emonana, wana okokɔtisa yango na ndenge oyo ekobebisa lisolo te. Na bantango mosusu, libaku ya kokɔtisa makambo ya Biblia ekoki mpe komonana te, ekosɛnga ozela tii mbala ya nsima oyo okosolola lisusu na moto yango.

5. Yebá kobongola makambo. Moto akoki kobimisa lisolo oyo okanisaki te. Ekosɛnga olobela likambo moko oyo ekosalisa moto yango, ata soki ezali te likambo oyo yo obongisaki.