Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tosikolami na “makila moko ya motuya”

Tosikolami na “makila moko ya motuya”

“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”

Tosikolami na “makila moko ya motuya”

LIKAMBO eleki monene oyo ezali komonisa bolingo ya Yehova ezali ete atindaki Mwana na ye mobotami-se-moko aya kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko mpo na bato. Lokola tozali bato ya masumu, tozali mpenza na mposa ya lisiko yango, mpamba te ata moto moko te ya kozanga kokoka ‘akolonga kosikola ndeko na ye to kopesa epai ya Nzambe motuya ya bomoi na ye . . . ete abika libela na libela.’ (Nzembo 49:6-9) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Nzambe “apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko”!—Yoane 3:16.

Na ndenge nini lisiko ezali kobikisa biso? Tótalela makambo minei oyo tosikolami na yango mpo na bolingo monene oyo Yehova Nzambe amoniseli biso.

Kobikisama na nzela ya lisiko

Ya liboso, mbeka ya Yesu ekoki kolongola biso na lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso. Biso nyonso tobotamaka na lisumu. Tozalaka bato ya masumu ata liboso tóbuka mobeko ya Yehova. Na ndenge nini? Baloma 5:12 elobi boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu.” Lokola tozali bana ya Adama, moto oyo asalaki lisumu, biso mpe tobotamaka na ezaleli ya kozanga kokoka oyo akómaki na yango. Nzokande, lisiko ezali kopesa biso likoki ya kolongwa na boombo ya lisumu. (Baloma 5:16) Yesu ‘akufelaki moto nyonso,’ mpe na bongo alongoli mbuma mabe ya lisumu epai ya bana ya Adama.—Baebele 2:9; 2 Bakolinti 5:21; 1 Petelo 2:24.

Ya mibale, lisiko ekoki kolongola biso na makambo ya mabe oyo lisumu ememaka. “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baloma 6:23) Etumbu ya lisumu ezali liwa. Lokola Mwana ya Nzambe akufaki mpo apesa bomoi na ye lokola mbeka, apesi bato ya botosi likoki ya kozwa bomoi ya seko. Ya solo, “moto oyo azali komonisa kondima na kati ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo atosaka Mwana te akomona bomoi te.”—Yoane 3:36.

Tomoni ete tokoki kosikwama na makambo mabe oyo lisumu ememelá biso kaka soki tomonisi kondima epai ya Mwana ya Nzambe. Yango ezali kosɛnga ete tóbongwana mpe tóyokanisa bomoi na biso na mokano ya Nzambe. Tosengeli kotika nzela nyonso ya mabe mpe kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe. Ntoma Petelo alobaki ete ‘tosengeli kobongola mitema mpe kobongwana mpo masumu na biso ebomama.’—Misala 3:19.

Ya misato, mbeka oyo Yesu apesaki ezali kosalisa biso tózala na lisosoli ya malamu. Bato nyonso oyo bamipesi epai ya Yehova mpe bazwi batisimo mpo na kokóma bayekoli ya Mwana na ye babɔndisamaka. (Matai 11:28-30) Atako tozali bato ya kozanga kokoka, toyokaka esengo ya kosalela Nzambe na lisosoli ya pɛto. (1 Timote 3:9; 1 Petelo 3:21) Soki toyamboli masumu na biso mpe totiki yango, Nzambe akolimbisa biso mpe lisosoli na biso ekotungisama lisusu te.—Masese 28:13.

Esalisaka mpe epesaka elikya

Ya minei, soki tozali komonisa kondima na lisiko tokobanga te ndenge oyo Nzambe azali kotalela biso. Ntoma Yoane akomaki boye: “Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto.” (1 Yoane 2:1) Ntoma Paulo alobelaki mokumba ya Yesu lokola mosungi na maloba oyo: “Azali mpe na likoki ya kobikisa na mobimba mpenza baoyo bazali kopusana epai ya Nzambe na nzela na ye, mpamba te azali ntango nyonso na bomoi mpo na kolobela bango.” (Baebele 7:25) Ntango nyonso oyo tokozala bato ya masumu, tokozala kaka na mposa ya Nganga-nzambe Monene Yesu Klisto mpo asalisa biso tózala na boyokani malamu na Nzambe. Ndenge nini Yesu asalaki lokola nganga-nzambe monene mpo na biso?

Yesu asekwaki na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.); mikolo 40 na nsima, amataki likoló epai alakisaki motuya ya ‘makila na ye’ epai ya Nzambe. Na bongo, etikali moke Yesu alongola bato nyonso ya botosi na boombo ya lisumu mpe ya liwa. * (1 Petelo 1:18, 19) Na yango, omoni te ete ebongi tólinga Yesu mpe tótosa ye?

Tosengeli mpe kolinga Yehova Nzambe mpe kotosa ye. Na bolingo na ye, apesi biso “kosikolama na nzela ya lisiko.” (1 Bakolinti 1:30) Apesi biso bomoi oyo tozali na yango sikoyo mpe elikya ya bomoi ya seko. Yango wana, tosengeli mpenza “kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 12 Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2006, Marsi/Aprili.

[Etanda/Bililingi na lokasa 9]

OYEBAKI YANGO?

• Yesu amataki likoló longwa na Ngomba ya Olive.—Misala 1:9, 12.

• Kaka bantoma ya sembo ya Yesu nde bamonaki ye ntango azalaki komata na likoló.—Misala 1:2, 11-13.