Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mibali, botosaka bokonzi ya Kristo?

Mibali, botosaka bokonzi ya Kristo?

Mibali, botosaka bokonzi ya Kristo?

“Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo.”​—1 KO. 11:3.

1. Nini emonisi ete Yehova azali Nzambe ya mobulu te?

EMONISELI 4:11 elobi ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Lokola akelá biloko nyonso, Yehova Nzambe azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mpe azali likoló ya biloko nyonso oyo akelá. Lolenge oyo baanzelu na ye babongisamá emonisi ete Yehova “azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.”​—1 Ko. 14:33; Yis. 6:1-3; Ebr. 12:22, 23.

2, 3. (a) Nani azalaki ekelamu ya liboso ya Yehova? (b) Mwana azali na esika nini liboso ya Tata?

2 Liboso biloko nyonso ekelama, Nzambe azalaki ye moko na boumeli ya bambula oyo ekoki kotángama te. Ekelamu na ye ya liboso ya elimo ayebanaki lokola “Liloba” mpamba te azalaki Molobeli ya Yehova. Liloba azali ye oyo na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki. Na nsima, ayaki awa na mabele lokola moto ya kokoka mpe abengamaki Yesu Kristo.​—Tángá Yoane 1:1-3, 14.

3 Makomami elobi nini na ntina na bokonzi oyo Nzambe azali na yango likoló ya Mwana na ye ya liboso? Na litambwisi ya elimo santu, ntoma Paulo alobaki boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” (1 Ko. 11:3) Kristo azali na nse ya bokonzi ya Tata na ye. Bokonzi mpe botosi ezali na ntina mpo kimya mpe makambo etambola na molɔngɔ na kati ya bikelamu nyonso. Ata ye oyo “na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki” asɛngisami na kotosa bokonzi ya Nzambe.​—Kol. 1:16.

4, 5. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela esika na ye liboso ya Yehova?

4 Yesu ayokaki ndenge nini na likambo etali kotosa bokonzi ya Yehova mpe koya awa na mabele? Makomami elobi ete: ‘Kristo Yesu, atako azalaki na lolenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akómaki lokola moombo mpe akómaki lokola bato. Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe atosaki tii liwa, ɛɛ, liwa na nzete ya mpasi.’​—Flp. 2:5-8.

5 Ntango nyonso, na komikitisa mpenza, Yesu atosaki mokano ya Tata na ye. Alobaki boye: “Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; . . . kosambisa oyo nazali kosambisa ezali sembo, mpo nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 5:30) Alobaki lisusu boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka [Tata na ngai].” (Yoa. 8:29) Na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu abondelaki Tata na ye boye: “Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala.” (Yoa. 17:4) Emonani ete Yesu azalaki na mokakatano ata moke te mpo na kondima mpe kotosa bokonzi ya Nzambe.

Kotosa Tata ememeli Mwana matomba

6. Bizaleli nini kitoko Yesu amonisaki?

6 Ntango azalaki awa na mabele, Yesu amonisaki bizaleli mingi ya malamu. Na kati na yango, tokoki kotánga bolingo monene oyo amonisaki mpo na Tata na ye. Alobaki boye: “Ngai nalingaka Tata.” (Yoa. 14:31) Amonisaki mpe bolingo monene mpo na bato. (Tángá Matai 22:35-40.) Yesu azalaki moto ya boboto mpe oyo azalaki kopesa basusu lokumu, azalaki makambo makasimakasi te to lolendo. Alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema. Mpo ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.” (Mat. 11:28-30) Bato ya bileko nyonso oyo bazalaki na bizaleli lokola bampate, mingimingi oyo bazalaki komona mpasi na mosala mpe konyokwama, babɔndisamaki na bizaleli kitoko ya Yesu mpe nsango na ye ya kokitisa motema.

7, 8. Na kolanda Mibeko, mwasi oyo azalaki na maladi ya kotanga makila asengelaki kosala nini te, kasi Yesu asalaki nini mpo na ye?

7 Tótala naino ndenge oyo Yesu azalaki kosalela basi makambo. Na boumeli ya bambula mingi, mibali mingi basaleli basi makambo ya mabe. Likambo yango ezalaki komonana epai ya bakonzi ya mangomba ya Yisraele. Kasi, Yesu azalaki komemya mpe kopesa basi lokumu. Yango emonanaki na likambo oyo asalaki epai ya mwasi oyo abɛlaki maladi ya kotanga makila na boumeli ya mbula 12. “Amonaki mpasi mingi” na minganga mpe asilisaki biloko na ye nyonso mpo na koluka kobika. Atako asalaki milende nyonso wana, “akómaki nde na mpasi koleka.” Na kolanda Mibeko, mwasi yango azalaki kotalelama mbindo. Moto nyonso oyo akokaki kosimba ye, asengelaki mpe kokóma mbindo.​—Lev. 15:19, 25.

8 Ntango mwasi yango ayokaki ete Yesu azali kobikisa bamaladi, akɔtaki na kati ya ebele ya bato oyo bazingaki Yesu, alobaki boye: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.” Asimbaki Yesu mpe mbala moko abikaki. Yesu ayebaki ete mwasi yango asengelaki te kosimba elamba na ye. Atako bongo, apamelaki ye te. Kutu, amoniselaki ye boboto. Ayebaki mpenza ndenge oyo mwasi yango atungisamaki na maladi yango na boumeli ya bambula nyonso wana mpe ayebaki ete mwasi yango azalaki lisusu na elikya te ete akobika. Na boboto nyonso, Yesu alobaki na ye boye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”​—Mrk. 5:25-34.

9. Ntango bayekoli ya Yesu balukaki kopekisa bana báya epai na ye, Yesu asalaki nini?

9 Ata bana bazalaki kobanga te kozala elongo na Yesu. Mokolo moko, ntango bato bamemelaki ye bana, bayekoli na ye bapamelaki bango, emonani ete bayekoli bakanisaki ete akolinga te bana bátungisa ye. Kasi, makanisi ya Yesu ezalaki bongo te. Makomami elobi boye: “Ntango Yesu amonaki bongo ayokaki mabe mpe alobaki na [bayekoli] ete: ‘Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango.’” Lisusu, “akamataki bana na mabɔkɔ na ye mpe abandaki kopambola bango, atyelaki bango mabɔkɔ.” Yesu andimaki te kaka ete bana báya epai na ye, kasi ayambaki bango na esengo.​—Mrk. 10:13-16.

10. Ndenge nini Yesu akómaki na bizaleli oyo amonisaki?

10 Ndenge nini Yesu akómaki na bizaleli oyo amonisaki ntango azalaki awa na mabele? Ntango azalaki na likoló, atalaki na boumeli ya bambula mingi ndenge Tata na ye azalaki kosala makambo mpe amekolaki ye. (Tángá Masese 8:22, 23, 30.) Na likoló, amonaki ndenge Yehova asalelaka bokonzi na ye na bolingo epai ya bikelamu na ye nyonso mpe amekolaki ye. Yesu akokaki kosala bongo soki azangaki botosi? Ezalaki mpenza likambo ya esengo mpo na ye kotosa Tata na ye, mpe Yehova azalaki na esengo ya kozala na Mwana ya botosi ndenge wana. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli kitoko ya Tata na ye ya likoló. Oyo nde libaku kitoko tozali na yango ya kotosa Kristo, ye oyo Nzambe atye lokola mokonzi ya Bokonzi ya likoló!

Mekolá bizaleli ya Kristo

11. (a) Tosengeli kosala makasi mpo na komekola nani? (b) Mpo na nini mibali nde basengeli mpenza kosala makasi mpo na komekola Yesu?

11 Bato nyonso na kati ya lisangá ya bokristo, mingimingi mibali, basengeli kokoba kosala makasi mpo na komekola bizaleli ya Kristo. Ndenge tomonaki yango, Biblia elobi ete: “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo.” Ndenge Kristo amekolaki mokonzi na ye, Nzambe ya solo, mibali bakristo mpe basengeli kosala makasi mpo na komekola mokonzi na bango​—Kristo. Ntango akómaki mokristo, ntoma Paulo asalaki mpe bongo. Alendisaki baninga na ye bakristo ete ‘bákóma bamekoli na ye, ndenge ye mpe azalaki momekoli ya Kristo.’ (1 Ko. 11:1) Mpe ntoma Petro alobaki boye: “Ezali na nzela yango nde bobengamaki, mpo Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Pe. 2:21) Ezali mpe na ntina mosusu oyo mpo na yango mibali basengeli komekola Kristo. Ezali bango nde bakómaka bankulutu mpe basaleli na misala. Lokola Yesu azwaki esengo ndenge amekolaki Yehova, mibali basengeli kosepela komekola Kristo mpe bizaleli na ye.

12, 13. Ndenge nini bankulutu basengeli kosalelaka bampate makambo?

12 Bankulutu na lisangá bazali na mokumba ya koyekola kozala lokola Kristo. Petro apesaki mibange, to bankulutu toli oyo: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko; ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo; bómikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi bókóma nde bandakisa ya etonga.” (1 Pe. 5:1-3) Bankulutu basengeli te kozala bato oyo bakweisaka mitindo, bakonzaka basusu, bapesaka bitumbu kozanga kolanda mibeko to bazalaka makambo makasimakasi. Lokola bamekolaka ndakisa ya Kristo, basalaka makasi mpo na komonisa bolingo, komitya na esika ya basusu, kozala na komikitisa, mpe komonisa boboto epai ya bampate oyo Nzambe apesi bango mokumba ya kobatela.

13 Baoyo bazali kokamba lisangá, bazali bato ya kozanga kokoka, mpe basengeli ntango nyonso koyebaka ndelo na bango. (Rom. 3:23) Na yango, basengeli kozala na mposa ya koyekola epai ya Yesu mpe komekola bolingo na ye. Basengeli kokanisa na lolenge oyo Nzambe mpe Kristo basalelaka bato makambo mpe kosala makasi mpo na komekola bango. Petro apesi biso toli oyo: “Bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino, mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”​—1 Pe. 5:5.

14. Tii wapi bankulutu basengeli komemya basusu?

14 Na makambo oyo bazali kosalela etonga ya Nzambe, mibali oyo bazali na mikumba na lisangá basengeli komonisa bizaleli malamu. Baroma 12:10 elobi ete: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” Bankulutu mpe basaleli na misala bapesaka basusu lokumu. Lokola bakristo nyonso, mibali yango basengeli ‘kosala eloko moko te na kowelana to mpo bazali komimona ete baleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa basengeli komonaka bamosusu ete baleki bango.’ (Flp. 2:3) Na yango, baoyo bazali kokamba basengeli mpenza kotalela basusu lokola baleki bango. Soki bazali kosala bongo, mibali yango bakolanda mpenza toli oyo ya Paulo ete: “Nzokande, biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te, mpe tómisepelisa biso moko te. Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye. Mpo Kristo kutu amisepelisaki te.”​—Rom. 15:1-3.

‘Kopesaka basi lokumu’

15. Ndenge nini mibali basengeli kosalela basi na bango makambo?

15 Tótalela sikoyo toli oyo Petro apesi mibali oyo babalá. Akomaki boye: “Bino mibali, bókoba kofanda na [basi na bino] na boyebi, bópesaka bango lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.” (1 Pe. 3:7) Kopesa moto lokumu, elimboli kopesa moto yango valɛrɛ mingi. Na yango, okotalela makanisi ya moto yango, bamposa na ye mpe makambo oyo alingaka mpe kolanda yango ntango ezali na ntina moko te ya koboya yango. Lolenge wana nde mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo.

16. Toli nini Liloba ya Nzambe epesi mibali na oyo etali kopesa basi lokumu?

16 Ntango ayebisaki mibali ete bákumisaka basi na bango, Petro abakisaki likebisi oyo: “Mpo mabondeli na bino ekangisama nzela te.” (1 Pe. 3:7) Yango emonisi polele ete Yehova atalelaka na lisɛki te lolenge oyo mobali asalelaka mwasi na ye makambo. Kozanga kokumisa mwasi na ye ekoki kosala ete mabondeli na ye ekangisama nzela. Lisusu, basi batosaka kozanga mokakatano mibali oyo basalaka makambo oyo emonisaka ete bapesaka bango lokumu, boye te?

17. Tii wapi mobali asengeli kolinga mwasi na ye?

17 Na likambo etali kolinga mwasi na ye, Liloba ya Nzambe epesi toli oyo: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko. . . . Mpo ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Kristo mpe asalaka mpo na lisangá, . . . mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko.” (Ef. 5:28, 29, 33) Tii wapi mibali basengeli kolinga basi na bango? Paulo akomaki boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango.” (Ef. 5:25) Ya solo, mobali asengeli kondima ata kopesa bomoi na ye mpo na mwasi na ye, kaka ndenge Kristo asalaki yango mpo na basusu. Ntango mobali mokristo azali kosalela mwasi na ye makambo na boboto, azali komitya na esika na ye, azali kotyela ye likebi, mpe azali moimi te, ezalaka pɛtɛɛ mpo mwasi na ye atosa bokonzi na ye.

18. Nini ekoki kosalisa mibali mpo bákokisa mikumba na bango na libala?

18 Kosɛnga mibali ete bápesa basi na bango lokumu ndenge wana eleki ndelo? Te, Yehova akoki soki moke te kosɛnga bango básala likambo oyo eleki makoki na bango. Longola yango, basaleli ya Yehova bazali na libaku ya kozwa nguya oyo eleki banguya nyonso na molɔ́ngɔ́: elimo santu ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?” (Luka 11:13) Na mabondeli na bango, mibali bakoki kosɛnga ete na nzela ya elimo santu na ye, Yehova asalisa bango na ndenge na bango ya kosalela basusu makambo, ná mpe basi na bango.​—Tángá Misala 5:32.

19. Lisolo oyo elandi ekolobela nini?

19 Ya solo, mibali bazali na mokumba monene ya koyekola ndenge ya kotosa Kristo mpe komekola bokonzi na ye. Kasi, ezali boni mpo na basi, mingimingi basi oyo babalá? Lisolo oyo elandi, ekolobela ndenge oyo basengeli kotalela esika na bango na kati ya ebongiseli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Bizaleli nini ya Yesu tosengeli komekola?

• Ndenge nini bankulutu basengeli kosalela bampate makambo?

• Mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo ndenge nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Bililingi na lokasa 10]

Mekolá Yesu na oyo etali kopesa basusu lokumu