Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele

Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele

Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele

“Bokonzi . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—DANYELE 2:44.

1. Elikya nini tozali kozwa na kati ya Biblia?

 BIBLIA ezali maloba ya Nzambe epai ya bato. Ntoma Paulo akomaki boye: “Boyambaki maloba na [Nzambe] oyo tosakolaki epai na bino. Boyambaki yango lokola maloba ya bato te, kasi na ndenge ezali mpenza, lokola maloba ya Nzambe.” (1 Tesalonika 2:13, Boyokani ya Sika) Biblia ezali na makambo oyo tosengeli koyeba mpo na Nzambe: ezali koyebisa biso bomoto na ye, mikano na ye, mpe makambo oyo azali kosɛnga biso. Biblia ezali na toli oyo eleki malamu mpo na libota mpe mpo na etamboli ya mokolo na mokolo. Ezali kolobela bisakweli oyo ekokisamá, oyo ezali kokokisama, mpe oyo ekokokisama na mikolo ekoya. Ya solo, “makomami nyonso mapemami na elimo ya Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto ya Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo azali na nyonso mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 3:16, 17, NW.

2. Ndenge nini Yesu abendaki likebi mpenza na motó ya likambo ya Biblia?

2 Likambo eleki ntina na Biblia ezali motó ya likambo na yango: ndenge oyo Bokonzi ya likoló ekolongisa lotomo na ye ya koyangela. Yesu atyaki likambo yango na esika ya liboso na mosala na ye ya kosakola. “Yesu abandi kosakola, alobi mpe ete, Bongolá mitema! Zambi Bokonzi ya Likoló [ekómi pene].” (Matai 4:17) Yesu amonisaki esika oyo bokonzi yango esengeli kozala na kati ya bomoi na biso; alobaki ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.” (Matai 6:33) Amonisaki mpe ete Bokonzi ezali na ntina mingi na ndenge ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse [lokola] na Likoló!”—Matai 6:10.

Boyangeli ya sika ya mabele

3. Mpo na nini tozali na mposa ete Bokonzi ya Nzambe eya nokinoki?

3 Mpo na nini bato basengeli mpenza na Bokonzi ya Nzambe? Mpamba te etikali moke Bokonzi yango ebongola boyangeli ya mabele mobimba mpo na libela. Esakweli ya Danyele 2:44 elobi boye: “Na mikolo ya mikonzi yango [oyo bazali koyangela mokili lelo oyo] Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi [boyangeli ya likoló] bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso [biyangeli ya mokili], mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, awa na mabele, makambo ekozala lisusu na mabɔkɔ ya bato te. Boyangeli ya bato oyo ekabolaka bato mpe ekokisaka bamposa na bango te, ekokóma makambo ya kala.

4, 5. (a) Mpo na nini Yesu abongi koleka bato nyonso mpo na kozala Mokonzi? (b) Mokumba nini Yesu akokokisa na mikolo oyo ezali koya?

4 Mokonzi Monene na Bokonzi ya likoló, nsima ya Yehova ye moko, ezali Yesu Klisto, ye abongi mpenza kozala mokonzi. Liboso aya awa na mabele, azalaki na bomoi kuna na likoló mpe azalaki “kapita mosali” ya Nzambe, azali ekelamu ya libosoliboso ya Nzambe. (Masese 8:22-31, NW ) “Ye azali elilingi ya Nzambe, oyo akomonanaka te, Mobotami ya liboso na biloko nyonso bizalisami. Mpo kati na ye, biloko nyonso bizalisamaki, na biloko na Likoló mpe biloko na nse.” (Bakolose 1:15, 16) Ntango Nzambe atindaki Yesu awa na mabele, asalaki ntango nyonso mokano ya Nzambe. Ayikaki mpiko na komekama makasi mpe atikalaki sembo epai ya Tata na ye tii na liwa.—Yoane 4:34; 15:10.

5 Lokola atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na liwa, Yesu azwaki mbano. Nzambe asekwisaki ye na likoló mpe aponaki ye lokola Mokonzi na Bokonzi ya likoló. (Misala 2:32-36) Nzambe akopesa Mokonzi Klisto Yesu mokumba monene ya kokamba ebele ya bikelamu ya elimo mpe ya nguya mpo na kosukisa boyangeli ya bato mpe kosukisa mabe nyonso awa na mabele. (Masese 2:21, 22; 2 Batesaloniki 1:6-9; Emoniseli 19:11-21; 20:1-3) Nsima na yango nde Bokonzi ya Nzambe oyo Klisto akotambwisa, ekozala boyangeli ya sika, guvɛrnɛma kaka moko mpo na mabele mobimba.—Emoniseli 11:15.

6. Ndenge nini Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe akoyangela?

6 Mpo na Moyangeli ya sika ya mabele, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Nguya na nkembo na bokonzi ipesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso básalela ye.” (Danyele 7:14) Lokola Yesu akolanda ndakisa ya bolingo ya Nzambe, na boyangeli na ye, bato bakozala mpenza na kimya mpe bakozala malamu. (Matai 5:5; Yoane 3:16; 1 Yoane 4:7-10) “Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ikosuka te . . . ete atɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene.” (Yisaya 9:7) Koyangelama na Moto oyo akozala na bolingo, na bosembo, mpe na boyengebene ekozala mpenza lipamboli! Yango wana, 2 Petelo 3:13 esakoli ete: “Tozali kotalela Likoló ya sika [Bokonzi ya Nzambe na likoló] mpe nse na sika [lisangá ya bato ya sika na mabele], [lokola] elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.”

7. Ndenge nini Matai 24:14 ezali kokokisama lelo oyo?

7 Na ntembe te Bokonzi ya Nzambe ezali nsango oyo eleki malamu mpo na bato nyonso oyo balingaka bosembo. Yango wana, na elembo oyo ezali komonisa ete tozali na “mikolo ya nsuka” ya mokili mabe oyo, Yesu asakolaki ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (2 Timote 3:1-5; Matai 24:14) Esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo: Batatoli ya Yehova pene na milio motoba bazali kolekisa ngonga koleka miliare moko mbula na mbula mpo na koteya bato Bokonzi ya Nzambe na kati ya mikili 234. Na mokili mobimba, bazali na masangá soki 90 000 epai bayanganaka mpo na losambo, mpe bisika yango oyo bayanganaka babengaka yango Ndako ya Bokonzi, nkombo oyo ebongi mpenza. Bato bakendaka kuna mpo na koyekola makambo etali bokonzi yango ya sika oyo etikali moke eya.

Bato mosusu bakoyangela elongo na Yesu

8, 9. (a) Bato oyo bakoyangela na Klisto bakouta wapi? (b) Tokoki kozala na elikya nini mpo na boyangeli ya Mokonzi na bato oyo bakoyangela na ye?

8 Bato mosusu bakoyangela elongo na Klisto Yesu na Bokonzi ya likoló. Emoniseli 14:1-4 (NW ) esakolaki ete bato 144 000 basengelaki ‘kosombama na kati ya bato’ mpe kosekwa mpo na kozwa bomoi na likoló. Bato yango bazali mibali mpe basi oyo, na esika bato básalela bango, basalelaki Nzambe mpe bato mosusu na komikitisa nyonso. “Bakozala banganga ya Nzambe mpe ya Klisto; bakozala bakonzi esika moko na ye mbula nkóto.” (Emoniseli 20:6) Bato yango bazali mpenza moke soki tokokanisi bango na “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso” oyo bakobika na nsuka ya mokili oyo. Bango mpe bazali kosalela Nzambe mosala ya bulɛɛ “butu na moi,” kasi bango bakokende na likoló te. (Emoniseli 7:9, 15) Bango nde bato ya liboso oyo bakofanda na mabele ya sika; Bokonzi ya Nzambe na likoló ekoyangela bango.—Nzembo 37:29; Yoane 10:16.

9 Yehova aponaki bato ya sembo oyo bazalaki na bomoi awa na mabele mpe bakutanaki na mikakatano nyonso ya bomoi mpo báyangela elongo na Klisto kuna na likoló. Bato wana oyo bakozala bakonzi mpe banganga bakutanaki na makambo nyonso oyo bato bakutanaka na yango. Lokola bazalaki na bomoi awa na mabele, bakoyangela bato malamu mpenza. Yesu ye moko kutu ‘ayekolaki kotosa mpo na koyoka mpasi.’ (Baebele 5:8) Ntoma Paulo alobaki mpo na Yesu ete: “Tozali na Nganga monene te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde amekami na makambo nyonso [lokola] biso, bobele ete akwei na masumu te.” (Baebele 4:15) Tozwi mpenza libɔndisi na koyeba ete na mokili ya sika oyo Nzambe akosala, bakonzi mpe banganga oyo bakoyangela bato bakozala na bolingo mpe na motema mawa!

Bokonzi ezalaki nde na mokano ya Nzambe?

10. Na ebandeli, mpo na nini Nzambe azalaki na mokano ya kosala Bokonzi ya likoló te?

10 Na ebandeli, ntango Nzambe akelaki Adama na Eva, azalaki nde na mokano ya kosala Bokonzi ya likoló? Na lisolo ya Genese oyo elobeli ndenge oyo Nzambe akelaki biloko nyonso, esika moko te balobeli Bokonzi moko oyo esengelaki koyangela bato. Yehova ye moko azalaki koyangela bango, mpe soki bálandaka kotosa ye, mbɛlɛ ntina ya kosala boyangeli mosusu ezalaki te. Genese mokapo 1 emonisi ete Yehova azalaki kosolola na Adama na Eva, ekoki mpenza kozala ete azalaki kosolola na bango na nzela ya Mwana na ye mobotami ya liboso. Lisolo yango esaleli maloba lokola “Nzambe alobelaki bango” mpe “Nzambe alobaki” na bango.—Genese 1:28, 29; Yoane 1:1.

11. Lobelá naino bomoi ya kokoka oyo bato bazalaki na yango na ebandeli.

11 Biblia elobi ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.” (Genese 1:31) Na elanga ya Edene, biloko nyonso ezalaki malamu mpenza. Adama na Eva bazalaki na paladiso. Bazalaki na bɔɔngɔ mpe na nzoto ya kokoka. Bazalaki na likoki ya kosolola na Mozalisi na bango mpe ye azalaki koloba na bango. Soki bátikalaka sembo, mbɛlɛ babotaki bana ya kokoka. Ntina ya kosala guvɛrnɛma ya likoló elingaki kozala te.

12, 13. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe alingaki ntango nyonso kozala na makoki ya kosolola na bato ya kokoka ntango balingaki kokóma mingi?

12 Lokola bato basengelaki kokóma mingi, ndenge nini Nzambe alingaki kosala mpo asololaka na bango nyonso? Tótala naino minzoto na likoló. Minzoto esangani na maboke mineneminene oyo babengaka bagalaksi. Bagalaksi mosusu ezali na minzoto miliare moko. Mosusu mpe ezali na minzoto miliare nkóto moko. Bato ya siansi balobaka ete na molɔ́ngɔ́ oyo miso na biso ekoki komona, bagalaksi ekoki kozala miliare mokama! Kasi, Mozalisi alobi ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:26.

13 Lokola Nzambe azali na likoki ya koyeba biloko nyonso wana oyo ezali na likoló, tokanisi mpenza ete ezali mpasi te mpo ayeba bato nyonso mpamba te bazali moke mpenza soki tokokanisi bango na minzoto. Kutu, ata lelo oyo, bamilio ya basaleli na ye babondelaka ye mokolo na mokolo. Mabondeli na bango ekómelaka ye na mbala moko. Yango wana, akoki kozala na mokakatano te mpo na kosolola na bato nyonso ya kokoka. Alingaki kozala na mposa ya Bokonzi ya likoló te mpo na koyeba bango nyonso. Ezali likambo ya malamu mpenza ete Yehova azala Moyangeli na biso, tózala na likoki ya kosolola na ye mbala moko, mpe tózala na elikya ya kokufa te, kasi tózala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele!

“Ekoki na motamboli te”

14. Mpo na nini bato bakozala libela na libela na mposa ete Yehova ayangela bango?

14 Kasi, ata bato ya kokoka balingaki kaka kozala na mposa ete Yehova ayangela bango libela na libela. Mpo na nini? Mpamba te ntango Yehova akelaki bango, asalaki bango te mpo bámiyangela na ndenge oyo ebongi. Ezali ndenge oyo bato basalemá, lokola mosakoli Yilimia alobaki yango ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko. Ɛ [Yehova], pamelá ngai.” (Yilimia 10:23, 24) Ezali libunga monene soki bato bakanisi ete bakoki kolonga kotambwisa mokili kozanga ete Yehova ayangela bango. Ekoyokana te na ndenge oyo basalemá. Soki bato baboyi Yehova ayangela bango, bakosuka kaka na koluka matomba ya bango moko, na koyinana, na makambo ya nsɔmɔ, na mobulu, na bitumba, mpe na liwa. ‘Moto akozala na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.’—Mosakoli 8:9.

15. Makambo nini ebimaki lokola baboti na biso ya liboso baponaki nzela ya mabe?

15 Likambo ya mawa ezali ete baboti na biso ya liboso baboyaki Nzambe azala Moyangeli na bango, mpe baponaki komitambwisa bango moko. Yango wana, Nzambe atikaki bango na ezaleli ya kokoka te. Bakómaki lokola masini oyo esalaka na kura mpe balongoli nsinga na yango na kura. Na nsima bakómaki kosala malɛmbɛmalɛmbɛ tii batikaki kosala, elingi koloba bakufaki. Bakómaki lokola masini ya biliki oyo ezali na litutu, mpe batikelaki bana na bango nyonso ezalela yango. (Baloma 5:12) “[Yehova] ye Libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. . . . Bango basaleli ye mabe, bazali bana na ye lisusu te na ntina na libebi na bango; bazali libota bapɛngwi mpe banyongotani.” (Deteronome 32:4, 5) Ya solo, ezali na ekelamu moko ya elimo oyo atombokelaki Nzambe mpe akómaki kobengama Satana nde akosaki Adama na Eva, kasi bango bazalaki na bɔɔngɔ ya kokoka, bazalaki mpe na likoki ya koboya makanisi mabe na ye.—Genese 3:1-19; Yakobo 4:7.

16. Makambo oyo eleká ezali komonisa mbuma nini oyo bato babuki lokola baboyaki ete Nzambe atambwisa bango?

16 Makambo oyo eleká emonisi malamu mbuma mabe oyo bato babuki lokola baboyaki ete Nzambe atambwisa bango. Banda bankóto ya bambula, bato bameki baguvɛrnɛma ndenge na ndenge, mpe lolenge nyonso ya ebongiseli ya nkita mpe ndenge oyo bato bakoki kofanda malamu. Kasi, makambo mabe ezali se ‘koleka na mabe.’ (2 Timote 3:13) Ekeke ya 20 emonisaki makambo yango. Ekeke yango etondaki na koyinana mpe mobulu, bitumba, nzala, bobola, mpe mpasi koleka bikeke nyonso oyo eleká. Atako mayele ya minganga ekoli mingi, moto nyonso azali kaka kosuka na liwa. (Mosakoli 9:5, 10) Lokola balukaki komitambwisa bango moko, bato bamitikaki mpenza na mabɔkɔ ya Satana na bademo na ye, yango wana Biblia ebengi Satana ete “nzambe ya mokili oyo.”—2 Bakolinti 4:4.

Bonsomi ya kopona

17. Ndenge nini bato basengelaki kosalela bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesaki bango?

17 Mpo na nini Yehova atikaki bato básala ndenge oyo balingi? Mpamba te ntango akelaki bato, apesaki bango likabo moko malamu oyo babengaka bonsomi ya kopona. Ntoma Paulo alobaki ete: “Esika ezali [elimo, NW ] ya Nkolo, wana bonsomi [ezali].” (2 Bakolinti 3:17) Moto moko te alingaka kozala lokola masini, ete moto mosusu ayebisaka ye likambo nyonso oyo asengeli koloba to kosala. Kasi Yehova alingaki ete bato básalela bonsomi yango na mayele, báyeba ete bakozala malamu se soki bazali kosala mokano na ye mpe soki azali kotambwisa bango. (Bagalatia 5:13) Elingi koloba ete bonsomi esengelaki kozala na ndelo, soki te mobulu esengelaki kokɔta. Bonsomi yango esengelaki kosuka na esika oyo mibeko malamu ya Nzambe ebandi.

18. Nzambe amonisaki nini lokola atikaki ete moto asalela bonsomi ya kopona?

18 Lokola atikaki bato básala oyo balingi, Nzambe amonisaki mbala moko mpo na libela ete tozali na mposa ya boyangeli na ye. Lolenge ya koyangela to bokonzi kaka moko ya malamu ezali oyo ya Nzambe. Yango nde ememaka bolamu, esengo, mpe bomɛngo mingi koleka. Ezali bongo mpamba te Yehova abongisaki makanisi mpe nzoto na biso ete esalaka malamu ntango ezali kolanda mibeko na ye. “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Kolanda mibeko ntango bazali kosalela bonsomi ya kopona elingaki kozala bozito te mpo na bato, balingaki nde kozala na bilei, na bandako, na misala ya ntɔki mpe na miziki ndenge na ndenge ya kitoko. Soki basalelaki malamu bonsomi na bango ya kopona, mbɛlɛ bato balingaki kozala na bomoi moko kitoko na paladiso awa na mabele.

19. Nzambe akosalela nini mpo na kozongisa boyokani na bato?

19 Kasi, lokola bato baponaki nzela mabe, bamikabolaki na Yehova, bakómaki bato ya kozanga kokoka, bakómá kobɛla mpe kokufa. Yango wana bakómaki na mposa bálongola bango na ezalela wana mpe bázongela boyokani malamu na Nzambe, bázala lisusu bana na ye. Mpo na kosala likambo yango, Nzambe aponaki kosalela Bokonzi mpe Yesu Klisto lokola Mobikisi. (Yoane 3:16) Na nzela ya ebongiseli yango, bato oyo bakobongola mpenza mitema, lokola mwana ya kilikili oyo Yesu alobelaki na lisese na ye, bakoyokana lisusu na Nzambe mpe ye akoyamba bango lisusu lokola bana na ye.—Luka 15:11-24; Baloma 8:21; 2 Bakolinti 6:18.

20. Ndenge nini Bokonzi ekokokisa mokano ya Nzambe?

20 Ntembe ezali te, mokano ya Yehova ekokokisama awa na mabele. (Yisaya 14:24, 27; 55:11) Na nzela ya Bokonzi na ye oyo apesi na mabɔkɔ ya Klisto, Nzambe akolongisa lotomo na ye ya kozala Mokonzi na biso. Bokonzi ekosukisa boyangeli ya bato na bademo awa na mabele, mpe bokonzi yango oyo ekozala kuna na likoló yango moko ekoyangela mabele na boumeli ya mbula nkóto. (Baloma 16:20; Emoniseli 20:1-6) Kasi, na ntango yango, ndenge nini ekoyebana ete boyangeli ya Yehova nde eleki malamu? Nsima ya mbula nkóto, Bokonzi ekosala makambo nini? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.

Bozongeli

• Motó ya likambo ya Biblia ezali nini?

• Banani bakozala bayangeli ya sika ya mabele?

• Mpo na nini bato bakoki te komiyangela malamu soki Nzambe atambwisi bango te?

• Ndenge nini bato basengeli kosalela bonsomi ya kopona?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 10]

Mateya ya Yesu elobelaki mingi boyangeli ya Nzambe na nzela ya Bokonzi

[Bililingi na lokasa 12]

Na ekólo na ekólo, Batatoli ya Yehova bateyaka libosoliboso Bokonzi

[Bililingi na lokasa 14]

Makambo oyo eleká ezali komonisa mbuma mabe oyo bato babuki lokola baboyaki ete Nzambe atambwisa bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Basoda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba: U.S. National Archives photo; kaa ya bakangami: Oświęcim Museum; mwana: FƆTƆ YA ONU 186156/J. Isaac