Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ebongiseli ya mbula ya Yubile oyo elobelami na mokapo 25 ya mokanda ya Levitike ezali elilingi ya nini?

Mibeko ya Moize elobaki ete ‘na mbula ya nsambo sabata ya kopema mpenza, mpo na mokili ekozala.’ Mpo na mbula yango, bapesaki Bayisalaele etinda oyo: ‘Okolona elanga na yo te mpe okokata bitape na nzete ya vinyo na yo te. Biloko bikokola yango moko, na elanga na yo okobuka yango te, mpe okolɔkɔta te mbuma ya nzete ya vinyo na yo, oyo okati na bitape na yango te. Ekozala mbula ya kopema mpenza, mpo na mokili.’ (Levitike 25:​4, 5) Na yango, mbula ya nsambo nyonso esengelaki kozala mbula moko ya Sabata mpo na mokili. Mpe mbula ya 50 nyonso, nsima ya mbula oyo ezalaki mbula ya Sabata ya nsambo, esengelaki kozala Yubile. Eloko nini esengelaki kosalema na mbula yango?

Na nzela ya Moize, Yehova alobaki na Yisalaele boye: “Bokobulisa mbula ya ntuku mitano mpe bokosakola bonsomi bipai nyonso na mokili epai ya bato nyonso bafandi na mokili. Ekozala yubile mpo na bino, wana ekozonga moto na moto epai na libula na ye, mpe ekozonga moto na moto epai na libota na ye. Mbula ya ntuku mitano ekozala yubile mpo na bino, mpe na ntango yango bokolona te, mpe bokobuka te yango ekoli yango moko, mpe bokolɔkɔta te mbuma ya vinyo ya nzete ya vinyo oyo ebongisami te.” (Levitike 25:​10, 11) Na bongo, Yubile ezalaki mbula ya Sabata ya mibale mpo na mokili, mpamba te mbula oyo yango elandaki ezalaki mpe mbula ya Sabata mpo na mokili. Kasi Yubile yango ezalaki komema bonsomi mpo na bato oyo bafandi na mokili yango. Moyuda nyonso oyo atɛkamaki na boombo asengelaki kozwa bonsomi. Mabelé ya libula oyo moto atɛkaki mpo na mpasi esengelaki kozongisama na libota na ye. Mpo na Yisalaele ya kala, Yubile esengelaki kozala mbula ya kozongisa makambo ndenge ezalaki liboso mpe ya kopesa bonsomi. Yango ezali elilingi ya nini mpo na baklisto?

Botomboki ya Adama, moto ya liboso, ekɔtisaki bato na boombo ya lisumu. Mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto ezali ebongiseli Nzambe azwaki mpo na kosikola bato na boombo ya lisumu. * (Matai 20:28; Yoane 3:16; 1 Yoane 2:​1, 2) Ntango nini baklisto basikolamaka na mobeko ya lisumu? Ntoma Paulo alobaki na baklisto bapakolami boye: “Mobeko ya elimo wana oyo ezali kopesa bomoi na bomoko elongo na Klisto Yesu elongoli yo na mobeko ya lisumu mpe ya liwa.” (Baloma 8:⁠2) Baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló bazwaka bonsomi yango ntango bapakolami na elimo santu. Atako nzoto na bango ezali ya mosuni mpe ezangi kokoka, Nzambe atángaka bango bayengebene mpe azwaka bango lokola bana na ye ya elimo. (Baloma 3:24; 8:​16, 17) Mpo na etuluku ya bapakolami, Yubile ya baklisto ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.

Ezali boni mpo na “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé? (Yoane 10:16) Mpo na bampate mosusu, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ekozala mpenza ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki na ebandeli mpe kozwa bonsomi. Na boumeli ya Yubile yango ya mbula nkóto, Yesu akopesa matomba ya mbeka na ye ya lisiko epai ya bato oyo bazali na kondima mpe akolongola bampasi oyo euti na lisumu. (Emoniseli 21:​3, 4) Na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, bato bakokóma na ezaleli ya kokoka mpe bakosikwama mpenza na lisumu ná liwa oyo babotamaki na yango. (Baloma 8:21) Ntango likambo yango ekokokisama, Yubile ya baklisto ekosuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Kutu, Yesu atindamaki mpo na “kosakola [bonsomi, NW] epai ya bakangami.” (Yisaya 61:​1-7; Luka 4:​16-21) Asakolaki bonsomi ya elimo.

[Elilingi na lokasa 26]

Mpo na “bampate mosusu,” Yubile ya mbula nkóto ekozala ntango ya kozongisa makambo ndenge ezalaki na ebandeli mpe kozwa bonsomi