Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kapadosi​—Esika bato bazalaki kofanda na bandako oyo mopɛpɛ ná mai etimolaki

Kapadosi​—Esika bato bazalaki kofanda na bandako oyo mopɛpɛ ná mai etimolaki

Kapadosi​—Esika bato bazalaki kofanda na bandako oyo mopɛpɛ ná mai etimolaki

NTOMA Petelo alobelaki Kapadosi. Mokanda na ye ya liboso oyo akomaki na lisalisi ya elimo santu, atindaki yango mpe epai ya “bafandi ya ntango mokuse oyo bapalangani na . . . Kapadosi.” (1 Petelo 1:⁠1) Kapadosi ezalaki mokili ya ndenge nini? Mpo na nini bato ya kuna bazalaki kofanda na bandako oyo batimolá na kati ya mabanga? Ndenge nini Lingomba ya boklisto ekómelaki bango?

William Ainsworth, moto moko ya Angleterre, asalaki mobembo na bambula ya 1840 mpo na komona Kapadosi; alobaki boye: “Tosutukaki tokómi na esika moko oyo etondi na mabanga minene ya nsɔngɛnsɔngɛ mpe ya makonzí ya mabanga.” Tii lelo oyo, esika yango oyo ekeseni na bisika mosusu ekamwisaka bato oyo bakendaka kotala etúká yango ya ekólo Turquie. Ndenge mabanga yango minene ekanganikangani mpe etɛlɛmi nyɛɛ na mabwaku ya Kapadosi, ezali mpenza lokola “bikeko” moko ya ndenge mosusu. Mabanga yango mosusu ezali lokola mimbonda minene oyo molai na yango kobanda na nse tii likoló ezali ya mɛtrɛ 30 to koleka. Misusu ezali nsɔngɛ lokola milongosi ya minene, lokola makonzí ya mabanga oyo babengaka obélisque, to mpe lokola mayebo.

Ezalaka kitoko mingi komona ndenge, kobanda ntɔngɔ tii mpokwa, kongɛnga ya moi epesaka mabanga yango oyo ezali lokola bikeko balangi ndenge na ndenge! Ntango ntɔngɔ etanaka, ezalaka na langi ya mwa roze. Na midi, ekómaka na langi lokola ya mpɛmbɛ ya nzoku; mpe ntango moi elalaka, ekómaka na langi ya shokola sangisá na langi ya mosaka. Eloko nini esalaki ‘esika yango oyo etondi na mabanga minene ya nsɔngɛnsɔngɛ mpe na makonzí ya mabanga’? Mpe mpo na nini bato ya etúká yango basalaki bandako na bango na kati ya mabanga yango?

Mopɛpɛ ná mai etimolaki yango

Kapadosi ezali na kati mpenza ya Anatolie, mabelé oyo esalá lokola mwa esanga, oyo ekangisi Azia ná Mpoto. Soki bangomba na yango mibale oyo ebimisaka mɔtɔ ezalaka te, mbɛlɛ etúká yango elingaki kozala ngomba moko patatalu. Eleká bankóto ya bambula, pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ makasi oyo bangomba yango ezalaki kobimisa ezipaki esika yango na mabanga ya ndenge mibale: mabanga makasi ya moindo mpe mabanga ya mwa mpɛmbɛ oyo ezali pɛtɛpɛtɛ mpe madusumadusu; mabanga oyo ya mwa mpɛmbɛ esalemaka soki putulu oyo ebimaka na ngomba ya mɔ́tɔ ekangani.

Lokola bibale, mbula mpe mopɛpɛ ebandaki kolya mabanga yango ya pɛtɛpɛtɛ, mabwaku ya mozindo ekómaki mpe kosalema. Nsukansuka, mabanga mosusu ya mineneminene oyo ezalaki pembenipembeni ya mabwaku yango epasukaki mokemoke mpe ebotaki ebele ya makonzí ya mabanga minene ya nsɔngɛnsɔngɛ; ezali na ndenge wana nde mokili yango ekómaki na mabanga wana oyo ezali lokola mayemi, oyo emonanaka epai mosusu te awa na mabelé. Mabanga yango mosusu ekómaki lokola bandako ya nzoi. Bato ya kuna bazalaki kotimola bisika ya kofanda na kati ya mabanga ya pɛtɛpɛtɛ mpe bazalaki kobakisa bashambrɛ mosusu soki libota na bango ekómi na bato mingi. Bamonaki ete bandako yango ezali kopesa malili na eleko ya molunge mpe ezali kopesa molunge na eleko ya mpiɔ.

Bomoi na esika bato ya bikólo ndenge na ndenge bazalaki kokutana

Mbala mosusu bato oyo bazalaki kofanda na madusu ya mabanga ya Kapadosi balingaki kokutana mpenzampenza te na bato mosusu soki báfandaka te na esika oyo bato ya bikoló ndenge na ndenge bazalaki kokutana. Nzela ya swa oyo ekendá nsango, elingi koloba nzela ya mombongo oyo ezalaki kokangisa Bokonzi monene ya Loma ná Chine mpe ezalaki na bolai ya kilomɛtrɛ 6 500, ezalaki koleka na Kapadosi. Longola bato ya mombongo, basoda ya Baperse, ya Bagrɛki ná oyo ya Baloma bazalaki koleka na nzela yango. Bato yango ya mibembo bazalaki komema makanisi ya sika na makambo etali losambo.

Na ekeke ya mibale L.T.B., Bayuda mosusu bakómaki kofanda na Kapadosi. Mpe Bayuda oyo bautaki na etúká yango bazalaki na Yelusaleme na mobu 33 T.B. Bazalaki wana mpo na kokumisa Fɛti ya Pantekote. Na yango, ntoma Petelo asakolaki epai ya Bayuda ya Kapadosi nsima ya ntango oyo elimo santu ekitelaki bayekoli. (Misala 2:​1-9) Emonani ete bamosusu kati na bango bandimaki nsango na ye mpe bamemaki bindimeli na bango ya sika na mboka na bango. Yango wana, baklisto ya Kapadosi bazalaki mpe kati na baklisto oyo Petelo akomelaki mokanda na ye ya liboso.

Kasi, nsima ya bambula, baklisto ya Kapadosi bakómaki kolanda bafilozofi ya bapakano. Kutu, bakonzi minene misato ya lingomba ya Kapadosi na ekeke ya minei bakɔtelaki makasi liteya ya Bosato, nzokande eyokani na Makomami te. Ezalaki Grégoire moto ya Nazianze, Basile le Grand, mpe leki na ye Grégoire moto ya Nysse.

Basile le Grand alendisaki mpe bato bázalaka lokola basango oyo bafandaka na monastɛrɛ. Mwa bandako ya Kapadosi oyo batimolá na kati ya mabanga ebongaki mpenza mpo na bomoi yango ya koboya bisengo oyo ye azalaki kolendisa bato bázala na yango. Lokola basango oyo bafandaka na monastɛrɛ bakómaki mingi, basalaki bandako-nzambe na kati ya mabanga mosusu ya nsɔngɛnsɔngɛ oyo elekaki minene. Na ekeke ya 13, bandako-nzambe soki nkama misato esilaki kosalema na kati ya mabanga oyo bazalaki kotimola. Mingi kati na bandako-nzambe yango ebatelamaki kino lelo oyo.

Atako basalelaka lisusu bandako-nzambe mpe bamonastɛrɛ yango te, bomoi ya bato ya kuna ebongwaná mpenza te na boumeli ya bankama ya bambula oyo nyonso eleki. Madusu mingi oyo ezali na kati ya mabanga yango ezali naino kosalelama lokola bandako. Bato mingi oyo bakendaka kotala Kapadosi bakamwaka mpenza ndenge bato ya kuna bazwaki mayele ya kokómisa mabanga oyo biloko ya mokili esalá bandako ya malamu.

[Karte na lokasa 25]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

KAPADOSI

CHINE (Cathay)