Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani

Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani

Kosɛnga bolimbisi ezali sɛkɛlɛ mpo na kozongisa boyokani

DEBORAH TANNEN, mwasi moko oyo akomaka babuku, oyo azali mpe molakisi na Iniversite ya Georgetown na Washington, alobaki boye: “Kosɛnga bolimbisi ezalaka na nguya mingi. Esalisaka bato básilisa matata na kimya, ezongisaka boyokani na kati ya bikólo, epesaka baguvɛrnɛma likoki ya kondima ete bazali koyeba mpasi ya bana-mboka, esalisaka na kobongisa makambo na kati ya bato oyo bafandi esika moko.”

Biblia mpe elobi ete kosɛnga bolimbisi na bosembo ezalaka mbala mingi ndenge ya malamu ya kozongisa boyokani. Na ndakisa, na lisese ya mwana ya kilikili oyo Yesu alobaki, ntango mwana azongaki na ndako mpe asɛngaki bolimbisi na motema moko, tata andimaki mbala moko koyamba ye na ndako. (Luka 15:​17-24) Yango ezali komonisa ete esengeli moto atika lolendo mpe asɛngaka bolimbisi. Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpenza mpasi te mpo na bato ya komikitisa.

Kosɛnga bolimbisi ekoki kosala malamu mingi

Abigaili, mwasi moko ya bwanya na Yisalaele ya kala, apesaki ndakisa oyo ezali komonisa ete kosɛnga bolimbisi ekoki kosala malamu mingi, atako asɛngaki bolimbisi yango mpo na mabe oyo mobali na ye nde asalaki. Ntango Davidi, moto oyo na nsima akómaki mokonzi ya Yisalaele, azalaki na esobe, ye na bato na ye babatelaki bibwele ya Nabala, mobali ya Abigaili. Kasi, ntango bato ya Davidi basɛngaki ye mwa mampa na mai, Nabala akatelaki bango mangala mpe azongisaki bango mabɔkɔ mpamba. Likambo yango esilikisaki Davidi mpe azwaki mibali 400 na kati ya bato na ye mpo bákitela Nabala na bato ya ndako na ye. Ntango Abigaili ayokaki makambo oyo elekaki, akendaki mbangu kokutana na Davidi. Ntango akutanaki na ye, afukamaki mpe akitisaki elongi na makolo ya Davidi mpe alobaki boye: “Nkolo na ngai, tiká ete lisumu oyo ekwea epai na ngai! Nalɔmbi yo ete moombo na yo aloba na matoi na yo. Yoká maloba ya moombo na yo.” Na nsima, Abigaili alimbwelaki Davidi makambo mpe apesaki ye bilei na masanga. Na nsima, Davidi alobaki ete: “Kendá na kimya, bino na ndako na yo; nayoki mongongo na yo mpe nandimi elongi na yo.”​—⁠1 Samwele 25:​2-35.

Komikitisa ya Abigaili mpe ndenge oyo asɛngaki bolimbisi mpo na mabe ya mobali na ye ebikisaki libota na ye. Kutu, Davidi apesaki ye botɔndi na ndenge apekisaki ye kotangisa makila. Atako ezalaki Abigaili te moto asalaki Davidi na bato na ye mabe, kasi andimaki foti mpo na libota na ye mpe azongisaki kimya na Davidi.

Ntoma Paulo mpe ayebaki na likambo nini ebongi kosɛnga bolimbisi. Mokolo mosusu, asengelaki kosamba liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda. Lokola Paulo alobaki na bango polele, nganga-nzambe monene Ananiasi asilikaki mpe alobaki na bato oyo batɛlɛmaki pene na Paulo ete bábɛta ye na monɔkɔ. Paulo alobaki na ye ete: “Nzambe akobɛta yo, yo efelo oyo epakolamá mpɛmbɛ. Na ntango oyo ofandi mpo na kosambisa ngai na boyokani na Mibeko, ozali nde na ntango yango mpe kobuka Mibeko, na kotindáká ete bábɛta ngai?” Ntango bato oyo bazalaki wana balobaki na ye ete afingi nganga-nzambe monene, Ntoma Paulo andimaki mbala moko ete asalaki mabe mpe alobaki ete: “Bandeko, nayebaki te ete azali nganga-nzambe monene. Mpo ekomamá ete, ‘Osengeli te koloba mabe na moyangeli ya bato ya ekólo na yo.’ ”​—⁠Misala 23:​1-5.

Paulo alobaki likambo ya solo, ete moto oyo aponami mpo na kosambisa asengeli kobɛta te. Kasi, asɛngaki bolimbisi mpo alobaki na ndenge oyo ekokaki komonisa ete azangi limemya na moto oyo ye ayebaki te ete azali nganga-nzambe monene. * Lokola Paulo asɛngaki bolimbisi, bazuzi ya Sanedrina bayokaki ye. Lokola Paulo ayebaki ete kati na bango bazuzi bazalaki koyokana te na likambo moko, alobaki na bango ete azalaki kosamba mpo andimaka lisekwa. Likambo yango ebimisaki bokabwani kati na bango mpe Bafalisai bazalaki na likanisi moko na Paulo.​—⁠Misala 23:​6-10.

Masolo mibale yango oyo euti na Biblia ekoki koteya biso nini? Lokola moto oyo balobeli na lisolo mokomoko andimaki libunga na ye na bosembo, yango esalisaki na kozongisa boyokani. Yango emonisi ete kosɛnga bolimbisi ekoki kozongisa kimya. Ya solo, kondima mabunga mpe kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo tosali ekoki kosalisa biso mpo tósolola malamu.

‘Nasali mabe moko te’

Na ntango tolobi to tosali likambo moko oyo esilikisi moto mosusu, tokoki kokanisa ete moto yango azali nde kongalisa likambo mpamba. Kasi, Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Boye, soki ozali komema likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na yo likambo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo ná ndeko na yo, mpe na nsima, ntango okozonga, pesá likabo na yo.”​—⁠Matai 5:​23, 24.

Na ndakisa, ndeko moko akoki komona ete osali ye mabe. Yesu alobaki ete na ntango wana, osengeli kokende mpe ‘koyokana yo na ndeko na yo,’ ata soki ozali kokanisa ete osalaki ye mabe te. Soki tolandeli mpenza makomi ya Grɛki, liloba oyo Yesu asalelaki ‘ezali kopesa likanisi ete na esika oyo matata ebimi, moto na moto asengeli kondima mabe na ye.’ (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) Ya solo, ntango bato mibale bazwani matata, moto moko te azangaka ata mwa foti moke, mpamba te bango mibale bazali bato ya kozanga kokoka mpe bakoki kosala mabunga. Yango wana esɛngaka ete moto na moto andima ete asalaki mabe.

Likambo esengeli kozala te ya koluka koyeba nani azali na foti te mpe nani asali mabe, kasi ezali nde nani akoluka moninga liboso mpo na kozongisa kimya. Ntango ntoma Paulo ayokaki ete baklisto ya Kolinti bazalaki kofunda bandeko na bango baklisto na batribinale soki bazwani matata na makambo ya mbongo, mpo na kozongisa bango na nzela, alobaki na bango boye: “Mpo na nini kutu te kondima ete básalela bino mabe? Mpo na nini kutu te kondima ete bábuba bino?” (1 Bakolinti 6:⁠7) Atako Paulo alobaki na baninga na ye baklisto bongo mpo bátika kofundana na batribinale ya mokili, likanisi oyo tosengeli kosimba ezali polele ete: Kimya na kati ya bandimi ezali na ntina koleka likambo ya koyeba nani azali na foti, nani asali mabe te. Soki tosimbi likanisi yango, ekozala mpasi te mpo tósɛnga bolimbisi na moto oyo azali komona ete tosali ye mabe.

Tosengeli kozala sembo

Bato mingi basalelaka maloba ya kosɛnga bolimbisi na ndenge oyo ebongi te. Na ndakisa, na Japon, liloba sumimasen, oyo bato balobaka mingimingi mpo na kosɛnga bolimbisi, ekómá mpambampamba na minɔkɔ ya bato. Liloba yango ekoki ata kosalelama mpo na kozongisa matɔndi, mpo na komonisa ete moto azali kosepela te lokola akoki te kozongisa bolamu oyo basaleli ye. Lokola liloba yango esalelamaka na ndenge mingi, bato mosusu bakoki komona ete esalelamaka na ndenge oyo ebongi te mpe bakoki komituna soki moto oyo alobi yango azali mpenza sembo. Na bamboka mosusu mpe bato bakoki komona ete bato basalelaka maloba ya kosɛnga bolimbisi na ndenge oyo ebongi te.

Ezala na monɔkɔ nini, ezali na ntina ete moto asɛnga bolimbisi na bosembo nyonso. Maloba na ye mpe mongongo na ye esengeli komonisa ete azali koyoka mpenza mawa. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye ete: “Tiká ete liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te; mpo oyo ebakisamaka likoló na yango ezali kouta na moto mabe.” (Matai 5:37) Ntango ozali kosɛnga bolimbisi, esengeli kouta mpenza na motema. Tópesa ndakisa moko: Moto moko azalaki na kati ya molɔngɔ mpo na kolakisa mikanda na libándá ya mpɛpɔ; asɛngaki bolimbisi ntango sakosi na ye etutaki mwasi oyo azalaki nsima na ye. Mwa moke na nsima, ntango bapusanaki liboso, sakosi na ye etutaki lisusu mwasi yango. Moto wana asɛngaki lisusu bolimbisi na boboto. Likambo yango esalemaki lisusu mpo na mbala ya misato; yango wana, mobali moko oyo azalaki kosala mobembo na mwasi yango ayebisaki nkolo sakosi ete soki azali kosɛnga bolimbisi na bosembo mpenza, abongisa sakosi na ye mpo etuta lisusu mwasi wana te. Ya solo, mpo na komonisa ete tozali sembo na ntango tozali kosɛnga bolimbisi tosengeli komonisa ete tokozongela lisusu te libunga oyo tosali.

Soki tozali sembo, tokondima mabe na biso, tokosɛnga bolimbisi mpe tokosala makasi mpo na kobongisa mabe oyo tosali. Moto oyo mpe basali ye mabe asengeli kolimbisa moninga oyo asɛngi ye bolimbisi. (Matai 18:​21, 22; Malako 11:25; Baefese 4:32; Bakolose 3:13) Lokola bango nyonso bazali bato ya kozanga kokoka, kozongisa kimya ntango mosusu ezalaka mokakatano. Kasi, maloba ya kosɛnga bolimbisi esalisaka mpenza mpo na kozongisa mpenza kimya.

Ntango oyo ebongi te kosɛnga bolimbisi

Atako kosɛnga bolimbisi ekitisaka motema mpe esalisaka mpenza mpo na kozongisa kimya, moto ya mayele alobaka yango bilobela te. Tózwa na ndakisa likambo ya kozala sembo epai ya Nzambe. Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabele, “amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.” (Bafilipi 2:⁠8) Kasi, asɛngaki bolimbisi te mpo na bindimeli na ye mpo bányokola ye mingi te. Lisusu, Yesu asɛngaki bolimbisi te ntango nganga-nzambe monene alobaki na ye ete: “Na Nzambe ya bomoi nalapisi yo ndai ya koyebisa biso soki yo ozali Klisto Mwana ya Nzambe!” Yesu akitisaki mongongo te mpo na kosɛnga bolimbisi, kasi alobaki na mpiko mpenza ete: “Yo moko olobi yango. Nzokande nazali koloba na bino ete, Banda sikoyo bokomona Mwana ya moto afandi na lobɔkɔ ya mobali ya nguya mpe azali koya likoló ya mapata ya likoló.” (Matai 26:​63, 64) Yesu akanisaki ata mbala moko te kotika bosembo na ye epai ya Tata na ye kaka mpo na koluka kozongisa kimya na nganga-nzambe monene.

Baklisto bamemyaka bakonzi mpe bakumisaka bango. Kasi, bazali na ntina moko te ya kosɛnga bolimbisi lokola batosaka Nzambe mpe balingaka bandeko na bango.​—⁠Matai 28:​19, 20; Baloma 13:​5-7.

Likambo moko te ekobebisa kimya

Tosalaka mabunga mpo nkɔkɔ na biso Adama atikelá biso lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. (Baloma 5:12; 1 Yoane 1:10) Adama akómaki moto ya masumu mpo aboyaki kotosa Mozalisi na ye. Kasi, na ebandeli Adama na Eva bazalaki bato ya kokoka mpe bazalaki na lisumu te; mpe Nzambe alaki ete akozongisa bato na ezaleli ya kokoka. Akolongola lisumu mpe mikakatano nyonso oyo yango ememaki.​—⁠1 Bakolinti 15:​56, 57.

Kanisá naino ndenge oyo makambo ekozala na ntango wana! Yakobo apesaki toli na ndenge ya kosalela lolemo mpe alobaki boye: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:⁠2) Moto ya kokoka akoki kopekisa lolemo na ye mpo ebimisa te maloba oyo ekosɛnga ye asɛnga bolimbisi. Akoki ‘kopekisa nzoto na ye mobimba.’ Ekozala esengo mingi ntango tokokóma bato ya kokoka! Na ntango wana, likambo moko te ekobebisa lisusu kimya. Kasi, liboso na yango, na ntango tosali mabe, kosɛnga bolimbisi na bosembo mpenza mpe na makambo oyo ebongi ekolanda kosalisa mpo na kozongisa kimya.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Ekoki kozala ete Paulo ayebaki te ete moto wana nde azalaki nganga-nzambe monene mpo miso na ye ezalaki komona malamu te.

[Elilingi na lokasa 5]

Ndakisa ya Paulo ekoki koteya biso nini?

[Elilingi na lokasa 7]

Ntango biso nyonso tokokóma bato ya kokoka, likambo moko te ekobebisa lisusu kimya