Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Batatoli ya Yehova bandimaka ete minganga básalisa bango na biloko mosusu ya mikemike oyo babendaka na kati ya makila?

Eyano oyo ebimaká na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yuni 2000.

Eyano ya libosoliboso ezali ete Batatoli ya Yehova bandimaka te ete bázongisa bango makila. Tondimaka mpenza ete mobeko ya Nzambe mpo na makila ekoki kobongolama te mpo na kolanda makanisi ya bato oyo ezali kobongwana. Kasi, mituna mosusu ekómi kotunama mpamba te, lelo oyo, minganga bakoki kokabola biloko minei ya ntina mingi oyo esangani mpo na kosala makila, mpe bakoki lisusu kokabola biloko yango mpe kobimisa biloko mosusu mikemike. Mpo na kondima to koboya nkisi oyo esalemi na biloko yango, moklisto asengeli kosuka kaka na kotalela makama to matomba na yango te. Akoluka koyeba libosoliboso makambo oyo Biblia elobi mpe soki likambo oyo andimi ekobebisa te boyokani na ye na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.

Ezali mpasi te koyeba makambo ya ntina. Mpo na kosalisa biso tóyeba mpo na nini tolobi bongo, tótalela mwa masolo ya Biblia, makambo mosusu oyo eleká mpe makambo oyo etali lisalisi ya minganga.

Yehova Nzambe ayebisaki Noa, nkɔkɔ na biso nyonso ete makila esengeli kotalelama lokola eloko ya ntina mingi. (Genese 9:3, 4) Na nsima ya bambula mingi, mibeko oyo Nzambe apesaki na libota ya Yisalaele emonisaki ete makila ezali bulɛɛ, yango wana Nzambe alobaki boye: “Soko moto nani na ndako na Yisalaele, to moto kati na bapaya . . . alei makila, mbɛ nakokangela moto yango elongi, oyo alei makila.” Moyisalaele oyo abuki mobeko ya Nzambe akokaki kobebisa bato mosusu, yango wana Nzambe abakisaki ete: “Nakolongola ye na kati ya bato na ye.” (Levitike 17:10) Bikeke mingi na nsima, na likita moko oyo esalemaki na Yelusaleme, bantoma na mikóló bazwaki ekateli ete tosengeli ‘koboya makila.’ Tosengeli mpenza kotosa likambo yango ndenge moko toboyaka pite to ekobo mpe losambo ya bikeko.​—Misala 15:28, 29.

‘Koboya’ elimbolaki nini na ntango wana? Baklisto bazalaki kolya makila te, ezala ya mobesu to ya kolamba; bazalaki mpe koboya kolya mosuni ya nyama oyo babimisi makila te, elingi koloba oyo bakati yango nkingo te. Lisusu, basengelaki koboya biloko ya kolya oyo batii makila, lokola boudin oyo basali na makila. Soki moto alei makila na ndenge wana, abuki mobeko ya Nzambe.​—1 Samwele 14:32, 33.

Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki komitungisa te na likambo ya kolya to komela makila, ndenge tokoki komona yango na makambo oyo Tertullien akomaki (azalaki na bomoi na ekeke ya mibale mpe ya misato T.B.). Mpo na kopesa eyano na ndenge bakoselaki baklisto makambo ete bazalaki kolya to komela makila, Tertullien atángaki mabota oyo bazalaki komelana makila lokola ndanga ya boyokani oyo bazalaki kosala. Alobaki lisusu ete “ntango masano ezalaki kosalama na mabándá ya masano ya Loma, [bato mosusu] bazalaki na lokoso ya komela makila oyo ezali naino na mɔtɔ ya moto oyo babomi, . . . lokola nkisi mpo na maladi ya ndɛkɛ.”

Makambo wana ezalaki mabe mpo na baklisto (atako bato mosusu ya Loma bazalaki kosala yango mpo na koluka kosilisa maladi). Tertullien akomaki ete: “Na biloko na biso ya kolya, totyaka ata makila ya banyama te.” Mpo na komeka bosembo ya baklisto ya solosolo, Baloma bazalaki kopesa bango biloko ya kolya oyo ezali na makila. Tertullien alobaki lisusu boye: “Sikoyo natuni bino, bomoni likambo yango ndenge nini, soki bondimi mpenza [ete baklisto] balingaka makila ya banyama ata moke te, bokoki kokanisa ete bakozala na lokoso ya makila ya moto?”

Lelo oyo, bato mingi te bakotalela mobeko ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso soki monganga alobi ete bázongisa bango makila. Batatoli ya Yehova balingaka kozala na bomoi, kasi tosengeli kotosa mobeko ya Yehova mpo na makila. Yango emonisi nini na kotalela mayele oyo minganga bazali kosalela mikolo oyo?

Ntango likambo ya kozongisa bato makila ekómaki kosalema mingi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bamonaki ete likambo yango eyokani te na mobeko ya Nzambe, mpe tii lelo oyo tozali kondima ete ezali kaka bongo. Nzokande, na bambula mingi oyo eleki, minganga bakómi na mayele mingi mpe babongoli ndenge ya kosala. Lelo oyo, mpo na kozongisa bato makila bazali kosalela mingimingi makila ndenge kaka ebimi na nzoto ya moto te, kasi bobele moko na biloko ya ntina mingi oyo ezalaka na kati na yango lokola: (1) globules rouges; (2) globules blancs; (3) plaquette sanguine; (4) sérum (plasma) oyo ezalaka maimai. Mpo na bamaladi mosusu, minganga bakoki kokomela bango kaka globules rouges, to globules blancs, plaquette sanguine, to sérum. Lolenge oyo ya kozongisa moto biloko oyo ezalaka na kati ya makila epesaka nzela ete makila oyo babendi epai ya moto moko básalela yango mpo na kozongisa makila na bato mingi. Mpo na Batatoli ya Yehova, kondima kozongisa makila to biloko minei ya ntina mingi oyo esangani mpo na kosala makila ezali kobuka mobeko ya Nzambe. Kutu, lokola batosaka makambo oyo Biblia elobi mpo na makila, bamibatelaka ete makama mingi ezwa bango te, bakisa mpe maladi lokola hépatite mpe sida, oyo moto akoki kozwa yango na makila.

Kasi, lokola nsima ya kobenda biloko minei ya ntina oyo esangani mpo na kosala makila, bakoki lisusu kobenda biloko mosusu ya mikemike na mokomoko na yango, mituna ezali kotunama mpo na biloko yango oyo ezalaka na kati ya makila. Ndenge nini basalelaka yango, mpe moklisto asengeli kotalela makambo nini mpo na koyeba soki asengeli kondima to koboya yango?

Makila ezali na biloko ebele na kati na yango. Tókamata kaka plasma, yango ezali na mai mingi (90%), mpe ezali na ebele ya hormones, sels inorganiques, enzymes, mpe nutriments, bakisa mpe minéraux na sukali. Plasma ezali lisusu na baproteini lokola albumine, yango mpe nde esalaka ete makila ekangamaka mpe ezalaka na baantikore oyo ebundisaka maladi. Minganga bazwaka baproteini mingi na plasma mpe basalelaka yango. Na ndakisa, bazalaki kopesa bana ya SS, oyo basilaka makila mpambampamba, proteini babengi facteur VIII. To soki moto moko akoki kozwa bamaladi mosusu, minganga bakoki kokomela ye gamma globuline, oyo bazwi na plasma ya makila ya moto oyo nzoto na ye ekoki kobundisa bamaladi yango. Minganga basalelaka mpe baproteini mosusu ya plasma, kasi mwa bandakisa oyo tolobeli awa na likoló ezali komonisa ndenge oyo bakoki kolongola biloko mosusu na kati ya plasma ya makila. *

Ndenge kaka bakoki kobimisa biloko mingi ya ntina na plasma ya makila, bakoki mpe kobimisa biloko mosusu mikemike na globules rouges, globules blancs, plaquette sanguine. Na ndakisa, na kati ya globules blancs bakoki kobimisa ba interférons na ba interleukines, oyo basalelaka mpo na kosalisa maladi mosusu mpe bakanser. Na kati ya plaquette sanguine, bakoki mpe kobimisa biloko mosusu oyo ekaukisaka mpota. Mpe bazali kosala bankisi mosusu oyo batyaka biloko mosusu mikemike oyo euti na biloko oyo ezalaka na kati ya makila (ntango mosusu kaka na ebandeli). Bankisi yango ezali ndenge moko te na kozongisa globules rouges, globules blancs, plaquette sanguine, mpe plasma. Mbala mingi batyaka na bankisi yango kaka mwa baproteini ya makila. Moklisto asengeli kondima básalisa ye na bankisi yango oyo ezali na mwa baproteini ya makila? Tokoki koloba na esika ya moto te. Biblia epesi bandimbola mikemike na likambo yango te, yango wana moklisto mokomoko asengeli kozwa ekateli na ye na kolanda lisosoli na ye liboso ya Nzambe.

Baklisto mosusu baboyaka eloko nyonso oyo euti na makila (ezala biloko mosusu oyo ekoki kobatela bango bázwa maladi te mpo na mwa ntango). Ezali ndenge yango nde basosolaka mobeko ya Nzambe ya ‘koboya makila.’ Bazali koyeba ete mobeko oyo Nzambe apesaki bana ya Yisalaele esɛngaki ete makila oyo balongoli na ekelamu moko basengelaki ‘kosopa yango na mabelé.’ (Deteronome 12:22-24) Mpo na nini likambo yango ezali na ntina mingi boye? Mpo na kozwa biloko lokola gamma globulines, albumine mpe bongo na bongo, esɛngaka kobenda makila na nzoto ya moto mpe kokɔtisa yango na masini mpo na kobimisa biloko yango. Yango wana, baklisto mosusu baboyaka bankisi yango, se lokola baboyaka bázongisa bango makila to biloko minei ya ntina mingi oyo esangani mpo na kosala makila. Esengeli kotosa ekateli na bango oyo bazwi na bosembo mpe na lisosoli malamu.

Baklisto mosusu basalaka ndenge yango te. Bango mpe baboyaka bázongisa bango makila, to mpe kaka globules rouges, globules blancs, to plaquette sanguine, to plasma. Kasi, bakoki kondima ete monganga asalisa bango na nkisi oyo ezali na ndambo moke ya biloko mosusu oyo euti na biloko ya ntina mingi oyo ezalaka na kati ya makila. Ata bongo mpe bakesenisaka makambo. Moklisto mosusu akoki kondima bápesa ye gamma globuline, kasi akoki koboya bápesa ye nkisi oyo ezali na eloko moko oyo euti na globules rouges to globules blancs. Kasi, na nyonso oyo, nini ekoki komema baklisto mosusu báloba ete bakoki kondima nkisi oyo ezali na ndambo moke ya biloko oyo euti na makila?

“Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1990, elobaki ete baproteini ya plasma ya makila ya mwasi oyo azali na zemi elekaka tii na makila ya mwana oyo azali na kati ya libumu, atako makila na bango esanganaka te. Na bongo, mama apesaka mwana immunoglobulines, mpe yango epesaka mwana biloko ya ntina oyo ekobatela ye mpo azwa maladi mosusu te. Ntango globules rouges ya nzoto ya mwana oyo azali na libumu ekufi, biloko na yango oyo ememaka oxygène ebimaka na nzoto. Ndambo na yango ya ntina ekómaka bilirubine, mpe elekaka kukú (placenta) tii na nzoto ya mama mpe ebimaka nzela moko na bosɔtɔ ya nzoto. Baklisto mosusu bakoki koloba ete lokola mwa biloko mosusu oyo ezalaka na kati ya makila ya moto moko ekoki kokɔta epai ya moto mosusu ndenge esalemaka ntango mwana azali na libumu ya mama, bakoki kondima bápesa bango nkisi oyo basali yango na mwa ndambo moke ya biloko oyo ezalaka na kati ya plasma to, globules rouges, to globules blancs.

Lokola moto na moto akoki kozwa ekateli oyo ekeseni na moto mosusu na kotalela makanisi mpe lisosoli na ye, elingi koloba ete likambo yango ezali mpenza na ntina mingi te? Te. Ezali na ntina mingi. Kasi, ezali na likambo moko ya ntina mingi mpe ya mindɔndɔ te oyo tosengeli koyeba. Makambo oyo touti kolobela awa emonisi ete Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila mpe biloko ya ntina oyo ezalaka na kati ya makila. Biblia epesi baklisto mobeko ete ‘báboya biloko bipesameli bikeko, na makila, na banyama bakamolami, na ekobo.’ (Misala 15:29) Longola wana, soki ekómi likambo ya biloko mosusu oyo euti na biloko wana ya ntina, moklisto mokomoko, nsima ya kokanisa malamumalamu, asengeli kozwa ekateli na ye.

Bato mingi bandimaka nkisi nyonso oyo emonani ete ekopesa matomba ya nokinoki, ata mpo na nkisi oyo eyebani malamu ete ezali na makama mingi. Ezali mpenza solo ete nkisi oyo basali na makila ezalaka na makama mingi. Moklisto oyo azali sembo asalaka makasi ayeba nkisi yango malamu mpe azala na bokatikati, kasi asuka kaka te na koluka kobikisa nzoto na ye. Batatoli ya Yehova basepelaka na milende minganga basalaka mpo na kosalisa bato na nkisi ya malamu, mpe batalelaka makama mpe matomba ya nkisi nyonso oyo balingi kopesa bango. Kasi, soki ekómi likambo ya bankisi oyo basali na makila, balandelaka malamumalamu makambo oyo Nzambe alobi mpe babatelaka boyokani na bango na Ye oyo apesi biso bomoi.​—Nzembo 36:9.

Ezali mpenza lipamboli mpo na moklisto oyo azali kotyela Nzambe motema lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “[Yehova] Nzambe azali moi mpe nguba, [Yehova] akopesa ngɔlu mpe nkembo; akoboya kopesa eloko malamu soko moke te na baoyo bazali kotambola alima. [Yehova] . . . , esengo ezali na moto oyo akotyaka elikya na ye epai na yo”!​—Nzembo 84:11, 12.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1978 (ebimeli ya Lifalanse), mpe 1 Ɔkɔtɔbɛ 1994. Na balaboratware mosusu epai basalaka bankisi, basalaki bankisi oyo euti na makila te oyo bakoki kokomela moto na esika ya biloko mosusu oyo ezalaka na kati ya makila oyo bazalaki kosalela liboso.

[Etanda na lokasa 31]

MITUNA OYO OKOKI KOTUNA MONGANGA

Soki balingi kosala yo lipaso to kosalisa yo na nkisi oyo basali na makila, tuná:

Minganga na balifulume nyonso oyo bazali awa mpo na kosalisa ngai, bayebi ete lokola nazali Motatoli ya Yehova, nasɛngi ete bázongisa ngai makila te ata ndenge nini?

Soki mbala mosusu, nkisi oyo bakomeli yo basali yango na plasma, globules rouges, globules blancs, to plaquette sanguine oyo bazwi na makila, tuná:

Basali nkisi yango na moko na biloko minei ya ntina mingi oyo esangani mpo na kosala makila? Soki ezali bongo, okosepela kolimbwela ngai ndenge basali yango?

Biloko oyo euti na makila ezali mingi na nkisi oyo bakopesa ngai?

Soki na lisosoli na ngai nandimi kozwa nkisi yango, makama na yango ezali nini?

Soki na lisosoli na ngai naboyi nazwa nkisi yango, nkisi nini mosusu bokoki kopesa ngai?

Soki nataleli likambo yango na mozindo, ntango nini nakoki koyebisa ekateli na ngai?