Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lingomba ya solo eteyaka bizaleli ya malamu

Lingomba ya solo eteyaka bizaleli ya malamu

LINGOMBA ya malamu esalisaka biso tóyeba kokanisa makambo oyo ezali malamu mpe elakisaka biso ndenge ya kobongisa etamboli na biso. Esalisaka biso tósala oyo ezali malamu mpe tókolisa bizaleli ya malamu. Ndenge nini toyebi ete lingomba ya malamu esalaka bongo?

Talá oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso oyo bazalaki kofanda na engumba Kolinti, na Grèce. Engumba wana ya kala eyebanaki mpo na misala ya mbindo oyo ezalaki kosalema kuna. Paulo alobaki boye: “Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali, mpe miyibi, mpe bato ya lokoso, mpe balangwi-masanga, mpe bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Na nsima, Paulo abakisaki boye: “Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosili kosukolama pɛɛ, kasi bosili kosantisama, kasi bosili kotángama bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe na elimo ya Nzambe na biso.” (1 Bakolinti 6:9-11) Kanisá naino​—lingomba ya malamu esalisaki baoyo bazalaki liboso na etamboli ya mabe bákóma pɛto mpe básalela Nzambe na bosembo!

Kasi, Biblia ekebisi biso boye: “Mikolo ekoya bato bakolinga koyoka mateya ya solo ata moke té, kasi bakolanda baposa na bango moko, pe bakoluka balakisi ebele, po báya koteya bango bobele makambo oyo balingi koyoka.”​—2 Timote 4:3, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ezali boni mpo na mangomba oyo yo oyebi? Elandaka mitinda ya Biblia na oyo etali kolinga malamu mpe koboya mabe? To ekakolaka mibeko ya Liloba ya Nzambe mpe eteyaka bato kaka “makambo oyo balingi koyoka”?

Mpo na koyeba soki lingomba boye to boye ezali kobota mbuma ya malamu, meká naino koyanola na mituna oyo:

MOTÓ YA LIKAMBO: Libala.

OYO BIBLIA ETEYAKA: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato ya pite mpe ya ekobo.”​—Baebele 13:4, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango elendisaka bandimi oyo bakomisá mabala na bango na buku ya Leta te bákende kosala yango?

MOTÓ YA LIKAMBO: Koboma libala.

OYO BIBLIA ETEYAKA: Ntango batunaki ye soki mobali akoki koboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso, Yesu alobaki boye: “Nazali koloba na bino ete ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala mosusu, azali kosala ekobo.”​—Matai 19:9, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango etosaka maloba ya Yesu mpe epesaka bato nzela ya koboma libala mpe kobala lisusu kaka ntango moto asali ekobo?

MOTÓ YA LIKAMBO: Pite.

OYO BIBLIA ETEYAKA: “Bókima pite. Masumu nyonso mosusu makosalaka moto mazali libanda na nzoto. Nde moto ya pite akosalela nzoto na ye moko lisumu.”​—1 Bakolinti 6:18, haut fleuve.

“Basi na bango babongoli ndenge oyo ebongisamá ya kosalela nzoto na bango ekómi ndenge oyo ebongisamá te; mibali mpe ndenge moko batiki ndenge oyo ebongisamá ya kosangana na mwasi mpe bakómi kozika makasi na bamposa na bango oyo eleki ndelo moto mokomoko mpo na mosusu, mibali ná mibali, kosaláká oyo ezali nsɔni mpe komizweláká mbano mobimba, oyo ekokani mpenza na libunga na bango.”​—Baloma 1:26, 27.

MOTUNA: Lingomba yango eteyaka ete kosangisa nzoto na kati ya mwasi ná mobali oyo babalaná te to kosangisa nzoto basi na basi to mibali na mibali ezali lisumu?

MOTÓ YA LIKAMBO: Kolendisa bandimi bátosa na mpiko nyonso mitinda ya Biblia.

OYO BIBLIA ETEYAKA: “Bósangana na moto moko te oyo abiangami ndeko mpenza soko ye azali moto na pite, soko na bilulela, soko mosambeli na bikeko, soko motuki, soko molangi masanga, soko moyibi. Bólya esika moko na moto na ndenge yango te.” (1 Bakolinti 5:11, haut fleuve) Nini ekokómela bato oyo bamibengaka baklisto, kasi bamipesi na masumu mpe baboyi kobongwana? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Benganá moto yango mabe na kati na bino.”​—1 Bakolinti 5:13, haut fleuve.

MOTUNA: Lingomba yango ebenganaka bandimi oyo bazali kobuka mibeko ya Biblia na nko mpe baboyi kobongola motema?

Lingomba nini eyebani ete elandelaka mpenza mitinda ya Biblia?