Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokolo mosusu mabele ekosuka?

Mokolo mosusu mabele ekosuka?

Mokolo mosusu mabele ekosuka?

“NSUKA ya mokili ezali likambo oyo esilaka ngala te, mingimingi na bafilme.” Wana maloba ya mokomi ya zulunalo moko, nkombo na ye John Scalzi. Mpo na nini bafilme oyo elobelaka nsuka ya mokili ebendaka likebi ya bato? Scalzi alobi boye: “Ezali mpo bafilme yango elobelaka makambo oyo tobangaka.” Ondimi yango? Tozali mpenza na bantina ya kobanga ndenge mpe ntango oyo mbala mosusu mabele ná bomoi nyonso kati na yango ekosuka?

Mokolo na mokolo, toyokaka bansango ya makama oyo ezali kobebisa bisika mingi na mabele. Mbala na mbala, bazali kolekisa bafilme ya makambo wana ya nsɔmɔ na televizyo mpe na Internet. Ntango tozali komona bililingi oyo ezali kolakisa ndenge bato mpenza bazali kokufa mpe bisika ya solo ezali kobeba, ezali mpasi te komona ete nsuka ya mokili ezali mpenza likama oyo ezali koya mpe ezali kaka likambo ya bafilme te.

Longola makambo wana ya kobangisa, bato ya siansi bazali kolobela ndenge mabele ekoki kosuka. Bamosusu kutu balobelaka oyo tokoki kobenga dati oyo mabele ekosuka. Na sanza ya Marsi 2008, zulunalo moko (Monthly Notices of the Royal Astronomical Society) elobaki ete bato mibale ya astronomi basakolaki ete nsima ya mbula soki miliare 7,59, moi ekomɛla mabele mpe ekolimwisa yango.

Mabele ekosuka mpenza mokolo mosusu?

Mabele ezali na dati oyo yango ekosuka?

Biblia eyebisi biso ete: “Libota oyo eleki, mpe libota mosusu eyei; kasi mabele ezali koumela seko.” (Mosakoli 1:4) Yehova Nzambe “atyá [malamu] moboko ya mabele na bisika na yango ya libela” mpe abongisá yango mpo eumela “kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ, libela.” (Nzembo 104:5) Okanisi ete maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekoki kozala solo te? Mpo na nini osengeli kondima ete mabele ekosuka te, atako bato mosusu ya siansi bazali koloba ete ekosuka?

Tózwa ndakisa ya biloko oyo batandi na magazini moko. Biloko yango mosusu ezali na badati oyo yango ekosuka to ekobeba. Nani atyaki dati yango? Ezalaki kaka nkolo ya magazini nde atyaki yango mpo akómá na mayele ndenge amesaná na biloko yango? Te! Moto oyo asalaki biloko yango nde atyaki dati oyo yango ekosuka to ekobeba. Tondimaka dati yango mpo mosali biloko yango ayebi biloko na ye malamu koleka moto mosusu nyonso. Bongo tosengeli te kondimela mingi koleka Mokeli ya mabele? Liloba na ye elobi polele ete ‘atɛlɛmisi mabele makasi’ mpo eumela libela na libela. Dati oyo mabele ekosuka to ekobeba ezali te!​—Nzembo 119:90.

Kasi, ekoki nde kosalema ete bato oyo bazali kokipe te kobatela mabele bábebisa yango na ndenge oyo ekokoka kobonga lisusu te? Ekosalema te! Na bokeseni na bato oyo basalaka biloko, Yehova ‘akoki kosala makambo nyonso.’ (Yobo 42:2) Yango wana apesi solosolo ndanga ete: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai . . . ekolonga mpenza.” (Yisaya 55:11) Tokoki kondima mpenza ete “Mokeli na biso” akotika ata eloko moko te epekisa ye kokokisa mokano na ye mpo na mabele. (Nzembo 95:6) Mokano yango ezali nini, mpe ndenge nini Nzambe akokokisa yango?

Bokonzi ya Nzambe ekokokisa mokano na Ye

Longola ndanga oyo Liloba ya Nzambe epesi ete mabele ekosuka soki moke te, elobi mpe ete “asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Atako bato bafandá na mabele banda bankóto ya bambula, yango te nde ekokisi mokano ya Nzambe.

Yehova azali “Nzambe ya esengo” mpe “alingaka bosembo.” (1 Timote 1:11; Nzembo 37:28) Mokano na ye ezali ete bato nyonso báfanda na esengo mpe na mokili oyo makambo ya kozanga bosembo ezali te. Mpo na kokokisa mokano na ye, Nzambe asakolaki ete akotya Bokonzi moko na likoló oyo ekoyangela mabele mobimba. (Danyele 2:44) Ntango azalaki awa na mabele, Yesu alobelaki mbala na mbala guvɛrnema ya Bokonzi ya Nzambe. Alendisaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango mpo ayebaki malamu mapamboli nyonso oyo ebombami mpo na mabele, oyo ekoya ntango Bokonzi yango ekoyangela. (Matai 6:9, 10; 24:14) Na ndakisa, mapamboli nini?

Kimya ekozala mpe likambo ya kobanga ekozala te mpo Nzambe alaki kosilisa bitumba nyonso.​—Nzembo 46:9.

Bilei ekozala mingi mpo na bato nyonso.​—Nzembo 72:16.

Balopitalo ekozala lisusu na ntina te mpo “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

Ntina ya kolela ekozala te, mpo “liwa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:4.

Nzambe alaki ete bato na ye bakotonga bandako na bango moko, bakofanda na kimya, mpe ‘bakozala na esengo libela.’​—Yisaya 65:17-24.

Na ntembe te, ozali na mposa makasi ya komona makambo wana oyo touti kolobela. Yehova azali na mposa makasi mpenza ya kokokisa makambo nyonso oyo asakolaki. (Yisaya 9:6, 7) Kasi, okoki komituna boye: ‘Eleki bankóto ya bambula banda bilaka ya Nzambe ekomamá na Biblia. Mpo na nini ekokisami kaka te?’

Motema molai ya Nzambe ezali komema biso na lobiko

Yebá ete “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye.” Biblia emonisi ete Nzambe azali komonisela biso motema molai mpo alingi biso. Na yango, Biblia elendisi biso ‘tótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.’ (2 Petro 3:9, 15) Kasi, mpo na nini motema molai ya Nzambe ezali na ntina mpo tóbika?

Ya liboso, Nzambe ayebi ete liboso apesa bayengebene mokili ya kimya mpe ya kitoko, asengeli naino ‘kobebisa baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Kasi, lokola alingaka bato, Yehova “alingi moto ata moko te abomama.” Yango wana, Tata na biso ya likoló azali komonisa motema molai mpe “kokebisa moto mabe mpo na nzela na ye ya mabe.” Mpo na yango, Yehova azali kosala ete nsango malamu ya Bokonzi na ye esakolama na mokili mobimba. * (Ezekiele 3:17, 18) Baoyo nyonso bazali kondima likebisi ya Nzambe mpe koyokanisa bomoi na bango na mitinda na ye ya sembo bakozwa lobiko mpe bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.

Baluká epai ya Nzambe mpe obika

Ya solo, Biblia ezali na “nsango malamu” mpo na biso. (Matai 24:14) Eyebisi biso liloba ya Nzambe oyo ekozanga te kokokisama ete mabele ekosuka te to ekobeba ata mokolo moko te! Longola yango, na kolanda bisakweli ya Biblia, tokoki kondima ete “etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te.” Mosika te, bato nyonso oyo bazali sembo na miso ya Nzambe “bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” (Nzembo 37:9-11, 29; Matai 5:5; Emoniseli 21:3, 4) Liboso ntango yango ekóma, Nzambe akokoba komonisa motema molai mpe kobelela ete: “Bóbaluka epai na ngai mpe bóbika, bino nyonso oyo bozali na nsuka ya mabele.” (Yisaya 45:22) Okosala nini?

Mpo na nini te kozwa ekateli ya kobaluka epai ya Nzambe? Nzembo 37:34 elendisi biso ete: “Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye, mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele.” Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyeba makambo mosusu oyo etali mokano ya seko ya Nzambe mpo na mabele mpe ndenge oyo okoki kotambwisa bomoi na yo mpo ozala wana ntango mokano yango ekokokisama.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 21 Mpo na kotosa etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19, 20, Batatoli ya Yehova koleka milio 7 na mikili 236 bazali kolekisa ngonga soki miliare moko na ndambo mbula na mbula na koteya bato mokano kitoko ya Nzambe mpo na mabele.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 22]

NASA photo