Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Mpo na makambo nini?

Libondeli​—Mpo na makambo nini?

BALOBAKA ete ezali libondeli oyo bakristo na mokili mobimba bazongelaka mingi mbala na mbala. Ata soki ezali solo to lokuta, libondeli oyo Yesu apesaki lokola ndakisa​—oyo mbala mosusu babengaka yango libondeli ya Tata wa biso—​bato mingi bakangaka mpenza ntina na yango te. Ebele ya bato bazongelaka maloba wana oyo bakangá na motó, mikolo nyonso, ntango mosusu mbala ebele na mokolo. Kasi, na makanisi ya Yesu libondeli yango esengelaki te kosalemaka ndenge wana. Ndenge nini toyebi yango?

Mwa moke liboso ya kolakisa libondeli yango, Yesu alobaki boye: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.” (Matai 6:7) Yesu azalaki nde bongolabongola, ye moko apekisi kozongela maloba na libondeli mpe apesi lisusu libondeli oyo bato basengelaki kokanga na motó mpe kozongelaka yango? Te! Kutu, Yesu azalaki nde kolakisa makambo oyo esengeli kobondela mpo na yango, mpe alakisaki biso makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na makanisi na biso ntango tozali kobondela. Tótalela naino malamumalamu makambo oyo alobaki. Libondeli yango ezali na Matai 6:9-13.

“Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”

Na yango, Yesu akundwelaki bayekoli na ye ete mabondeli nyonso esengeli kotindama epai ya Tata na ye, Yehova. Kasi, oyebi mpo na nini nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpe mpo na nini esengeli kosantisama, to kokómisama mosantu?

Banda na ebandeli, nkombo mosantu ya Nzambe esambwisamaki. Satana, monguna ya Nzambe abengaki Yehova mobuki ya lokuta, Mokonzi moko ya moimi oyo azali na lotomo te ya koyangela bikelamu na ye. (Ebandeli 3:1-6) Bato mingi bamityá na ngámbo ya Satana, bateyaka ete Nzambe atyelaka bato likebi te, azali makambo mabe, azali boboto te mpe baboyaka kondima ete azali Mozalisi. Basusu kutu balongoli nkombo Yehova na mabongoli ya Biblia mpe bapekisi kosalela nkombo yango.

Biblia emonisi ete Nzambe akobongisa makambo nyonso wana ya kozanga bosembo. (Ezekiele 39:7) Ntango akosala yango, akokokisa bamposa na yo nyonso mpe akobongisa makambo na yo nyonso. Ndenge nini? Maloba oyo elandi na libondeli ya Yesu epesi eyano.

“Bokonzi na yo eya.”

Lelo oyo, bateyi mingi ya mangomba bazalaka na mobulungano na likambo etali Bokonzi ya Nzambe. Kasi, ndenge bato oyo bazalaki koyoka Yesu bayebaki yango, basakoli ya Nzambe basakolaki ete Masiya, Mobikisi oyo Nzambe aponi akoyangela na bokonzi oyo ekokɔtisa mbongwana na mokili. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44) Ekosantisa nkombo ya Nzambe na ndenge ekomonisa polele lokuta ya Satana mpe ekokweisa Satana mpe misala na ye nyonso. Bokonzi ya Nzambe ekosukisa bitumba, maladi, nzala​—ata mpe liwa. (Nzembo 46:9; 72:12-16; Yisaya 25:8; 33:24) Ntango ozali kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya, ozali kobondela mpo bilaka wana nyonso ekokisama.

“Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”

Maloba wana ya Yesu emonisi ete mokano ya Nzambe ekokokisama mpenza na mabele ndenge ezali kokokisama na likoló, epai Nzambe afandaka. Eloko moko te epekisaki mokano ya Nzambe esalema na likoló; kuna, Mwana ya Nzambe abundaki etumba na Satana mpe baanzelu na ye, abwakaki bango na mabele. (Emoniseli 12:9-12) Ndenge moko na makambo mibale ya liboso ya libondeli ya ndakisa, oyo ya misato mpe ezali kosalisa biso tótya likebi na makambo oyo eleki ntina​—mokano na biso moko te, kasi nde oyo ya Nzambe. Ezali mokano na ye nde ememaka ntango nyonso bolamu koleka epai ya bikelamu na ye nyonso. Kutu, ata Yesu moto ya kokoka alobaki na Tata na ye boye: “Ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.”​—Luka 22:42.

“Pesá biso lelo bilei na biso.”

Yesu amonisaki ete tokoki mpe kobondelaka mpo na bamposa na biso. Ezali mabe te kobondela Nzambe mpo na makambo oyo tozali na yango mposa mokolo na mokolo. Kutu, kosala bongo ekundwelaka biso ete Yehova azali ye oyo “apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25) Biblia emonisi ete azali Tata ya bolingo oyo asepelaka kopesa bana na ye biloko oyo basengeli na yango. Kasi, lokola azali Tata ya malamu akondima te kopesa bana na ye eloko oyo ayebi ete ekozala na litomba te mpo na bango.

“Limbisá biso banyongo na biso.”

Ozalaka mpenza na nyongo ya Nzambe? Ozalaka na mposa alimbisa yo? Lelo oyo, bato mingi bayebaka te soki lisumu ezali nini, mpe bamonaka te ete ezali likambo monene. Kasi, Biblia eteyaka ete lisumu ezali mosisa ya makambo nyonso ya mabe mpo yango nde esalaka ete bato bákufaka. Lokola tobotamá bato ya masumu, biso nyonso tosumukaka mbala na mbala, elikya kaka moko oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya etaleli ndenge oyo Nzambe alimbisaka biso. (Baroma 3:23; 5:12; 6:23) Ezali kobɔndisa koyeba oyo Biblia elobi ete: “Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa.”​—Nzembo 86:5.

“Bikisá biso na moto mabe.”

Omoni te ete ozali mpenza na mposa makasi ya libateli ya Nzambe? Bato mingi baboyaka kondima ete “moto mabe,” Satana, azalaka mpenza. Nzokande, Yesu ateyaki ete Satana azalaka mpenza, kutu abengaki ye “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 16:11) Satana abebisi mokili oyo ye azali kotambwisa, mpe akolinga mpenza kobungisa yo nzela, kopekisa yo okolisa boyokani na Tata na yo, Yehova. (1 Petro 5:8) Kasi, Yehova azali mpenza makasi koleka Satana mpe asepelaka kobatela baoyo balingaka ye.

Makambo ya ntina ya libondeli ya ndakisa oyo Yesu apesaki, oyo touti kolobela na mokuse, esukisi te makambo oyo tokoki kobondela mpo na yango. Kobosana te ete 1 Yoane 5:14 eyebisi biso boye na ntina na Nzambe: “Ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” Na yango, komitungisa te ete bampasi na yo ezali mpenza na ntina te mpo oyebisa yango epai ya Nzambe.​—1 Petro 5:7.

Kasi, ezali boni mpo na ntango mpe esika? Ntango mpe esika ya kobondela ezali mpenza na ntina?