Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

KOKÓMISA BATO BAYEKOLI

LITEYA 12

Zalá na elobeli ya polele

Zalá na elobeli ya polele

Etinda: “Mafuta mpe mpaka ya malasi esepelisaka motema; ezali ndenge moko na moninga oyo apesaka yo toli kozanga bokosi.”—Mas. 27:9.

Oyo Yesu asalaki

1. Talá VIDEO, to tángá Marko 10:​17-22. Na nsima, talelá mituna oyo elandi:

  1.    Bizaleli nini ya malamu Yesu amonaki epai ya elenge yango?

  2.   Mpo na nini esɛngaki ete Yesu amonisa bolingo mpe aloba polele mpo na kopesa ye toli?

Ndakisa ya Yesu eteyi biso nini?

2. Tosengeli komonisa bolingo kasi tosengeli mpe koyebisa moyekoli polele oyo asengeli kosala mpo akoba kokola na elimo.

Mekolá Yesu

3. Salisá moyekoli amityela mikano mpe akokisa yango.

  1.    Salelá eteni “Oyo okoki kosala” na liteya mokomoko ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!

  2.   Salisá moyekoli na yo amona mikano oyo asengeli kokokisa nsima ya mwa mikolo mpe oyo asengeli kokokisa nsima ya ntango molai.

  3.   Pesáká ye longonya mbala na mbala mpo na bokoli na ye.

4. Luká koyeba makambo oyo ezali kopekisa ye akola na elimo, mpe salisá ye alonga yango.

  1.    Omituna boye:

    • ‘Nini ezali kopekisa moyekoli na ngai akola tii azwa batisimo?’

    • ‘Lisalisi nini nakoki kopesa ye?’

  2.   Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpo osolola na moyekoli na yo polele mpe na bolingo makambo oyo asengeli kosala.

5. Katá boyekoli na moto oyo azali kokola te na elimo.

  1.    Omituna mituna oyo elandi mpo na koyeba soki moyekoli na yo azali kokola:

    • ‘Moyekoli na ngai azali kosalela makambo oyo azali koyekola?’

    • ‘Ayanganaka na makita mpe ayebisaka basusu mateya ya solo?’

    • ‘Lokola ayekoli Biblia ntango molai, azali mpenza na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova?’

  2.   Soki azali na mposa ya kokola na elimo te:

    • Tuná ye aluka koyeba soki eloko nini ezali kopekisa ye.

    • Na boboto nyonso, limbolelá ye ntina oyo ozali kokata boyekoli na ye.

    • Salisá ye ayeba makambo oyo asengeli kosala soki alingi ozongela koyekola na ye Biblia.