Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Boyangeli ya Yehova elongisami!

Boyangeli ya Yehova elongisami!

Boyangeli ya Yehova elongisami!

“Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.”​—DAN. 4:17.

1, 2. Wapi mwa makambo oyo emonisi ete boyangeli ya bato elongi te?

 BOYANGELI ya bato elongi te! Ezali likambo ya kotya ntembe te. Ntina ya libosoliboso oyo esali ete bato bálonga te ezali ete bazangi bwanya ya koyangela. Emonani polele ete boyangeli ya bato elongi te mpo bakonzi mingi bazali ‘bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bazangi bosembo, bato oyo balingaka kosala boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya nko, bato oyo balingaka makambo ya malamu te, batɛkaka bamosusu, bavimbi na lolendo.’​—2 Tim. 3:2-4.

2 Esili koleka ebele ya bambula, baboti na biso ya liboso baboyaki boyangeli ya Nzambe. Na ndenge yango, bakanisaki ete baponi bonsomi. Nzokande, mpo na koloba solo, bandimaki nde Satana ayangela bango. Na boumeli ya mbula nkóto motoba ya boyangeli mabe ya bato​—oyo etambwisami na Satana, “mokonzi ya mokili oyo”—​makambo ya mokili ebebi nde kobeba. (Yoa. 12:31) Ntango elobelaki ndenge bomoi ya bato ezali lelo oyo, buku moko (The Oxford History of the Twentieth Century) elobaki ete ezali na ntina te “koluka mokili ya kokoka.” Ebakisaki boye: “Mokili ya ndenge wana ekoki kozala te, mpe koluka kosala mokili ya ndenge wana ekobimisa kaka makama, bakonzi oyo bakoluka kokonza bato, mpe eloko eleki mabe mpenza ekobimisa bitumba.” Maloba oyo ya polele emonisi ete boyangeli ya bato elongi te!

3. Tokoki koloba nini na ndenge oyo Nzambe alingaki koyangela soki Adama ná Eva basalaki lisumu te?

3 Ezali mpenza mawa ndenge baboti na biso baboyaki boyangeli kaka moko ya malamu​—Boyangeli ya Nzambe! Ya solo, toyebi mpenza na bosikisiki te ndenge oyo Yehova alingaki koyangela mabele soki Adama ná Eva batikalaki sembo epai na ye. Kasi, tokoki mpenza kondima ete boyangeli yango ya Nzambe elingaki kotambwisa makambo na bolingo mpe kozanga koponapona, soki bato bandimaki boyangeli yango. (Mis. 10:34; 1 Yoa. 4:8) Na kotalela bwanya ya Nzambe oyo eleki bwanya nyonso, tokoki mpenza kondima ete soki bato bandimaki kotambwisama na boyangeli ya Yehova, mabunga nyonso oyo bato oyo bandimaka boyangeli ya bato basali, elingaki kozala te. Teokrasi, to mpe boyangeli ya Nzambe, elingaki “kokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (Nz. 145:16) Na mokuse, elingaki kozala boyangeli moko ya kokoka. (Mib. 32:4) Ezali mpenza mawa ndenge bato baboyaki boyangeli yango!

4. Nzambe apesi Satana nzela ya koyangela tii wapi?

4 Atako bongo, ezali malamu tóbosana te ete atako Yehova apesi bato nzela bámiyangela, atiki soki moke te lotomo na ye ya koyangela bikelamu na ye. Ata mokonzi ya nguya ya Babilone andimaki likambo yango na nsima ete “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.” (Dan. 4:17) Nsukansuka, Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mokano na ye esalema. (Mat. 6:10) Ya solo, mpo na mwa ntango, Yehova atiki Satana azala “nzambe ya makambo ya ntango oyo” mpo eyano ya polele epesama na bantembe oyo motɛmɛli wana abimisaki. (2 Ko. 4:4; 1 Yoa. 5:19) Atako bongo, Satana asukaka kaka na makambo oyo Yehova apesi ye nzela. (2 Nt. 20:6; talá mpe Yobo 1:11, 12; 2:3-6.) Mpe banda kala ezalaka kaka na bato oyo baponaka Nzambe atambwisa bango, ata soki bazali na mokili oyo etambwisami na Monguna monene ya Nzambe.

Boyangeli ya Nzambe na Yisraele

5. Elako nini Bayisraele basalaki epai ya Nzambe?

5 Banda na ntango ya Abele tii ntango ekólo ya Yisraele esalemaki, bato mingi ya sembo basambelaki Yehova mpe batosaki mibeko na ye. (Ebr. 11:4-22) Na ntango ya Moize, Yehova asalaki kondimana ná bana ya Yakobo, mpe bana yango bakómaki ekólo Yisraele. Na mobu 1513 L.T.B., Bayisraele mpe bana na bango bamipesaki mpe bandimaki ete Yehova azala Mokonzi na bango; balobaki boye: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala yango.”​—Kob. 19:8.

6, 7. Makambo ezalaki ndenge nini ntango Nzambe azalaki koyangela Yisraele?

6 Ntango aponaki Bayisraele, Yehova azalaki na mokano ete bázala bato na ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 7:7, 8.) Yango ezalaki kaka mpo na bolamu ya Bayisraele te. Etalelaki mpe nkombo ya Nzambe mpe boyangeli na ye; mpe yango ezalaki na ntina mingi. Bayisraele basengelaki kozala batatoli mpo na komonisa ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. (Yis. 43:10; 44:6-8) Yango wana Yehova alobaki na ekólo yango boye: “Yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo, mpe Yehova aponi yo mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.”​—Mib. 14:2.

7 Ntango Nzambe azalaki koyangela Bayisraele, azalaki koyeba ete bazali bato ya kozanga kokoka. Mibeko na ye ezalaki ya kokoka mpe ezalaki komonisa bizaleli ya Nzambe oyo apesaki bango yango. Mibeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize, emonisaki polele bosantu ya Nzambe, bolingo na ye mpo na bosembo, mposa na ye ya kolimbisa mpe motema molai na ye. Na nsima, na ntango ya Yosua mpe bato ya eleko na ye, bato ya ekólo batosaki mibeko ya Yehova mpe bazalaki na kimya mpe mapamboli ya elimo. (Yos. 24:21, 22, 31) Eleko yango ya bomoi ya Bayisraele emonisi ete boyangeli ya Yehova elongaka ntango nyonso.

Mpasi oyo boyangeli ya bato ebimisi

8, 9. Likambo nini ya kozanga bwanya Bayisraele basɛngaki, mpe esukaki ndenge nini?

8 Nzokande, mbala mingi Bayisraele bazalaki kopesa boyangeli ya Nzambe mokɔngɔ mpe mpo na yango, Nzambe azalaki kobatela bango lisusu te. Nsukansuka, na nzela ya mosakoli Samwele, Bayisraele basɛngaki mokonzi oyo bakoki komona. Yehova ayebisaki Samwele ete akokisa mposa na bango. Kasi, Yehova abakisaki boye: “Baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.” (1 Sa. 8:7) Atako Yehova apesaki nzela ete Bayisraele bázala na mokonzi oyo bakoki komona, akebisaki bango ete koyangelama na moto ekomemela bango mpasi.​—Tángá 1 Samwele 8:9-18.

9 Makambo oyo esalemaki nsima emonisaki bosolo ya likambo oyo Yehova alobaki. Kotambwisama na moto, ememelaki Bayisraele bampasi mingi, mingimingi ntango mokonzi yango atikalaki lisusu sembo te. Likambo wana oyo ekómelaki Bayisraele, ezali kosalisa biso tókamwa te ndenge makambo oyo eleki na boumeli ya bambula ya boyangeli ya bato oyo bayebi Yehova te elongi te komemela bato bolamu ya solosolo. Ya solo, bato mosusu ya politiki basɛngaka Nzambe apambola milende na bango ya kotya kimya mpe libateli, kasi ndenge nini Nzambe akoki kopambola bato oyo bazali kolinga te kotosa boyangeli na ye?​—Nz. 2:10-12.

Ekólo ya sika oyo etambwisami na boyangeli ya Nzambe

10. Mpo na nini Nzambe aponaki ekólo mosusu na esika ya Yisraele?

10 Na nsima, Bayisraele baboyaki kosalela Yehova na bosembo. Nsukansuka, baboyaki Masiya oyo Nzambe atyaki, mpe Yehova abwakaki bango mpe azwaki mokano ya kotya na esika na bango etuluku ya bato oyo bakosala ekólo ya sika. Yango wana, na mobu 33 T.B., lisangá ya bokristo ya basambeli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo ebotamaki. Lisangá yango, ezalaki ekólo ya sika, oyo Yehova azalaki kotambwisa. Paulo abengaki ekólo yango “Yisraele ya Nzambe.”​—Gal. 6:16.

11, 12. Na likambo etali koyangela, bokokani nini ezali kati na Yisraele mpe “Yisraele ya Nzambe”?

11 Ezali na makambo oyo ekeseni mpe oyo ekokani kati na ekólo ya Yisraele mpe “Yisraele ya Nzambe.” Na bokeseni na Yisraele, lisangá ya bokristo eyangelami na moto te mpe ezali na ntina te ya kopesaka Nzambe bambeka ya banyama mpo na basumuki. Likambo moko oyo ezalaki na ekólo Yisraele, oyo ezali mpe na lisangá ya bokristo, ezali ebongiseli ya mikóló, to bankulutu. (Kob. 19:3-8) Bankulutu yango bayangelaka etonga te. Kasi, Ndenge moko na babateli ya mpate, babatelaka lisangá mpe basalaka makasi bázala bato ya liboso na misala nyonso ya bokristo. Bamoniselaka moto mokomoko na lisangá bolingo, bamemyaka mpe bapesaka moto nyonso lokumu.​—2 Ko. 1:24; 1 Pe. 5:2, 3.

12 Ntango bakanisaka lolenge oyo Nzambe azalaki kosalela Bayisraele makambo, bato ya “Yisraele ya Nzambe” mpe baninga na bango “bampate mosusu” bakómaka na botɔndi mingi epai ya Yehova mpe boyangeli na ye. (Yoa. 10:16) Na ndakisa, makambo oyo esalemaki na Yisraele emonisi ete bakonzi na bango bazalaki kopesa Bayisraele ndakisa ya malamu to ya mabe. Likambo yango esalisi baoyo bazali lelo na mikumba na lisangá ya bokristo báyeba ete atako bazali bakonzi te lokola bakonzi wana ya kala, basengeli ntango nyonso kopesaka ndakisa malamu ya kondima.​—Ebr. 13:7.

Ndenge Yehova azali koyangela lelo

13. Likambo monene nini esalemaki na 1914?

13 Lelo oyo, bakristo bazali kosakola na mokili mobimba ete etikali moke, boyangeli ya bato esuka. Na 1914, Yehova atyaki Bokonzi na ye na likoló, mpe atyaki Yesu Kristo Mokonzi. Na ntango yango, apesaki Yesu bokonzi ya kokende “kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.” (Em. 6:2) Nzambe ayebisaki Mokonzi yango boye: “Kende kotya bato na nse ya bokonzi na yo na katikati ya banguna na yo.” (Nz. 110:2) Likambo ya mawa, mbala na mbala, bato ya bikólo bazali koboya kondima boyangeli ya Yehova. Bazali kokoba kosala makambo lokola nde “Yehova azali te.”​—Nz. 14:1.

14, 15. (a) Ndenge nini boyangeli ya Nzambe ezali kotambwisa biso lelo, mpe mituna nini tosengeli komituna na likambo yango? (b) Ndenge nini ata lelo oyo, emonani ete boyangeli ya Nzambe ezali malamu koleka?

14 Mwa ndambo ya bato ya “Yisraele ya Nzambe” oyo batyamá mafuta na elimo, bazali naino awa na mabele, mpe lokola bazali bandeko ya Yesu, bazali kokoba kosala lokola “bantoma na esika ya Kristo.” (2 Ko. 5:20) Batyami lokola moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na kobatela mpe kopesa bilei ya elimo epai ya bato oyo batyami mafuta na elimo mpe bamilio ya bakristo oyo motángo na bango ezali se kobakisama, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele. (Mat. 24:45-47; Em. 7:9-15) Mapamboli ya elimo oyo basambeli ya solo bazali kozwa lelo oyo, emonisi polele ete Yehova azali kopambola ebongiseli yango.

15 Ekozala malamu mokomoko na biso amituna boye: ‘Nayebaka mpenza mikumba oyo nasengeli kokokisa na kati ya lisangá ya bokristo? Nasimbaka mpenza boyangeli ya Yehova na ndenge oyo ebongi? Nasepelaka mpenza koyangelama na Yehova? Nazali na ekateli ya kokoba koyebisa basusu makambo na ntina na Bokonzi ya Nzambe na kotalela makoki na ngai?’ Biso nyonso tondimaka litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe tosalaka na bomoko na bankulutu. Na ndenge yango, tomonisaka ete tondimi boyangeli ya Nzambe. (Tángá Baebre 13:17.) Kondima ete Nzambe atambwisa biso esali ete tózala na bomoko oyo ezali komonana esika mosusu te na mokili oyo ekabwaná. Ezali mpe kosala ete kimya mpe boyengebene ezala mpe ezali kopesa Yehova nkembo, ezali komonisa ete lolenge ya Yehova ya koyangela ezali malamu koleka.

Boyangeli ya Yehova ekolonga

16. Ekateli nini mokomoko asengeli kozwa lelo oyo?

16 Ntango bantembe oyo ebimaki na Edene ekosuka, ezali mpenza kobɛlɛma. Yango wana, sikoyo nde ntango oyo bato basengeli kozwa ekateli. Moto mokomoko asengeli kozwa ekateli soki akondima boyangeli ya Nzambe to akotingama kaka na boyangeli ya bato. Tozali mpenza na libaku ya kosalisa bato ya komikitisa bázwa ekateli oyo ebongi! Mosika te, na Armagedone, boyangeli ya Yehova ekozwa mpo na libela esika ya baguvɛrnema ya bato oyo ezali kotambwisama na Satana. (Dan. 2:44; Em. 16:16) Boyangeli ya bato ekosuka, mpe Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba. Ekomonana mpenza polele ete boyangeli ya Yehova elongi.​—Tángá Emoniseli 21:3-5.

17. Makambo nini ekoki kosalisa bato ya komikitisa bázwa ekateli ya malamu na oyo etali boyangeli?

17 Baoyo bazwi naino te ekateli ya kozala na ngámbo ya Yehova basengeli mpenza kobondela mpe kotalela matomba oyo boyangeli ya Nzambe ekomemela bato. Boyangeli ya bato elongi te kosilisa makambo ya mobulu, ata mpe terorisme. Boyangeli ya Nzambe ekolongola bato nyonso ya mabe na mabele. (Nz. 37:1, 2, 9) Boyangeli ya bato ememeli bato bitumba oyo esilaka te, kasi boyangeli ya Nzambe ekosilisa “bitumba tii na nsuka ya mabele.” (Nz. 46:9) Kutu, Bokonzi ya Nzambe ekozongisa kimya kati na bato mpe banyama! (Yis. 11:6-9) Bobola mpe nzala emonani mingi na boyangeli ya bato, kasi boyangeli ya Nzambe ekosilisa yango. (Yis. 65:21) Ata bakonzi oyo bazali na makanisi ya malamu, balongi te kolongola maladi mpe liwa, kasi na boyangeli ya Nzambe, mibange mpe bato ya maladi bakozongela makasi na bango ya bolenge. (Yobo 33:25; Yis. 35:5, 6) Ya solo, mabele ekokóma paradiso epai ata bakufi bakosekwa.​—Luka 23:43; Mis. 24:15.

18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tondimaka ete boyangeli ya Nzambe eleki nyonso?

18 Ya solo, boyangeli ya Nzambe ekolongola mpasi nyonso oyo Satana abimiselá bato na ndenge akosaki baboti na biso ya liboso bápesa Mozalisi na bango mokɔngɔ. Kanisá naino, Satana anyokoli bato na boumeli ya mbula soki 6000, kasi Nzambe na nzela ya Kristo akolongola mabe yango na boumeli ya mbula nkóto moko mpamba! Oyo nde elembeteli ya polele oyo emonisi ete boyangeli ya Nzambe eleki mpenza! Biso Batatoli ya Nzambe, tondimaka ye azala Moyangeli na biso. Yango wana, tiká tómonisa mikolo nyonso, ntango nyonso, na bomoi na biso ete tozali basambeli ya Yehova, tozali bato ya Bokonzi na ye, mpe ete kozala Batatoli na ye ezali likambo ya lokumu mpo na biso. Tiká ete tólekisaka ata libaku moko te mpo na koyebisa moto nyonso oyo akolinga koyoka ete boyangeli ya Yehova eleki boyangeli mosusu nyonso.

Na oyo etali boyangeli ya Nzambe, toyekoli nini nsima ya kotánga . . .

Kolimbola Mibeko 7:7, 8?

1 Samwele 8:9-18?

Baebre 13:17?

Emoniseli 21:3-5?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 29]

Yehova atiki te lotomo na ye ya koyangela

[Elilingi na lokasa 31]

Kondima boyangeli ya Yehova esali ete tózala na bomoko na mokili mobimba