Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liteya 6: Nzambe andimaka bililingi mpe bikeko na losambo

Liteya 6: Nzambe andimaka bililingi mpe bikeko na losambo

Liteya yango eutá wapi?

“Bakristo ya liboso bazalaki kosalela bililingi na losambo te . . . Bililingi ekɔtaki na lingomba na ekeke ya 4 mpe 5 mpo balobaki ete bato oyo bayebi Nzambe te bakoki koyekola malamu mateya ya bokristo na nzela na yango koleka na nzela ya masolo to babuku.”​—Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, ya McClintock ná Strong, Volimi 4, nkasa 503 mpe 504.

Biblia elobi nini?

“Okosala ekeko mpɔ na yɔ tɛ, sɔkɔ elilingi na elɔkɔ na lola na likolo tɛ, na mokili na nse tɛ, to na mai na nse na mokili tɛ. Okokumbamela yango tɛ to kosalela yango tɛ.” (Esode 20:4, 5, haut fleuve) Ntoma Yoane akomelaki bakristo ya ekeke ya liboso ete: “Bana, bókeba na bikeko.”​—1 Yoane 5:21.

Ndenge mangomba elobaka, bikeko ezali kaka ndenge ya kopusana penepene mpe kokumisa moto oyo yango ezali komonisa? Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi boye: “Ekoki kozala ete, na ebandeli, bazalaki kosalela bililingi libosoliboso mpo na koteya mpe kobongisa bisika; kasi bazalaki koloba bongo mingimingi mpo na kolongisa likambo yango. Nzokande, eumelaki te, bakómaki kosambela yango. Ezalaki bongo mingimingi mpo na bikeko oyo ezwaki esika monene na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse.” Nzokande, mosakoli Yisaya atunaki malamu ete: “Bokoki kokokanisa Nzambe na nani, mpe eloko nini bokoki kotya pembeni na ye oyo ekokani na ye?”​—Yisaya 40:18.

Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Yisaya 44:13-19; Misala 10:25, 26; 17:29; 2 Bakorinti 5:7

LIKAMBO YA SOLO:

Nzambe andimaka te ete bato básalela bililingi mpe bikeko na losambo

BOYÁ MATEYA YA LOKUTA, KANGAMÁ NA SOLO

Tokoki kosukisa ndenge nini nsima ya kotalela mwa moke mateya ya lokuta oyo ezali se koteyama na mangomba mingi? “Masapo [wana] ya lokuta oyo esalemi na mayele te” ekoki te kotɛlɛma liboso ya mateya ya Biblia oyo ezali polele mpe oyo ebɔndisaka.​—2 Petro 1:16.

Yango wana, zalá na makanisi ya malamu mpe kokakatana te kokokanisa makambo oyo bateyá yo ná Liloba ya Nzambe, epai solo eutaka. (Yoane 17:17) Na bongo, elaka oyo ekokokisama mpe epai na yo: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—Yoane 8:32.