Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Nzambe akoyoka mpe akoyanola?

Libondeli​—Nzambe akoyoka mpe akoyanola?

MOTUNA wana ebendaka likebi ya bato mingi mpe balukaka kozwa eyano na motuna yango. Biblia emonisi ete Yehova ayokaka mpenza mabondeli lelo oyo. Biso moko nde tokosala ete Nzambe ayoka to aboya mabondeli na biso.

Yesu atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye, baoyo bazalaki kobondela na bokosi; bazalaki kaka koluka komonisa ete bazali bato malamu. Alobaki ete bato yango bazwaki “mbano na bango mobimba,” yango elimbolaki ete bazwaki kaka likambo oyo bango balingaki mingi; bato bátyela bango likebi, kasi te likambo oyo basengelaki na yango, Nzambe ayoka bango. (Matai 6:5) Lelo oyo mpe bato mingi babondelaka kaka na kolanda mokano na bango moko, kasi oyo ya Nzambe te. Lokola balandaka te mitinda ya Biblia oyo touti kolobela, Nzambe ayokaka bango te.

Ezali boni mpo na yo? Nzambe akoyoka mpe akoyanola na mabondeli na yo? Eyano etaleli te soki ozali na mposo nini, ekólo nini, to ozali mobola to mozwi. Biblia eyebisi biso boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Maloba wana emonisi ndenge yo ozalaka? Soki obangaka Nzambe, okotya ye na esika ya liboso, okobanga kosala makambo oyo ye aboyaka. Kosala makambo ya boyengebene elakisi, koluka kosala makambo oyo Nzambe atalelaka ete ezali sembo na esika ya kolanda mokano na yo moko to ya bato mosusu. Olingi mpenza Nzambe ayoka mabondeli na yo? Biblia elakisi yo oyo osengeli kosala. *

Ya solo, bato mingi balingaka Nzambe ayanola mabondeli na bango na makamwisi. Kasi, ata na ntango ya kala, Nzambe azalaki kosala makamwisi yango mingi te. Na bantango mosusu bikeke mingi ezalaki koleka liboso asala likamwisi moko. Lisusu, Biblia emonisi ete ntango ya makamwisi esukaki nsima ya ntango ya bantoma. (1 Bakorinti 13:8-10) Kasi, yango elingi nde koloba ete Nzambe ayanolaka te na mabondeli lelo oyo? Ezali bongo te! Tótalela mabondeli mosusu oyo ayanolaka.

Nzambe apesaka bwanya. Yehova azali liziba ya bwanya nyonso ya solosolo. Apesaka yango na moto nyonso, na baoyo nyonso balukaka litambwisi na ye mpe balukaka koyokanisa bomoi na bango na litambwisi yango.​—Yakobo 1:5.

Nzambe apesaka elimo santu na ye mpe mapamboli na yango nyonso. Elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo asalaka na yango mosala. Ezali na nguya moko te oyo eleki yango. Ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na minyoko. Ekoki kopesa biso kimya ntango totungisami. Ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli mosusu ya kitoko. (Bagalatia 5:22, 23) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Nzambe apesaka likabo yango na boboto nyonso.​—Luka 11:13.

Nzambe apesaka boyebi epai ya baoyo balukaka ye mpenza. (Misala 17:26, 27) Na mokili mobimba, ezali na bato oyo balukaka mpenza koyeba solo. Balingaka koyeba Nzambe​—nkombo na ye, mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato, mpe ndenge oyo bakoki kopusana penepene na ye. (Yakobo 4:8) Mbala mingi, Batatoli ya Yehova bakutanaka na bato ya ndenge wana mpe basepelaka kolakisa bango biyano oyo Biblia epesi na mituna yango.

Ezali mpo na yango nde ozwi zulunalo oyo? Ozali koluka koyeba Nzambe? Ntango mosusu azali koyanola na libondeli na yo na nzela ya zulunalo oyo.

^ par. 5 Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na ndenge osengeli kobondela mpo Nzambe ayoka yo, talá mokapo 17 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.