Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali kolanda Kristo malamumalamu?

Ozali kolanda Kristo malamumalamu?

Ozali kolanda Kristo malamumalamu?

“Ndenge mpe bozali ya solo kotambola, . . . bókoba kosala bongo malamumalamu lisusu.”​—1 TES. 4:1.

1, 2. (a) Makambo minene nini bato ya ntango ya Yesu bamonaki? (b) Mpo na nini eleko na biso ezali mpe ya ntina mingi?

OSILÁ kokanisa esengo oyo olingaki kozala na yango soki ozalaka na bomoi ntango Yesu azalaki awa na mabele? Okoki kokanisa ndenge Yesu akokaki kobikisa yo mpe na ndenge yango kolongola yo na bampasi mosusu ya nzoto. To okoki kokanisa esengo ya komona mpe koyoka Yesu​—kozwa libaku ya koteyama na ye to komona ye azali kosala makamwisi. (Mrk. 4:1, 2; Luka 5:3-9; 9:11) Elingaki kozala libaku monene kozala wana ntango Yesu azalaki kosala misala nyonso wana! (Luka 19:37) Banda wana, bato ya eleko moko te bamoná makambo ya ndenge yango, mpe makambo oyo Yesu akokisaki na mabele na nzela ya “mbeka na ye moko” ekozongelama lisusu te.​—Ebr. 9:26; Yoa. 14:19.

2 Atako bongo, eleko na biso ezali mpe ya ntina mingi. Mpo na nini? Tozali lelo na eleko oyo Makomami ebengi “ntango ya nsuka” to “mikolo ya nsuka.” (Dan. 12:1-4, 9; 2 Tim. 3:1) Na eleko yango, babenganaki Satana na likoló. Mosika te, akokangama mpe akobwakama “na libulu mozindo.” (Em. 12:7-9, 12; 20:1-3) Ezali mpe na eleko yango nde tozali na libaku monene ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ na mokili mobimba, koyebisa bato elikya ya Paradiso oyo ezali koya​—mosala oyo ekozongelama lisusu te.​—Mat. 24:14.

3. Ntango kaka alingaki komata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala nini, mpe likambo yango ezalaki kosɛnga nini?

3 Ntango kaka alingaki komata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Mosala yango ezalaki kosɛnga koteya na mokili mobimba. Na mokano nini? Kokómisa bato bayekoli​—kobakisa bayekoli mosusu ya Kristo—​liboso nsuka eya. (Mat. 28:19, 20) Tosengeli kosala nini mpo tólonga kokokisa mosala oyo Kristo apesaki biso?

4. (a) Maloba ya Petro oyo ezali na 2 Petro 3:11, 12 emonisi ete tosengeli kosala nini? (b) Tosengeli kokeba na likambo nini?

4 Talá maloba oyo ya ntoma Petro: “Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe, bózela mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova!” (2 Pe. 3:11, 12) Maloba ya Petro emonisi ete tosengeli kosɛnzɛla makasi na mikolo oyo ya nsuka mpo tómipesa ntango nyonso na misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe. Moko na misala yango ezali mosala ya kosakola nsango malamu. Na yango, ezali mpenza esengo komona molende oyo bandeko na biso ya mokili mobimba bazali na yango na mosala ya kosakola oyo Kristo apesaki biso! Longola yango, tozali mpe komona ete tosengeli kokeba mpo mitungisi ya mokolo na mokolo oyo ezali kouta na mokili ya Satana mpe na bamposa ya nzoto na biso ya kozanga kokoka ekitisa molende na biso te na mosala ya Nzambe. Na yango, tótala ndenge tokoki koyeba ete tozali kokoba kolanda Kristo.

Ndimá na esengo mikumba oyo Nzambe apesi

5, 6. (a) Paulo apesaki bandeko na ye bandimi ya Yerusaleme longonya mpo na likambo nini, mpe akebisaki bango na nini? (b) Mpo na nini tosengeli kosakana te na mikumba oyo Nzambe apesi biso?

5 Na mokanda na ye epai ya bakristo na Yerusaleme, ntoma Paulo apesaki bandeko na ye bandimi longonya mpo na ndenge bayikaki mpiko na bosembo ata na minyoko. Alobaki boye: “Bókanisa ntango nyonso mikolo ya kala oyo, nsima ya kongɛngisama, boyikaki mpiko na etumba moko monene na kati ya mpasi.” Ya solo, Yehova abosanaki bosembo na bango te. (Ebr. 6:10; 10:32-34) Na ntembe te, maloba kitoko ya longonya oyo Paulo alobaki elendisaki mpenza Baebre wana oyo bazalaki bakristo. Kasi, kaka na mokanda yango, Paulo akebisaki bango mpe na mposa moko ya bomoto, oyo soki moto apekisi yango te, ekoki kokitisa molende na ye na mosala ya Nzambe. Alobaki ete bakristo basengeli kokeba ete ‘báboya te,’ to bápesa bantina ya lokuta te mpo na kokima kotosa mibeko ya Nzambe.​—Ebr. 12:25.

6 Likebisi wana oyo etali momeseno ya koboya kondima mikumba oyo Nzambe apesi etali mpe bakristo lelo. Tomoni ete tosengeli kozwa ekateli ya kosakana ata moke te na mikumba na biso ya bokristo to kotika molende na biso na mosala ya Nzambe ekita. (Ebr. 10:39) Kutu, kosala mosala mosantu to te ezali likambo oyo ekoki kopesa to kozangisa biso bomoi.​—1 Tim. 4:16.

7, 8. (a) Nini ekosalisa biso tóbatela molende na biso na mosala ya Nzambe? (b) Soki tobungisá molende oyo tozalaki na yango liboso, tosengeli kokanisa nini na ntina na Yehova mpe Yesu?

7 Nini ekosalisa biso tókima te kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi biso? Lolenge moko ya ntina ya kobundisa ezaleli yango ezali komanyola mbala na mbala ndimbola ya komipesa na biso. Na mokuse, tolakaki Yehova ete kosala mokano na ye ekozala likambo ya libosoliboso na bomoi na biso, mpe tolingi kokokisa elaka yango. (Tángá Matai 16:24.) Na yango, na bantango mosusu, tosengeli kofanda mpe komituna boye: ‘Nazali kaka na ekateli ya kosala ndenge nalakaki ntango namipesaki na Nzambe mokolo nazwaki batisimo? To nabungisá mwa molende na ngai ya ebandeli na boumeli ya bambula oyo eleki banda wana?’

8 Soki tomitali na bosembo mpe tomoni ete mbala mosusu tolɛmbisi mabɔkɔ na mosala ya Yehova, ekozala malamu tókanisa lisusu maloba ya kolendisa ya mosakoli Sefania. Alobaki boye: “Mabɔkɔ na yo elɛmba te. Yehova Nzambe na yo azali epai na yo. Lokola azali Moto ya nguya, akobikisa. Akosepela na yo mpe akozala na esengo.” (Sef. 3:16, 17) Maloba wana ya kolendisa etalaki libosoliboso Bayisraele ya kala oyo bautaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na Yerusaleme. Kasi, maloba yango etali mpe basaleli ya Nzambe lelo. Lokola mosala oyo tozali kosala ezali ya Yehova, tosengeli kobosana te ete Yehova ná Mwana na ye bazali kosunga biso mpe kopesa biso makasi mpo tókokisa malamumalamu mikumba oyo Nzambe apesi biso. (Mat. 28:20; Flp. 4:13) Soki tosali makasi mpo tókoba kosala mosala ya Nzambe na molende, akopambola biso mpe akosalisa biso tókola na elimo.

‘Tóluka liboso Bokonzi’ na molende

9, 10. Likambo nini Yesu alingaki kolobela na ndakisa ya fɛti moko monene, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango?

9 Ntango azalaki kolya na ndako ya moyangeli moko ya Bafarisai, Yesu apesaki ndakisa ya fɛti moko monene. Na ndakisa yango, alobelaki libaku ya kokɔta na Bokonzi ya likoló oyo epesamaki na bato ndenge na ndenge. Na ndakisa yango, apesaki mpe ndimbola ya maloba “kosɛnga bolimbisi.” (Tángá Luka 14:16-21.) Na ndakisa yango ya Yesu, bato oyo babengisamaki basɛngaki bolimbisi mpo báya na fɛti te. Moko alobaki ete asengeli kokende kotala elanga oyo autaki kosomba. Mosusu alobaki ete asombaki mwa bangɔmbɛ mpe alingaki kotala yango malamumalamu. Nzokande, mosusu alobaki ete: ‘Nakoki koya te. Nauti kobala.’ Bolimbisi nyonso wana esimbaki te. Ndenge ezalaka, moto oyo alingi kosomba elanga to bibwele atalaka yango liboso asomba, na yango ntina ya koluka kotala yango nokinoki nsima ya kosomba yango ezali te. Mpe mpo na nini kobala sika esengeli kopekisa moto andima libyangi ya ntina ya ndenge wana? Na yango, tokoki kokamwa te ndenge nkolo fɛti asilikaki!

10 Basaleli nyonso ya Nzambe bakoki kozwa liteya na ndakisa wana ya Yesu. Liteya nini? Tosengeli soki moke te kotika makambo na biso moko, na ndakisa makambo oyo Yesu atángaki na ndakisa na ye, ekóma na ntina mingi epai na biso tii tókóma kotya mosala ya Nzambe pembeni. Soki mokristo azali kotya makambo na ye moko na esika oyo ebongi te, molende na ye na mosala ya kosakola ekokita mokemoke. (Tángá Luka 8:14.) Mpo likambo ya ndenge wana ekómela biso te, tolandaka toli ya Yesu oyo: “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.” (Mat. 6:33) Komona ete basaleli ya Nzambe​—bilenge mpe mikóló—​bazali kosalela toli wana ya ntina mingi, elendisaka mpenza! Kutu, mingi bazwá bibongiseli mpo na kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bákoka kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Bamoni mpenza na miso ete koluka liboso Bokonzi na molende ememaka esengo ya solosolo mpe esepelisaka mpenza.

11. Lisolo nini ya Biblia emonisi ntina ya kozala na molende mpe kosalela Nzambe na motema mobimba?

11 Mpo na komonisa ntina ya kozala na molende na mosala ya Nzambe, tótala likambo oyo esalemaki na bomoi ya Yehoashe, mokonzi moko ya Yisraele. Lokola azalaki komitungisa mpo amonaki ete mbala mosusu Yisraele ekokwea na mabɔkɔ ya Siri, Yehoashe akendaki kolelela mosakoli Elisha. Mosakoli yango ayebisaki ye abɛta likula moko na lininisa na ngámbo ya Siri, mpo na komonisa ete akolonga ekólo yango na lisalisi ya lobɔkɔ ya Yehova. Na ntembe te, yango esengelaki kolendisa mokonzi. Na nsima, Elisha ayebisaki Yehoashe azwa makula na ye mpe abɛta na yango mabele. Yehoashe abɛtaki mabele mbala misato. Elisha asilikaki na likambo yango, mpo kobɛta mabele mbala mitano to motoba elingaki komonisa ete ‘akobɛta Siri tii kosilisa yango nyɛɛ.’ Sikoyo Yehoashe akolonga moke kaka, mbala misato. Lokola asalaki na molende te, Yehoashe alongaki kaka moke. (2 Bak. 13:14-19) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Yehova akopambola biso mingi kaka soki tozali kosala mosala na ye na motema mobimba mpe na molende.

12. (a) Nini ekosalisa biso tóbatela molende na biso na mosala ya Nzambe atako mikakatano ya bomoi? (b) Lobelá matomba oyo ozali kozwa mpo ozali komipesa na mosala ya kosakola.

12 Mpo na mikakatano ya bomoi, ezalaka mpasi tózala na molende mpe tómipesa na mosala ya Nzambe. Bandeko mingi ya basi mpe ya mibali bazali kobundana na mpasi ya kozanga mbongo. Basusu bazali na esengo te mpo maladi makasi ezali kopekisa bango básala mingi na mosala ya Yehova. Atako bongo, mokomoko na biso akoki kozwa bibongiseli mpo azala kaka na molende mpe akoba kolanda Kristo malamumalamu. Tosɛngi yo otala mwa makanisi mpe mikapo oyo ezali na etanda “Nini ekosalisa yo okoba kolanda Kristo?” Talá ndenge okoki mpenza kosalela yango. Soki osali bongo, okozwa matomba ya solosolo. Komipesa na mosala ya kosakola esalisaka biso, epesaka biso ntina na bomoi, mpe ememelaka biso kimya mpe esengo mingi koleka. (1 Ko. 15:58) Longola yango, kosalela Nzambe na molimo mobimba esalisaka biso ‘tóbatela na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova.’​—2 Pe. 3:12.

Omitala na bosembo

13. Ndenge nini tokoki koyeba soki kosala na molimo mobimba elimboli nini mpo na biso moko?

13 Kasi, tosengeli kobosana te ete kosala na molimo mobimba etali te ntango boni tozali kolekisa na mosala ya kosakola. Bomoi ya moto na moto ekeseni. Moto oyo alekisaka kaka ngonga moko to mibale na mosala ya kosakola sanza na sanza akoki kosepelisa Yehova mingi soki nzoto na ye epesi ye nzela ya kosala kaka oyo wana. (Talá mpe Marko 12:41-44.) Na yango, mpo na koyeba soki kosala na molimo mobimba elimboli nini mpo na biso, tosengeli kotala na bosembo makoki na biso mpe ndenge bomoi na biso ezali. Lokola tozali bayekoli ya Kristo, tolingi mpe koyokanisa makanisi na biso na oyo ya ye. (Tángá Baroma 15:5; 1 Ko. 2:16) Makambo nini Yesu atyaki na esika ya liboso na bomoi na ye? Ayebisaki ebele ya bato oyo bautaki Kapernaume boye: “Nasengeli . . . kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43; Yoa. 18:37) Wana ozali kokanisa molende ya Yesu na mosala ya kosakola, talá ndenge bomoi na yo ezali mpo oyeba soki okoki kosala lisusu mingi koleka.​—1 Ko. 11:1.

14. Ndenge nini tokoki kosala mingi lisusu na mosala ya kosakola?

14 Kotalela makambo ya bomoi na biso malamu ekoki kotinda biso tómona ete tokoki kolekisa ngonga mingi lisusu koleka na mosala ya kosakola. (Mat. 9:37, 38) Na ndakisa, bankóto ya bilenge na lisangá, oyo bauti kosilisa kelasi, bakolisi mosala na bango mpe bazali lelo koyoka esengo ya kosala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na molende. Okosepela mpe koyoka esengo yango? Bandeko mosusu ya mibali mpe ya basi batalaki ndenge bomoi na bango ezali mpe bazwaki ekateli ya kokende kosala na mboka mosusu kaka na ekólo na bango, to ata na mboka mopaya, epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Basusu mpe bayekolaki monɔkɔ mosusu mpo na kosalisa bapaya oyo balobaka monɔkɔ yango. Atako kokolisa mosala na biso ndenge wana ekoki kozala na mikakatano, ememaka matomba mingi, mpe tokoki kosalisa basusu “bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Tim. 2:3, 4; 2 Ko. 9:6.

Bandakisa ya Biblia oyo tokoki kolanda

15, 16. Ndakisa ya banani tokoki kolanda na oyo etali kozala bayekoli ya Kristo ya molende?

15 Bato mosusu oyo bakómaki bantoma basalaki nini ntango Yesu abengaki bango mpo bákóma bayekoli na ye? Mpo na Matai, lisolo elobi boye: “Atikaki biloko nyonso na nsima, atɛlɛmaki mpe abandaki kolanda ye.” (Luka 5:27, 28) Na oyo etali Petro ná Andre, oyo bazalaki koluka mbisi, totángi boye: “Na mbala moko basundolaki minyama mpe balandaki ye.” Na nsima, Yesu amonaki Yakobo ná Yoane, oyo bazalaki kobongisa minyama na bango elongo na tata na bango. Basalaki nini ntango Yesu abengaki bango? “Na mbala moko batikaki masuwa ná tata na bango mpe balandaki ye.”​—Mat. 4:18-22.

16 Ndakisa mosusu ya malamu ezali ya Saulo, oyo akómaki ntoma Paulo. Atako azalaki liboso konyokola makasi bayekoli ya Yesu, abongolaki etamboli na ye mpe akómaki ‘mbɛki oyo eponami’ mpo na komema nkombo ya Kristo. “Na mbala moko na basinagoga [Paulo] abandaki kosakola Yesu, ete Ye azali Mwana ya Nzambe.” (Mis. 9:3-22) Atako asengelaki koyika mpiko mpo na mpasi mpe minyoko, Paulo abungisaki molende na ye ata mokolo moko te.​—2 Ko. 11:23-29; 12:15.

17. (a) Mposa na yo ezali nini na oyo etali kolanda Kristo? (b) Kosala mokano ya Nzambe na motema mpe na makasi na biso nyonso ememaka mapamboli nini?

17 Tolingi mpenza kolanda ndakisa malamu ya bayekoli wana mpe kondima libyangi ya Yesu na esengo mpe kozanga kokakatana. (Ebr. 6:11, 12) Matomba nini tozwaka na ndenge tozali se kolanda Kristo na molende mpe malamumalamu? Tozalaka na esengo ya solosolo mpo tozali kosala mokano ya Nzambe mpe tozalaka na nsai oyo eyaka soki moto andimi misala mosusu mpe mikumba na kati ya lisangá. (Nz. 40:8; tángá 1 Batesaloniki 4:1.) Ya solo, ntango tozali kosala makasi mpo na kolanda Kristo, tozwaka matomba mingi mpe oyo eumelaka, na ndakisa kimya ya makanisi, esengo, koyeba kosepela na oyo tozali na yango, kondimama na Nzambe, mpe elikya ya bomoi ya seko.​—1 Tim. 4:10.

Ozali koyeba lisusu?

• Mosala nini ya ntina bapesá biso mpe ndenge nini tosengeli kotalela yango?

• Tosengeli kokeba na mposa nini ya bomoto, mpe mpo na nini?

• Ndenge nini tosengeli komitala na bosembo?

• Nini ekosalisa biso tókoba kolanda Kristo?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda/​Elilingi na lokasa 27]

Nini ekosalisa yo okoba kolanda Kristo?

▪ Kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpe komanyola makambo oyo otángi.​—Nz. 1:1-3; 1 Tim. 4:15.

▪ Kobondela mbala na mbala mpo elimo ya Nzambe esunga yo mpe etambwisa yo.​—Zek. 4:6; Luka 11:9, 13.

▪ Kozala moninga ya bato oyo bamonisaka na motema moko molende na mosala ya Nzambe.​—Mas. 13:20; Ebr. 10:24, 25.

▪ Koyeba ete mikolo etikali ya kotánga.​—Ef. 5:15, 16.

▪ Koyeba ete “kosɛnga bolimbisi” ezali na makama minene.​—Luka 9:59-62.

▪ Kokanisa mbala na mbala elaka oyo osalaki ntango omipesaki na Nzambe mpe ebele ya matomba oyo ozwi mpo ozali kosalela Yehova mpe kolanda Kristo na motema mobimba.​—Nz. 116:12-14; 133:3; Mas. 10:22.