Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo

Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo

Zalá na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na yo

“SOKI moto ayebi te na libongo nini azali kokende, akipaka te soki mopɛpɛ oyo ezali kotindika masuwa na ye ekomema ye na esika alingi.” Maloba oyo ya Moloma moko ya ekeke ya liboso, oyo azalaki moto ya filozofi, ezali komonisa bosolo ya likambo oyo: mpo moto atambwisa bomoi na ye malamu, asengeli kozala na mikano.

Biblia epesi bandakisa ya bato oyo bazalaki na mikano na bomoi na bango. Na boumeli ya mbula soki 50, Noa asalaki mosala ya ‘kotonga masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.’ Mosakoli Moize “azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Baebele 11:​7, 26) Yosua, mokitani ya Moize, azalaki na mokano oyo Nzambe apesaki ye, mokano ya kozwa mokili ya Kanana.​—⁠Deteronome 3:​21, 22, 28; Yosua 12:​7-24.

Na ekeke ya liboso T.B., ntembe ezali te ete maloba ya Yesu oyo ete “nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami” nde etindaki mpenza ntoma Paulo azala na mikano ya elimo oyo amityelaki. (Matai 24:14) Lokola Paulo alendisamaki na maloba mpe bimonaneli oyo Nkolo Yesu apesaki ye, bakisá mpe mosala ya “komema nkombo [ya Yesu] epai ya bikólo mosusu,” asalaki mosala monene mpo na kofungola ebele ya masangá ya baklisto banda na Asie Mineure tii na Mpoto.​—⁠Misala 9:15; Bakolose 1:⁠23.

Ya solo, banda kala, basaleli ya Yehova bazalaka na mikano ya malamu mpe bakokisaka yango, mpo na lokumu ya Nzambe. Ndenge nini tokoki lelo oyo komityela mikano ya elimo? Mikano nini tokoki kosala makasi mpo na kokokisa mpe matambe nini tokoki kosala mpo na kokokisa yango?

Kozala na makanisi malamu ezali na ntina

Tokoki komityela mikano na makambo nyonso ya bomoi na biso; mokili oyo mpe ezali na bato oyo bamityelaka oyo ya bango mikano. Nzokande, mikano ya elimo ekokani te na oyo ya bato ya mokili, oyo balukaka lokumu. Na mokili, mikano mingi oyo bato bamityelaka eutaka libosoliboso na mposa makasi ya kozala na bozwi mpe mposa oyo esilaka te ya kozala na lokumu mpe na bokonzi. Oyo nde libunga monene tokosala soki tomityeli mokano ya koluka bokonzi mpe lokumu mingi! Mikano oyo ekumisaka Yehova Nzambe ezali mikano oyo ekangani na losambo na biso epai na ye mpe na makambo oyo etali Bokonzi. (Matai 6:33) Mikano ya ndenge wana eutaka na bolingo oyo moto azali na yango mpo na Nzambe mpe mpo na mozalani na ye mpe mpo azali koluka kokangama na Nzambe.​—⁠Matai 22:​37-39; 1 Timote 4:⁠7.

Tiká ete tózalaka na makanisi ya pɛto ntango tozali komityela mikano ya elimo mpe tozali koluka kokokisa yango, ezala tozali koluka kozwa mikumba mosusu na lisangá to tozali koluka kokola biso moko na elimo. Nzokande, na bantango mosusu, ata mikano oyo euti na makanisi ya malamu ekokisamaka te. Ndenge nini tokoki komityela mikano mpe kosala ete tókoka kokokisa yango?

Esengeli kozala na mposa makasi

Talá ndenge Yehova akokisaki mosala ya kozalisa molɔ́ngɔ́. Maloba “mpokwa ná ntɔngɔ ezalaki” emonisi ete Yehova akabolaki bileko ya bozalisi. (Genese 1:​5, 8, 13, 19, 23, 31) Na ebandeli ya eleko mokomoko ya bozalisi, ayebaki malamu mokano na ye, to likambo oyo azalaki koluka kosala, na mokolo to eleko yango. Bongo nde Nzambe akokisaki mokano na ye ya kozalisa biloko. (Emoniseli 4:11) Yobo alobaki boye: “Oyo elingi molimo [ya Yehova], akosala yango.” (Yobo 23:13) Yehova azalaki mpenza na esengo mingi ya komona “biloko nyonso bisilaki ye kozalisa” mpe ya koloba ete ezali “malamu mingi.”​—⁠Genese 1:⁠31.

Mpo mikano na biso ekokisama, biso mpe tosengeli kozala na mposa makasi ya kokokisa yango. Nini ekosalisa biso na kozala na mposa makasi ya boye? Ata ntango mabelé ezalaki kaka bongobongo mpe mpamba, Yehova azalaki komona nsuka ya mosala na ye: ndenge mabelé ekozala biju moko ya kitoko mingi na molɔ́ngɔ́, oyo ekopesa ye nkembo mpe lokumu. Ndenge moko mpe, tokoki kokolisa mposa na biso ya kokokisa likambo oyo tokani kosala soki tozali kokanisa na ndenge makambo ekosuka mpe na matomba oyo tokozwa soki tokokisi mokano yango. Tony, elenge mobali ya mbula 19, asalaki yango. Abosanaki te ndenge ayokaki na motema mokolo ya liboso oyo akendaki kotala biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo moko ya Mpoto. Kobanda ntango wana, motuna oyo ezalaki ntango nyonso na makanisi ya Tony ezalaki oyo: ‘Kozala na esika ya boye mpe kosala wana ekozala ndenge nini?’ Tony atikaki ata moke te kokanisa na libaku yango, mpe akobaki koluka kokokisa yango. Oyo nde esengo azalaki na yango ntango bambula mingi na nsima, bandimaki ye aya kosala na biro yango!

Kozala esika moko na bato mosusu oyo basilá kokokisa mokano moko boye ekoki mpe kosala ete tókóma na mposa ya kokokisa yango. Jayson, oyo azalaki na mbula 30, azalaki kolinga mosala ya kosakola te ntango azalaki naino na bambula zomi na ndambo. Kasi ntango asilisaki kelasi na ye ya ntei, na mposa makasi, abandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe akómaki bongo mosakoli ya ntango nyonso. Nini esalisaki Jayson alona mposa ya mosala ya mobongisi-nzela? Apesi eyano boye: “Kosolola na bato oyo bazalaki babongisi-nzela mpe kosakola elongo na bango elendisaki ngai mingi.”

Kokoma mikano na biso ekoki kosalisa biso

Soki tozali na likanisi moko boye, likanisi yango ekozala polele mpenza soki tomonisi yango na maloba. Salomo amonaki ete maloba oyo ebongi ekoki kozala na nguya mingi lokola mangenda ya nsɔngɛ mpo na kotambwisa bomoi ya moto. (Mosakoli 12:​11NW) Soki maloba yango ekomami na papye, etikalaka mpenza na makanisi mpe na motema. Okanisi ete ezali mpamba nde Yehova apesaki bakonzi ya Yisalaele etinda ya kosala kopi na bango moko ya Mibeko? (Deteronome 17:18) Na yango, tokoki kopona kokoma na papye mikano na biso mpe mayele ya kokokisa yango, kotya na molɔngɔ mikakatano oyo tokanisi ete tokokutana na yango mpe ndenge ya kolonga yango. Ekoki mpe kozala malamu koyeba makambo oyo tosengeli koluka koyekola, makoki oyo tosengeli kokolisa, mpe bato oyo bakoki kosalisa mpe kosunga biso.

Geoffrey, oyo aumeli mingi na mosala ya mobongisi-nzela monene na teritware moko ya mosika, na Azia, akómaki na kimya mpo amityelaki mikano ya elimo. Mawa ekwelaki ye ntango mwasi na ye akufaki na mbalakaka. Nsima ya mwa ntango ya komesana lisusu, Geoffrey aponaki komityela mikano mpo amikɔtisa mobimba na mosala na ye ya mobongisi-nzela. Nsima ya kokoma mikano na ye na papye, abondelaki mpo abanda boyekoli ya Biblia na bato misato liboso ya nsuka ya sanza. Mokolo na mokolo azalaki kotala ndenge mosala na ye ezali kokende, mpe ntango nyonso nsima ya mikolo zomi, azalaki kotala soki azali kokende liboso. Akokisaki mokano na ye? Lokola na lapolo na ye abakisaki boyekoli ya Biblia elongo na bato minei, azalaki na esengo mingi mpenza.

Omityela naino mikano oyo okokokisa nsima mwa ntango moke

Mikano mosusu, na ebandeli, ekoki komonana mpasi mpo na kokokisa yango. Tony, oyo tolobelaki liboso, amonaki ete kosala na biro ya Batatoli ya Yehova ezalaki lokola ndɔtɔ mpo na ye mpamba te azalaki na bomoi ya mobulumobulu mpe amipesaki kutu na Nzambe te. Kasi Tony azwaki mokano ya koyokanisa bomoi na ye ná banzela ya Yehova mpe amityelaki mokano ya kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Nsima ya kokokisa mokano wana, alukaki kokóma mobongisi-nzela mosungi mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza; azwaki manaka mpe atyaki bilembo na badati oyo akanaki kobanda mokomoko ya misala yango. Nsima ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mwa ntango, akómaki komona mosala na biro yango lokola ndɔtɔ lisusu te.

Ezali mpe malamu mpo na biso kokabola mikano na biso oyo tokani kokokisa nsima ya ntango molai na mwa mikano ya kokokisa nsima ya mwa ntango moke. Mikano yango ya mikemike ekoki kozala lokola bilembo oyo tosengeli koleka mokomoko na yango tii tokokóma na nsuka ya nzela na biso, elingi koloba mokano oyo tokokokisa nsima ya ntango molai. Kotala mbala na mbala bokoli na biso na lisalisi ya bilembo wana oyo totye ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi na biso na mokano yango. Kobondela Yehova mbala na mbala mpo na mikano na biso ekosalisa mpe biso tótikala na nzela oyo tozali kolanda. Ntoma Paulo alendisi biso boye: “Bóbondelaka ntango nyonso.”​—⁠1 Batesaloniki 5:⁠17.

Esengeli kozala na ekateli makasi mpe kolendendela

Ata soki tozwi bibongiseli malamu mpo na mikano na biso mpe tozali na mposa makasi ya kokokisa yango, ezali na mikano mosusu oyo tokolonga te kokokisa yango. Na ntembe te, moyekoli Yoane Malako ayokaki mpasi mingi ntango na mobembo ya mibale ya Paulo lokola misionɛrɛ, ntoma Paulo aboyaki kokende elongo na ye! (Misala 15:​37-40) Malako asengelaki kozwa liteya na mpasi wana mpe kobongola mokano na ye mpo na kosalela Nzambe mingi. Emonani ete asalaki yango. Na nsima, Paulo alobaki malamu mpo na Malako mpe Malako asalaki elongo na ntoma Petelo na Babilone. (2 Timote 4:11; 1 Petelo 5:13) Mbala mosusu libaku ya monene koleka oyo azwaki ezali ya kokoma lisolo ya bomoi mpe ya mosala ya Yesu na lisalisi ya elimo ya Nzambe.

Ntango tozali koluka kokokisa mikano ya elimo, biso mpe tokoki kokutana na makambo oyo elɛmbisaka. Na esika ya kotika, tosengeli nde kotala oyo tosili kosala, kotalela lisusu mikano yango soki tokoki mpenza kokokisa yango mpe kobongola soki esengeli. Ntango mikakatano ebimi, tosengeli kosala milende mpo na kokende liboso, kozala na ekateli makasi mpe kolendendela. Salomo, mokonzi ya mayele, alobi na biso boye: “Pesá misala na yo epai ya [Yehova] mpe mikano na yo ekobongisama.”​—⁠Masese 16:⁠3.

Atako bongo, na bantango mosusu, likoló ya makambo oyo ekómeli biso, ekoki kozala kozanga mayele soki toluki kokokisa mokano moko boye to boye. Na ndakisa, maladi to mikumba ya libota ekoki kosala ete tókokoka te kokokisa mikano mosusu. Tóbosana te ete mbano monene oyo tozali kozela ezali nde bomoi ya seko, na likoló to na Paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Bafilipi 3:​13, 14) Ndenge nini tokozwa yango? Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Atako makambo ya bomoi na biso ekoki kopekisa biso tókokisa mokano moko boye to boye, tokoki kaka “kobanga Nzambe mpe kotosa bakomandema na ye.” (Mosakoli 12:​13NW) Mikano ya elimo esalisaka biso tóluka ntango nyonso kosala mokano ya Nzambe. Na yango, tiká tózala na mikano ya elimo mpo na kokumisa Mozalisi na biso.

[Etanda na lokasa 22]

Mikano ya elimo oyo okoki kotalela

○ Kotánga Biblia mokolo na mokolo

○ Kotánga nimero mokomoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!

○ Kokómisa mabondeli na yo malamu koleka

○ Komonisa mbuma ya elimo

○ Koluka kosalela Nzambe mingi

○ Kokóma moto oyo ayebi kosakola mpe koteya malamu

○ Kokolisa mayele ya kopesa litatoli na telefone, na libaku malamu mpe na bisika ya mombongo