Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bandeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

MOKOLO ya misato, 24 Augusto 2005 na ntɔngɔ, bandeko ya Betele ya États-Unis mpe ya Canada, balandaki liyebisi moko ya esengo mpenza. Kobanda mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 2005, bandeko mibale​—Geoffrey Jackson ná Anthony Morris—​bakokóma na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.

Ndeko Jackson abandaki mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya Febwali ya mobu 1971 na Tasmanie, etúká moko ya Australie. Na Yuni 1974, abalaki Jeanette (Jenny). Mwa moke na nsima, bakómaki babongisi-nzela monene. Banda na 1979 tii 2003, bazalaki bamisionɛrɛ na Tuvalu, na Samoa, mpe na Fidji​—bisanga ya Pasifike ya Sudi. Ntango bazalaki na bisanga yango, Ndeko Jackson ná mwasi na ye bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola mikanda oyo elimbolaka Biblia. Kobanda na 1992, Ndeko Jackson akómaki na Komite ya filiale ya Samoa, mpe na 1996, na Komite ya filiale ya Fidji. Na Aprili 2003, ye ná Jenny bakómaki kosala na departema oyo etalelaka mosala ya kobongola, na Betele ya États-Unis. Na nsima, Ndeko Jackson akómaki mosungi na Komite ya Mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Ndeko Morris mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela na mobu 1971, na États-Unis. Na Desɛmbɛ ya mbula yango, abalaki Susan, mpe bakobaki mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mbula soki minei tii ntango babotaki mwana na bango ya liboso, Jesse. Na nsima, babotaki mwana mosusu, Paul. Ndeko Morris azongelaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na 1979. Mwasi na ye mpe azongelaki ntango bana na bango bakɔtaki kelasi. Libota na bango mobimba bakendaki kosakola na Rhode Island mpe na Caroline du Nord, na États-Unis, epai basakoli bazalaki mingi te. Na Caroline du Nord, na bantango mosusu, Ndeko Morris azalaki kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga, mpe bana na bango bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Jesse ná Paul, mokomoko akɔtaki Betele ya États-Unis, ntango akómaki na mbula 19. Na ntango yango, Ndeko Morris akómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na nsima, ye ná Susan mpe bakómaki kosala na Betele kobanda mokolo ya 1 Augusto 2002. Ndeko Morris azalaki kosala na biro oyo etalelaka mosala ya kosakola mpe na nsima, akómaki mosungi na Komite ya Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Longola bandeko yango mibale, bandeko mosusu oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali baoyo: Carey Barber; John Barr; Samuel Herd; Stephen Lett; Gerrit Lösch; Theodore Jaracz; Guy Pierce; Albert Schroeder; David Splane; mpe Daniel Sydlik. Bandeko nyonso ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali baklisto bapakolami.