Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI A

Tolingaka koteya solo

Tolingaka koteya solo

Yesu alobaki ete soki bato ya mitema sembo bayoki solo bakoyeba yango. (Yoa. 10:​4, 27) Na yango, ntango tozali kosolola na bato, tosengeli koteya bango mateya ya solo oyo ezali na Biblia. Okoki kobanda lisolo na maloba oyo: “Oyebi ete . . . ?” to “Osí oyoká ete . . . ?” Na nsima, tángelá ye vɛrsɛ oyo eyokani na lisolo oyo bozali kosolola mpo na kolimbolela ye mateya ya solo. Soki toyebisi moto ata mwa liteya ya Biblia, yango ekoki kosalisa biso tólona mboto na motema na ye, mpe Nzambe akoki kokolisa yango!—1 Ko. 3:​6, 7.

 MIKOLO EZALI KOYA

  1. 1. Makambo oyo ezali kosalema mpe bizaleli ya bato emonisi ete mosika te makambo ekobongwana.—Mat. 24:​3, 7, 8; Luka 21:​10, 11; 2 Ti. 3:​1-5.

  2. 2. Mabele ekobebisama te. —Nz. 104:5; Mos. 1:4.

  3. 3. Mopɛpɛ ekobeba lisusu te mpe mabele ekozonga paradiso.—Yis. 35:​1, 2; Em. 11:18.

  4. 4. Moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔnɔ.—Yis. 33:24; 35:​5, 6.

  5. 5. Okoki kozala na bomoi libela na libela awa na mabele. —Nz. 37:29; Mat. 5:5.

 LIBOTA

  1. 6. Mobali asengeli ‘kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko.’—Ef. 5:33; Kol. 3:19.

  2. 7. Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.—Ef. 5:33; Kol. 3:18.

  3. 8. Mwasi ná mobali basengeli kozala sembo epai ya moko mpe mosusu.—Mal. 2:16; Mat. 19:​4-6, 9; Ebr. 13:4.

  4. 9. Bana oyo bazalaka na limemya mpe na botosi epai ya baboti na bango, bakolonga na bomoi.—Mas. 1:​8, 9; Ef. 6:​1-3.

NASA, ESA and the Hubble Heritage Team (STScI/AURA)-ESA/Hubble Collaboration. Licensed under CC BY 4.0. Source.

 NZAMBE

  1. 10. Nzambe azali na nkombo. —Nz. 83:18; Yir. 10:10.

  2. 11. Nzambe alobaka na biso. —2 Ti. 3:​16, 17; 2 Pe. 1:​20, 21.

  3. 12. Nzambe aponaka bilongi te.—Mib. 10:17; Mis. 10:​34, 35.

  4. 13. Nzambe azali na mposa ya kosalisa biso.—Nz. 46:1; 145:​18, 19.

 LIBONDELI

  1. 14. Nzambe alingi ete tóbondelaka ye.—Nz. 62:8; 65:2; 1 Pe. 5:7.

  2. 15. Biblia ezali kolakisa biso ndenge ya kobondela.—Mat. 6:​7-13; Luka 11:​1-4.

  3. 16. Tosengeli kobondelaka mbala na mbala.—Mat. 7:​7, 8; 1 Tes. 5:17.

 YESU

  1. 17. Yesu azalaki moteyi monene mpe batoli na ye ezali na ntina tii lelo oyo.—Mat. 6:​14, 15, 34; 7:12.

  2. 18. Yesu asakolaki makambo oyo tozali komona lelo oyo.—Mat. 24:​3, 7, 8, 14; Luka 21:​10, 11.

  3. 19. Yesu azali Mwana ya Nzambe.—Mat. 16:16; Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:15.

  4. 20. Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. —Yoa. 14:28; 1 Ko. 11:3.

Based on NASA/Visible Earth imagery

 BOKONZI YA NZAMBE

  1. 21. Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo oyo ezali na likoló.—Dan. 2:44; 7:​13, 14; Mat. 6:​9, 10; Em. 11:15.

  2. 22. Bokonzi ya Nzambe ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato. —Nz. 2:​7-9; Dan. 2:44.

  3. 23. Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato. —Nz. 37:​10, 11; 46:9; Yis. 65:​21-23.

 MPASI

  1. 24. Nzambe te nde abimiselaka biso bampasi.—Mib. 32:4; Yak. 1:13.

  2. 25. Satana nde azali koyangela mokili oyo.—Luka 4:​5, 6; 1 Yoa. 5:19.

  3. 26. Nzambe amonaka bampasi na yo mpe alingi kosalisa yo. —Nz. 34:​17-19; Yis. 41:​10, 13.

  4. 27. Mosika te Nzambe akosilisa bampasi.—Yis. 65:17; Em. 21:​3, 4.

 LIWA

  1. 28. Bakufi bayebi eloko te; bazali mpe konyokwama te. —Mos. 9:5; Yoa. 11:​11-14.

  2. 29. Bakufi bakoki te kosalisa biso to mpe kosala biso mabe. —Nz. 146:4; Mos. 9:​6, 10.

  3. 30. Bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá bakosekwa.—Yobo 14:​13-15; Yoa. 5:​28, 29; Mis. 24:15.

  4. 31. “Liwa ekozala lisusu te.”—Em. 21:​3, 4; Yis. 25:8.

 LINGOMBA

  1. 32. Nzambe asepelaka na mangomba nyonso te.—Yir. 7:11; Mat. 7:​13, 14, 21-23.

  2. 33. Nzambe ayinaka bokosi.—Yis. 29:13; Mika 3:11; Mrk. 7:​6-8.

  3. 34. Bato bayebaka lingomba ya solo na bolingo oyo bato na yango bamoniselanaka.—Mika 4:3; Yoa. 13:​34, 35.