Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Mpo na nini?

Libondeli​—Mpo na nini?

LIBONDELI. Masolo mingi te ya Biblia ebendaka mpenza likebi ya bato koleka libondeli. Tosɛngi yo otalela mituna nsambo oyo bato mingi batunaka mpo na libondeli; na nsima, tótalela elongo biyano oyo Biblia epesi. Masolo oyo ebongisami mpo na kosalisa yo obondelaka​—obanda kobondela to obongisa lisusu mabondeli na yo.

NA MOKILI mobimba, bato ya bikólo mpe mangomba nyonso babondelaka. Babondelaka ntango bazali bango moko to mpe na bato mosusu. Babondelaka na bandako-nzambe, na batempelo, na basinagoga, na bamoskɛ, mpe na bisika oyo babengaka bisika mosantu. Ntango bazali kobondela, basalelaka biloko lokola, tapis à prières, sapɛlɛ, moulins à prières, bikeko, babuku ya mabondeli, to mabondeli oyo bakomaka na mwa batablo oyo batye likoló ya mabaya to banzete.

Libondeli ekesenisaka bato na bikelamu mosusu nyonso awa na mabele. Ya solo, ezali na makambo mingi oyo bato ná banyama bakokani na yango. Lokola banyama, biso mpe tozalaka na mposa ya bilei, mopɛpɛ mpe mai. Lokola bango, tobotamaka, tozalaka na bomoi, mpe tokufaka. (Mosakoli 3:19) Kasi, kaka bato nde babondelaka. Mpo na nini?

Ntango mosusu eyano ya pɛtɛɛ ezali ete, tozalaka na mposa ya kosambela. Mpo na bato mingi, libondeli ezalaka lolenge moko oyo moto akoki kozala na boyokani na ye oyo bango bamonaka ete azali mosantu to azali seko. Biblia emonisi ete tokelamá na mposa ya makambo yango. (Mosakoli 3:11) Mokolo moko, Yesu Kristo alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

“Bobola ya elimo”​—yango nde etindaka bato bázala na ebele ya bandako-nzambe mpe biloko mosusu ya losambo mpe bálekisaka ebele ya bangonga na libondeli. Ya solo, bato mosusu balukaka bango moko kokokisa bamposa na bango ya elimo to bobola na bango ya elimo to mpe balukaka bato mosusu bákokisela bango yango. Kasi, omoni te ete bato bazali na makoki nyonso te ya kosalisa baninga na bango bato na ndenge ebongi? Moto azalaka na nguya mingi te, azali na bomoi mokuse, mpe amonaka mosika te. Kaka Ye oyo azali na bwanya koleka, aleki na nguya, mpe oyo azali na bomoi libela na libela koleka biso nde akoki kopesa biso oyo tosengeli na yango. Bamposa to bobola nini ya elimo etindaka biso tóbondela?

Tótalela likambo oyo: Ekómelá yo te ozala na mposa makasi ya litambwisi, bwanya, to kozwa biyano na mituna oyo emonanaka ete eleki boyebi ya bato? Oyoká naino te mposa makasi ya libɔndisi, ntango moto moko oyo olingaka akufi, ntango olingi kozwa ekateli moko monene, to ozali na mposa ete bálimbisa yo ntango emonani ete omemi ngambo mpo na likambo moko oyo osalaki?

Na kotalela Biblia, makambo wana nyonso esengeli mpenza kotinda biso tóbondela. Biblia ezali buku oyo elobeli mpenza likambo yango, mpe ezali na mabondeli ya mibali mpe basi mingi ya sembo. Babondelaki mpo na koluka libɔndisi, litambwisi, bolimbisi, mpe mpo na koluka biyano na mituna ya makasi koleka.​—Nzembo 23:3; 71:21; Danyele 9:4, 5, 19; Habakuku 1:3.

Atako mabondeli yango ekesanaki, ekokanaki na likambo moko. Bato oyo basalaki mabondeli yango, bayebaki mpenza sekele ya kobondela na ndenge ebongi, sekele oyo bato mingi lelo oyo bayebi te mpe bakipaka yango te. Bayebaki nani basengeli kobondela.