Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasali na eleko moko ya bokoli monene

Nasali na eleko moko ya bokoli monene

Nasali na eleko moko ya bokoli monene

Lisolo ya Harley Harris

Ezalaki mokolo ya 2 Sɛtɛmbɛ 1950, na engumba Kennett, na etúká ya Missouri, na États-Unis. Tozalaki na liyangani moko ya zongazonga, mpe etuluku moko ya bato ya mobulu bazingaki biso. Guvɛrnɛrɛ atindaki basoda báya kobatela biso mpo na bato yango ya mobulu. Basoda bayaki na mandoki ná bambeli, batɛlɛmi na molɔngɔ na balabala. Wana bato ya mobulu bazalaki kofinga biso, tokɔtaki na mituka na biso mpe tokendaki na engumba Cape Girardeau, kaka na Missouri, mpo tósilisa eteni ya liyangani oyo etikalaki. Nazwaki batisimo na liyangani yango; nazalaki na mbula 14. Kasi, tiká nayebisa bino ndenge nakómaki kosalela Yehova na ntango wana ya yikiyiki.

NA EBANDELI ya bambula ya 1930, baboti ya tata na ngai ná bana na bango mwambe bayokaki masukulu ya Ndeko Rutherford na badiskɛ mpe bandimaki ete bamoni lingomba ya solo. Baboti na ngai, Bay ná Mildred Harris, bazwaki batisimo na 1935, na liyangani ya etúká oyo esalemaki na Washington. Bazalaki na esengo makasi ya kozala na kati ya “ebele monɛnɛ,” to “ebele mpenza ya bato,” oyo eyebanaki na liyangani yango!​—Em. 7:9, 14; haut fleuve.

Na mbula oyo elandaki, ngai nabotamaki. Mbula moko na nsima, baboti na ngai bakendaki na Mississippi, na teritware moko epai Batatoli bazalaki te. Ntango tozalaki kofanda kuna, ata mokɛngɛli-motamboli moko te azalaki koya kotala biso. Tozalaki kosolola na Betele na nzela ya mikanda mpe tozalaki kokende na mayangani; na boumeli ya mwa ntango, tozalaki kokutana na bandeko mosusu kaka na mabaku wana.

Toyiki mpiko na minyoko

Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova banyokwamaki makasi mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Tokendaki kofanda na Mountain Home, na etúká ya Arkansas. Mokolo moko, ngai ná tata tozalaki kosakola na balabala. Na mbala moko, mobali moko abɔtɔlaki tata bazulunalo, atyaki yango mɔtɔ, mpe atumbaki yango. Alobaki ete tozali bato ya bibangabanga mpo toboyaki kokende na etumba. Lokola nazalaki kaka na mbula mitano, nabandaki kolela. Na kimya nyonso, tata atalaki mobali yango mpe alobaki ata eloko te tii moto yango akendaki.

Ezalaki mpe na bato mosusu ya malamu oyo bazalaki kosepela na biso. Mokolo moko ntango etuluku moko ya bato ya mobulu bazingaki motuka na biso, zuzi ya mboka ayaki wana. Atunaki boye: “Likambo nini awa?” Mobali moko ayanolaki ete: “Batatoli ya Yehova oyo balingi kobundela ekólo na bango te!” Na mbala moko zuzi ayaki pembeni ya motuka na biso mpe agangaki ete: “Nabundaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba; nakobunda mpe mbala oyo! Bótika bato oyo bákende na bango. Bazali kosala moto mabe te!” Bato yango bapanzanaki na malɛmbɛ. Tozalaki kosepela mingi na bato ya mitema malamu ndenge wana oyo bamoniselaki biso boboto!​—Mis. 27:3.

Mayangani epesi biso makasi

Na 1941, liyangani ya etúká oyo esalemaki na Saint Louis, na Missouri, eyaki mpenza na ntango ebongi. Bato mosusu balobaki ete bayangani balekaki motángo ya 115 000. Tokamwaki na komona ete bato 3 903 bazwaki batisimo! Nayebi malamu lisukulu ya Ndeko Rutherford, oyo ezalaki na motó ya likambo “Bana ya Mokonzi.” Alobaki mingimingi na biso bana, mpe bapesaki mokomoko na biso buku moko kitoko ya langi ya bule oyo ezalaki na motó ya likambo Bana. Liyangani yango epesaki ngai makasi ya koyika mpiko na makambo oyo esalemaki na mbula oyo elandaki, ntango nakɔtaki kelasi. Babenganaki ngai ná mwana ya ndeko ya tata na eteyelo mpo toboyaki kopesa drapo losako. Tozalaki kozonga na eteyelo mikolo nyonso mpo na kotala soki mbala mosusu bakonzi babongoli makanisi. Mikolo mingi na ntɔngɔ, tozalaki koleka na kati ya zamba mpo na kokende na eteyelo, kasi bazalaki kaka kozongisa biso ndako. Atako bongo, nazalaki komona ete ezalaki ndenge oyo tozalaki komonisa bosembo na biso na Bokonzi ya Nzambe.

Kasi eumelaki te, tribinale monene ya États-Unis ebimisaki mobeko oyo elobaki ete moto akopesa drapo losako kaka soki alingi. Na yango, bandimaki biso na kelasi. Molakisi azalaki motema malamu mpenza mpe asalisaki biso badevuare oyo tozangaki. Baninga na biso ya kelasi mpe bazalaki kopesa biso limemya.

Nazali mpe koyeba lisusu liyangani oyo tosalaki na 1942, na Cleveland, na etúká ya Ohio, epai Ndeko Nathan Knorr asalaki lisukulu oyo elobaki “Kimya​—Ekoki koumela?” Lisukulu yango oyo elobelaki Emoniseli mokapo 17 na mozindo emonisaki ete ekozala na eleko ya mwa kimya nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na yango, tomonaki ete bokoli monene ekozala. Mpo na komibongisa na likambo yango, bafungolaki Eteyelo ya Gileade na 1943. Na ntango wana, nayebaki te ndenge eteyelo yango ekobongola mpenza bomoi na ngai na mikolo ekoya. Nsima ya etumba, kimya eyaki mpenza mpe minyoko ekitaki. Kasi, ntango Etumba ya Corée ebandaki na 1950, bakómaki lisusu kotɛmɛla mosala na biso ya kosakola, ndenge namonisaki yango na ebandeli.

Namipesi mobimba na mosala oyo ezali kokola

Na 1954, nasilisaki eteyelo ya ntei, mpe sanza moko na nsima, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Nsima ya kosala na engumba Kennett, na Missouri, epai etuluku ya bato ya mobulu bazingaki biso na 1950, babengaki ngai na Betele na sanza ya Marsi 1955. Kartye Times Square, oyo ezali na katikati ya engumba New York, ezalaki na teritware ya lisangá oyo batindaki ngai. Makambo ezalaki ndenge mosusu mpenza! Mpo nakoka kobenda likebi ya bato ya New York oyo bazalaki na makambo mingi ya kosala, nazalaki kofungola zulunalo na lisolo moko oyo ezali na motuna oyo ekotinda moto akanisa, mpe nazalaki koloba boye: “Osilá komituna motuna oyo?” Bato mingi bazalaki kondima bazulunalo.

Moko ya makambo oyo nazalaki kosepela na yango mingi na Betele ezalaki na ntɔngɔ, na ntango ya kotalela mokapo ya mokolo, oyo Ndeko Knorr azalaki kotambwisa. Azalaki kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia malamu mpenza mpe komonisa ndenge tokosalela yango! Azalaki koloba na biso bilenge mibali ndenge tata alobaka na mwana na ye; mbala mingi azalaki kopesa biso batoli ya malamu na oyo etali ndenge ya kofanda na moto oyo azali molongani na yo te. Na 1960, namonaki ete nasengeli kobala.

Nakomelaki Betele mokanda mpo na koyebisa bango ete nakobima nsima ya mikolo 30, kasi nazwaki eyano te. Ntango mikolo 30 ekokaki, atako nazalaki nsɔninsɔni, nasalaki makasi mpe natunaki soki bamonaki mokanda na ngai ya kolongwa na Betele. Ndeko Robert Wallen ayambaki telefone mpe ayaki esika oyo nazalaki kosala. Atunaki ngai soki nasepelaka na mosala ya mobongisi-nzela monene to mosala ya zongazonga. Nazongiselaki ye ete: “Kasi Ndeko Robert, nazali kaka na mbula 24, mpe nayebi makambo mingi te.”

Na mosala ya zongazonga

Na mpokwa yango, nakutaki anvelɔpɛ moko monene na shambrɛ na ngai. Ezalaki na formilɛrɛ moko mpo na mosala ya mobongisi-nzela monene mpe mosusu mpo na mosala ya zongazonga. Oyo nde likambo! Nakamwaki mpenza! Na yango, nazwaki libaku monene ya kosala mosala ya zongazonga mpo na kosalisa bandeko na ngai na sudi-wɛsti ya Missouri mpe na ɛsti ya Kansas. Kasi, liboso nalongwa na Betele, nakɔtaki likita moko oyo esalemaki mpo na bakɛngɛli-batamboli. Na maloba na ye ya nsuka, Ndeko Knorr alobaki boye: “Kozala bakɛngɛli ya zongazonga to ya etúká elimboli te ete boleki bandeko oyo bokuti na masangá. Bandeko yango mosusu bayebi makambo mingi koleka bino. Kasi, makambo ya bomoi epesi bango nzela te ya kozwa mikumba oyo bino bozwi. Bokoki koyekola makambo mingi epai na bango.”

Maloba yango ezalaki mpenza solo! Ndeko Fred Molohan ná mwasi na ye mpe ndeko na ye Charley oyo bazalaki kofanda na engumba Parsons, na Kansas, bazalaki bandakisa ya malamu mpenza. Bayekolaki solo na ebandeli ya bambula ya 1900. Ezalaki mpenza esengo ya koyoka masolo ya makambo oyo bakutaná na yango, liboso kutu nabotama! Ndeko mosusu ezalaki John Wristen, mobange moko ya boboto oyo azalaki kofanda na engumba Joplin, na Missouri, mpe azalaki mobongisi-nzela bambula mingi. Bandeko yango bazalaki na limemya makasi mpo na ndenge ebongiseli ya Yehova etambwisamaka. Basalisaki ngai nayoka ete basepelaka ndenge nazali mokɛngɛli ya zongazonga na bango​—atako nazalaki elenge.

Na 1962, nabalaki Cloris Knoche, mobongisi-nzela moko ya molende, oyo azalaki na nsuki ya mwa motane. Nakobaki na mosala ya zongazonga elongo na Cloris. Kozala elongo na bandeko esalisaki biso tóyeba bango. Tozwaki libaku ya kolendisa bilenge bábanda mosala ya ntango nyonso. Bilenge mibale oyo tokutanaki na bango​—Jay Kosinski mpe JoAnn Kresyman—​bazalaki mpenza na mposa ya bilendiseli ya ndenge wana. Lokola tozalaki kobima na bango na mosala ya kosakola mpe koyebisa bango esengo ya komipimela mpo na basusu elendisaki bango bámityela mikano. JoAnn akómaki mobongisi-nzela monene, mpe Jay akómaki kosala na Betele. Na nsima, bango mibale babalanaki, mpe basali lelo mbula soki 30 na mosala ya zongazonga.

Mosala ya misionɛrɛ

Na 1966, Ndeko Knorr atunaki biso soki tokolinga kokende kosala na ekólo mosusu. Toyanolaki boye: “Tozali kosepela esika tozali, kasi soki mposa ezali esika mosusu, tokondima kokende.” Pɔsɔ moko na nsima, babengaki biso na Eteyelo ya Gileade. Nazalaki mpenza na esengo ya kozonga na Betele mpo na kokɔta kelasi yango mpe kokutana na bato mingi oyo nazalaki kolinga mpe kopesa limemya! Tozwaki mpe baninga kati na bana-​kelasi na biso, oyo bazali kosala na bosembo tii lelo.

Batindaki ngai ná Cloris na ekólo Équateur, na Amerika ya Sudi, elongo na Dennis ná Edwina Crist, Ana Rodríguez, mpe Delia Sánchez. Crist ná mwasi na ye bakendaki na Quito, engumba-mokonzi. Biso, Ana ná Delia, totindamaki na Cuenca, engumba ya misato oyo eleki monene na Équateur. Teritware yango ezalaki na bitúká mibale. Lisangá ya liboso ya Cuenca ebandaki na ndako na biso. Bayangani, ezalaki biso minei ná bato mosusu mibale. Tomitunaki ndenge tokosakola na teritware yango mobimba.

Cuenca ezalaki na bandako-nzambe ebele, mpe na mikolo oyo bazalaki kobenga mikolo mosantu, biloko ya losambo ezalaki kotonda na engumba. Atako bongo, bato ya Cuenca bazalaki na mituna mingi. Na ndakisa, mbala ya liboso oyo nakutanaki na Mario Polo, mokumbi moko monene ya velo na Cuenca, akamwisaki ngai ntango atunaki ete: “Mwasi ya ndumba oyo balobeli na mokanda ya Emoniseli nde nani?”

Mokolo mosusu, Mario ayaki na ndako na biso na butu mpe azalaki komitungisa. Pastɛrɛ moko apesaki ye mikanda oyo elobaki mabe mpenza mpo na Batatoli ya Yehova. Nayebisaki ye ete basengeli kopesa moto oyo bafundi nzela aloba mpo na ye moko. Na yango, na mokolo oyo elandaki, Mario abengisaki pastɛrɛ yango ná ngai na ndako na ye mpo na koyanola na bifundeli wana. Ntango tokutanaki, nasɛngaki ete tólobela liteya ya Bosato. Ntango pastɛrɛ yango atángaki Yoane 1:1, Mario ye moko alimbolaki vɛrsɛ yango. Ezalaki bongo mpo na bavɛrsɛ nyonso oyo etángamaki. Mpo na yango, pastɛrɛ yango akendaki kozanga komonisa ete Biblia elobeli Bosato. Likambo yango endimisaki Mario ná mwasi na ye ete tozalaki na solo, mpe babandaki kokɔtela mateya ya Biblia na molende. Ezalaki mpenza esengo komona ete masangá na engumba Cuenca ekómaki 33 mpe na teritware monene ya liboso oyo batindaki biso, masangá nyonso ekómaki 63​—bokoli monene mpenza!

Tozali na Betele mpe tozali komona bokoli

Na 1970, basɛngaki ngai nakende na biro ya filiale ya Guayaquil elongo na Ndeko Al Schullo. Biso mibale tozalaki kotambwisa mosala na filiale yango. Joe Sekerak azalaki koya na bantango mosusu mpo na kotya mikanda na bakartɔ mpo na masangá 46 ya ekólo mobimba. Na boumeli ya mwa ntango, Cloris azalaki kosakola lokola misionɛrɛ, kasi ngai nazalaki kosala na Betele. Asalisaki bato 55 bázwa batisimo, mbala mingi bayekoli na ye misato to mitano bazalaki kozwa batisimo na liyangani moko.

Na ndakisa, Cloris ayekolaki na mwasi moko na nkombo Lucresia, oyo mobali na ye azalaki kotɛmɛla ye makasi. Atako bongo, nsukansuka Lucresia azwaki batisimo mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ateyaki bana na ye banzela ya Yehova. Bana na ye mibale ya mibali bazali lelo bankulutu, mpe moko azali mobongisi-nzela monene; mwana na ye ya mwasi azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nkɔkɔ na ye moko ya mwasi abalá ndeko mobali moko malamu; bango mpe bazali babongisi-nzela minene. Libota yango esalisi bato mingi báyeba solo.

Na 1980, basakoli bazalaki soki 5 000 na Équateur. Na yango, Betele na biso ekómaki moke. Ndeko moko apesaki biso lopango na ye ya monene (soki 32 hectare) na libándá ya Guayaquil. Na 1984, tobandaki kotonga filiale ya sika ná ndako moko ya mayangani na esika yango, mpe tofungolaki yango na 1987.

Bandeko bandimi kopesa mabɔkɔ mpo na bokoli

Na boumeli ya bambula mingi, ezalaki esengo komona basakoli ebele mpe babongisi-nzela ya mikili ndenge na ndenge bayei na Équateur mpo na kosalisa na bateritware oyo ezali na mposa ya basakoli mingi. Ndakisa moko oyo etikalá na makanisi na ngai ezali ya Andy Kidd, ndeko moko oyo kala azalaki molakisi mpe azwaki pansiɔ na Canada. Ayaki na Équateur na 1985 ntango azalaki na mbula 70, mpe asalaki na bosembo tii liwa na ye na 2008; azalaki na mbula 93. Ntango namonaki ye mpo na mbala ya liboso na teritware na ye, azalaki nkulutu kaka moko ya lisangá moko ya moke. Azalaki koloba monɔkɔ ya Espagnol malamu te; kasi asalaki lisukulu ya bato nyonso mpe na nsima, atambwisaki Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Atambwisaki mpe Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe asalaki masolo mingi na Likita ya Mosala! Na esika yango, ezali lelo na masangá mibale oyo ezali kokola, ná basakoli pene na 200 mpe bankulutu mingi.

Nsima ya kosala sanza 8 na Équateur, ndeko mosusu, Ernesto Diaz, oyo autaki na États-Unis elongo na libota na ye, alobaki boye: “Bana na biso misato bayekoli monɔkɔ ya mboka mpe bakómi bateyi ya malamu. Ngai tata na bango nakokisi mokano oyo nazalaki komona ete nakolonga yango te na mokili oyo​—mokano ya kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza, kosala mosala ya ntango nyonso ná libota na ngai. Biso nyonso tozali koyekola Biblia na bato 25. Nyonso wana esalisi libota na biso ezala na boyokani makasi, mpe na koleka, napusani penepene na Yehova na ndenge oyo nasalá naino te liboso.” Tosepelaka mingi na bandeko mibali mpe bandeko basi yango!

Bayeisaki Betele monene lisusu na 1994, bandako ekómaki monene mbala mibale. Na 2005, tolekaki basakoli 50 000, mpe esɛngaki báyeisa Betele monene lisusu. Esɛngaki Ndako ya Mayangani ya monene koleka, mpe bandako ya sika ya kofanda, mpe babiro ya kobongola mikanda. Bafungolaki bandako yango ya sika na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 2009.

Ntango babenganaki ngai na kelasi na 1942, Batatoli bazalaki soki 60 000 na États-Unis. Lelo bazali koleka milio moko. Ntango tokómaki na Équateur na 1966, basakoli ya Bokonzi bazalaki soki 1 400 na ekólo yango. Lelo bakómi koleka 68 000. Mpe na ntembe te, motángo yango ekobakisama mpo bayekoli ya Biblia bazali 120 000 mpe bato oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo na 2009 bazalaki 232 000. Ya solo, Yehova apamboli bato na ye na ndenge oyo tokokaki kokanisa ata moke te. Ezalaki mpenza esengo kosala na eleko mpe na esika oyo bokoli monene ezali kosalema! *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 34 Ntango lisolo oyo ezalaki kobongisama, Ndeko Harley Harris akufaki; azalaki sembo epai ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 5]

Liyangani na libándá (1981) mpe Ndako ya Mayangani ya Guayaquil (2009) kaka na lopango yango