Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala

“Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló!”—MATAI 6:10.

1. Bokonzi ya Nzambe oyo ezali koya ekosala makambo nini?

 NTANGO Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, ayebaki ete soki bokonzi yango eyei, ekosukisa boyangeli ya bato oyo esi eumeli bankóto ya bambula. Ntango nyonso oyo bato bazalaki koyangela, mokano ya Nzambe ezalaki kosalema te awa na mabele. (Nzembo 147:19, 20) Kasi, soki Bokonzi ebandi koyangela na likoló, na nsima, mokano ya Nzambe ekosalema bipai nyonso. Etikali moke mpenza mpo boyangeli ya bato etikela Bokonzi ya Nzambe esika, ekozala mbongwana monene mpenza.

2. Likambo nini ekosalema liboso ete boyangeli ya bato etikela Bokonzi ya Nzambe esika?

2 Liboso Bokonzi ya Nzambe eya, ekozala na eleko moko oyo Yesu abengaki “bolɔzi monene na ndenge oyo emonana naino te banda mokili ebanda tii sikoyo, te, ekomonana mpe lisusu te.” (Matai 24:21, NW ) Biblia elobi te soki bolɔzi yango ekoumela ntango boni, kasi bampasi oyo ekozala na ntango yango ekoleka bampasi nyonso oyo ebimá na mokili. Na ebandeli ya bolɔzi monene, likambo moko ekosalema oyo ekobulunganisa ebele ya bato na mokili: mangomba ya lokuta ekobomama. Kasi, likambo yango ekobulunganisa Batatoli ya Yehova te, mpamba te bayebaka banda kala ete likambo yango ekosalema. (Emoniseli 17:1, 15-17; 18:1-24) Bolɔzi monene ekosuka na Armagedon ntango Bokonzi ya Nzambe ekoboma mokili ya Satana mobimba.—Danyele 2:44; Emoniseli 16:14, 16.

3. Yilimia alobi nini mpo na nsuka ya bato oyo bazangi botosi?

3 Nini ekokómela bato oyo “bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu” ya Bokonzi na ye ya likoló oyo ezali na mabɔkɔ ya Klisto? (2 Batesaloniki 1:6-9) Esakweli ya Biblia elobi na biso boye: “Talá mabe ekobima, longwa na libota kino libota; mpe mopɛpɛ makasi ekotombwa likoló, longwa na ndelo ya nsuka ya mokili. Mpe babomami ya [Yehova] na mokolo yango bakozala longwa na molelo moko ya mokili kino molelo mosusu ya mokili; bakobimisamela bileli te, bakoyanganisama te, bakokundama mpe te; bakozala lokola nyei likoló ya mabele.”—Yilimia 25:32, 33.

Ndenge oyo mabe ekosuka

4. Mpo na nini ebongi mpenza ete Yehova aboma mokili mabe oyo?

4 Eleki sikoyo bankóto ya bambula kobanda Yehova Nzambe atiki nzela na mabe; ntango yango ekoki mpenza mpo bato ya mitema sembo bámona ete boyangeli ya bato ekoki kosala ata eloko moko ya malonga te. Na ndakisa, lapolo moko elobi ete kaka na ekeke ya 20, bato koleka milio 150 bakufaki na bitumba, na botomboki, mpe na mobulu ya banamboka. Motema mabe ya moto emonanaki mpenza na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba; bato soki milio 50 bakufaki, mpe mingi kati na bango bakufaki liwa ya nsɔmɔ na bakaa ya bakangami ya Banazi. Se ndenge oyo Biblia esakolaki yango, na ntango na biso ‘bato mabe mpe bakosi baleki na mabe.’ (2 Timote 3:1-5, 13) Lelo oyo, makambo lokola pite na ekobo, kobomana, mobulu, kanyaka, mpe likambo ya kotyola mibeko ya Nzambe epalangani mingi. Yango wana, ebongi mpenza ete Yehova aboma mokili mabe oyo.

5, 6. Lobelá makambo mabe oyo ezalaki kosalema na Kanana na ntango ya kala.

5 Makambo oyo ezali kosalema lelo ekokani na oyo ezalaki kosalema na mokili ya Kanana, eleki sikoyo mbula soki 3 500. Biblia elobi boye: “Makambo ya mbindo nyonso, mayini [Yehova], basalelaki banzambe na bango boye. Mpo ete bakotumbaka ata bana na bango basi mpe mibali na mɔ́tɔ epai ya banzambe na bango.” (Deteronome 12:31) Yehova ayebisaki bato ya Yisalaele boye: “Ezali mpo na masumu ya mabota oyo ete [Yehova] Nzambe na yo alingi kobimisa bango na liboso na yo.” (Deteronome 9:5) Henry Halley, moto ya mayele na istware ya Biblia alobaki boye: “Mpo na kosambela Baala, Asetaloti, na banzambe mosusu ya Bakanana, bazalaki kosala nsuka ya makambo ya mbindo; batempelo na bango ezalaki bisika oyo bazalaki kosala makambo ya bosɔtɔ mpenza.”

6 Halley amonisaki ete misala na bango ekómaki mabe mpenza, mpamba te na moko ya bisika yango, bato ya arkeoloji “bakutaki ebele ya bambeki oyo ezalaki na biteni ya nzoto ya bana oyo bakabaki lokola mbeka epai ya Baala.” Halley alobaki lisusu boye: “Esika yango mobimba ezalaki lokola malita ya bana oyo babotami sika. . . . Na losambo na bango, Bakanana bazalaki kosala makambo ya mbindo lokola molulu ya losambo liboso ya banzambe na bango; mpe, bazalaki koboma bana na bango ya liboso lokola mbeka mpo na banzambe yango. Emonani ete mokili ya Kanana ekómaki mpenza Sodomo na Gomola monene. . . . Ebongaki te ete mboka oyo ezalaki na makambo ya mbindo mpe ya nsɔmɔ boye ebomama? . . . Bato ya arkeoloji oyo batimolaka na bisika oyo bamboka ya Bakanana ezalaká mpo na kobimisa biloko oyo batiká bamitunaka mpo na nini Nzambe abomaki bango nokinoki te.”

Mabele lokola libula

7, 8. Ndenge nini Nzambe akopɛtola mabele?

7 Etikali moke Nzambe apɛtola mabele mobimba ndenge oyo apɛtolaki mokili ya Kanana mpe apesa yango na baoyo bazali kosala mokano na ye. “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) Mpe mokomi ya nzembo alobi ete: “Nsima ya mwa ntango moke, moto ya mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:10, 11) Satana mpe akolongolama mpo “azimbisa mabota lisusu te, kino nsuka ya mbula yango nkóto.” (Emoniseli 20:1-3) Ya solo, “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.

8 Yesu alobaki na mokuse elikya monene ya bato oyo balingi kozala na bomoi ya seko na mabele na maloba oyo: “Esengo na baoyo bazali na boboto, mpamba te bakozwa mabele lokola libula.” (Matai 5:5, NW ) Ekoki mpenza kozala ete azalaki kokanisa maloba ya Nzembo 37:29, oyo esakolaki ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Yesu ayebaki ete mokano ya Yehova ezalaki ete bato ya mitema sembo báfanda na paladiso awa na mabele libela na libela. Yehova alobi boye: “Na nguya na ngai monene . . . ngai nasali mokili mpe bato mpe nyama oyo izali likoló ya mokili; mpe nakopesa yango epai na ye oyo namoni ye malamu na miso na ngai.”—Yilimia 27:5.

Mokili ya sika ya kitoko

9. Bokonzi ya Nzambe ekosala mokili ya ndenge nini?

9 Nsima ya Armagedon, Bokonzi ya Nzambe ekosala “mabele ya sika” mpe ya kitoko epai “boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13, NW ) Bato oyo bakobika na Armagedon bakosikwama mpenza na boombo ya makambo mabe oyo ezali konyokola bango! Bakozala na esengo mingi lokola bakokɔta na mokili ya sika mpe ya sembo oyo Bokonzi ya likoló ekoyangela, mpe bakozwa ebele ya mapamboli mpe bakozala na elikya ya bomoi ya seko!—Emoniseli 7:9-17.

10. Makambo nini ya mabe ekozala lisusu te ntango Bokonzi ekoyangela?

10 Bitumba, mobulu, nzala, to mpe banyama ya yauli ekotungisa lisusu bato te. “Nakosala kondimana ya kimya na [bato na ngai], mpe nakosilisa banyama ya zamba na mokili . . . Nzete ya elanga ikobota mbuma na yango, mpe mabele ekobota mbuma na yango, mpe bakozala na kimya na mokili na bango.” “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya miwiti na ye mpe na nzete na ye ya mosuke, moto moko akobangisa bango te.”—Ezekiele 34:25-28; Mika 4:3, 4.

11. Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete maladi ekosila?

11 Maladi, mawa, ata mpe liwa ekozala lisusu te. “Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi; bato baoyo bakofanda wana bakolimbisama masumu na bango.” (Yisaya 33:24) “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka. . . . Nakozalisa biloko nyonso biloko ya sika.” (Emoniseli 21:4, 5) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete, na nguya oyo Nzambe apesaki ye, akoki kosala makambo wana. Na lisalisi ya elimo santu, Yesu atambolaki na ekólo na bango mobimba, azalaki kobikisa bibɔsɔnɔ mpe bato ya maladi.—Matai 15:30, 31.

12. Elikya nini tozali na yango mpo na bato oyo bakufá?

12 Yesu asalaki mpe makambo mosusu. Asekwisaki bakufi. Bato ya komikitisa basalaki nini? Ntango Yesu asekwisaki elenge mwasi moko ya mbula 12, baboti na ye ‘bakamwaki na kokamwa monene.’ (Malako 5:42) Yango ezalaki ndakisa ya likambo mosusu oyo Yesu akosala na mokili mobimba ntango Bokonzi na ye ekoyangela, mpamba te na ntango wana “lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15) Kanisá esengo monene oyo ekozala ntango bituluku na bituluku ya bato bakobanda kosekwa mpe bakokutana lisusu na bandeko na bango! Na ntembe te, ntango Bokonzi ekoyangela ekozala na ebongiseli monene ya koteya bato mpamba te “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.”—Yisaya 11:9.

Bokonzi ya Yehova elongisami

13. Ndenge nini Nzambe akomonisa ete boyangeli na ye nde ebongi?

13 Na nsuka ya mbula nkóto oyo Bokonzi ekoyangela, bato bakozonga na ezalela ya kokoka na makanisi mpe na nzoto. Mabele mobimba ekozala elanga ya Edene, to paladiso. Bato bakozala na kimya, na esengo, na libateli, mpe bakolingana. Na ntango nyonso oyo bato bazalaki koyangela, likambo ya ndenge wana emonanaki ata moke te. Na ntango wana bokeseni monene ekomonana kati na bankóto ya bambula ya boyangeli ya bato na Bokonzi ya Nzambe na likoló oyo ekoumela mbula nkóto! Ekomonana mpenza ete boyangeli ya Nzambe na nzela ya Bokonzi na ye eleki boyangeli mosusu nyonso na makambo nyonso. Bokonzi ya Nzambe, to lotomo na ye ya koyangela, ekolongisama.

14. Likambo nini ekokómela batomboki na nsuka ya mbula nkóto?

14 Na nsuka ya mbula nkóto, Yehova akotika bato ya kokoka bápona moto oyo bango moko bakolinga kosalela. Biblia elobi ete “Satana akobimisama na bolɔkɔ na ye.” Akozimbisa lisusu bato, mpe bato mosusu bakopona kotosa Nzambe te. Mpo ‘minyoko ebima mbala mibale te,’ Yehova akoboma Satana, bademo na ye, na bato nyonso oyo bakolinga kotosa bokonzi ya Yehova te. Moto moko te akoloba ete bato oyo bakobomama mpo na libela na ntango wana bakebisamaki te to basalaki mabe mpo bazalaki bato ya kozanga kokoka. Bakozala lokola Adama na Eva ntango bazalaki bato ya kokoka, kasi bango moko baponaki kotosa te boyangeli ya sembo ya Yehova.—Emoniseli 20:7-10; Nahumu 1:9.

15. Bato ya sembo bakozala banani liboso ya Yehova?

15 Kasi, ntembe ezali te ete bato mingi koleka bakopona kotosa boyangeli ya Yehova. Lokola batomboki nyonso bakobomama, bato ya sembo bakotɛlɛma liboso ya Yehova, nsima ya kolonga komekama ya nsuka ya bosembo na bango. Na nsima, Yehova akoyamba bato yango ya sembo lokola bana na ye. Na ntango wana, bakozongela boyokani oyo Adama na Eva bazalaki na yango na Nzambe liboso bátombokela ye. Na bongo, Baloma 8:21 ekokokisama ete: “[Bozalisi, NW ] [elingi koloba bato] ekosikwa na boombo ya libebisi kino lisiko ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Yisaya asakolaki ete: “[Nzambe] akosilisa kufa libela mpe Nkolo [Yehova] akokomba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8.

Elikya ya bomoi ya seko

16. Mpo na nini kozela mbano ya bomoi ya seko ezali likambo mabe te?

16 Bato ya sembo bazali mpenza na elikya ya malamu lokola bayebi ete Nzambe akosopela bango ebele ya mapamboli ya elimo mpe ya biloko ya mosuni! Mokomi ya nzembo alobaki malamu ete: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya nyonso na bomoi.” (Nzembo 145:16) Yehova azali kolendisa bato oyo bakofanda awa na mabele bátalela elikya yango ya bomoi na Paladiso lokola moko ya makambo ya kondima na bango epai na ye. Atako likambo oyo eleki ntina ezali nde boyangeli na ye, Yehova azali kosɛnga bato te ete básalela ye kozanga elikya ya kozwa mbano. Na Biblia mobimba, balobelaka bosembo epai ya Nzambe esika moko na elikya ya bomoi ya seko; ezali na kati ya kondima ya boklisto epai ya Nzambe. “Ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.

17. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ezali malamu tólendisama na elikya?

17 Yesu alobaki ete: “Bomoi ya seko elimboli boye, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe ye oyo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW ) Na vɛrsɛ yango, koyeba Nzambe mpe mikano na ye elobelami esika moko na libonza oyo boyebi yango ekopesa. Na ndakisa, ntango mosali ya mabe moko asɛngaki Yesu ete akanisa ye ntango akozala na Bokonzi na ye, Yesu alobaki ete: “Okozala na ngai elongo kati na Paladiso.” (Luka 23:43) Yesu ayebisaki moto yango te ete azala na kondima ata soki akozwa mbano te. Ayebaki ete Yehova alingi ete basaleli na ye bázala na elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele mpo elendisa bango báyika mpiko liboso ya minyoko ndenge na ndenge oyo bazali kokutana na yango na mokili. Yango wana, ezali na ntina mingi ete moklisto atya elikya na mbano, yango nde ekosalisa ye ayika mpiko.

Makambo oyo Bokonzi ekosala na nsima

18, 19. Nini ekokómela Mokonzi mpe Bokonzi na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?

18 Lokola Bokonzi ezali ebongiseli ya mwa ntango oyo Yehova akosalela mpo na kozongisa makambo ya kokoka na mabele mpe epai ya bato oyo bakofanda wana mpe kozongisa boyokani malamu elongo na ye, Mokonzi Yesu Klisto na bakonzi mpe banganga 144 000 bakozala na mokumba nini nsima ya mbula nkóto? “Boye, nsuka ekoya wana ekopesa ye bokonzi epai ya Nzambe mpe Tata, nsima wana esili ye kobwaka lokumu nyonso mpe bokonzi nyonso mpe nguya nyonso. Zambi ekoki na ye ete azala na bokonzi kino ekotya ye bayini nyonso na nse ya makolo na ye.”—1 Bakolinti 15:24, 25.

19 Lokola Klisto akozongisa Bokonzi epai ya Nzambe, ndenge nini tosengeli kokanga ntina ya maloba ya bavɛrsɛ oyo elobi ete Bokonzi ekoumela libela na libela? Makambo oyo Bokonzi ekosala ekotikala libela. Bato bakokumisa Klisto libela na libela mpo na mokumba na ye mpo bokonzi ya Nzambe elongisama. Kasi lokola na ntango wana lisumu na liwa ekozala lisusu te, mpe bato bakosikwama, bakozala lisusu na mposa te ete azala Mosikoli na bango. Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ekokokisama; tokozala lisusu na mposa ya boyangeli moko te kati na Yehova na bato ya botosi. Mpo ete “Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.”—1 Bakolinti 15:28.

20. Ndenge nini tokoyeba makambo oyo Klisto na ba 144 000 bakosala na nsima?

20 Klisto na bayangeli balandi na ye bakozala na mokumba nini nsima ya mbula nkóto oyo Bokonzi ekoyangela? Biblia elobi yango te. Kasi, tokoki kozala na elikya ete Yehova akopesa bango mikumba mosusu mingi na kati ya bozalisi na ye. Tiká ete biso nyonso lelo oyo tólongisa bokonzi ya Yehova mpe tózwa mbano ya bomoi ya seko, mpo ete na mikolo ekoya, tózala na bomoi mpo na komona makambo oyo Yehova akanaki mpo na Mokonzi mpe bakonzi mpe banganga balandi na ye, mpe mpo na molɔ́ngɔ́ mobimba!

Bozongeli

• Mbongwana nini ekosalema mosika te na likambo ya boyangeli?

• Ndenge nini Nzambe akosambisa bato mabe na bato ya sembo?

• Makambo nini ekozala na mokili ya sika?

• Ndenge nini bokonzi ya Yehova ekolongisama?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 17]

“Lisekwa ekozala mpo na bato sembo mpe bato sembo te”

[Elilingi na lokasa 18]

Bato ya sembo bakozala lisusu na boyokani malamu na Yehova