Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE YA KOBANDA LISOLO

LITEYA 4

Komikitisa

Komikitisa

Etinda: “Na komikitisa bómona basusu ete baleki bino.”—Flp. 2:3.

Oyo Paulo asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Misala 26:​2, 3. Na nsima talelá mituna oyo elandi:

  1.    Ndenge nini Paulo amonisaki komikitisa na ndenge na ye ya kosolola na Mokonzi Agripa?

  2.   Ndenge nini Paulo abendaki likebi epai ya Yehova mpe na Makomami kasi epai na ye moko te? —Talá Misala 26:22.

Ndakisa ya Paulo eteyi biso nini?

2. Nsango na biso ekosepelisa bato mingi soki tozali kosolola na bango na ndenge ya komikitisa mpe na limemya.

Mekolá Paulo

3. Sololáká na bato na limemya. Boyá kotinda moto akanisa ete oyebi nyonso mpe ete ye ayebi eloko moko te. Sololá na ye na limemya.

4. Monisá ete mateya na yo euti na Biblia. Liloba ya Nzambe ekoki kobongola makanisi mpe mayoki ya moto. Ntango tozali kosolola na moto na nzela ya Biblia, tozali nde kotonga kondima na ye na moboko ya solosolo.

5. Zalá na boboto. Kotingama kaka te moto andima ete yo nde ozali koloba solo. Boyá kowelana na maloba. Okomonisa komikitisa soki ofandi nyɛɛ mpe olongwe na ntango oyo esengeli. (Mas. 17:14; Tito 3:2) Soki osololi na boboto, mbala mosusu yango ekosala ete moto yango andima koyoka nsango malamu na mbala ya nsima.