Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na 2 Bakolinti 6:14, Paulo azali koloba mpo na banani ntango asaleli maloba “bato oyo bazali bandimi te”?

Na 2 Bakolinti 6:14, tozali kotánga boye: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te.” Soki totaleli maloba oyo ezali zingazinga, tokomona ete Paulo azali koloba mpo na bato oyo bazali basangani ya lisangá ya boklisto te. Ndimbola wana endimami na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia epai Paulo asaleli maloba “moto oyo azali mondimi te” to “bato oyo bazali bandimi te.”

Na ndakisa, Paulo azali kopamela baklisto mpo bazali kokende na esambiselo “liboso ya bato oyo bazangi kondima.” (1 Bakolinti 6:⁠6) Awa, bato oyo bazangi kondima ezali basambisi oyo bazalaki kosala na esambiselo ya Kolinti. Na mokanda na ye ya mibale, Paulo alobi ete Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” Miso ya bato yango oyo bazangi kondima ‘ezipami na elamba’ mpo bámona nsango malamu te. Bato yango oyo bazangi kondima bazali kosepela te kosalela Yehova, mpo Paulo alimbolaki yango liboso ete: “Ntango moto abongwani epai ya Yehova, elamba yango ya kozipa elongwe.”​—⁠2 Bakolinti 3:16; 4:⁠4.

Bato mosusu oyo bazali bandimi te bamipesaka na kotyola mibeko to na losambo ya bikeko. (2 Bakolinti 6:15, 16) Kasi, bango nyonso batɛmɛlaka basaleli ya Yehova te. Bamosusu basepelaka na solo. Mingi bazali na babalani oyo bazali baklisto mpe basepelaka kofanda na bango. (1 Bakolinti 7:12-14; 10:27; 14:22-25; 1 Petelo 3:1, 2) Kasi, Paulo azali mbala mingi kosalela maloba “moto oyo azali mondimi te” na bato oyo, lokola touti kolobela yango, bazali te basangani ya lisangá ya boklisto, oyo esalemi na “bandimi na kati ya Nkolo.”​—⁠Misala 2:41; 5:14; 8:12, 13.

Etinda oyo ezwami na 2 Bakolinti 6:14 ezali lilako moko ya malamu oyo ezali kotambwisa baklisto na makambo nyonso ya bomoi mpe mbala mingi yango etángamaka mpo na kopesa toli ya mayele epai ya baklisto oyo bazali koluka mwasi to mobali ya kobala. (Matai 19:4-6) Moklisto ya mayele oyo amipesi mpe azwi batisimo alukaka te mobalani kati na bato oyo bazali na kondima te, mpo mitinda, mikano, mpe bindimeli ya bato oyo bazali na kondima te, ekeseni mpenza na oyo ya moklisto ya solosolo.

Kasi, ezali boni mpo bato oyo bazali koyekola Biblia mpe kosangana na lisangá ya boklisto? Ezali boni mpo na baoyo bazali basakoli oyo bazwi naino batisimo te? Bango bazali bato oyo bazali na kondima te? Te. Bato oyo bayambi solo etali nsango malamu mpe bazali kokola mokemoke tii na kozwa batisimo, bakobengama te bato oyo bazali na kondima te. (Baloma 10:10; 2 Bakolinti 4:13) Liboso ete azwa batisimo, Koloneyi abengamaki “moto oyo amipesá na losambo mpe oyo azalaki kobanga Nzambe.”​—⁠Misala 10:⁠2.

Na bongo, ekozala mpenza likambo ya mayele ete moklisto oyo amipesá na Nzambe alinga mpe abala moto oyo andimami lokola mosakoli, oyo azwi naino batisimo te, kaka mpo toli ya Paulo, oyo ezali na 2 Bakolinti 6:14, etaleli mpenza moto yango te? Te, ekozala likambo ya mayele te. Mpo na nini? Mpo yango eyokani te na toli ya polele oyo Paulo apesaki epai ya baklisto basi oyo mibali na bango bakufá. Paulo akomaki ete: “Azali na bonsomi ya kobalana ná mobali oyo ye alingi, nde na kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakolinti 7:39) Na boyokani na toli oyo, baklisto oyo bamipesá na Nzambe balendisami ete basengeli koluka mobalani kaka kati na baoyo bazali “na kati ya Nkolo.”

Maloba “na kati ya Nkolo” mpe oyo mosusu ekokani na yango “na kati ya Klisto” elimboli mpenza nini? Paulo alobeli bato oyo bazalaki “na kati ya Klisto” to “na kati ya Nkolo” na Baloma 16:8-10 mpe na Bakolose 4:⁠7. Soki otángi bavɛrsɛ wana, okomona ete bato yango bazali ‘baninga ya mosala,’ ‘bato oyo bandimamá,’ ‘bandeko balingami,’ ‘baministre ya sembo,’ mpe ‘baninga baombo.’

Ntango nini moto akómaka “moombo na kati ya Nkolo”? Yango esalemaka ntango andimi kosala oyo moombo asengeli kosala mpe amiboyi ye moko. Yesu alimboli boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Moto abandaka kolanda Klisto mpe kotosa mpenza mokano ya Nzambe ntango amipesi ye moko epai ya Nzambe. Na nsima, andimaka kozwa batisimo mpe akómaka ministre oyo andimami liboso ya Yehova Nzambe. * Na bongo, ‘kobala na kati ya Nkolo’ elimboli kobala moto oyo amonisi polele ete azali mpenza mondimi, “moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Klisto,” oyo amipesi​—⁠Yakobo 1:⁠1.

Moto oyo azali koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe oyo azali kokola malamu na elimo ebongi azwa longonya. Nzokande, apesi naino te bomoi na ye epai ya Yehova mpe amipesi naino mobimba te na mosala mpe amiboyi naino ye moko te. Azali naino kosala mbongwana oyo esengeli. Asengeli akokisa mbongwana ya monene oyo esɛngami mpo na kokóma moklisto oyo amipesi mpe azwi batisimo liboso ya kokanisa na likambo etali libala, oyo ezali mbongwana mosusu ya monene kati na bomoi.

Mpo na moklisto, ekozala mpenza likambo ya mayele kolinga moto oyo amonani ete azali kokola malamu na boyekoli na ye ya Biblia​—⁠ mbala mosusu na likanisi ya kozela ye kino akozwa batisimo liboso ya kobala ye? Te. Makanisi ya moyekoli ya Biblia ekobulungana soki ayebi ete moklisto oyo amipesá na Nzambe alingi kobala ye, kasi azali kozela ye tii akozwa batisimo.

Mbala mingi, moto azalaka mosakoli oyo azwi naino batisimo te kaka mpo na mwa ntango, akozala bongo tii akokola mpo na kozwa batisimo. Na bongo, toli oyo epesami ya kobala na kati ya Nkolo kaka ezali mpenza likambo oyo ebongi. Kasi, ezali boni soki moto akómi na mbula ya kobala, soki abɔkwamaki na libota ya boklisto, azali na molende kati na lisangá banda mwa bambula, mpe azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te? Soki ezali bongo, eloko nini ezali kopekisa ye apesa bomoi na ye epai ya Yehova? Mpo na nini azali kokakatana? Azali nde kobɛta ntembe? Atako azali te moto oyo azangi kondima, tokoki te koloba ete azali “na kati ya Nkolo.”

Toli ya Paulo na ntina ya libala ezali mpo na litomba na biso. (Yisaya 48:17) Ntango mobali mpe mwasi oyo balingi kobalana bazali bato oyo basilá komipesa epai ya Yehova, ndai oyo bakolapa na libala ekozwa moboko moko makasi na elimo. Bazali na mitinda ndenge moko mpe na mikano ndenge moko. Yango esalaka ete libala ezala mpenza ya esengo. Lisusu, moto oyo ‘abali na kati ya Nkolo,’ azali komonisa bosembo epai ya Yehova, mpe yango epesaka mapamboli ya seko, mpo “epai na moto ya sembo [Yehova] akomimonisa sembo.”​—⁠Nzembo 18:⁠25.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 10 Mpo na baklisto bapakolami, oyo Paulo akomelaki mpenza mokanda oyo, kozala “moombo na kati ya Nkolo” esɛngaki lisusu epai na bango bápakolama lokola bana ya Nzambe mpe bandeko ya Klisto.

[Elilingi na lokasa 31]

“Epai na moto ya sembo [Yehova] akomimonisa sembo”