Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli kaka komona naino mobeko ya Biblia?

Osengeli kaka komona naino mobeko ya Biblia?

Osengeli kaka komona naino mobeko ya Biblia?

NTANGO ozalaki mwana moke, baboti na yo bazalaki kotyela yo ebele ya mibeko. Ntango okolaki, omonaki ete bazalaki kosala yango mpo na bolamu na yo. Na ntembe te, tii sikoyo olandaka mitinda mosusu oyo bateyaki yo, atako ozali lisusu na mabɔkɔ na bango te.

Yehova, Tata na biso ya likoló, apesi biso mibeko mingi na kati ya Biblia, Liloba na ye. Na ndakisa, apekisi kosambela bikeko, pite, ekobo, mpe moyibi. (Exode 20:​1-17; Misala 15:​28, 29) Ntango ‘tokoli na makambo nyonso’ na elimo, tomonaka ete Yehova alukaka nde bolamu na biso, kasi ezali te ete atyelaka biso mibeko mpo na kozangisa biso bonsomi.​—Baefese 4:15; Yisaya 48:​17, 18; 54:13.

Kasi, ezali na makambo mingi oyo mibeko epekisi polele te. Na bongo, bato mosusu bamonaka ete soki mobeko ya Biblia ezali te, bakoki kosala nyonso oyo motema elingi. Balobaka ete soki Nzambe amonaki ete ezali na ntina, alingaki kopesa mobeko ya polele oyo ezali komonisa mokano na ye.

Bato oyo bakanisaka ndenge yango, mbala mingi bazwaka bikateli ya mabe mpe na nsima, bakómaka komilela. Basosolaka te ete Biblia ezali kaka te na mibeko kasi emonisaka mpe ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo. Ntango toyekoli Biblia mpe toyebi ndenge Yehova atalelaka makambo, tokómaka na lisosoli oyo eteyami na Biblia mpe yango esalisaka biso na kozwa bikateli oyo eyokani na makanisi na ye na makambo ndenge na ndenge. Ntango tosali bongo, tosepelisaka motema na ye mpe tomonaka matomba ya kozwa bikateli ya malamu.​—Baefese 5:1.

Bandakisa ya malamu mpenza oyo ezali na Biblia

Soki totángi masolo ya basaleli ya kala ya Nzambe oyo Biblia elobeli, tokomona ndenge oyo bato yango batalelaki makanisi ya Yehova na makambo oyo ezalaki na mobeko ya polele te. Tózwa ndakisa ya Yozefe. Ntango mwasi ya Potifala azalaki kosɛnga ye asangisa na ye nzoto, mobeko moko te ekomamá epekisaki ekobo. Kasi, atako mobeko oyo epekisaki likambo yango ezalaki te, Yozefe amonaki ete kosala ekobo ezali lisumu, kaka te mpo na lisosoli na ye, kasi mpe “epai ya Nzambe.” (Genese 39:9) Na ntembe te Yozefe asosolaki ete kosala ekobo eyokani te na likanisi mpe mokano ya Nzambe, ndenge amonisaki yango na Edene.​—Genese 2:24.

Tótalela ndakisa mosusu. Misala 16:3 eyebisi biso ete liboso Paulo azwa Timote mpo na kokende na ye na mibembo, akataki ye ngenga. Kasi, na vɛrsɛ 4, tozali kotánga ete na nsima Paulo ná Timote balekaki na bingumba ndenge na ndenge mpo na koyebisa “mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yelusaleme bakamataki.” Na kati ya mitindo yango ezalaki na ekateli ete baklisto basengelaki lisusu te kotosa mobeko ya kokatama ngenga! (Misala 15:​5, 6, 28, 29) Mpo na nini Paulo amonaki ete asengeli kokata Timote ngenga? “Mpo na Bayuda oyo bazalaki na bisika wana, mpo bango nyonso bayebaki ete tata na [Timote] azalaki Mogrɛki.” Paulo aboyaki kozokisa bato to kobɛtisa bango libaku kaka mpamba. Mposa na ye ezalaki ete baklisto bákoba “komilobela [bango moko] epai ya lisosoli ya bato nyonso na miso ya Nzambe.”​—2 Bakolinti 4:2; 1 Bakolinti 9:​19-23.

Paulo ná Timote bazalaki kotalela makambo ndenge wana. Tángá bavɛrsɛ lokola Baloma 14:​15, 20, 21 mpe 1 Bakolinti 8:​9-13; 10:​23-33, mpe talá ndenge Paulo azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo ya basusu, mingimingi ya baoyo bakokaki kobɛta libaku na likambo oyo, soki totali malamu, ezali mabe te. Paulo akomaki na ntina na Timote ete: “Nazali na moto mosusu te oyo azali na ezaleli lokola ya ye, oyo akomitungisa mpenza mpo na makambo oyo etali bino. Mpo bamosusu nyonso bazali koluka matomba na bango moko, oyo ya Klisto Yesu te. Kasi boyebi elembeteli oyo apesaki mpo na ye moko, ete lokola mwana ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.” (Bafilipi 2:​20-22) Baklisto yango mibale batikelá biso ndakisa malamu mpenza! Na ntango mobeko moko ezali te, na esika ya kosala makambo ndenge mitema na bango elingaki to báluka komisepelisa, balandaki ndakisa ya bolingo ya Yehova ná Mwana na ye mpe batalelaki ndenge oyo bikateli na bango ekoki kosala epai ya bato mosusu.

Tótalela Yesu Klisto, ndakisa na biso monene. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, alimbolaki polele ete moto oyo akangi mpenza ntina ya mibeko ya Nzambe akosuka kaka te na kosala oyo yango etindi to kosala te oyo yango epekisi. (Matai 5:​21, 22, 27, 28) Ezala Yesu, Paulo, Timote, to Yozefe, moko te azalaki na makanisi ete soki mobeko ya polele ezali te, moto akoki kosala kaka ndenge motema na ye elingi. Lokola bato yango bazalaki kolanda makanisi ya Nzambe, bazalaki kotosa oyo Yesu abengaki mibeko mibale oyo eleki monene: kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani.​—Matai 22:​36-40.

Tokoloba boni mpo na baklisto lelo oyo?

Tomoni polele ete tosengeli te kotalelaka Biblia lokola mokanda ya mibeko, oyo ezali kolobela mobeko mokomoko polelepolele. Tosepelisaka mpenza motema ya Yehova ntango toponaka kosala makambo oyo eyokani na makanisi na ye, ata soki mobeko moko te ya polele ezali koyebisa biso oyo tosengeli kosala. Na maloba mosusu, na esika tólukaka kaka báyebisa biso oyo Nzambe alingi tósala, tokoki ‘kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.’ (Baefese 5:17; Baloma 12:2) Mpo na nini Yehova asepelaka na ndenge yango? Mpamba te yango emonisaka ete tolukaka libosoliboso te makambo oyo ezali kosepelisa biso mpe lotomo na biso, kasi tolukaka naino kosepelisa Nzambe. Emonisaka mpe ete tosepelaka na bolingo na ye na boye ete tolingaka komekola yango, kotika yango etambwisa bomoi na biso. (Masese 23:15; 27:11) Lisusu, kotalela oyo Biblia ezali koloba liboso ya kosala likambo nyonso esalisaka na kozala makasi na elimo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.

Tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki kosalela liteya yango na bomoi na biso.

Kopona masano

Tókamata ndakisa ya elenge oyo alingi kosomba kasɛti moko ya miziki. Ayokaki banzembo kitoko na kasɛti yango, kasi azali kokakatana moke mpamba te, na mokɔngɔ ya kasɛti yango bamonisi ete banzembo mosusu ezali kolobela polele makambo ya kosangisa nzoto mpe ezali na maloba ya nsɔni. Lisusu, ayebi ete banzembo mingi ya alanga-nzembo yango ezalaka na maloba ya nkanda mpe ya botomboki. Lokola elenge yango alingaka Yehova, akoluka koyeba makanisi mpe mposa ya Yehova na likambo yango. Ndenge nini akoki koyeba mposa ya Nzambe na likambo yango?

Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bagalatia, atángaki misala ya mosuni mpe mbuma ya elimo ya Nzambe. Na ntembe te oyebi ete mbuma ya elimo ya Nzambe ezali oyo: bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa. Kasi misala ya mosuni ezali makambo nini? Paulo akomaki boye: “Nzokande misala ya mosuni ezali komonana polele, mpe yango ezali pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bilambo ya mbindo mpe makambo oyo ekokani na oyo wana. Na oyo etali makambo yango nazali kokebisa bino, ndenge mpe nakebisaki bino liboso, ete baoyo bazali na momeseno ya kosala makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—Bagalatia 5:​19-23.

Simbá malamu oyo akomaki na nsuka, nsima ya kotánga makambo yango​—“makambo oyo ekokani na oyo wana.” Paulo atángaki makambo nyonso te oyo ekoki kobengama misala ya mosuni. Moto akoki te koloba ete, ‘Biblia epesi ngai nzela ya kosala likambo nyonso oyo ezali te na kati ya misala ya mosuni oyo Paulo atángaki.’ Kasi, motángi asengeli kosalela bososoli na ye mpo na koyeba makambo oyo, atako ezali te na molɔngɔ wana, ezali makambo “ekokani na oyo wana.” Bato oyo bamipesi na makambo oyo Paulo atángi yango te, kasi “ekokani na oyo wana” mpe baboyi kobongola motema, bakozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe te.

Na bongo, tosengeli kososola makambo oyo esepelisaka Yehova te. Ezali mpasi mpo na kosala yango? Tózwa ndakisa ete monganga ayebisi yo olyaka mingi mbuma mpe ndunda mpe oboya biloko ya mafuta mingi, crème, mpe biloko mosusu ya ndenge wana. Okanisi ete ekozala mpasi oyeba soki gato ezali na molɔngɔ nini? Sikoyo, tózonga na mbuma ya elimo ya Nzambe mpe misala ya mosuni. Kasɛti ya miziki oyo tolobelaki mwa liboso ezali na molɔngɔ nini? Ntembe ezali te ete ezali komonisa te bizaleli lokola bolingo, malamu, komipekisa, mpe bizaleli mosusu oyo ezali mbuma ya elimo. Ezali kosɛnga te bápesa naino moto mobeko ya polele mpo asosola ete miziki ya ndenge wana eyokani te na makanisi ya Nzambe. Ezali se ndenge yango mpo na mikanda, bafilme, baemisyo ya televizyo, masano ya ordinatɛrɛ, Internet, mpe bongo na bongo.

Molato mpe ndenge malamu ya kobongisa nzoto

Biblia ezali mpe na mitinda etali molato mpe kobongisa nzoto. Mitinda yango esalisaka moklisto mokomoko alata mpe abongisa nzoto na ndenge ebongi. Na likambo yango mpe, moto oyo alingaka Yehova amonaka te ete asengeli kosala nyonso oyo motema na ye elingi, kasi asalaka oyo esepelisaka Tata na ye ya likoló. Ndenge tolobaki yango, soki Yehova apesi mibeko ya polelepolele te na likambo moko, yango elingi koloba te ete atiki basaleli na ye básala nyonso oyo mitema na bango elingi. Mboka na mboka bato bazalaka na ndenge na bango ya kolata, mpe midɛlɛ ya sika ebimaka ntango nyonso. Kasi, Nzambe apesi mitinda oyo basaleli na ye basengeli kolanda na bileko nyonso mpe na bisika nyonso.

Na ndakisa, 1 Timote 2:​9, 10 elobi: “Ndenge moko mpe nalingi ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe, elingi koloba, na nzela ya misala ya malamu.” Na bongo, mibali mpe basi baklisto basengeli kotalela molato nini na mboka na bango ebongi mpo na bato oyo “balobaka ete babangaka Nzambe.” Ezali mpenza malamu moklisto atala soki molato na ye ekotinda bato bátalela nsango oyo azali komema ndenge nini. (2 Bakolinti 6:3) Moklisto ya malamu akotalela kaka te oyo ezali kosepelisa ye to oyo azali na lotomo ya kosala, kasi akolinga te kobenda likebi ya bato to kobɛtisa bango libaku.​—Matai 18:6; Bafilipi 1:10.

Ntango moklisto amoni ete modɛlɛ moko ezali kobenda mingi likebi ya bato to ezali kobɛtisa bango libaku, akoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo mpe kotya naino bolamu ya elimo ya basusu liboso ya makambo oyo esepelisaka ye. Paulo alobaki ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.” (1 Bakolinti 11:1) Mpe mpo na Yesu, Paulo akomaki ete: “Klisto kutu amisepelisaki ye moko te.” Toli ya Paulo epai ya baklisto nyonso ezali polele: “Nzokande, biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te, mpe komisepelisáká te biso moko. Tiká ete moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo na kotonga ye.”​—Baloma 15:​1-3.

Tókolisa makoki na biso ya kokanisa

Ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso ya kokanisa mpo na koyeba ndenge ya kosepelisa Yehova ata na makambo oyo apeseli mibeko ya polele te? Soki tozali kotánga Liloba na ye mokolo na mokolo, koyekola yango mbala na mbala, mpe komanyola makambo oyo tozali kotánga, makoki na biso ya kokanisa ekokola. Kokola yango esalemaka nokinoki te. Lokola kaka nzoto ya mwana, kokola na elimo esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe emonanaka mbala moko te. Yango wana tosengeli kozala motema molai, mpe kolɛmba nzoto te soki tozali komona mbongwana noki te. Nzokande, atako tolekisi ntango mingi, soki tosali eloko moko te, makoki na biso ya kokanisa ekokola te. Esengeli kosalela ntango yango mpo na koyekola Liloba ya Nzambe ndenge toutaki koloba yango, mpe tosengeli kosalela Liloba yango na bomoi na biso na ndenge mpenza makoki na biso ezali kopesa nzela.​—Baebele 5:14.

Tokoki koloba ete mibeko ya Nzambe emekaka botosi na biso, mitinda na ye emekaka makasi ya elimo na biso mpe mposa na biso ya kosepelisa ye. Wana tozali kokola na elimo, tokobanda kolinga mingi komekola Yehova ná Mwana na ye. Liboso ya kozwa bikateli, tokozala na mposa ya kotalela makanisi ya Nzambe na kati ya Biblia. Soki tozali kosepelisa Tata na biso ya likoló na makambo nyonso, tokomona ete esengo na biso mpe ekobakisama.

[Bililingi na lokasa 23]

Mboka na mboka bato bazalaka na ndenge na bango ya kolata, kasi tosengeli kolanda mitinda ya Biblia ntango tozali kopona molato