Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mangomba nyonso ezali ya malamu?

Mangomba nyonso ezali ya malamu?

LELO oyo, mangomba ndenge na ndenge etondi na mokili. Ankɛtɛ moko oyo bautaki kosala emonisi ete, na mokili mobimba, mangomba ya minene ezali 19 mpe oyo ya mike ezali soki 10 000. Lokola mangomba ezali beboo, moto na moto azali na likoki ya kopona lingomba oyo ye alingi. Yango ebimisi motuna oyo: Lingomba nyonso oyo moto akoki kopona ezali kaka ya malamu?

Bato mosusu balobaka ete mangomba ezali lokola banzela ndenge na ndenge mpe nyonso ememaka kaka na ngomba moko. Mpo na bango, nzela nyonso oyo moto akoki kopona ezali kaka malamu, mpo yango nyonso ezali komema kaka esika moko. Balobaka ete lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali kaka moko, mangomba nyonso esengeli komema kaka epai na ye.

Banzela nyonso ememaka epai ya Nzambe?

Yesu Klisto, moko ya bateyi minene oyo mangomba mingi ememyaka, alobaki nini na likambo yango? Alobaki na bayekoli na ye boye: “Bóingela na ekuke na nkaka.” Mpo na nini? “Zambi ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoingela na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.”​—Matai 7:13, 14, haut fleuve.

Yesu alingaki mpenza koloba ete mangomba mosusu ememaka na “liwa”? To azalaki nde koteya ete kaka bato oyo bandimelaka Nzambe te nde bazali na nzela ya monene, kasi baoyo bandimaka Nzambe bazali na nzela ya moke, ata soki bazali na lingomba nini?

Nsima ya koloba ete nzela ezali kaka mibale, Yesu abakisaki boye: “Bókeba mpo na basakoli na lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpate nde katikati bazali nkɔi na kongala.” (Matai 7:15, haut fleuve) Na nsima alobaki boye: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likolo te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likolo.” (Matai 7:21, haut fleuve) Soki babengi moto moko mosakoli to ye moko alobi ete Yesu azali “Nkolo” na ye, tokoki nde koloba ete moto yango azali mopakano? Na yango, Yesu alingaki komonisa polele ete mangomba nyonso te nde ezali ya malamu, mpe bateyi nyonso te nde babongi kotyelama motema.

Tokoki koyeba nzela ya nkaka?

Lokola nzela nyonso te nde ememaka epai ya Nzambe, ndenge nini tokoki koyeba nzela ya nkaka, oyo ememaka na bomoi, na kati ya ebele ya banzela to mangomba oyo etondi na mokili? Tózwa ndakisa: Kanisá ete obungi nzela na engumba moko ya monene. Otuni bálakisa yo nzela. Moto ya liboso ayebisi yo kozanga kokakatana ete okende na ngámbo ya ɛsti. Oyo ya mibale alobi na yo okende na wɛsti. Kasi, mosusu alobi na yo opona nzela nyonso oyo omoni malamu. Nsukansuka, moto mosusu abimisi karte moko ya malamu mpe alakisi yo nzela oyo ebongi. Na nsima, apesi yo karte yango mpo esalisa yo na nzela. Na ntembe te, okondima mpenza ete okokóma na esika oyo ozali kokende!

Ezali mpe bongo na likambo ya kopona lingomba to nzela ya malamu; tosengeli kozala na karte ya malamu mpenza. Karte yango ezali? Ɛɛ. Karte yango ezali Biblia, oyo elobi boye: “Minkandá mîná mínso mikomámí na lisálisi lya Nzámbe mikokí kotéya, kopálela, kobongisa mpé kokólisa moto o bosémbo.”​—2 Timote 3:16, Biblia Liloba lya Nzambe.

Na ntembe te, ezali na mabongoli mingi ya Biblia na Lingala oyo okoki kosalela lokola karte mpo na koluka nzela ya Nzambe. Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo, babimisá libongoli moko ya malamu mpenza, oyo ezali na nkombo Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu. Nzokande, soki ozali Motatoli ya Yehova te, mbala mosusu okosepela kosalela libongoli mosusu ntango ozali kotánga lisolo oyo ezali kolobela ndenge ya koyeba lingomba ya malamu. Yango wana, na masolo oyo totángi Babiblia mingi oyo bato ya mangomba mosusu basalelaka.

Ntango ozali kotánga masolo oyo elandi, luká koyeba bokeseni oyo ezali na kati ya makambo oyo yo oyebi ná oyo Biblia elobi. Kobosana te maloba oyo Yesu alobaki mpo na ndenge ya kokesenisa lingomba ya malamu na oyo ya mabe. Alobaki boye: “Nzete ya malamu ebotaka mbuma ya malamu; kasi nzete ya mabe ebotaka mbuma ya mabe. Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe té; pe nzete ya mabe ekoki kobota mbuma ya malamu té.” (Matai 7:17, 18, Bible na lingala ya lelo oyo) Na kati ya mbuma ya malamu oyo Biblia elobi ete ekosalisa biso tóyeba “nzete ya malamu,” tótalela misato.