Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokolo moko na libongo

Mokolo moko na libongo

Mokanda euti na Grenade

Mokolo moko na libongo

SOKI batindi yo misionɛrɛ na mboka mopaya, na ntembe te okozala mpenza na esengo makasi. Kaka ndenge mwana moke alukaka koyeba makambo, yo mpe okozala na mposa ya koyeba soki bato ya mboka yango bazalaka ndenge nini, esika yango ezali ndenge nini, mpe makambo nini ezali kozela yo na mosala ya kosakola.

Ntango batindaki ngai ná mwasi na ngai na Grenade, mboka oyo ezali na mabongo kitoko soki 45, tozalaki komituna soki mabongo yango ezali ndenge nini. Mosika te, tolekisaki mokolo malamu na moko ya mabongo yango; esengo na biso ezalaki mingi mpo na bato, kasi te mpo na moi mpe bambonge oyo ezalaki kobɛta.

Libongo ya Grand Anse, ezalaki mosika te na esika tozalaki kofanda na Grenade​—kasi, ezalaki esengo kotambola na motuka mpo na kokende na esika yango! Nzela yango ezalaki nyokanyoka mpe epesaki biso libaku ya komona biloko kitoko. Bangomba mike ezipamaki na matiti kitoko. Tozalaki komona bangomba, bazamba, bibale, mbu, mpe banzela ya nyokanyoka. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge bato oyo bautaka na mikili ndenge na ndenge bakendaka kotala esika yango! Biloko yango ezali kitoko mingi na kotala, yango wana sofɛlɛ asengeli mpenza kokeba ete abungisa likebi te. Ndenge banzela yango ya nyokanyoka ekanganá, ekoki kotinda yo omituna ndenge oyo mituka mibale ekoki kolekana kozanga ete etutana.

Tokómaki na liyangani na Trade Center, oyo ezalaki pene ya nzela ya libongo ya Grand Anse. Eumelaki te, etuluku moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki bato soki 600, bayanganaki mpo na kolanda mateya ya Biblia. Mokolo yango ezalaki ya ntina mingi mpo na Lesley mpe Daphne, babalani oyo bazalaki na mbula koleka 70. Lesley asengelaki kobatisama. Daphne azalaki kozela banda kala na motema likoló mokolo yango, mpo ye azwaki batisimo na 1958.

Mpo na Batatoli ya Yehova, kobatisama​—oyo elakisi kozindisama mobimba na mai—​ezalaka na ntina mingi. Moto azwaka batisimo nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya Biblia mpe kosalela yango na bomoi na ye. Esalemaka liboso ya bato nyonso, yango emonisaka ete moto asilaki komipesa na Yehova Nzambe.

Basɛngaki ngai nasala diskur, nalimbola oyo Biblia elobi mpo na batisimo. Na nsuka ya diskur yango, Lesley ná bato mosusu mibale oyo basengelaki mpe kobatisama, batɛlɛmaki. Alataki simisi mpe kravate moko kitoko mpe azalaki na esengo mpenza. Natunaki bango boye: “Bobongoli motema na masumu na bino mpe bomipesi na Yehova mpo na kosala mokano na ye?” Bayanolaki: “Ee.” Yango emonisaki ete eyano yango eutaki mpenza na motema mpe bakangamaki mpenza na Nzambe!

Lokola nayebaki ndenge Lesley azalaki liboso, nazalaki na esengo makasi mokolo wana. Na boumeli ya bambula mingi, azalaki koboya koyekola Biblia. Na nsima, ye ná mwasi na ye bakendaki na esanga mosusu. Ntango bazalaki kuna, bazwaki ekateli ete moto na moto akokende kosambela na lingomba na ye. Lesley alobaki na Daphne boye: “Yo kende na lingomba na yo, ngai mpe nakokende na oyo ya ngai.”

Lesley amemaki Daphne na motuka mpe atikaki ye na Ndako ya Bokonzi mpe ye akendaki na ndako-nzambe ya Lingomba ya Anglican oyo ezalaki kaka pene wana. Ntango basilisaki losambo, Lesley azongaki na Ndako ya Bokonzi mpo na kozwa mwasi na ye. Kuna, bato bayaki ebele epai na ye, bayambaki ye na esengo mpe na boboto atako bayebaki ye te. Likambo yango esimbaki motema ya Lesley. Na ndako-nzambe na bango, moto moko te alobaki na ye ata liloba. Lesley ayebisaki Daphne boye: “Nakozonga lisusu na ndako-nzambe wana te, moto moko te akipe ngai, ata sango. Moto moko te apesi ngai mbote. Ata ntango nakómaki ata mpe ntango nabimaki.” Ntango Lesley abimaki, abimaki mpo na libela.

Na nsima, Lesley amipesaki mpenza na koyekola Liloba ya Nzambe. Mpe sikoyo amibongisaki mpo na kozwa batisimo. Bato oyo basengelaki kozwa batisimo bakendaki na libongo, mpe biso tokendaki na bango elongo. Lokola mbu ezalaki pene wana, ezalaki na ntina te kobongisa mai mpo na kopesa batisimo ndenge esalemaka na mayangani mingi ya Batatoli ya Yehova. Tokatisaki kaka balabala.

Grand Anse, ezali libongo moko kitoko oyo ezali na bolai ya mɛtrɛ misato, oyo etondi na zɛlo ya mpɛmbɛ mpe mai na yango ezalaka bule mpe ezalaka mingimingi malili te. Bapaya oyo bazalaki wana bakamwaki ntango bamonaki biso toyei na libongo, mibali balataki basimisi mpe bakravate, basi balataki bajipe mpe babluzɛ. Lesley alongolaki bilamba na ye mpe alataki kupe mpe triko. Kanisá ndenge Daphne ayokaki ntango amonaki mobali na ye azali kozwa batisimo mbula 50 nsima ya batisimo na ye! Esengo na ye ezalaki makasi, kaka ndenge moi ezalaki kongala. Ata mpe baturiste bazalaki kosepela elongo na biso. Bazalaki mpe kobɛta mabɔkɔ ntango bato bazali kozwa batisimo.

Mapata ya bule, zɛlɔ ya mpɛmbɛ mpe lokito ya mbonge​—libongo yango epesaka Mozalisi na yango nkembo. Epesaki lisusu nkembo mingi ntango bato misato wana bazwaki batisimo na mai yango. Komona bango epesaki biso esengo na motema koleka ndenge moi ezalaki kobɛta na loposo na biso. Mokolo yango ezalaki mpenza ya ntina mingi. Mpo na Lesley ná Daphne, mokolo yango ezalaki mokolo oyo eleki mpenza malamu.