Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo”

“Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo”

“Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo”

“Bóbengama . . . te ‘bakambi,’ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”​—MAT. 23:9, 10.

1. Batatoli ya Yehova bandimaka nani lokola Mokambi na bango, mpe mpo na nini?

MANGOMBA ya bokristo ezali na bato oyo bazali bakonzi to bakambi na yango, na ndakisa pápa ya Roma mpe bakonzi mosusu ya mangomba ndenge na ndenge. Batatoli ya Yehova bazali na moto moko te oyo azali mokonzi to mokambi na bango. Bazali bayekoli to bandimi ya moto te. Yango eyokani na esakweli oyo Yehova abimisaki mpo na Mwana na ye ete: “Talá! Napesi ye azala motatoli na bituluku ya bato ya bikólo, azala mokambi mpe komanda ya bituluku ya bato ya bikólo.” (Yis. 55:4) Lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo na mokili mobimba mpe baninga na bango “bampate mosusu” balingaka kozala na mokambi mosusu te, longola kaka oyo Yehova ye moko apesá bango. (Yoa. 10:16) Bandimaka maloba ya Yesu oyo: “Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo.”​—Mat. 23:10.

Anzelu oyo azalaki nkumu ya Yisraele

2, 3. Mokumba nini Mwana ya Nzambe azalaki na yango na Yisraele?

2 Bikeke mingi liboso lisangá ya bokristo esalema, Yehova asalelaki anzelu moko mpo azala mokambi ya basaleli na ye, Bayisraele. Nsima ya kobimisa Bayisraele na Ezipito, Yehova ayebisaki bango boye: “Talá nazali kotinda anzelu liboso na yo mpo na kobatela yo na nzela mpe kokɔtisa yo na esika oyo nabongisi. Kebá liboso na ye mpe tosá mongongo na ye. Kotombokela ye te, mpo akolimbisa te ezaleli na bino ya kobuka mibeko; mpamba te nkombo na ngai ezali na kati na ye.” (Kob. 23:20, 21) Tokoki mpenza kokanisa ete anzelu yango, oyo ‘azalaki na nkombo ya Yehova na kati na ye’ ezalaki Mwana ya liboso ya Nzambe.

3 Liboso abotama awa na mabele lokola moto, emonani ete Mwana ya Nzambe azalaki kobengama Mikaele. Na mokanda ya Danyele, Mikaele abengami “nkumu ya bato ya ekólo [ya Danyele],” elingi koloba ekólo Yisraele. (Dan. 10:21) Moyekoli Yuda amonisi ete Mikaele azalaki kokɔta na makambo ya Yisraele banda kala liboso ya eleko ya Danyele. Nsima ya liwa ya Moize, emonani ete Satana alingaki kosalela ebembe na ye mpo na koluka matomba na ye na ndenge moko boye, mbala mosusu kotinda Yisraele bákwea na losambo ya bikeko. Mikaele asalaki mpo na kopekisa likambo yango. Yuda alobi boye: “Ntango Mikaele, anzelu-mokonzi, azalaki na matata ná Zabolo mpe azalaki kowelana mpo na nzoto ya Moize, amekaki kutu te kokweisa ye na likambo na maloba ya kofinga, kasi alobaki nde: ‘Yehova apamela yo.’” (Yuda 9) Mwa moke na nsima, liboso bázinga engumba Yeriko, na ntembe te Mikaele, “mokonzi ya limpinga ya Yehova,” nde abimelaki Yosua mpo na kokitisa ye motema ete Nzambe akosunga ye. (Tángá Yosua 5:13-15.) Ntango nkumu moko ya bademo amekaki kopekisa anzelu moko ya Nzambe akende koyebisa mosakoli Danyele nsango moko ya ntina, Mikaele anzelu-mokonzi ayaki kosalisa anzelu yango.​—Dan. 10:5-7, 12-14.

Mokambi oyo alakamaki ayei

4. Esakweli nini epesamaki na ntina etali koya ya Masiya?

4 Liboso makambo wana esalema, Yehova atindaki anzelu Gabriele epai ya mosakoli Danyele mpo na koyebisa ye esakweli moko oyo etalaki koya ya “Masiya Mokambi.” (Dan. 9:21-25) * Na ntango oyo esakweli yango esengelaki kokokisama, na eleko ya ɔtɔne ya mobu 29 T.B., Yoane abatisaki Yesu. Elimo santu ekitelaki Yesu, ekómisaki ye Moto oyo atyami mafuta na elimo​—Kristo to Masiya. (Mat. 3:13-17; Yoa. 1:29-34; Gal. 4:4) Lokola akómaki Masiya, asengelaki kokóma Mokambi oyo akokani na mosusu te.

5. Ndenge nini Kristo amonisaki ete azali Mokambi ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele?

5 Banda na ebandeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki ete azali “Masiya Mokambi.” Nsima ya mwa mikolo, abandaki koyanganisa bayekoli na ye, mpe asalaki likamwisi na ye ya liboso. (Yoa. 1:35–2:11) Bayekoli na ye balandaki ye ntango azalaki kotambola na mokili yango mobimba mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Luka 8:1) Apesaki bango formasyo na mosala ya kosakola mpe akambaki mosala ya kosakola mpe ya koteya, mpe na ndenge yango apesaki bango ndakisa malamu. (Luka 9:1-6) Bankulutu na masangá lelo basengeli komekola Yesu na likambo yango.

6. Na ndenge nini Kristo amonisaki ete azali Mobateli ya mpate mpe Mokambi?

6 Yesu abendaki likebi na likambo mosusu oyo etali mokumba na ye ya Mokambi ntango amikokanisaki na mobateli ya mpate oyo atondi na bolingo. Babateli ya mpate ya Moyen-Orient bakambaka mpenza bibwɛlɛ na bango. Na buku na ye, (The Land and the Book) William Thomson akomaki boye: “Mobateli ya mpate alekaka liboso, kaka mpo na kolakisa nzela te, kasi mpe mpo na kotala soki nzela ezali malamu mpe na likama te. . . . Na lingenda [na ye], alakisaka bibwɛlɛ nzela mpe akambaka yango na matiti ya mobesu, mpe abatelaka yango na banguna.” Mpo na komonisa ete azali Mobateli ya mpate mpe Mokambi ya solosolo, Yesu alobaki boye: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu; mobateli ya mpate oyo aleki malamu apesaka molimo na ye mpo na bampate. Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai.” (Yoa. 10:11, 27) Ndenge alobaki yango, Yesu akufaki liwa ya mbeka mpo na bampate na ye, kasi Yehova atombolaki ye mpo azala “Mokonzi pe Mobikisi.”​—Mis. 5:31, Bible na lingala ya lelo oyo; Ebr. 13:20.

Mokɛngɛli ya lisangá ya bokristo

7. Yesu akɛngɛlaka lisangá ya bokristo na nzela ya nini?

7 Mwa moke liboso amata na likoló nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” (Mat. 28:18) Yehova ayebisaki Yesu apesa elimo santu mpo elendisa bayekoli na solo ya bokristo. (Yoa. 15:26) Yesu asopelaki bakristo ya liboso elimo yango na Pantekote ya mobu 33 T.B. (Mis. 2:33) Kosopama yango ya elimo santu emonisaki ete lisangá ya bokristo esalemi. Yehova atyaki Mwana na ye oyo azali na likoló akamba lisangá awa na mabele. (Tángá Baefese 1:22; Bakolose 1:13, 18.) Yesu atambwisaka lisangá ya bokristo na nzela ya elimo santu ya Yehova, mpe azali na baanzelu oyo “batyamaki na nse ya bokonzi na ye” mpo na kosalela ye.​—1 Pe. 3:22.

8. Nzela nini Kristo asalelaki na ekeke ya liboso mpo na kokamba bayekoli na ye, mpe azali kosalela banani lelo?

8 Kaka na nzela ya elimo santu yango, Kristo apesaki “makabo oyo ezali bato,” bamosusu bázala “babateli ya mpate mpe bateyi” na lisangá. (Ef. 4:8, 11) Ntoma Paulo alendisi bakɛngɛli bakristo boye: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe.” (Mis. 20:28) Ntango lisangá ya bokristo ebandaki, bakɛngɛli nyonso bazalaki mibali oyo batyami mafuta na elimo. Bantoma mpe bankulutu ya lisangá ya Yerusaleme bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi. Kristo asalelaki lisangani yango mpo na kokamba “bandeko” na ye nyonso awa na mabele, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Ebr. 2:11; Mis. 16:4, 5) Na ntango oyo ya nsuka, Kristo apesi “biloko na ye nyonso”​—matomba nyonso ya Bokonzi oyo ezali awa na mabele—​na mabɔkɔ ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe momonisi na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mwa etuluku ya bakristo ya mibali oyo batyami mafuta na elimo. (Mat. 24:45-47) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe baninga na bango bampate mosusu bayebi ete soki bazali kolanda litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi lelo, bazali nde kolanda Mokambi na bango, Kristo.

Kristo abandisi mosala ya kosakola

9, 10. Ndenge nini Kristo ye moko atambwisaki makambo mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi?

9 Banda na ebandeli, Yesu ye moko akambaki mosala ya kosakola mpe ya koteya. Apesaki malako mpo na ndenge oyo nsango malamu ya Bokonzi esengelaki kosakolama epai ya bato ya mabele mobimba. Ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, apesaki bantoma na ye malako oyo: “Bókende na nzela ya bikólo mosusu te, mpe bókɔta na engumba moko te ya Samaria; kasi, bókende kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo ebungá. Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Mat. 10:5-7) Basakolaki na molende epai ya Bayuda mpe baprozelite, mingimingi nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B.​—Mis. 2:4, 5, 10, 11; 5:42; 6:7.

10 Na nsima, na nzela ya elimo santu, Yesu atindaki bango básakola mpe nsango ya Bokonzi epai ya Basamaria mpe na nsima, epai ya bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te. (Mis. 8:5, 6, 14-17; 10:19-22, 44, 45) Mpo na kopalanganisa nsango malamu na bikólo nyonso, Yesu ye moko asalaki ete Saulo, moto ya Tarse akóma mokristo. Yesu ayebisaki moyekoli Ananiasi boye: “Tɛlɛmá, kende na balabala oyo ebengami Alima, mpe na ndako ya Yudasi luká moto moko nkombo na ye Saulo, moto ya Tarse. . . . Kende, mpo mobali wana azali mbɛki oyo naponi mpo na komema nkombo na ngai epai ya bikólo mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.” (Mis. 9:3-6, 10, 11, 15) “Mobali wana” ayaki kokóma ntoma Paulo.​—1 Tim. 2:7.

11. Ndenge nini Kristo, na nzela ya elimo santu, apalanganisaki mosala ya kosakola?

11 Ntango ngonga ekokaki mpo nsango malamu ya Bokonzi ekóma epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te, elimo santu etindaki Paulo akende mosala ya misionɛrɛ na Azia Moke mpe na Mpoto. Lisolo oyo Luka akomaki na mokanda ya Misala elobi boye: “Wana [bakristo oyo bazalaki basakoli mpe bateyi na lisangá ya Antiokia ya Siri] bazalaki kosalela Yehova liboso ya bato nyonso mpe kokila bilei, elimo santu elobaki ete: ‘Na bato nyonso bótyela ngai Barnabasi ná Saulo pembeni mpo na mosala oyo nabengi bango mpo na yango.’ Bongo bakilaki bilei mpe babondelaki mpe batyelaki bango mabɔkɔ mpe batikaki bango bákende.” (Mis. 13:2, 3) Yesu ye moko abengaki Saulo moto ya Tarse mpo azala ‘mbɛki oyo ye moko aponi’ mpo na komema nkombo na Ye epai ya bikólo; na yango, likambo wana ya sika oyo esengelaki kokolisa mosala ya kopesa litatoli eutaki epai ya Kristo, Mokambi ya lisangá. Yesu asalelaka elimo santu mpo na kotambwisa mosala; likambo yango emonanaki mpenza polele na mobembo ya mibale ya Paulo na mosala ya misionɛrɛ. Biblia elobi ete “elimo ya Yesu,” elingi koloba Yesu, na nzela ya elimo santu, atambwisaki Paulo mpe baninga na ye ya mobembo na kopona esika oyo bakokende mpe emonaneli moko etindaki bango bákende kosakola na Mpoto.​—Tángá Misala 16:6-10.

Yesu, Mokambi ya lisangá na ye

12, 13. Ndenge nini mokanda ya Emoniseli emonisi ete Kristo alandelaka malamu makambo oyo ezali kosalema na lisangá mokomoko?

12 Yesu azalaki kolandela malamu makambo oyo ezalaki kosalema na masangá ya bayekoli na ye oyo batyamaki mafuta na elimo na ekeke ya liboso ya ntango na biso. Ayebaki malamu mpenza elimo ya lisangá mokomoko. Tomonaka yango polele soki totángi Emoniseli mokapo 2 mpe 3. Atángaki masangá nsambo oyo ezalaki na Azia Moke. (Em. 1:11) Tozali na bantina nyonso ya kondima ete ayebaki mpe malamu mpenza elimo ya masangá mosusu ya bayekoli na ye oyo ezalaki na mabele na ntango wana.​—Tángá Emoniseli 2:23.

13 Yesu apesaki masangá yango mosusu longonya mpo na ezaleli na bango ya koyika mpiko, bosembo na bango na kati ya komekama, bosembo na liloba na ye, mpe ndenge baboyaki bapɛngwi. (Em. 2:2, 9, 13, 19; 3:8) Nzokande, apesaki mpe masangá yango mingi batoli ya makasi mpo bolingo na bango ekómaki mpiɔ, bapesaki nzela na losambo ya bikeko mpe na pite, mpe bandimaki mwa mangomba. (Em. 2:4, 14, 15, 20; 3:15, 16) Lokola azali mokɛngɛli ya elimo oyo atondi na bolingo​—ata na bato oyo apesaki mpamela makasi—​Yesu alobaki boye: “Bato nyonso oyo ngai nalingaka mingi napamelaka bango mpe napesaka bango disiplini. Yango wana, zalá na molende mpe bongolá motema.” (Em. 3:19) Atako azali na likoló, Yesu azalaki kotambwisa masangá ya bayekoli na ye awa na mabele na nzela ya elimo santu. Na nsuka ya nsango oyo atindelaki masangá yango, alobaki boye: “Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.”​—Em. 3:22.

14-16. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali Mokambi ya mpiko ya basaleli ya Yehova awa na mabele? (b) Nini esalemi lokola Yesu azali “elongo” na bayekoli na ye “mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo”? (c) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

14 Tomonaki ete Mikaele anzelu-mokonzi (Yesu) azalaki Mokambi ya mpiko mpo na Yisraele. Na nsima, Yesu akómaki Mokambi ya mpiko mpe Mobateli ya mpate oyo atondi na bolingo mpo na bayekoli na ye ya liboso. Ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, akambaki mosala ya kosakola. Mpe nsima ya lisekwa na ye, azalaki kokɛngɛla na likebi ndenge nsango malamu ya Bokonzi ezalaki kopalangana.

15 Na nzela ya elimo santu, nsukansuka Yesu asengelaki kopalanganisa mosala ya kopesa litatoli tii na bisika oyo eleki mosika na mabele. Liboso amata na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8; Tángá 1 Petro 1:12.) Na litambwisi ya Yesu, mosala monene ya kopesa litatoli esalemaki na ekeke ya liboso.​—Kol. 1:23.

16 Kasi, Yesu ye moko amonisaki ete mosala yango esengelaki kokoba tii na ntango ya nsuka. Nsima ya kotinda bayekoli na ye básakola mpe bákómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, Yesu alakaki bango boye: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:19, 20) Lokola atyamaki Mokonzi na 1914, Kristo azali mpenza “elongo” na bayekoli na ye mpe azali kokamba bango na molende koleka. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mosala makasi oyo azali kosala banda 1914.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Mpo na koyeba esakweli yango malamumalamu, talá mokapo 11 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!

Bozongeli

• Na ndenge nini Mwana ya Nzambe amonisaki ete azalaki Mokambi ya molende na Yisraele?

• Na nzela ya nini Kristo akambaka lisangá na ye awa na mabele?

• Ndenge nini Kristo atambwisaki mosala ya kopalanganisa nsango malamu?

• Nini emonisi ete Kristo alandelaka malamu elimo ya lisangá mokomoko?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 21]

“Nazali kotinda anzelu liboso na yo”

[Elilingi na lokasa 23]

Ndenge ezalaki na ntango ya kala, Kristo asalelaka “makabo oyo ezali bato” mpo bákɛngɛla etonga na ye