Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tiká masanga na esika na yango

Tiká masanga na esika na yango

Tiká masanga na esika na yango

TONY, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, akokaki kozala na bomoi ya malamu​—soki kaka andimaki kosilisa mokakatano oyo azalaki na yango na masanga. Kasi, lokola amonaki ete akoki komɛla masanga mingi kozanga ete bilembo emonana polele, azalaki kokanisa ete makambo nyonso ya bomoi na ye ezali malamu. Mpo na nini makanisi na ye ezalaki na libunga?

Kolekisa ndelo na komɛla masanga ebebisaki bososoli na ye. Ezala Tony azalaki koyeba yango to te, bɔɔngɔ na ye​—enama oyo ezalaki kotambwisa nzoto, makanisi mpe bizaleli na ye—​ezalaki kosala malamu lisusu te ntango ezalaki kotonda na masanga. Ntango azalaki komɛla mingi, bɔɔngɔ na ye ezalaki na likoki mingi lisusu te ya kotalela malamu ndenge bomoi na ye ekómi.

Ntina ya mibale oyo Tony azalaki komiyeba malamu te ezali mpo azalaki na mposa makasi ya kokoba komɛla kaka ndenge amɛlaka. Na ebandeli, Allen, oyo tolobelaki na masolo oyo eleki, azalaki koboya kondima ete azalaki na mokakatano na masanga. Alobi boye: “Soki namɛli, nazalaki kobomba yango, mpe nazalaki koluka komilongisa mpe kosala lokola nalangwe te. Nazalaki koluka kaka eloko moko: nazanga komɛla masanga te.” Atako bato mosusu bazalaki komona ete Tony ná Allen bazali komɛla mingi, bango moko bazalaki koloba na nse ya motema ete likambo moko ya mabe ezali te. Bango mibale basengelaki kozwa ekateli mpo na kotika komɛla mingi. Kasi, ekateli nini?

Zwá ekateli!

Bato mingi oyo batiká komɛla masanga mingi bazwaki ekateli na kolanda toli ya Yesu oyo: “Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo. Mpo eleki malamu obungisa moko ya binama na yo na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na Gehena.”​—Matai 5:29.

Ya solo, Yesu azalaki te kotinda bato bámikata nzoto. Kasi, asalelaki nde elilingi mpo na komonisa ete tosengeli kondima kolongola na bomoi na biso eloko nyonso oyo ezali kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Ya solo, likambo yango ekoki kozala mpasi mingi. Kasi, ekobatela biso tókwea te na makanisi mpe na makambo nyonso oyo ekoki komema biso na komɛla masanga mingi. Na yango, soki bato mosusu bamonisi ete bazali komitungisa mpo okómi komɛla masanga mingi, luká ndenge ya kosilisa mokakatano yango. * Soki omoni ete okokoka te kotika komɛla mingi, ndimá kopikola yango na bomoi na yo. Ata soki ekoki kozala mpasi, mpasi yango ekokani te na mpasi ya kobebisa bomoi mobimba.

Ata soki ozali moombo ya masanga te, okómi komɛla mingi? Soki ezali bongo, makambo nini ya malamu okoki kosala mpo okoka kotika masanga na esika na yango?

Esika ya kozwa lisalisi

1. Zalá na kondima ete kobondela mbala na mbala mpe na motema mobimba esalisaka. Biblia epesi bato nyonso oyo balingi kosepelisa Yehova Nzambe toli oyo: “Na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Okoki kosɛnga nini na libondeli na yo mpo ozwa kimya wana ya makanisi?

Ndimá na bosembo ete ozali na mokakatano na masanga, mokakatano oyo etali nde yo moko. Koyebisa Nzambe likambo oyo olingi kosala mpo na yango ekotinda ye apambola milende oyo ozali kosala mpo na kozwa lisalisi mpe kokima mikakatano ya minene koleka. Biblia elobi boye: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.” (Masese 28:13) Yesu mpe alobaki ete tokoki kobondela boye: “Salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na . . . mabe.” (Matai 6:13) Kasi, ndenge nini okoki kosala na boyokani na libondeli wana, mpe epai wapi okoki kozwa biyano na malɔmbɔ na yo?

2. Zwá makasi na kati ya Liloba ya Nzambe. “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya . . . mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebre 4:12) Kotánga Biblia mpe komanyola bavɛrsɛ ya Biblia mokolo na mokolo esalisá bato mingi oyo bazalaki liboso bamɛli-masanga. Mokomi moko ya nzembo oyo azalaki kobanga Nzambe akomaki boye: “Esengo na moto oyo atamboli na toli ya bato mabe te . . . kasi asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. . . . Nyonso oyo azali kosala ekolonga.”​—Nzembo 1:1-3.

Allen, oyo boyekoli na ye ya Biblia ná Batatoli ya Yehova epesaki makasi ya kotika komɛla masanga mingi, alobi boye: “Nandimi mpenza ete soki Biblia te ná mitinda ya Biblia oyo esalisaki ngai natika komɛla mingi, mbɛlɛ nakufá.”

3. Loná komipekisa. Biblia elobi ete bato mosusu ya lisangá ya bokristo oyo kala bazalaki balangwi-masanga basukolamaki “na elimo ya Nzambe na biso.” (1 Bakorinti 6:9-11) Na ndenge nini? Na ndakisa, bazwaki lisalisi mpo bátika kolangwa masanga mpe bafɛti ya lokoso mpo balonaki komipekisa, ezaleli oyo moto akolisaka na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe. “Bólangwaka vinyo te, mpo bomoi ya mbindo ezali na kati na yango, kasi bókoba kotonda na elimo.” (Baefese 5:18; Bagalatia 5:21-23) Yesu Kristo alakaki ete “Tata na likoló akopesa . . . baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu.” Na yango, ‘kobá kosɛnga, mpe bakopesa yo.’​—Luka 11:9, 13.

Bato oyo balingi Yehova andima losambo na bango bakoki kolona komipekisa soki bazali kotánga mpe koyekola Biblia mpe soki bazali kobondela mbala na mbala mpe na motema mobimba. Na esika olɛmba nzoto, ndimá elaka ya Liloba ya Nzambe oyo: “Oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko oyo euti na elimo. Yango wana, tótika te kosala oyo ezali malamu, mpo na ntango oyo ekoki tokobuka mbuma soki tolɛmbi te.”​—Bagalatia 6:8, 9.

4. Poná baninga ya malamu. “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Yebisá baninga na yo ekateli oyo ozwi ya kotika masanga na esika na yango. Kasi, Liloba ya Nzambe emonisá banda kala ete ntango otiki “kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, [mpe] na komɛla mingi,” baninga mosusu ya kala ‘bakobulungana mpe bakofinga yo.’ (1 Petro 4:3, 4) Ndimá kokata boninga na bato oyo bazali kolɛmbisa ekateli na yo ya kotika komɛla mingi.

5. Yebá esika osengeli kosuka. “Bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baroma 12:2) Soki otiki mitinda ya Liloba ya Nzambe esalisa yo oyeba esika oyo osengeli kosuka na esika ete otika baninga na yo to “makambo ya ntango oyo” esala yango, okozala na bomoi oyo ekondimama epai ya Nzambe. Kasi, ndenge nini okoki koyeba esika oyo osengeli kosuka?

Soki omɛli masanga, ata moke, mpe ebebisi bososoli na yo mpe elɛmbisi makoki na yo ya kokanisa, masanga yango eleki mingi mpo na yo. Na yango, soki olingi komɛla, ekozala malamu te kotya ndelo na esika oyo ezali pene na esika oyo okobanda kolangwa. Kotika te ete ntembe epekisa yo kotosa esika oyo oyebi ete osengeli kosuka. Tyá ndelo, oyo ekozala na likama te​—oyo ata soki oleki yango okolangwa te.

6. Yebá koboya. “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.” (Matai 5:37) Soki ozali mopaya, yebá koboya, kasi na limemya, ntango moto oyo ayambi yo azali na boboto mpe alingi kaka kopesa yo masanga, kasi ayebi ndelo na yo te. “Liloba na bino ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa, mpo na koyeba ndenge oyo bosengeli kopesa moto mokomoko eyano.”​—Bakolose 4:6.

7. Luká básalisa yo. Sɛngá lisalisi ya baninga ya malamu oyo bakoki kolendisa ekateli na yo ya kotika komɛla mingi mpe oyo bakoki kosalisa yo ozala na boyokani malamu na Nzambe. “Bato mibale baleki moto moko, mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi. Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.” (Mosakoli 4:9, 10; Yakobo 5:14, 16) Ndenge moko mpe ebongiseli moko na États-Unis (The National Institute on Alcohol Abuse and Alcoholism) epesi toli oyo: “Kotika komɛla mingi ekoki kozala mpasi na bantango mosusu. Sɛngá libota mpe baninga na yo básalisa yo okokisa mokano na yo.”

8. Kangamá na ekateli na yo. “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te, noki bómikosa na makanisi ya lokuta. Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala, akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.”​—Yakobo 1:22, 25.

Kolongwa na boombo ya masanga

Moto nyonso te oyo amɛlaka mingi nde akómaka moombo ya masanga. Kasi, bato mosusu babandaka komɛla mingi, to mbala mingi, mpe bakómaka baombo ya masanga. Lokola kozala moombo ya masanga esalaka ete nzoto mpe makanisi ya moto ezala malamu te soki amɛli masanga te, mpo bato ya ndenge wana bátika momesano ya komɛla masanga, ekateli na bango moko mpe lisalisi ya elimo ekoki te. Allen alobi boye: “Ntango nazalaki kotika masanga, mpasi oyo nazalaki koyoka na nzoto ezalaki makasi. Na ntango yango nde namonaki ete longola lisalisi ya elimo oyo nazalaki kozwa, nasengelaki mpe kokende na lopitalo.”

Bato mingi oyo bazali baombo ya masanga basengeli na lisalisi ya monganga mpo bálonga etumba na bango mpe bálongwa na boombo ya masanga. * Mpo na bato mosusu, esɛngaka ete bákɔta lopitalo soki bazali komona mpasi mingi ntango bazali kotika masanga to bázwaka bankisi oyo ekokitisa bango mposa ya komɛla masanga mpe ekosalisa bango bátika masanga. Mwana ya Nzambe oyo azalaki kosala makamwisi alobaki ete: “Baoyo bazali nzoto makasi bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde baoyo bazali na maladi.”​—Marko 2:17.

Matomba ya kotosa malako ya Nzambe

Batoli malamu oyo ezali na Biblia euti na Nzambe ya solo, oyo alingi bolamu na biso, kaka mpo na kosepelisa biso lelo oyo te, kasi mpe mpo na bolamu na biso ya seko. Mbula 24 nsima ya kotika komɛla masanga, Allen alobi boye: “Ezali esengo mingi koyeba ete nakokaki kozala na bomoi ya ndenge mosusu, ete Yehova azalaki kolinga kosalisa ngai nasembola makambo oyo ezalaki mabe na bomoi na ngai, mpe . . .” Allen atiki koloba mpe akangi motema mpo mpisoli ebima te ntango makambo ya kala ezongeli ye. “Ɛɛ, nalingi koloba, . . . koyeba ete Yehova amityaka na esika na biso mpe amibanzabanzaka mpo na biso, mpe apesaka biso lisalisi oyo esengeli​—nazalaki kondima yango te.”

Yango wana, soki omɛlaka masanga mingi to ozali moombo ya masanga, kolɛmba nzoto mbala moko te mpe koloba te ete elikya ezali te. Allen mpe bato mosusu mingi bazalaki ndenge yo ozali sikoyo mpe batiká komɛla mingi to batiká mpenza komɛla. Bazali na mawa soki moke te; yo mpe okozala na mawa te soki otiki.

Opona komɛla na bokatikati to oboya mpenza komɛla, landá toli oyo Nzambe na biso ya bolingo apesi ete: “Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”​—Yisaya 48:18.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Talá etanda  “Masanga ezali kotambwisa ngai?” na lokasa 8.

^ par. 24 Ezali na balopitalo mpe bibongiseli mingi oyo ekoki kopesa yo lisalisi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etindi moto te andima lolenge boye to boye ya komisalisa. Moto na moto asengeli kotalela malamumalamu lolenge ya kosalisa nzoto oyo akoki kopona mpe na nsima kozwa ekateli na ye moko oyo ebuki mitinda ya Biblia te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 8]

 Masanga ezali kotambwisa ngai?

Okoki komituna boye:

• Nakómi komɛla masanga mingi koleka?

• Nakómi komɛla mbala mingi koleka?

• Nakómi komɛla masanga ya makasi koleka?

• Namɛlaka mpo na kosilisa mitungisi mpe kokima mikakatano?

• Moninga to ndeko moko ya libota ayebisá ngai ete nakómi komɛla mingi?

• Masanga ekómi kobimisela ngai mindɔndɔ na ndako, na mosala, to na mobembo?

• Nakokoka te kolekisa pɔsɔ moko kozanga namɛla?

• Nayokaka mabe soki bato mosusu baboyi komɛla masanga?

• Nalingaka te bato báyeba soki namɛlaka bakɔpɔ to milangi boni ya masanga?

Soki oyanoli ɛɛ na motuna moko to koleka, ekoki kosɛnga oluka ndenge ya kosala mpo otika komɛla masanga mingi.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 9]

Ndenge ya kozwa bikateli ya malamu mpo na masanga

Liboso ya komɛla masanga, omituna boye:

Ezali malamu namɛla masanga to te?

Likanisi: Moto oyo akokoka te kotya ndelo epai akosuka, asengeli koboya komɛla.

Bakɔpɔ to milangi boni nasengeli komɛla?

Likanisi: Tyá ndelo epai okosuka liboso masanga ebanda kobebisa bososoli na yo.

Ntango nini nakomɛla?

Makanisi: Komɛla te liboso ya kotambwisa motuka to kosala makambo oyo esɛngaka likebi mingi; liboso ya kosala makambo ya losambo; soki ozali na zemi; ntango ozali komɛla bankisi mosusu.

Epai wapi nakomɛla?

Makanisi: Na esika ya malamu; na kobombana te; komɛla te liboso ya bato oyo bamonaka ete masanga ezali mabe.

Nakomɛla elongo na nani?

Makanisi: Elongo na baninga ya malamu to bandeko ya libota; elongo na bato ya milangwa te.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 10]

Liloba ya Nzambe esalisi momɛli moko ya kala

Supot, na Thaïlande, azalaki momɛli monene ya masanga. Na ebandeli, azalaki komɛla kaka na bampokwa. Mokemoke, akómaki komɛla na ntɔngɔ; na nsima, akómaki mpe komɛla na ntango ya kolya na moi. Mbala mingi, azalaki komɛla kaka mpo alangwa. Kasi, na nsima akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Ntango ayekolaki ete Yehova Nzambe alingaka te bato bálangwaka masanga, Supot atikaki komɛla. Kasi nsima ya mwa ntango, azongelaki momeseno na ye ya komɛla masanga. Libota na ye etungisamaki makasi.

Atako bongo, Supot azalaki kaka kolinga Yehova mpe alingaki kosalela ye ndenge esengeli. Baninga ya Supot bakobaki kosalisa ye mpe kolendisa bato ya libota na ye bálekisaka ntango mingi ná ye mpe bátika te kosalisa ye. Na ntango wana, likebisi ya polele oyo ezali na 1 Bakorinti 6:10 ete ‘balangwi-masanga bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te’ esalisaki Supot amona ete likambo yango ezali lisɛki te. Amonaki ete asengeli kosala nyonso mpo atika kolangwa masanga.

Ya mbala oyo, Supot azwaki ekateli makasi ya kotika masanga mpo na libela. Nsukansuka, nguya ya elimo santu ya Nzambe, litambwisi ya Liloba ya Nzambe, mpe lisalisi ya baninga mpe ya lisangá epesaki Supot makasi mpe alongaki mposa na ye ya komɛla masanga. Libota na ye esepelaki mingi ntango azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe. Lelo oyo, Supot azali na boyokani makasi na Nzambe oyo ye azalaki koluka banda kala, mpe asalelaka ntango na ye mpo na kosalisa basusu báyeba Nzambe.