Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nani akobikisa baoyo bazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi?

Nani akobikisa baoyo bazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi?

Nani akobikisa baoyo bazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi?

“Ee Nzambe, pesá mokonzi bikateli na yo ya lisambisi . . . Mpo akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi.”​—NZ. 72:1, 12.

1. Likambo ya Davidi eteyi biso nini na ntina na motema mawa ya Nzambe?

MALOBA yango oyo mbala mosusu mokonzi Davidi nde akomaki esimbaka mpenza motema! Bambula mingi liboso akoma yango, ayokaki mawa mingi nsima ya kosala ekobo ná Bate-sheba. Na ntango yango, Davidi asɛngaki Nzambe ete: “Longolá misala na ngai ya kobuka mibeko na kolanda motema mawa oyo otondi na yango. . . . Lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. . . . Talá! Na libunga nabotamaki na kati ya mpasi, mpe na lisumu mama na ngai azwaki zemi na ngai.” (Nz. 51:1-5) Na motema mawa na ye, Yehova abosanaka te ete tozali bato ya masumu.

2. Nzembo 72 eyebisi biso nini?

2 Yehova ayebi ete tozali na mpasi. Kasi, ndenge esakolamaki, Mokonzi oyo Nzambe atye mafuta “akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola.” (Nz. 72:12, 13) Ndenge nini mpasi yango ekosila? Nzembo 72 eyebisi biso yango. Nzembo yango oyo ekomamaki mpo na boyangeli ya Salomo, mwana ya Davidi, eyebisi biso na mokuse ndenge boyangeli ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe, ekosilisa mpasi ya bato.

Elilingi ya boyangeli ya Kristo

3. Salomo asɛngaki nini, mpe Nzambe apesaki ye nini?

3 Nsima ya kopesa mitindo ete bátya Salomo mokonzi, mobange Davidi apesaki ye malako ya sikisiki mpe Salomo alandaki yango na bosembo. (1 Bak. 1:32-35; 2:1-3) Na nsima, Yehova abimelaki Salomo na ndɔtɔ mpe alobaki na ye boye: “Sɛngá eloko oyo nasengeli kopesa yo.” Salomo asɛngaki kaka eloko moko: “Osengeli kopesa mosaleli na yo motema ya botosi mpo na kosambisa bato na yo, mpo na kososola kati na malamu mpe mabe.” Lokola Salomo amonisaki komikitisa na likambo oyo asɛngaki, Nzambe apesaki ye yango mpe abakiselaki ye biloko mosusu.​—1 Bak. 3:5, 9-13.

4. Mokonzi moko na ntango ya Salomo alobaki nini mpo na boyangeli ya Salomo?

4 Lokola Yehova apambolaki ye, boyangeli ya Salomo ezalaki eleko ya kimya mpe ya bozwi na ndenge oyo ezalá naino na guvɛrnema mosusu te awa na mabele. (1 Bak. 4:25) Kati na bato oyo bayaki kotala soki boyangeli ya Salomo ezali ndenge nini, ezalaki mokonzi-mwasi ya Sheba ná basaleli na ye ebele. Alobaki na Salomo boye: “Liloba oyo nayokaki na mokili na ngai . . . ezali mpenza solo. . . . Oyo bayebisaki ngai ekómi ata na katikati te. Bwanya na yo mpe bozwi na yo eleki mpenza makambo oyo nayoká na matoi na ngai.” (1 Bak. 10:1, 6, 7) Nzokande, Yesu amonisaki bwanya oyo eleki mosika bwanya ya Salomo; alobaki solo mpo na ye moko ete: “Talá! moto oyo aleki Salomo azali awa.”​—Mat. 12:42.

Mpasi ekosila na boyangeli ya Salomo Monene

5. Nzembo 72 emonisi nini, mpe makambo oyo Yesu asalaki ezalaki elilingi ya nini?

5 Tótala sikoyo makambo oyo Nzembo 72 elobeli mpo tóyeba mapamboli oyo tokozwa na boyangeli ya Yesu Kristo, Salomo Monene. (Tángá Nzembo 72:1-4.) Nzembo yango emonisi ndenge Yehova ayokaka mpo na “boyangeli” ya Mwana na ye Yesu Kristo, “Nkumu ya kimya.” (Yis. 9:6, 7) Na litambwisi ya Nzambe, Salomo Monene ‘akosamba likambo ya bato ya mpasi mpe akobikisa bana ya mobola.’ Boyangeli na ye ekozala ya kimya mpe ya boyengebene. Makambo oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele, ezalaki elilingi ya makambo oyo Boyangeli ya Mbula Nkóto ekosala.​—Em. 20:4.

6. Makambo nini Yesu asalaki mpo na komonisa mwa moke mapamboli oyo ekozala na Bokonzi na ye?

6 Tótala mwa makambo oyo Yesu Kristo asalaki, oyo ekosalisa biso tómona mwa moke makambo oyo akosala mpo na bato, mpo na kokokisa Nzembo 72. Mawa monene oyo azalaki koyokela bato oyo bazalaki komona mpasi esimbaka mpenza motema na biso. (Mat. 9:35, 36; 15:29-31) Na ndakisa, mobali moko oyo azalaki konyokwama na maladi ya maba apusanaki penepene ya Yesu mpe asɛngaki ye boye: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu ayanolaki ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” Mpe mobali yango abikaki. (Mrk. 1:40-42) Na nsima, Yesu akutanaki na mwasi moko oyo mobali akufá, oyo mwana na ye kaka moko ya mobali autaki kokufa. Yesu “ayokelaki ye mawa” mpe alobaki na mwana yango ete: “Tɛlɛmá!” mpe mwana yango atɛlɛmaki. Azongaki na bomoi!​—Luka 7:11-15.

7, 8. Wapi mwa makambo oyo emonisaki ete Yesu azalaki na nguya ya kobikisa?

7 Yehova apesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi. Yango emonisami na ndakisa ya “mwasi moko [oyo] azalaki na maladi ya kotanga makila mbula zomi na mibale.” Atako “amonaki mpasi mingi na minganga ndenge na ndenge mpe asilisaki biloko na ye nyonso,” maladi na ye ekómaki nde makasi koleka. Mwasi yango akɔtaki na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki Yesu​—abukaki mobeko oyo elobelaki moto oyo ‘makila ezali kotanga ye.’ (Lev. 15:19, 25) Yesu ayokaki ete nguya ebimi na kati na ye mpe atunaki soki nani asimbaki ye. “Na kobanga mpe na kolɛnga,” mwasi yango “akweaki liboso na ye mpe ayebisaki ye solo nyonso.” Lokola Yesu amonaki ete Yehova abikisi mwasi yango, amoniselaki ye boboto mpe alobaki boye: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”​—Mrk. 5:25-27, 30, 33, 34.

8 Nguya ya kobikisa oyo Nzambe apesaki Yesu ebikisaki bato ya maladi, kasi na ntembe te esimbaki mpe mitema ya bato oyo bazalaki kotala makamwisi yango. Na ndakisa, ntembe ezali te ete bato mingi bakamwaki ntango bamonaki Yesu azali kobikisa bato liboso asala lisolo na ye likoló ya ngomba. (Luka 6:17-19) Ntango Yoane Mobatisi atindaki bato mibale mpo na koyeba soki Yesu azali mpenza Masiya, bakutaki ye ‘azali kobikisa bato mingi oyo bazalaki na bamaladi mpe na bampasi ya makasi mpe na bilimo mabe, mpe kosala ete bato mingi oyo bakufá miso bákoka komona.’ Na nsima Yesu ayebisaki bato yango boye: “Bókende koyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bato oyo bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.” (Luka 7:19-22) Na ntembe te, nsango wana elendisaki Yoane!

9. Makamwisi ya Yesu emonisaki nini?

9 Ya solo, ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, Yesu alongolaki mpasi ya bato kaka mpo na mwa ntango. Bato oyo abikisaki to asekwisaki bayaki kokufa na nsima. Atako bongo, makamwisi oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele emonisaki mwa moke ete na boyangeli na ye, akobikisa bato mpo na libela.

Mabele mobimba ekokóma Paradiso!

10, 11. (a) Mapamboli ya Bokonzi ekoumela ntango boni, mpe boyangeli ya Yesu ekozala ndenge nini? (b) Nani akozala ná Kristo na Paradiso, mpe ekosɛnga asala nini mpo azwa bomoi libela na libela?

10 Meká kokanisa ndenge bomoi ekozala na Paradiso awa na mabele. (Tángá Nzembo 72:5-9.) Basambeli ya Nzambe ya solo bakosepela na bomoi na Paradiso ntango nyonso oyo moi ná sanza ekozala, elingi koloba libela na libela! Mokonzi Yesu Kristo akopesa bato makasi ‘lokola mbula likoló ya matiti oyo bakati mpe mbula monene oyo ezali kopɔlisa mabele.’

11 Ntango ozali komona na makanisi ndenge nzembo yango ekokokisama, motema na yo etondi te na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele? Na ntembe te, mosali-mabe oyo babakaki na nzete asepelaki ntango Yesu ayebisaki ye ete: “Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:43) Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu, mobali yango akozonga na bomoi. Soki atosi bokonzi ya Kristo, akozwa bomoi libela na libela na nzoto ya kokoka mpe na esengo.

12. Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, libaku nini ekopesama na bato bazangi boyengebene oyo bakosekwa?

12 Na boyangeli ya Yesu Kristo, Salomo Monene, “moyengebene akokola lokola matiti ya sika,” elingi koloba akozala malamu. (Nz. 72:7) Na ntango yango, bolingo mpe boboto ya Yesu ekozala mingi, kaka ndenge ezalaki ntango azalaki awa na mabele. Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, ata “bato oyo bazangi boyengebene,” oyo bakosekwa bakozwa libaku kitoko ya kotosa mitinda ya Yehova mpe kozwa bomoi. (Mis. 24:15) Baoyo bakoboya kotosa mitinda bakopesama nzela te ya kotikala na bomoi mpe kobebisa kimya ya mokili ya sika.

13. Boyangeli ya Bokonzi ekozala tii wapi, mpe mpo na nini kimya na yango ekobebisama ata moke te?

13 “Akozala na bato oyo ye akoyangela banda na mbu kino na mbu mpe banda na Ebale [Efrate] kino na nsuka ya mabele. Bato oyo bafandi na bitúká oyo ezangá mai bakogumbama liboso na ye, mpe banguna na ye bakolɛmbɔla putulu”; maloba yango emonisi ete boyangeli ya Salomo Monene ekozala na mabele mobimba. (Nz. 72:8, 9) Ya solo, Yesu Kristo akoyangela mabele mobimba. (Zek. 9:9, 10) Baoyo bakondima boyangeli yango mpe mapamboli na yango “bakogumbama,” elingi koloba bakosepela kotosa ye. Nzokande, basumuki oyo bakobongola motema te bakolongolama, ata soki ‘bakómi na mbula nkama moko.’ (Yis. 65:20) “Bakolɛmbɔla putulu.”

Akomitya na esika na biso

14, 15. Ndenge nini toyebi ete Yesu ayebi bampasi ya bato mpe ete “akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi”?

14 Biso bato ya masumu tozali na bomoi ya mawa mpe tozali mpenza na mposa ya lisalisi. Kasi, elikya ezangi te. (Tángá Nzembo 72:12-14.) Yesu Kristo, Salomo Monene, azali komitya na esika na biso mpo ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka. Longola yango, Yesu anyokwamaki mpo na boyengebene, mpe Nzambe atikaki ye amona mpasi. Kutu, Yesu atungisamaki mingi na motema na boye ete “motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse”! (Luka 22:44) Na nsima, ntango azalaki na nzete ya mpasi, agangaki boye: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?” (Mat. 27:45, 46) Ezala mpasi nini oyo amonaki mpe atako Satana asalaki nyonso mpo na kotinda ye apesa Yehova mokɔngɔ, Yesu atikalaki sembo epai ya Yehova Nzambe.

15 Tokoki mpenza kondima ete Yesu amonaka mpasi na biso mpe ete “akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te.” Lokola amibanzabanzaka mpo na biso ndenge moko na Tata na ye, Yesu ‘akoyoka babola’ mpe ‘akobikisa baoyo bazoki na motema, akokanga bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.’ (Nz. 69:33; 147:3) Yesu akoki “koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso,” mpo “amekamaki na makambo nyonso lokola biso.” (Ebr. 4:15) Ezali mpenza esengo koyeba ete Mokonzi Yesu Kristo azali lelo koyangela na likoló mpe azali na mposa makasi ya kosilisa bampasi ya bato!

16. Mpo na nini Salomo azalaki kokoka komitya na esika ya bato na ye?

16 Lokola azalaki na bwanya mpe na bososoli, ntembe ezali te ete Salomo ‘ayokaki mawa mpo na moto oyo azangá.’ Longola yango, ye moko akutanaki na makambo ya mawa mpe ya mpasi na bomoi na ye. Ndeko na ye Aminone asangisaki nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi Tamara, mpe Ndeko na ye Abisalome abomaki Aminone mpo na likambo yango. (2 Sa. 13:1, 14, 28, 29) Abisalome alukaki kobɔtɔla kiti ya bokonzi ya Davidi, kasi alongaki te, mpe Yoabe abomaki ye. (2 Sa. 15:10, 14; 18:9, 14) Na nsima, Adoniya, ndeko ya Salomo, amekaki kozwa bokonzi na esika na ye. Soki Adoniya alongaka, na ntembe te alingaki kobomisa Salomo. (1 Bak. 1:5) Makambo oyo Salomo alobaki na libondeli oyo asalaki na bofungoli tempelo ya Yehova emonisi polele ete ayebaki mpasi oyo ekómelaka bato. Mpo na bato na ye, mokonzi yango abondelaki boye: “Bayebi moto na moto bolɔzi na ye moko mpe mpasi na ye moko . . . Yo [Yehova] . . . limbisá mpe pesá moto na moto na kolanda banzela na ye nyonso.”​—2 Nt. 6:29, 30.

17, 18. Mpasi nini basaleli mosusu ya Nzambe bayikelaki mpiko, mpe nini esalisaki bango?

17 ‘Mpasi na biso moko’ ekoki kouta na makambo oyo tokutanaki na yango kala na bomoi. Mary, * ndeko moko oyo azali na mbula soki 35 akomi boye: “Nasengeli mpenza kozala na esengo kasi mbala mingi, bomoi na ngai ya kala etindaka ngai nayoka nsɔni mpe namiyoka mbindo. Mawa makasi eyelaka ngai, mpe nazalaka na mposa ya kolela, lokola nde makambo yango nyonso esalemaki kaka lobi. Makambo yango oyo nakokaka kobosana te ezali kokoba kotinda ngai nayoka ete nazali na ntina moko te mpe ete namemá ngambo.”

18 Makanisi ya ndenge wana ekoki koyela basaleli mingi ya Nzambe; kasi nini ekoki kosalisa bango bázwa makasi oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko? Mary alobi boye: “Baninga ya solosolo mpe bandeko ya lisangá bazali lelo kopesa ngai esengo. Nasalaka mpe makasi natya makanisi na makambo oyo Yehova alaki mpo na mikolo ezali koya, mpe nazali na elikya ete kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi ekobongwana koganga ya esengo!” (Nz. 126:5) Tosengeli kotya elikya na biso na Mwana ya Nzambe, Mokonzi oyo aponami. Mpo na ye, Biblia esakolaki boye: “Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu, mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” (Nz. 72:13, 14) Maloba yango ezali mpenza ya kolendisa!

Mokili ya sika ya biloko beboo ezali koya

19, 20. (a) Ndenge Nzembo 72 emonisi yango, likambo nini Bokonzi ekosilisa? (b) Nani asengeli libosoliboso kozwa lokumu mpo na boyangeli ya Kristo, mpe ndenge nini ozali koyoka mpo na makambo oyo ekokokisa?

19 Meká lisusu komona na makanisi mapamboli oyo bato ya sembo bakozwa na mokili ya sika ya Nzambe oyo Salomo Monene akoyangela. Biblia elaki biso ete: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.” (Nz. 72:16) Lokola mbuma ebotaka mpenzampenza na nsɔngɛ ya bangomba te, maloba yango emonisi ndenge mabele ekobota mingi. Mbuma na yango “ekozala lokola na Libá,” mokili oyo ezalaki kobota mingi ntango Salomo azalaki koyangela. Kanisá naino! Bilei ekozanga lisusu te, moto nyonso akozala na bilei oyo ekoki, mpe moto akokufa nzala te! Na ntango yango, moto nyonso akosepela na “fɛti moko ya bilei ya mafuta mpenza.”​—Yis. 25:6-8; 35:1, 2.

20 Nani asengeli kozwa lokumu mpo na mapamboli nyonso wana? Libosoliboso, Mokonzi ya Seko mpe Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Yehova Nzambe. Kutu, na ntango wana, biso nyonso tokosangisa mingongo mpo na koyemba maloba ya nsuka ya nzembo yango kitoko mpe oyo ezali kokitisa motema ete: “Nkombo na ye [ya Mokonzi Yesu Kristo] ezala mpo na ntango oyo etyami ndelo te; liboso ya moi, nkombo na ye epalangana, mpe na nzela na ye, bango bámizwela lipamboli; bikólo nyonso etánga ye moto ya esengo. Yehova Nzambe, Nzambe ya Yisraele, apambolama, ye moko nde azali kosala misala ya kokamwa. Mpe nkombo na ye ya nkembo epambolama seko na seko, mpe nkembo na ye etondisa mabele mobimba. Amen mpe Amen.”​—Nz. 72:17-19.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 17 Oyo ezali nkombo topesi ye kopesa.

Okopesa eyano nini?

• Makambo oyo ezali na Nzembo 72 ezali elilingi ya nini?

• Nani azali Salomo Monene, mpe boyangeli na ye ekokende tii wapi?

• Na mapamboli nyonso oyo Nzembo 72 elobeli, yo osepeli na oyo wapi?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 29]

Bozwi ya boyangeli ya Salomo ezalaki elilingi ya nini?

[Elilingi na lokasa 32]

Ebongi mpenza tósala milende mpo tózala na bomoi na Paradiso na boyangeli ya Salomo Monene