Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?

Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?

Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?

MBALA mosusu okokamwa na koyoka ete masolo ya Biblia oyo elobeli bomoi ya Yesu na mabelé esaleli ata mbala moko te liloba oyo monɔkɔ ya Grɛki ezalaki kosalela mpo na liloba “likamwisi.” Liloba ya Grɛki (dunamis), oyo ebongolami na bantango mosusu “likamwisi,” elimboli mpenzampenza “nguya.” (Luka 8:46) Ekoki mpe kobongolama “likoki” to ‘misala ya nguya.’ (Matai 11:20; 25:15) Moto moko ya mayele alobi ete liloba wana ya Grɛki “emonisi mpenza mosala ya nguya oyo esalemi, mpe, mingimingi, nguya oyo esali ete mosala yango esalema. Balobeli likambo yango mpo na komonisa ete nguya ya Nzambe nde esali yango.”

Liloba mosusu ya Grɛki (téras), oyo ebongolamaka “makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya” to “likambo ya kokamwa.” (Yoane 4:48; Misala 2:19) Emonisaka mpenza ndenge bato oyo bamoni likambo yango bayoki. Mbala mingi, ebele ya bato mpe bayekoli bazalaki kokamwa na komona misala ya nguya oyo Yesu asalaki.​—⁠Malako 2:12; 4:41; 6:51; Luka 9:⁠43.

Liloba ya misato ya Grɛki (sêmeïon) oyo elobelaka makamwisi ya Yesu elakisi “elembo.” Robert Deffinbaugh, moto moko ya mayele, alobi ete yango “emonisi mingimingi ntina mpenza ya likamwisi.” Alobi lisusu boye: “Elembo ezali likamwisi oyo ezali koteya likambo ya solo na ntina etali Nkolo na biso Yesu.”

Bokosi to nguya oyo euti na Nzambe?

Biblia elobi te ete makamwisi ya Yesu ezalaki mayele mabe to makambo ya bokosi mpo na kosepelisa bato. Ezalaki nde komonisa ‘nguya monene ya Nzambe,’ lokola na ntango oyo Yesu abenganaki demo moko epai ya elenge mobali moko. (Luka 9:37-43) Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Ye Oyo balobi mpo na ye ete azali na ‘nguya monene,’ akoki te kosala misala ya nguya ya ndenge wana? (Yisaya 40:26) Ya solo, akoki kosala yango!

Masolo ya Baevanzile elobeli makamwisi soki 35 ya Yesu. Kasi motángo nyonso ya makamwisi na ye eyebisami te. Na ndakisa, Matai 14:14 elobi boye: “[Yesu] amonaki ebele mpenza ya bato; mpe ayokelaki bango mawa, mpe abikisaki bato na bango ya maladi.” Bayebisi biso te soki bato boni ya maladi abikisaki na mokolo yango.

Misala yango ya nguya ezalaki na ntina mingi mpo na kolongisa maloba ya Yesu ete azalaki Mwana ya Nzambe, Masiya oyo alakamaki. Makomami emonisaki mpenza ete nguya oyo euti na Nzambe nde esalisaki Yesu asala makamwisi. Ntoma Petelo alobaki ete Yesu azali “mobali oyo Nzambe amonisaki epai na bino polele na nzela ya misala ya nguya mpe na makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe na bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye katikati na bino, ndenge bino moko boyebi.” (Misala 2:22) Mokolo mosusu, Petelo amonisaki ete “Nzambe apakolaki ye [Yesu] na elimo santu mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba kosaláká malamu mpe kobikisáká baoyo nyonso banyokolami na Zabolo; mpamba te Nzambe azalaki elongo na ye.”​—⁠Misala 10:37, 38.

Makamwisi ya Yesu ezalaki kokende nzela moko na nsango oyo azalaki kosakola. Malako 1:21-27 emonisi ndenge ebele ya bato basalaki ntango bayokaki mateya ya Yesu mpe bamonaki moko ya makamwisi na ye. Malako 1:22 elobi ete ebele yango ya bato “bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya,” mpe vɛrsɛ 27 emonisi ete bato “bakamwaki” ntango abenganaki demo moko. Misala ya nguya oyo Yesu asalaki mpe nsango oyo azalaki kosakola emonisaki polele ete azalaki Masiya oyo alakamaki.

Yesu asukaki kaka te na koloba ete azali Masiya; maloba na ye mpe misala mosusu, bakisá mpe nguya oyo euti na Nzambe, oyo emonanaki na makamwisi na ye, emonisaki polele ete azali Masiya. Ntango batunaki ye mituna mpo na mosala mpe mokumba na ye, na mpiko nyonso, Yesu ayanolaki boye: “Nazali na litatoli oyo eleki litatoli ya Yoane [Mobatisi], mpo misala mpenza oyo Tata na ngai apesaki ngai nasala, misala wana mpenza oyo nazali kosala, ezali kotatola na ntina etali ngai ete Tata atindaki ngai.”​—⁠Yoane 5:⁠36.

Makambo oyo emonisi ete ezalaki ya solo

Mpo na nini tokoki kondima ete makamwisi ya Yesu ezalaki ya solo, ya lokuta te? Talá mwa makambo oyo emonisi ete ezalaki ya solo.

Ntango azalaki kosala misala na ye ya nguya, Yesu azalaki ata moke te kobenda likebi ya bato epai na ye moko. Asalaki nyonso ete, na nsuka ya likamwisi nyonso, bato bámona ete euti na Nzambe mpe Nzambe azwa nkembo. Na ndakisa, liboso ya kobikisa moto moko oyo akufá miso, Yesu amonisaki mpenza ete akobikisa ye “mpo misala ya Nzambe emonana polele na likambo na ye.”​—⁠Yoane 9:1-3; 11:1-4.

Na bokeseni na bakosi, bato ya maji, mpe na bato oyo balobaka ete babikisaka bato na nzela ya mabondeli, Yesu asalelaki ata moke te mayele ya kolalisa moto mpo na kotambwisa makanisi na ye, bokosi, milulu ya kafukafu, maloba ya maji, to mpe milulu moko oyo ezali kolamwisa mayoki ya bato. Asalelaki biyambayamba te to biloko oyo bato bakanisaka ete ezali mosantu. Talá ndenge ezangi mindɔndɔ oyo Yesu abikisaki bato mibale oyo bakufá miso. Lisolo elobi boye: “Lokola mawa ekangaki ye, Yesu asimbaki miso na bango, mpe na mbala moko bakómaki komona, mpe balandaki ye.” (Matai 20:29-34) Ata molulu moko ezalaki te, mpe alukaki komilakisa te. Yesu asalaki misala na ye ya kokamwa na miso ya bato, mbala mingi, liboso ya bato ebele. Asalelaki te miinda moko boye, to ebaelo, to mpe bisaleli moko boye. Nzokande, oyo bato babengaka makamwisi na ntango na biso, mbala mingi, eloko moko te emonisaka ete esalemaki.​—⁠Malako 5:24-29; Luka 7:11-15.

Na bantango mosusu, Yesu andimaki ete bato oyo asalelaki bango makamwisi bazalaki na kondima. Kasi ata ntango moto azangaki kondima, yango epekisaki Yesu te ete asala likamwisi. Wana azalaki na Kapalanauma na Galilai, “bamemelaki ye bato mingi oyo bazalaki na bademo; mpe abimisaki bilimo yango na liloba moko, mpe abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te.”​—⁠Matai 8:⁠16.

Yesu asalaki makamwisi na ye mpo na kosalisa bato na makambo oyo nzoto na bango ezalaki mpenza na mposa na yango, kasi te mpo na kosepelisa moto moko boye oyo azalaki koluka komona yango. (Malako 10:46-52; Luka 23:⁠8) Mpe ata mbala moko te Yesu asalaki likamwisi mpo na litomba na ye moko.​—⁠Matai 4:2-4; 10:⁠8.

Tokoloba nini mpo na masolo ya Baevanzile?

Toyebi masolo ya makamwisi ya Yesu na nzela ya Baevanzile minei. Awa tozali kotalela bosolo ya makamwisi oyo balobi ete Yesu asalaki, ntina ezali mpenza mpo tótyela masolo yango motema? Ɛɛ, bantina ezali.

Ndenge tomonaki yango, makamwisi ya Yesu ezalaki kosalema na miso ya bato, liboso ya bato ebele. Baevanzile ya libosoliboso ekomamaki na ntango oyo mingi kati na bato oyo bamonaki makamwisi yango bazalaki naino na bomoi. Buku Makamwisi mpe lisekwa (na Lingelesi) elobi boye mpo na bosembo ya bato oyo bakomaki Baevanzile: “Ekozala mpenza kozanga bosembo soki moto alobi ete bato oyo bakomaki Baevanzile balobelaki makambo oyo esalemaki solo, kasi batondisaki mpe na nko mpenza masolo ya makambo oyo babengi makamwisi mpo na koluka kaka kopalanganisa mateya ya lingomba na bango. . . . Mokano na bango ezalaki ya kokoma makambo na bosembo.”

Bayuda oyo bazalaki kotɛmɛla Lingomba boklisto babɛtaki ntembe ata moke te ete misala ya nguya oyo elobelami na kati ya Baevanzile esalemaki te. Babɛtaki ntembe kaka mpo na nguya oyo esalaki ete makamwisi yango esalema. (Malako 3:22-26) Ata bato oyo, na nsima, bazalaki koloba mabe mpo na Yesu, bakokaki te kowangana makamwisi na ye. Kutu, na ekeke ya liboso mpe na oyo ya mibale T.B., ezali na mikanda oyo ezali kolobela misala ya kokamwa oyo Yesu asalaki. Ya solo, ebongi mpenza tótalela masolo ya Baevanzile oyo elobeli makamwisi na ye ete ezali ya solo.

Moto oyo asalaki makamwisi yango

Tokosilisa mpenza te kotalela makamwisi ya Yesu soki tosuki kaka na komonisa ete esalemaki mpenza. Ntango Baevanzile ezali kolobela misala ya nguya oyo Yesu asalaki, ezali komonisa ete azalaki moto moko motema mawa mpe boboto mingi koleka bato nyonso, mpe azalaki komibanzabanza mpenza mpo na bolamu ya bato mosusu.

Talá ndakisa ya moto moko ya maba oyo ayaki epai ya Yesu; na mawa nyonso, abondelaki ye boye: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” ‘Mawa ekangaki Yesu’ mpe asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki moto yango mpe alobaki boye: “Nalingi. Kómá pɛto.” Na mbala moko, moto yango abikaki. (Malako 1:40-42) Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete azalaki komitya na esika ya basusu, ezaleli oyo ezalaki kotinda ye asalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kosala makamwisi.

Nini esalemaki ntango Yesu akutanaki na bato bazali kobima na engumba Naini mpo na kokende kokunda ebembe? Elenge mobali oyo akufaki azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko oyo akufelá mobali. ‘Yesu ayokelaki mwasi yango mawa,’ apusanaki pene na ye mpe alobaki boye: “Tiká kolela.” Na nsima, asekwisaki mwana na ye.​—⁠Luka 7:11-15.

Liteya oyo ezali kobɔndisa biso, oyo tokoki kozwa na makamwisi ya Yesu, ezali ete azalaki ‘koyokela bato mawa’ mpe asalaki makambo mpo na kosalisa bato. Kasi makamwisi yango ezali kaka makambo eleká te. Baebele 13:8 elobi boye: “Yesu Klisto azali se ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela.” Sikoyo, azali koyangela lokola Mokonzi kuna na likoló, azali kozela mpe azali na likoki ya kosalela nguya oyo Nzambe apesá ye mpo na kosala makamwisi mingi koleka ndenge oyo asalaki ntango azalaki moto awa na mabelé. Mosika te, Yesu akosalela nguya yango mpo na kobikisa bato oyo bazali na botosi. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo oyeba makambo mosusu na ntina etali elikya oyo kitoko mpo na mikolo ekoya.

[Bililingi na lokasa 5]

Makamwisi ya Yesu ezalaki komonisa ‘nguya monene ya Nzambe’

[Elilingi na lokasa 7]

Yesu azalaki moto moko ya motema mawa mingi