Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli koluka koyeba makambo ya mangomba mosusu?

Osengeli koluka koyeba makambo ya mangomba mosusu?

Osengeli koluka koyeba makambo ya mangomba mosusu?

“NAKOKISAKI pene na mbula mobimba banda nabandaki koyangana na makita ya lisangá mpe nazalaki koteya bato mosusu Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, nabandaki koyoka baradio ya mangomba mpe kolanda mateya ya bapastɛrɛ na televizyo. Nakanisaki ete makambo yango ekosalisa ngai nayeba malamu makanisi ya bato ya mangomba mosusu. Namonaki ete mateya na bango ezali mpenza kolanda Biblia te, kasi nazalaki kaka na mposa ya koyeba.” Maloba oyo ezali maloba ya Miguel, lelo oyo azali Motatoli ya Yehova na ekólo moko na Amerika ya Sudi.

Kaka na ekólo yango, tozali mpe na Jorge. Ye azalaki na molende mpo na koteya bato mosusu mateya ya solo. Kasi, ekómaki na ntango moko, ye mpe abandaki koyoka baradio mpe kotala baemisyo ya mangomba na televizyo. Azalaki koloba boye: “Tosengeli koyebaka makanisi ya bato mosusu.” Soki batuni ye makama oyo ekoki koyela moto oyo azali kolanda mateya ya lokuta, eyano na ye ezalaki oyo: “Likambo moko te ekoki kobebisa kondima ya moto oyo ayebi mateya ya solo oyo ezali na Biblia.” Bandakisa oyo ebimisi motuna moko ya ntina mingi: Ezali malamu koyoka mateya ya mangomba mosusu?

Lingomba ya boklisto ya solo

Ntango bantoma nyonso bakufaki, ebele ya mangomba mikemike ya boklisto ya nkombo mpamba oyo ekómaki kobima ezalaki kobebisa losambo ya solo. Lokola ayebaki liboso ete likambo wana ekosalema, Yesu alakisaki ndenge ya kokesenisa mangomba ya boklisto wana ya lokuta na boklisto ya solo. Ya liboso, alobaki boye: “Bókeba na basakoli ya lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba ya mpate nde katikati bazali nkoi na kongala.” Na nsima alobaki boye: “Bokoyeba bango mpo na mbuma na bango.” (Matai 7:15-23) Bayekoli ya solo ya Yesu basalelaka makambo oyo ateyaki, mpe moto akoki koyeba bango na mbuma malamu oyo babotaka. Lokola Yesu ye moko asalaki yango, bakendaka kotala bato na bandako na bango mpo na koteya bango Bokonzi ya Nzambe na lisalisi ya Makomami. Na ndakisa ya Yesu, bakɔtaka na makambo ya politiki mpe ya mokili te. Bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe mpe batalelaka yango lokola mokanda ya mateya ya solo. Bateyaka bato nkombo ya Nzambe. Mpe lokola basalaka makasi bázala na bolingo oyo Nzambe azali koteya, bakɔtaka na bitumba te. Basalelanaka makambo lokola bandeko.—Luka 4:43; 10:1-9; Yoane 13:34, 35; 17:16, 17, 26.

Makomami elobi ete moto akoki ‘kososola kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.’ (Malaki 3:18) Lelo oyo, basaleli ya solo ya Nzambe bazali na bomoko, ezala na makanisi to na misala, ndenge oyo baklisto ya liboso bazalaki. (Baefese 4:4-6) Soki osi oyebi lisangá yango ya boklisto ya solo, mpo na nini koyekola to koluka lisusu koyeba mateya ya mangomba mosusu?

Kebá na balakisi ya lokuta

Biblia elobi ete mateya ya lokuta ekoki kobebisa elimo ya moto ata soki ayekoli mateya ya solo ya Biblia. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bókeba: mbala mosusu ezali na moto moko oyo akobenda bino lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya mateya ya filozofi mpe na lokuta ezangi ntina na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mpamba ya mokili kasi na kolanda Klisto te.” (Bakolose 2:8, NW ) Mokapo yango esaleli elilingi oyo ebongi mpenza! Balakisi ya lokuta bazali mpenza likama mpo na yo, bazali lokola banyama oyo balingi kobenda yo mpo na kolya yo.

Ezali solo ete Paulo azalaki kotalela mateya ya bato mosusu. Mokolo mosusu abandaki lisukulu na ye na maloba oyo: “Mibali na Baatene! Namoni ete na makambo nyonso boleki kokumisa banzambe; mpo ete ezalaki ngai kotambola kotala bisambelo na bino, namoni etumbelo ya mbeka moko oyo basili kokoma na yango ete, Na Nzambe oyo ayebani te.’ (Misala 17:22, 23) Atako bongo, Paulo azalaki ntango nyonso te kolanda filozofi ya balobilobi Bagreke.

Koluka koyeba ebandeli mpe mateya ya mangomba ya lokuta ekeseni na koyekola mateya yango. * Yehova atii “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na koteya Liloba na ye. (Matai 4:4; 24:45) Paulo ye moko akomaki boye: “Bokoki kokabola bilei na mesa ya Nkolo mpe na mesa ya bilimo mabe te. Tópelisa nde nkanda ya Nkolo?”—1 Bakolinti 10:20-22.

Balakisi mosusu ya lokuta bazalaká baklisto ya solo, kasi batikaki mateya ya solo mpo na kolanda libunga. (Yuda 4, 11) Likambo yango ekoki kokamwisa biso te. Nsima ya kolobela “moombo ya sembo mpe ya mayele,” elingi koloba lisangá ya baklisto bapakolami, Yesu alobelaki “moombo mabe,” oyo azali kolelalela ete, “Nkolo na ngai azali koumela,” mpe abandi kobɛta baninga na ye baombo. (Matai 24:48, 49) Mbala mingi, bato yango na bandimi na bango bazalaka mpenza na mateya ya polele ya bango moko te; mosala na bango se koluka kobebisa kondima ya bato mosusu. Mpo na bato yango, ntoma Yoane akomaki boye: “Soko moto nani ayei epai na bino mpe akomema mateya oyo te, [bóyamba] ye kati na ndako te; bópesa ye losako te.”—2 Yoane 10; 2 Bakolinti 11:3, 4, 13-15.

Bato ya sembo oyo bazali koluka solo basengeli kokeba na makambo oyo bazali koyoka na mangomba mosusu. Nzambe akopambola bato ya mitema sembo oyo bazali koluka solo. Na ntina na mayele oyo euti na Nzambe, Biblia elobi ete: “Soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola biloko ya motuya bibombami . . . okozwana na boyebi ya koyeba Nzambe.” (Masese 2:4, 5) Lokola bazwi boyebi yango ya Nzambe na nzela ya Biblia mpe ya lisangá ya boklisto mpe lokola bamoni ndenge oyo Yehova azali kopambola baoyo bazali kolanda boyebi yango, baklisto ya solo balandaka lisusu mateya ya mangomba ya lokuta te.—2 Timote 3:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Buku L’humanité à la recherche de Dieu, ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali na makambo oyo esengeli mpo na ebandeli mpe mateya ya mangomba mingi ya mokili.