Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Nzela nini ntoma Paulo azwaki ntango asalaki mobembo na ye ya liboso mpo na kokende na Roma?

Misala 28:13-16 elobi ete masuwa oyo Paulo akɔtaki mpo na kokende na Italie ekómaki na Puteoli (lelo oyo babengaka yango Pouzzoles), na golfe de Naples. Mpo na kokóma na Roma, Paulo azwaki nzela oyo babengi Via Appia, nzela monene ya engumba yango.

Babengaki nzela yango Via Appia na kolanda nkombo ya Appius Claudius Caecus, mokonzi ya Roma oyo abandaki kotonga nzela yango na mobu 312 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Nzela yango, oyo etongamá na mabanga oyo euti na volcan, ezali monene ya mɛtrɛ soki 5 to 6 mpe molai ya kilomɛtrɛ soki 583 banda na Roma ekei na sudi-ɛsti na yango. Ezalaki kolongwa na Roma tii na libongo ya Brundisium (lelo oyo Brindisi), nzela ya kokende na Ɛsti. Bato ya mobembo bazalaki kotɛlɛma nzelanzela na bisika oyo esengeli kotɛlɛma​—esika mokomoko ekabwanaki na mosusu na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 24—​mpo na kosomba biloko, kolala, to kozwa bampunda mosusu to makalo mosusu.

Kasi, mbala mosusu Paulo azalaki kotambola na makolo. Ntaka ya nzela Via Appia oyo atambolaki ezalaki kilomɛtrɛ 212. Nzela yango elekaki mpe na marais Pontins, etando moko monene oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ mingi, oyo etindaki mokomi moko Moroma amilelalela ete ezali esika ya bangungi mpe ya nsolo mabe. Na nɔrdi ya esika yango, ezalaki Zando ya Apiusi​—kilomɛtrɛ soki 65 longwa na Roma—​mpe Tavɛrnɛ-Misato, esika moko oyo bato ya mobembo bazalaki kopema, kilomɛtrɛ soki 50 na Roma. Bakristo oyo bautaki Roma bazalaki kozela Paulo na bisika wana mibale. Ntango amonaki bango, “Paulo apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.”​—Misala 28:15.

Etanda ya kokomela oyo Luka 1:63 elobeli ezalaki ya ndenge nini?

▪ Evanzile ya Luka elobi ete baninga ya Zekaria batunaki ye nkombo nini basengeli kopesa mwana na ye oyo autaki kobotama. Zekaria “asɛngaki etanda moko mpe akomaki ete: ‘Nkombo na ye Yoane.’” (Luka 1:63) Buku moko ya makambo ya Biblia elobi ete liloba ya Grɛki oyo babongoli “etanda” na vɛrsɛ yango emonisaka “mwa etanda ya kokomela oyo esalemi na libaya mpe bapakoli mafuta (cire).” Bazalaki kopakola mafuta ya nzoi (cire) na bisika oyo mabaya etutani. Mokomi akokaki kosalela ekomeli mpo na kokoma na etanda yango. Na nsima, bazalaki koboma makambo oyo bakomaki liboso mpe kokoma makambo mosusu na etanda yango.

Buku Kotánga mpe kokoma na ntango ya Yesu (na Lingelesi) elobi boye: “Mayemi oyo euti na Pompéi, mayemi oyo euti na bisika ndenge na ndenge ya Ampire ya Roma mpe biloko mosusu oyo bakundolaki na bisika mingi banda na Ezipito tii na efelo ya Hadrien [nɔrdi ya Grande-Bretagne] emonisi ete bitanda ya ndenge wana epalanganaki mingi.” Bato ndenge na ndenge bakokaki kozala na bitanda ya ndenge wana ntango nyonso: bato ya mimbongo, bakonzi ya Leta, mpe mbala mosusu bakristo ya ekeke ya liboso.

[Elilingi na lokasa 11]

Via Appia

[Elilingi na lokasa 11]

Etanda ya mwana-kelasi, ekeke 2 T.B.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya British Library