Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Etonga kaka moko, mobateli kaka moko

Etonga kaka moko, mobateli kaka moko

Etonga kaka moko, mobateli kaka moko

“Bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi zomi na mibale, bokosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.”​—MAT. 19:28.

1. Ndenge nini Yehova asalelaki bakitani ya Abrahame makambo, mpe mpo na nini yango elimboli te ete asundolaki mpenza bato ya bikólo mosusu?

YEHOVA alingaki Abrahame, yango wana amoniselaki bakitani na ye bolingo ya sembo. Na boumeli ya bikeke koleka 15, azalaki kotalela bato ya ekólo Yisraele, oyo bazalaki bakitani ya Abrahame lokola bato na ye oyo aponaki, ‘eloko na ye moko.’ (Tángá Kolimbola Mibeko 7:6.) Yango elingaki nde koloba ete Yehova asundolaki bato ya bikólo mosusu? Te. Na boumeli ya eleko wana, bato oyo bazalaki Bayisraele te, oyo basepelaki kosambela Yehova bazwaki libaku ya kokangama na ekólo wana ya Nzambe. Bato wana oyo babongwanaki to baprozelite, bazalaki kotalelama lokola bato ya ekólo yango. Esengelaki kosalela bango makambo lokola bato ya ekólo wana. (Lev. 19:33, 34) Mpe basengelaki kotosa mibeko nyonso ya Yehova.​—Lev. 24:22.

2. Maloba nini ya kokamwisa Yesu alobaki, mpe yango ebimisi mituna nini?

2 Nzokande, Yesu alobaki likambo moko oyo ekamwisaki mpenza Bayuda ya ntango na ye; alobaki boye: “Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.” (Mat. 21:43) Banani bakosala ekólo yango ya sika, mpe ndenge nini mbongwana yango etaleli biso lelo?

Ekólo ya sika

3, 4. (a) Ndenge nini ntoma Petro amonisaki ekólo ya sika? (b) Ekólo yango ya sika esalemi na banani?

3 Ntoma Petro amonisaki polele ekólo yango ya sika. Akomelaki baninga na ye bakristo ete: “Bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.” (1 Pe. 2:9) Ndenge esakolamaki, Bayuda oyo bandimaki Yesu ete azali Masiya bazalaki bato ya liboso oyo bakɔtaki na ekólo yango ya sika. (Dan. 9:27a; Mat. 10:6) Na nsima, ebele ya bato mosusu oyo bazalaki Bayisraele te bakɔtaki mpe na ekólo yango, mpo Petro alobaki ete: “Liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na Ye.”​—1 Pe. 2:10.

4 Petro azalaki kolobela banani na vɛrsɛ yango? Na ebandeli ya mokanda na ye, alobi boye: “[Nzambe] abotaki biso lisusu mpo na elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo uta na bakufi, mpo na libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te. Ebombami mpo na bino na likoló.” (1 Pe. 1:3, 4) Mpo na yango, ekólo yango ya sika esalemi na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Bazali “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki ete Bayisraele yango ya elimo bazalaki bato 144 000. “Basombamaki na kati ya bato, bazali mbuma ya liboso epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-Mpate” mpo na kosala lokola “banganga-nzambe” mpe “bakoyangela elongo na [Yesu] mbula nkóto moko.”​—Em. 5:10; 7:4; 14:1, 4; 20:6; Yak. 1:18.

Ekólo yango esuki kaka na baoyo batyami mafuta na elimo?

5. (a) Maloba “Yisraele ya Nzambe” esalelami mpo na banani? (b) Mpo na nini liloba “Yisraele” esuki te kaka na ndimbola moko?

5 Na yango, emonani polele ete maloba “Yisraele ya Nzambe” oyo ezali na Bagalatia 6:16 elobeli mpenzampenza bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, longola bato oyo batyami mafuta na elimo, ezali nde na bisika mosusu oyo Yehova azalaki kosalela ekólo yango na ndenge ya elilingi, to ndakisa mpo na kolobela bakristo oyo batyami mafuta te na elimo? Eyano ekoki kozwama na maloba oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo: “Nazali kosala kondimana ná bino, ndenge mpe Tata na ngai asali kondimana ná ngai, mpo na bokonzi, mpo bólya mpe bómɛla na mesa na ngai na bokonzi na ngai, mpe bófanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.” (Luka 22:28-30) Yango ekosalema na boumeli ya “ntango biloko nyonso ekokóma ya sika,” na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkóto.​—Tángá Matai 19:28.

6, 7. Maloba “mabota zomi na mibale ya Yisraele” oyo basaleli na Matai 19:28 mpe Luka 22:30, elobeli banani?

6 Bato 144 000 bakozala bakonzi, banganga-nzambe, mpe basambisi na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkóto. (Em. 20:4) Bakosambisa mpe bakoyangela banani? Na Matai 19:28 mpe Luka 22:30, Biblia eyebisi biso ete bakosambisa “mabota zomi na mibale ya Yisraele.” Na bavɛrsɛ oyo, “mabota zomi na mibale ya Yisraele” ezali komonisa banani? Bazali komonisa bato nyonso oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele​—baoyo bazali komonisa kondima na mbeka ya Yesu kasi bazali te na kati ya banganga-nzambe oyo bakoyangela. (Libota ya Levi etángamaki te na kati ya mabota 12 ya Yisraele.) Na bavɛrsɛ oyo, baoyo bamonisami na mabota 12 ya Yisraele, ezali baoyo bakozwa matomba ya elimo na mosala oyo banganga-nzambe 144 000 bakosala. Bato yango oyo bazali banganga-nzambe te, baoyo bakozwa matomba wana, bazali mpe bato oyo Nzambe alingaka mpe andimaka bango. Ebongi mpenza ete bákokanisama na libota na ye na ntango ya kala.

7 Yango wana, nsima ya komona bato 144 000 ya Yisraele ya elimo bazali kotyama elembo ya nsuka liboso ete bolɔzi monene ebanda, ntoma Yoane amonaki mpe “ebele mpenza ya bato” oyo motángo na bango eyebani te, oyo bauti “na bikólo nyonso.” (Em. 7:9) Bato yango bakobika na bolɔzi monene mpe bakokɔta na boyangeli ya mbula nkóto ya Kristo. Na nsima, bakosangana na bamiliare ya bato oyo bakosekwa. (Yoa. 5:28, 29; Em. 20:13) Na ndenge ya elilingi, bato yango nyonso bakosala “mabota zomi na mibale ya Yisraele,” oyo bakosambisama na Yesu mpe na bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Yesu.​—Mis. 17:31; 24:15; Em. 20:12.

8. Ndenge nini makambo oyo ezalaki kosalema na mokolo ya kozipa masumu ezalaki elilingi ya boyokani oyo ezali kati na bato 144 000 mpe bato mosusu?

8 Boyokani wana oyo ezali kati na bato 144 000 mpe bato mosusu nyonso emonisamaki na makambo oyo ezalaki kosalema na mokolo ya kozipa masumu. (Lev. 16:6-10) Libosoliboso, nganga-nzambe monene asengelaki kopesa ngɔmbɛ-mobali likabo mpo na lisumu “na ye moko mpe ya ndako na ye.” Na yango, mbeka ya Yesu esalelami libosoliboso mpo na bato ya ndako na ye, elingi koloba banganga-nzambe basungi, baoyo bakosala elongo na ye na likoló. Lisusu, na mokolo ya kozipa masumu, bazalaki kopesa ntaba mibale mpo na masumu ya Bayisraele mosusu. Awa, lokola banganga-nzambe bazali komonisa bato 144 000, Bayisraele mosusu bazali komonisa baoyo nyonso bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Ndimbola wana emonisi ete maloba “mabota zomi na mibale ya Yisraele” oyo ezali na Matai 19:28, esalelami te mpo na banganga-nzambe oyo babotami na elimo, oyo bakozala elongo na Kristo; kasi esalelami nde mpo na bato nyonso mosusu oyo bazali kondima mbeka ya Yesu. *

9. Na emonaneli ya tempelo oyo Ezekiele azwaki, banganga-nzambe bazali elilingi ya banani, mpe Bayisraele oyo bazali na libota ya banganga-nzambe te bazali banani?

9 Tózwa ndakisa mosusu. Mosakoli Ezekiele azwaki emonaneli moko monene ya tempelo ya Yehova. (Ezk., mok. 40-48) Na emonaneli yango, banganga-nzambe oyo bazalaki kosala na kati ya tempelo, bazalaki kopesa malako, kozwa toli mpe kosembolama na Yehova. (Ezk. 44:23-31) Kaka na emonaneli yango, bato ya mabota ndenge na ndenge bayaki kosambela mpe kopesa bambeka. (Ezk. 45:16, 17) Na mikapo oyo banganga-nzambe bazali elilingi ya baoyo batyami mafuta na elimo, mpe Bayisraele oyo bautaki na mabota ya banganga-nzambe te, bazalaki elilingi ya baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabele. Emonaneli yango elobaki ete bituluku mibale wana ekosala na bomoko, elongo na banganga-nzambe oyo bazali kotambwisa losambo ya pɛto.

10, 11. (a) Kokokisama ya maloba nini ya Yesu oyo tomoni elendisi mpenza kondima na biso? (b) Motuna nini ebimi mpo na bampate mosusu?

10 Yesu alobelaki “bampate mosusu,” baoyo basengelaki kozala te “lopango” moko na “etonga moke” ya bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo. (Yoa. 10:16; Luka 12:32) Alobaki boye: “Yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” Komona kokokisama ya maloba yango ezali mpenza kolendisa! Bituluku mibale ya bato basangani esika moko​—etuluku moke ya bato oyo batyami mafuta na elimo mpe ebele ya bato ya bampate mosusu. (Tángá Zekaria 8:23.) Atako bampate mosusu na ndenge ya elilingi basalaka te na lopango ya kati ya tempelo ya elimo, basalaka na lopango ya libándá ya tempelo yango.

11 Kasi, soki Yehova asalelaki ntango mosusu bato ya Yisraele oyo bazalaki banganga-nzambe te mpo na kolobela bampate yango mosusu, baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo ya Ekaniseli? Tokotalela sikoyo eyano na motuna yango.

Kondimana ya sika

12. Ebongiseli nini ya sika Yehova asakolaki?

12 Yehova asakolaki ebongiseli ya sika mpo na bato na ye ntango alobaki boye: “Talá kondimana oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango. . . . Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, mpe nakokoma yango na motema na bango. Mpe nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.” (Yir. 31:31-33) Na nzela ya kondimana wana ya sika, elaka oyo Yehova apesaki Abrahama esengelaki kokokisama na nkembo mpe libela.​—Tángá Ebandeli 22:18.

13, 14. (a) Banani bazali basangani ya kondimana ya sika? (b) Banani bazali kozwa matomba mpe ndenge nini “bakangami” na kondimana yango ya sika?

13 Yesu alobelaki kondimana yango ya sika na butu ya liboso ya liwa na ye ntango alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopama mpo na bino.” (Luka 22:20; 1 Ko. 11:25) Bakristo nyonso bazali na kati ya kondimana wana ya sika? Te. Ndambo kaka, na ndakisa, bantoma oyo bamɛlaki kɔpɔ yango na butu wana, bakómaki basangani na kondimana yango. * Yesu asalaki kondimana mosusu ná bango mpo na koyangela elongo na bango na Bokonzi na ye. (Luka 22:28-30) Bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye.​—Luka 22:15, 16.

14 Ezali boni mpo na baoyo bakoyangelama na Bokonzi yango awa na mabele? Bakozwa matomba ya kondimana yango ya sika. (Gal. 3:8, 9) Atako balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te, “bakangami” na kondimana yango na ndenge batosaka masɛngami na yango, ndenge kaka mosakoli Yisaya asakolaki ete: “Bapaya oyo basangani na Yehova mpo na kosalela ye mpe mpo na kolinga nkombo ya Yehova, mpo na kokóma basaleli na ye, baoyo nyonso bazali kotosa sabata mpo na kokómisa yango eloko mpamba te mpe bakangami na kondimana na ngai, nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.” Na nsima, Yehova alobaki: “Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”​—Yis. 56:6, 7.

Nani asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo?

15, 16. (a) Ntoma Paulo akokanisaki kondimana ya sika na nini? (b) Mpo na nini baoyo bazali na elikya ya kozala awa na mabele basengeli te kolyaka limpa mpe komɛlaka vinyo na Ekaniseli?

15 Baoyo bazali na kondimana ya sika bazali “na mpiko ya kosalela nzela ya kokɔta na esika mosantu.” (Tángá Baebre 10:15-20.) Bato yango, ezali baoyo bakozwa “bokonzi moko oyo ekoki koningana te.” (Ebr. 12:28) Yango wana, kaka baoyo bakozala bankonzi mpe banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu Kristo nde basengeli komɛlaka “kɔpɔ” oyo elakisi kondimana ya sika. Basangani yango ya kondimana ya sika bazali bato oyo balakami na libala na Mwana-Mpate. (2 Ko. 11:2; Em. 21:2, 9) Bato mosusu nyonso oyo bayanganaka na Ekaniseli mbula na mbula, batalaka kaka na limemya, kasi balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te.

16 Paulo asalisi biso mpe tóyeba ete baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te na Ekaniseli. Alobaki na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete: “Mpo mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.” (1 Ko. 11:26) Ntango nini Nkolo ‘akoya’? Ntango akoya kozwa moto ya nsuka ya etuluku ya mwasi na ye ya elimo, mpo na kokende na esika na bango na likoló. (Yoa. 14:2, 3) Emonani polele ete kosala Ekaniseli mbula na mbula ya bilei ya mpokwa ya Nkolo ekozala libela na libela te. Bato ya momboto ya mwasi oyo “batikalaki” naino awa na mabele bakokoba kolya limpa mpe komɛla vinyo tii ntango bango nyonso bakozwa libula na bango ya likoló. (Em. 12:17) Soki ezali bongo te, baoyo bakozala na bomoi libela na libela awa na mabele basengeli kolyaka limpa mpe komɛlaka vinyo, na ndenge yango Ekaniseli ekokoba kozala libela na libela.

“Bakokóma mpenza bato na ngai”

17, 18. Ndenge nini esakweli ya Ezekiele 37:26, 27 ezali kokokisama?

17 Yehova asakolaki bomoko ya basaleli na ye na maloba oyo: “Nakosala kondimana ya kimya ná bango; kondimana oyo ekoumela kino ntango oyo etyami ndelo te nde ekozala na bango. Mpe nakotya bango na esika na bango mpe nakokómisa bango ebele mpe nakotya esika na ngai mosantu na katikati na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Mpe tabernakle na ngai ekozala mpenza likoló na bango, mpe nakokóma mpenza Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.”​—Ezk. 37:26, 27.

18 Basaleli nyonso ya Nzambe bazali na libaku ya kozwa litomba na kokokisama ya elaka yango kitoko, kondimana mpo na kimya ya bakristo. Ya solo, Yehova apesi ndanga ete kimya ekozala mpo na basaleli na ye nyonso ya botosi. Mbuma ya elimo na ye ezali komonana polele kati na bango. Tempelo na ye, oyo emonisi losambo ya solo ya bokristo, ezali na kati na bango. Bakómi mpenza bato na ye, mpo batiki lolenge nyonso ya losambo ya bikeko mpe bakómisi Yehova Nzambe kaka moko oyo bazali kosambela.

19, 20. Banani bazali na kati ya bato oyo Yehova azali kobenga “bato na ngai,” mpe kondimana yango ya sika epesi nzela na likambo nini?

19 Oyo mpenza likambo ya kolendisa ndenge tozali komona bomoko oyo ezali na kati ya bituluku yango mibale na mikolo na biso! Atako ebele ya bato oyo motángo na bango ezali se kobakisama bazali na elikya ya kokende na likoló te, bazali kosepela kozala elongo na baoyo bazali na elikya yango. Bakangami mpenza na Yisraele ya Nzambe. Lokola bazali kosala bongo, bakɔti na molɔngɔ ya bato oyo Yehova azali kobenga “bato na ngai.” Na kati na bango tozali komona kokokisama ya esakweli oyo: “Bikólo mingi bakokangana na Yehova na mokolo yango, mpe bakokóma mpenza bato na ngai; mpe nakofanda epai na yo.”​—Zek. 2:11; 8:21; tángá Yisaya 65:22; Emoniseli 21:3, 4.

20 Na nzela ya kondimana ya sika, Yehova asali ete makambo wana nyonso ekokisama. Bamilio ya bapaya na elimo bakɔti na kati ya ekólo oyo Yehova azali kondima. (Mika 4:1-5) Bazali na ekateli ya kokoba kokangama na kondimana yango na ndenge bazali kondima ebibongiseli na yango mpe kotosa masɛngami na yango. (Yis. 56:6, 7) Lokola bazali kosala bongo, elongo na Yisraele ya Nzambe bazali kozwa ebele ya mapamboli ya kimya oyo ezali se kokoba. Tiká ete yango ezala mpe lipamboli na yo​—banda lelo mpe libela na libela na mikolo ezali koya!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Nzokande, liloba “lisangá” ekoki kozala na ndimbola mosusu; ekoki komonisa bakristo nyonso, ata soki bazali na elikya ya kokende na likoló to ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2007, nkasa 21-23.

^ par. 13 Yesu azali Moyokanisi ya kondimana yango, kasi mosangani te. Lokola azali Moyokanisi, emonani polele ete alyaki limpa te mpe amɛlaki vinyo te.

Ozali koyeba lisusu?

• Banani bazali “mabota zomi na mibale ya Yisraele” oyo bato 144 000 bakosambisa?

• Boyokani nini ezali kati na bato oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu na kondimana ya sika?

• Bakristo nyonso basengeli kolyaka limpa mpe komɛlaka vinyo na Ekaniseli?

• Bomoko nini esakolamaki mpo na mikolo na biso?

[Mituna mpo na boyekoli]

[Etanda/​Bililingi na lokasa 25]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Bato mingi bazali sikoyo kosala elongo na Yisraele ya Nzambe

1950 | 373 430

1970 | 1 483 430

1990 | 4 017 213

2009 | 7 313 173