Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso

“Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso

“Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso

ELINGAKI kozala mpasi koyeba ndimbola mobimba ya bavɛrsɛ mosusu soki mikanda mosusu ya Biblia esalisaki biso te. Masolo oyo totángaka na Liloba ya Nzambe ezali makambo oyo esalemaki mpenza. Kasi, mosusu kati na yango ezalaka na bandimbola oyo ebombami. Ndakisa moko ezali lisolo oyo elobeli basi mibale na ndako ya Abalayama. Ntoma Paulo abengaki yango “elilingi.”—Bagalatia 4:24.

Lisolo yango esengeli kobenda likebi na biso mpamba te elobeli makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na bato nyonso oyo balingaka ete Yehova Nzambe apambola bango. Liboso ya koyeba ntina oyo tolobi bongo, tótalela naino makambo oyo etindaki Paulo alimbola elilingi yango.

Na ekeke ya liboso, mokakatano moko ezalaki na kati ya baklisto ya Galatia. Bamosusu kati na bango bazalaki “kotosa malamumalamu mikolo mpe basanza mpe bileko mpe bambula”—makambo oyo Mibeko ya Moize esɛngaki. Bato yango bazalaki koloba ete bandimi basengeli kotosa Mibeko mpo Nzambe andima bango. (Bagalatia 4:10; 5:2, 3) Kasi, Paulo ayebaki ete makambo yango esɛngisamaki te epai ya baklisto. Mpo na kolimbola yango, alobelaki lisolo moko oyo Bayuda nyonso bayebaki.

Paulo ayebisaki Bagalatia ete Abalayama, nkɔkɔ ya Bayuda, abotaki Yisamaele ná Yisaka. Moombo na ye ya mwasi Agale nde abotaki Yisamaele, mpe Sala, mwasi na ye mpenza, abotaki Yisaka. Ntembe ezali te ete Bagalatia oyo bazalaki kolendisa likambo ya kotosa Mibeko ya Moize bayebaki lisolo ya Sala, oyo azalaki liboso ekomba mpe apesaki moombo na ye Agale epai ya Abalayama mpo abota na ye mwana. Bayebaki mpe ete ntango Agale akómaki na zemi ya Yisamaele, abandaki kotyola nkolo na ye, Sala. Kasi, ndenge Nzambe alakaki, nsukansuka, Sala abotaki Yisaka atako akómaki mobange. Na nsima, Abalayama abenganaki Agale ná mwana na ye Yisamaele, mpamba te Yisamaele azalaki konyokola Yisaka.—Genese 16:1-4; 17:15-17; 21:1-14; Bagalatia 4:22, 23.

Basi mibale, kondimana mibale

Paulo alimbolaki soki moto mokomoko na “elilingi” yango azalaki komonisa nini. Akomaki boye: “Basi wana balakisi kondimana mibale, moko ya Ngomba Sinai, oyo ezali kobota bana mpo na boombo, mpe yango ezali Agale. . . . Akokani na Yelusaleme lelo oyo, mpo azali na boombo elongo na bana na ye.” (Bagalatia 4:24, 25) Agale azalaki elilingi ya ekólo Yisalaele, oyo engumba-mokonzi na yango ezalaki Yelusaleme. Ekólo ya Bayuda endimaki kotosa Yehova na nzela ya kondimana ya Mibeko oyo basalaki na Ngomba Sinai. Kondimana ya Mibeko ezalaki ntango nyonso kokundwela Bayisalaele ete bazali baombo ya lisumu mpe ete bazali na mposa ya kosikolama.—Yilimia 31:31, 32; Baloma 7:14-24.

Boye, Sala, “mwasi ya nsomi” ná mwana na ye Yisaka, bazalaki elilingi ya nini? Paulo amonisaki ete Sala, “ekomba,” azalaki elilingi ya mwasi ya Nzambe, ebongiseli na ye ya likoló. Mwasi yango azalaki ekomba na boye ete, liboso Yesu aya, azalaki na “bana” te, elingi koloba bapakolami na elimo awa na mabelé. (Bagalatia 4:27; Yisaya 54:1-6) Kasi, na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), elimo santu ekitelaki etuluku moko ya basi mpe mibali; na ndenge yango, babotamaki lisusu mpe bakómaki bana ya mwasi yango ya likoló. Nzambe andimaki bana oyo ebongiseli yango ebotaki lokola bana na ye mpe bakómaki bazwi na libula elongo na Yesu Klisto na nzela ya kondimana ya sika. (Baloma 8:15-17) Ntoma Paulo, oyo azali moko na bana yango, akomaki boye: “Yelusaleme mboka ya likoló azali na bonsomi, mpe azali mama na biso.”—Bagalatia 4:26.

Bana ya basi yango

Lisolo ya Biblia elobi ete Yisamaele azalaki konyokola Yisaka. Ndenge moko mpe, na ekeke ya liboso T.B., bana ya Yelusaleme ya mabelé, elilingi ya mwasi oyo azalaki moombo, bazalaki kotyola mpe konyokola bana ya Yelusaleme mboka ya likoló. Paulo alimbolaki boye: “Se ndenge mwana oyo abotamaki na ndenge ya mosuni [Yisamaele] abandaki konyokola oyo abotamaki na ndenge ya elimo [Yisaka] na ntango wana, sikoyo mpe ndenge moko.” (Bagalatia 4:29) Ntango Yesu Klisto ayaki awa na mabelé mpe abandaki kosakola Bokonzi, bakonzi ya mangomba ya Bayuda basalaki ye makambo ndenge kaka Yisamaele, mwana ya Agale, asalaki epai ya Yisaka, mozwi ya solosolo ya libula ya Abalayama. Bato yango batyolaki mpe banyokolaki Yesu Klisto; na ntembe te mpo bazalaki komimona ete bazali mpenza bazwi ya libula ya Abalayama mpe ete Yesu azali mopaya.

Mwa mikolo liboso bakonzi ya Yisalaele báboma ye, Yesu alobaki boye: “Yelusaleme, Yelusaleme, yo mobomi ya basakoli mpe mobambi-mabanga na baoyo batindamaki epai na yo,—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi ayanganisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye! Kasi bino bolingaki yango te. Talá! Ndako na bino esundolami na mabɔkɔ na bino.”—Matai 23:37, 38.

Masolo ya Biblia oyo elobeli makambo oyo elekaki na ekeke ya liboso emonisi ete ekólo Yisalaele, oyo Agale azalaki elilingi na yango, ebimisaki te bana oyo basengelaki kokóma bazwi ya libula elongo na Yesu. Yehova aboyaki Bayuda oyo bazalaki kokanisa ete bazali na lotomo ya kozwa libula mpo babotamaki na ekólo wana. Ya solo, Bayisalaele mosusu bakómaki bazwi ya libula elongo na Klisto. Kasi, bazwaki libaku malamu wana mpo na kondima na bango epai ya Yesu, kasi te mpo babotamaki na ekólo wana.

Bato mosusu oyo bakokóma bazwi ya libula elongo na Klisto bayebanaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. Kobanda wana, Yehova azalaki mokemoke kopakola na elimo bana mosusu ya Yelusaleme mboka ya likoló.

Paulo alimbolaki “elilingi” yango mpo na komonisa ete kondimana ya sika elekaki kondimana ya Mibeko oyo Moize azalaki moyokanisi na yango. Moto moko te akokaki kondimama na Nzambe na nzela ya misala na ye mpo azali kolanda Mibeko ya Moize, mpamba te bato nyonso bazali bato ya kozanga kokoka mpe Mibeko emonisaki polele ete bazali baombo ya lisumu. Kasi, ndenge Paulo alimbolaki yango, Yesu ayaki mpo “akoka kosikola na lisombi baoyo bazalaki na nse ya mibeko.” (Bagalatia 4:4, 5) Na bongo, komonisa kondima na mbeka ya Klisto elongolaki bato na kokweisama ya Mibeko.—Bagalatia 5:1-6.

Ntina na yango mpo na biso

Mpo na nini bandimbola ya elilingi yango oyo Paulo apesaki esengeli kobenda likebi na biso? Ya liboso, mpo ezali kosalisa biso tózwa ndimbola ya makambo mosusu oyo Biblia elobi, oyo tokokaki kokanga ntina na yango te. Ndimbola yango ezali kobakisa kondima na biso ete Biblia ezali na bomoko mpe biteni na yango nyonso ezali na boyokani.—1 Batesaloniki 2:13.

Longola yango, makambo oyo emonisami na elilingi yango ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso na mikolo ezali koya. Soki bana ya Yelusaleme mboka ya likoló babotamaki te, tolingaki kotikala baombo ya lisumu mpe ya liwa. Kasi, na litambwisi ya Klisto mpe baninga na ye bazwi ya libula ya elaka oyo Nzambe apesaki Abalayama, ‘bikólo nyonso ya mabelé ekopambolama.’ (Genese 22:18) Yango ekosalema ntango mbuma mabe ya lisumu, kozanga kokoka, mawa, mpe liwa, ekolongwa mpo na libela. (Yisaya 25:8, 9) Ekozala ntango ya malamu mpenza!

[Elilingi na lokasa 11]

Kondimana ya Mibeko esalemaki na Ngomba Sinai

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Elilingi na lokasa 12]

“Elilingi” oyo ntoma Paulo alobelaki elimboli nini?