Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Moto na moto akomema mokumba na ye moko”

“Moto na moto akomema mokumba na ye moko”

“Moto na moto akomema mokumba na ye moko”

“Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.”​—BALOMA 14:12.

1. Mokumba nini Baebele misato basengelaki kokokisa?

 BILENGE Baebele misato oyo bazalaki na Babilone basengelaki kozwa ekateli na likambo ya bomoi to liwa. Bakotosa mobeko oyo esɛngi ete báfukamela ekeko moko molai to bakoboya kosambela yango mpe na bongo, kobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kongala? Sadalaka, Mesaka, mpe Abedenego bazalaki na ntango te ya kotuna moto mosusu makanisi; bazalaki mpe na mposa te ya kosala yango. Kozanga kokakatana, balobaki boye: “Ee, mokonzi, oyeba ete . . . biso tokosalela banzambe na yo te, mpe tokosambela elilingi ya wolo oyo etɛmisaki yo te.” (Danyele 3:1-18) Baebele misato wana bamemaki mokumba na bango.

2. Nani mpenza azwelaki Pilato ekateli na likambo ya Yesu Klisto, mpe yango elingi nde koloba ete guvɛrnɛrɛ yango azalaki na ngambo te?

2 Mbula soki 600 na nsima, guvɛrnɛrɛ moko ayokaki makambo oyo bafundaki moto moko. Nsima ya kotalela likambo yango, guvɛrnɛrɛ amonaki ete moto yango asali mabe moko te. Kasi, ebele ya bato basɛngaki ete moto yango abomama. Nsima ya komeka koboya, guvɛrnɛrɛ asundolaki mokumba na ye mpe andimaki kokokisa mposa ya bato. Asukolaki mabɔkɔ na ye mpe alobaki ete: “Ngai nazali na ngambo te na makila ya moto oyo.” Na nsima, apesaki nzela ete bábaka moto yango na nzete. Na esika akokisa mokumba na ye ya kozwa ekateli mpo na Yesu Klisto, Ponsi Pilato atikaki bato mosusu bázwela ye ekateli. Ata asukolaki mabɔkɔ yango mbala boni, yango ekokaki te kolongola ngambo oyo azalaki na yango na ndenge andimaki bápesa Yesu etumbu atako asalaki mabe moko te.—Matai 27:11-26; Luka 23:13-25.

3. Mpo na nini tosengeli te kotika bato mosusu bázwela biso bikateli?

3 Ezali boni mpo na yo? Na ntango osengeli kozwa ekateli, osalaka lokola Baebele misato, to olingaka ete bato mosusu bázwela yo ekateli? Ya solo, kozwa ekateli ezalaka pɛtɛɛ te. Mpo na kopona nzela ya malamu, esɛngaka kozala moto oyo akɔmeli. Na ndakisa, baboti basengeli kozwa bikateli ya malamu mpo na bana na bango oyo bazali naino mike. Kozwa ekateli ezalaka mpasi koleka soki likambo ezali mindɔndɔ mpe soki esengeli naino kotalela makambo ndenge na ndenge. Atako bongo, mokumba ya kozwa bikateli ezali te na kati ya “kilo” oyo bandeko oyo bazali na “makoki ya elimo” bakoki komemela biso. (Bagalatia 6:1, 2) Kasi, ezali mokumba mpo na yango “mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ mpo na ye moko epai ya Nzambe.” (Baloma 14:12) Biblia elobi ete: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Na bongo, ndenge nini tokoki kozwa bikateli ya malamu na bomoi na biso? Ya liboso, tosengeli koyeba esika oyo mayele na biso bato esuki mpe koyekola oyo esengeli mpo na kozwa mayele oyo tozangi.

Likambo moko ya ntina mingi

4. Na likambo etali kozwa bikateli, liteya nini ya ntina mingi tosengeli kozwa na kozanga botosi ya mobali mpe mwasi ya liboso?

4 Mobali mpe mwasi ya liboso bazwaki ekateli oyo ebotaki mbuma mabe mpenza. Bazwaki ekateli ya kolya mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe. (Genese 2:16, 17) Batalelaki makambo nini? Biblia elobi boye: “Emonaki mwasi ete nzete ezalaki malamu na kolya, mpe kitoko na miso, mpe ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kozipola bososoli ya moto, akamataki mbuma yango mpe alyaki mpe apesaki na mobali na ye, [ntango, NW] azalaki na ye elongo, ye mpe alyaki.” (Genese 3:6) Eva azwaki ekateli wana mpo alingaki kokokisa kaka mposa na ye. Adama alandaki nzela na ye. Mpo na yango, lisumu mpe liwa ‘epalanganaki epai ya bato nyonso.’ (Baloma 5:12) Likambo oyo Adama ná Eva basalaki ezali kopesa biso liteya moko ya ntina mingi na oyo etali makoki na biso bato: Soki tolandi toli ya Nzambe te, mbala mingi tozwaka bikateli ya malamu te.

5. Ndenge nini Yehova apesaka biso toli, mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwela yango litomba?

5 Tokoki mpenza kosepela ete Yehova Nzambe apesaka biso toli! Biblia elobi na biso boye: “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Yehova alobaka na biso na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Tosengeli koyekolaka Biblia mpe kozwa boyebi na yango ya sikisiki. Mpo na kopona banzela ya malamu, tosengeli kolyaka “bilei ya makasi [oyo] ezali ya bato oyo bakɔmeli.” Lisusu, “makoki na [biso] ya kososola, lokola [tozali] kosalela yango, eteyami na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Tokoki koteya makoki na biso ya kososola soki tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola na Liloba ya Nzambe.

6. Likambo nini esengeli mpo lisosoli na biso esala malamu?

6 Lisosoli na biso ezali eloko mosusu ya ntina mingi oyo tosengeli kotalela mpo na kozwa bikateli. Lisosoli ekoki kosambisa biso mpe ekoki ‘kofunda to ata mpe kolongisa’ biso. (Baloma 2:14, 15) Kasi, mpo lisosoli na biso esalisa biso mpenza, tosengeli kozala na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango. Soki lisosoli na biso eteyami te, ezali mpasi te tólanda bonkɔkɔ mpe mimeseno ya esika oyo tofandi. Makambo oyo tomonaka zingazinga na biso mpe makanisi ya bato mosusu ekoki mpe komema biso na nzela mabe. Likambo nini emonanaka soki tozali mbala na mbala koboya koyoka lisosoli na biso mpe tozali kobuka mibeko ya Nzambe? Nsukansuka ekoki kokóma lokola nde etyami elembo “na ebende ya mɔtɔ makasi,” ekokóma lokola mposo oyo ekómi makasi—ekosala lisusu te. (1 Timote 4:2) Nzokande, lisosoli oyo eteyami na Liloba ya Nzambe ezalaka motambwisi ya malamu mpenza.

7. Wapi likambo moko ya ntina mpo na kozwa bikateli ya malamu?

7 Na bongo, likambo ya ntina mpo na kozwa bikateli ya malamu ezali kozala na boyebi ya sikisiki ya Biblia mpe kosalela boyebi yango. Na esika ya kokende mbangu ntango tolingi kozwa ekateli, tosengeli kozwa ntango ya koluka mitinda ya Biblia mpe kosalela makoki na biso ya kokanisa. Ata ntango tosengeli kozwa ekateli ya mbalakaka, ndenge ekómelaki Sadalaka, Mesaka, ná Abedenego, ekozala na biso mpasi te soki tozali na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe soki lisosoli na biso eteyami na boyebi yango. Mpo na komona ndenge oyo kokɔmela na elimo ekoki kosalisa biso tóyeba kozwa bikateli, tótalela makambo mibale ya bomoi na biso.

Banani babongi kozala baninga na biso?

8, 9. (a) Mitinda nini ezali komonisa ntina ya koboya baninga ya mabe? (b) Kozala na baninga ya mabe esuki kaka na kosangana mpenza na bato oyo balandaka mitinda ya Nzambe te? Limbolá.

8 Ntoma Paulo akomaki boye: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Bozali bato ya mokili te.” (Yoane 15:19) Ntango toyekoli mitinda yango, tomonaka mbala moko ntina ya koboya boninga na bato ya pite, bato ya ekobo, miyibi, balangwi-masanga, mpe bato ya misala mosusu ya mabe. (1 Bakolinti 6:9, 10) Kasi, ntango boyebi na biso ya Biblia ezali kobakisama, tomonaka ete kolekisa ntango mingi na bato ya ndenge yango na nzela ya bafilme, ya televizyo, to na ordinatɛrɛ to kotánga mikanda oyo ezali kolobela bango ezali mpe mabe. Tokoki mpe koloba bongo na likambo etali kosolola na nzela ya Internet “na baoyo babombaka soki bazali banani.”—Nzembo 26:4.

9 Ndenge nini tokoki kotalela bato oyo basalaka makambo ya mabe te, kasi bazali na kondima te epai ya Nzambe ya solo? Biblia elobi na biso boye: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Tososoli ete baninga ya mabe ezali kaka te bato oyo bandimaka misala ya mbindo to basalaka yango. Yango wana, ezali likambo ya bwanya kozala kaka na baninga oyo balingaka Yehova.

10. Nini esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu na oyo etali kozala elongo na bato ya mokili?

10 Tokoki te koboya mpenza kozala elongo na bato ya mokili, mpe Biblia ezali kosɛnga biso yango te. (Yoane 17:15) Ntango tobimaka na mosala ya kosakola, ntango tokendaka na kelasi, to ntango tokendaka na mosala, tozalaka elongo na bato ya mokili. Moklisto oyo molongani na ye azali mondimi te azalaka mingi na bato ya mokili koleka baklisto mosusu. Nzokande, lokola makoki na biso ya kososola eteyami malamu, toyebaka ete kozala na bato ya mokili mpo na makambo oyo esɛngi bongo ekeseni na kokóma baninga na bango. (Yakobo 4:4) Na bongo, tokoki kozwa bikateli ya malamu na oyo etali kosangana na makambo mosusu oyo esalemaka na eteyelo, na ndakisa masano mpe mabina, to mpe na bafɛti to bokutani na baninga ya mosala.

Kopona mosala

11. Wapi likambo ya liboso totalelaka mpo na kondima to koboya mosala moko?

11 Kosalela mitinda ya Biblia na ndenge ya bato oyo bakɔmeli esalisaka biso ntango tozali kozwa bikateli na likambo etali ‘kokokisa bamposa ya bato ya ndako na biso.’ (1 Timote 5:8) Likambo ya liboso oyo tosengeli kotalela ezali lolenge ya mosala yango, elingi koloba makambo oyo ekosɛnga biso tósalaka. Ezali mabe kondima mosala oyo ezali kolendisa makambo oyo Biblia epekisi. Yango wana, baklisto ya solo bandimaka te misala oyo ekoki kosɛnga kosambela bikeko, koyiba, kosalela makila na ndenge ya mabe, to kosala makambo mosusu oyo Biblia eboyi. Tokoki mpe te kondima misala oyo esɛngaka kokosa to koyiba bato mosusu, ata soki patrɔ atindi biso tósala yango.—Misala 15:29; Emoniseli 21:8.

12, 13. Longola lolenge ya mosala yango moko, makambo nini tosengeli kotalela mpo na kondima to koboya mosala moko?

12 Totalelaka makambo nini soki mosala yango moko ezali mpenza kobuka mobeko ya Nzambe te? Ntango boyebi na biso ya solo ezali kobakisama mpe makoki na biso ya kososola ezali kokola, toyebaka makambo mosusu oyo tosengeli kotalela. Ndenge nini tosengeli kotalela mosala moko oyo esɛngi tósalaka likambo oyo Biblia epekisi, na ndakisa koyamba telefone na kompanyi ya masano ya mbongo? Totalelaka mpe esika mbongo oyo bakofuta biso ekouta mpe esika tokosala mosala yango. Na ndakisa, soki tozali na mosala ya biso moko, tokondima kɔntra ya mosala ya kotya kulɛrɛ na ndako-nzambe ya lingomba ya boklisto mpe na bongo, kopesa mabɔkɔ na losambo ya lokuta?—2 Bakolinti 6:14-16.

13 Kasi, ezali boni soki patrɔ na biso nde asali kɔntra ya kobongisa ndako ya losambo ya lingomba ya lokuta? Na likambo yango, tokotalela makambo lokola bokonzi oyo tozali na yango mpo na kondima to koboya kɔntra wana mpe mosala nini mpenza tokosala. Ezali boni soki tozali kosala mosala oyo Biblia epekisi te, na ndakisa kotika mikanda na bandako, oyo mosusu kati na yango ezali bisika oyo basalaka misala ya mabe? Na ntango wana, tokotalela etinda oyo ezali na Matai 5:45. Tosengeli kotalela soki lisosoli na biso ekotungisama te ntango tozali kosala mosala yango mokolo na mokolo. (Baebele 13:18) Ya solo, komema mokumba na biso na likambo etali kozwa bikateli na makambo ya mosala ezali kosɛnga tókolisa makoki na biso ya kososola mpe tóteya lisosoli na biso.

“Na nzela nyonso na yo, ndimá ye”

14. Mpo na kozwa bikateli, tosengeli kotalela makambo nini?

14 Tokoloba boni mpo na bikateli oyo tosengeli kozwa na makambo mosusu, na ndakisa kotánga bakelasi mpe kondima to koboya nkisi moko ya monganga? Liboso ya kozwa ekateli nyonso, tosengeli kotalela mitinda ya Biblia na likambo yango mpe kosalela makoki na biso ya kokanisa. Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala mpe moto ya bwanya mingi, alobaki boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.

15. Liteya nini tozwi na ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso na likambo etali kozwa bikateli?

15 Tosengeli mpe kobosanaka te ete mbala mingi bikateli na biso etalelaka mpe bato mosusu. Na ndakisa, baklisto ya ekeke ya liboso basɛngisamaki te koboya kolya biloko mosusu oyo Mibeko ya Moize epekisaki. Bakokaki kolya bilei mosusu oyo Mibeko elobaki ete ezali mbindo, kasi ezali mabe te. Atako bongo, ntoma Paulo akomaki na ntina na mosuni ya nyama oyo, mbala mosusu basalelaki na tempelo ya bikeko: “Soki eloko moko ya kolya ezali kobɛtisa ndeko na ngai libaku, nakolya lisusu mosuni soki moke te, mpo nabɛtisa ndeko na ngai libaku te.” (1 Bakolinti 8:11-13) Balendisaki baklisto ya ekeke ya liboso ete bátalelaka lisosoli ya bato mosusu mpo bábɛtisa bango libaku te. Esengeli te ete bikateli na biso ekóma “bantina ya kobɛtisa libaku.”—1 Bakolinti 10:29, 32.

Tóluka bwanya oyo euti na Nzambe

16. Ndenge nini libondeli esalisaka biso na kozwa bikateli ya malamu?

16 Libondeli ezali na ntina mingi mpo na kozwa bikateli ya malamu. Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Soki moko na bino azali kozanga bwanya, tiká akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka na bokabi epai ya bato nyonso mpe kozanga kotyola; mpe yango ekopesama na ye.” (Yakobo 1:5) Tokoki kobondela Yehova na elikya nyonso mpe kosɛnga ye apesa bwanya oyo esengeli mpo na kozwa bikateli ya malamu. Ntango tozali koyebisa Nzambe ya solo mitungisi na biso mpe tozali kosɛnga ye atambwisa biso, elimo santu ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya bavɛrsɛ oyo tozali kotalela mpe ekoki kozongisa na makanisi na biso bavɛrsɛ ya Biblia oyo mbala mosusu tobosani.

17. Ndenge nini bato mosusu bakoki kosalisa biso mpo na kozwa bikateli?

17 Bato mosusu bakoki kosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu? Ɛɛ, na kati ya lisangá, Yehova apesi biso bandeko oyo bakɔmeli na elimo. (Baefese 4:11, 12) Tokoki kotunaka makanisi na bango, mingimingi ntango tolingi kozwa ekateli ya monene. Bandeko oyo bazali na bososoli mingi ya elimo mpe bayebi makambo mingi na bomoi bakoki kosalisa biso tótalela mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso na ekateli oyo tolingi kozwa mpe kosalisa biso ‘tótalela malamumalamu mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:9, 10) Kasi, tóbosana likambo oyo te: Tosengeli kotika te ete bato mosusu bázwaka bikateli na esika na biso. Yango ezali mokumba na biso.

Bikateli ya malamu ebotaka kaka mbuma ya malamu?

18. Tokoki koloba nini mpo na mbuma oyo ekateli ya malamu ekoki kobota?

18 Soki tolandaka mitinda ya Biblia mpe tokanisaka malamu liboso ya kozwa bikateli, yango ekobota ntango nyonso mbuma ya malamu? Ɛɛ, nsukansuka ekobota kaka mbuma ya malamu. Kasi, ntango mosusu na ebandeli ekoki kobimisela biso mikakatano. Sadalaka, Mesaka, mpe Abedenego bayebaki ete ekateli na bango ya koboya kosambela ekeko ekokaki komemela bango liwa. (Danyele 3:16-19) Ndenge moko mpe, ntango bantoma bayebisaki bazuzi ya Sanedrina ete bakotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato, babɛtaki bango fimbo liboso bátika bango. (Misala 5:27-29, 40) Lisusu, “ntango mpe likambo ekanami te” ekoki kobebisa ata ekateli nini. (Mosakoli 9:11, NW) Soki tokutani na mikakatano nsima ya kozwa ekateli ya malamu, tózala na elikya ete Yehova akopesa biso makasi ya koyikela yango mpiko mpe nsukansuka, akopambola biso.—2 Bakolinti 4:7.

19. Ndenge nini tokoki kozwa mpiko ya komema mokumba na biso na likambo etali kozwa bikateli?

19 Na bongo, ntango tozali kozwa bikateli, tosengeli kotalela mitinda ya Biblia mpe kosalela makoki na biso ya kososola. Tokoki mpenza kotɔnda Yehova mpo na lisalisi oyo azali kopesa biso na nzela ya elimo santu na ye mpe bandeko baklisto oyo bakɔmeli na elimo. Lokola tozali na lisalisi wana, tiká ete tózala na mpiko ya komema mokumba na biso na likambo etali kozwa bikateli ya malamu.

Oyekoli makambo nini?

• Likambo nini ezali na ntina mingi mpo na kozwa bikateli ya malamu?

• Ndenge nini kokɔmela na elimo esalisaka biso mpo na kopona baninga?

• Wapi mwa makambo ya ntina oyo tosengeli kotalela ntango tozali kozwa bikateli na likambo etali mosala?

• Lisalisi nini tozali na yango mpo na kozwa bikateli?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 22]

Kozanga botosi ya Adama ná Eva epesi biso liteya ya ntina mingi

[Elilingi na lokasa 24]

Liboso ya kozwa ekateli ya monene, tóluka mitinda ya Biblia