Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tókoba koluka liboso “boyengebene na ye”

Tókoba koluka liboso “boyengebene na ye”

Tókoba koluka liboso “boyengebene na ye”

“Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”​—MAT. 6:33.

1, 2. Boyengebene ya Nzambe ezali nini, mpe esimbami na nini?

“BOYE, bókoba koluka liboso bokonzi.” (Mat. 6:33) Toli yango oyo Yesu Kristo apesaki na lisolo na ye likoló ya ngomba eyebani malamu epai ya Batatoli ya Yehova lelo. Na makambo nyonso ya bomoi na biso, tosalaka makasi ya komonisa ete tolingaka Bokonzi yango mpe tolingi kozala sembo na yango. Kasi tosengeli mpe kobosana te eteni ya mibale ya toli yango, oyo elobi ete tosengeli koluka “mpe boyengebene na ye.” Boyengebene ya Nzambe ezali nini, mpe koluka yango liboso elimboli nini?

2 Maloba oyo ebongolami na “boyengebene” ekoki mpe kobongolama na “bosembo” to “kolongobana.” Na yango, boyengebene ya Nzambe ezali nde kolongobana na kolanda mibeko na ye mpe ndenge na ye ya kotalela makambo. Lokola azali Mozalisi, Yehova azali na lotomo ya kotya mibeko na oyo etali malamu ná mabe, makambo oyo ebongi ná oyo ebongi te. (Em. 4:11) Nzokande, boyengebene ya Nzambe ezali te mibeko ya makasimakasi oyo ekipaka mposa ya bato te to liste moko ya mitindo ebeleebele. Boyengebene yango esimbami nde na bomoto ya Yehova mpe na ezaleli na ye monene ya bosembo elongo na bizaleli na ye mosusu ya minene: bolingo, bwanya, mpe nguya na ye. Na yango, boyengebene ya Nzambe eyokani na mokano na ye. Esangisi mpe makambo oyo Yehova azelaka epai ya baoyo balingi kosalela.

3. (a) Koluka liboso boyengebene ya Nzambe elimboli nini? (b) Mpo na nini tolandaka mitinda ya sembo ya Yehova?

3 Koluka liboso boyengebene ya Nzambe elimboli nini? Na mokuse, elimboli kosala mokano ya Nzambe mpo na kosepelisa ye. Koluka boyengebene na ye elimboli kosala makasi mpo na kozala na bomoi oyo eyokani na makanisi mpe na mitinda na ye ya kokoka, kasi na oyo ya biso moko te. (Tángá Baroma 12:2.) Lolenge ya bomoi ya ndenge wana etali mpenza boyokani na biso na Yehova. Ezali te likambo ya kotosa mibeko na ye mpo tozali kobanga etumbu. Kasi, bolingo na biso mpo na Nzambe nde etindaka biso tósala makasi ya kosepelisa ye na kolandáká mitinda na ye, na esika tótya oyo ya biso moko. Tomonaka ete yango nde likambo oyo ebongi kosala, ntina mpenza oyo tokelamaki. Ndenge moko na Yesu Kristo, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, tosengeli kolinga boyengebene.​—Ebr. 1:8, 9.

4. Mpo na nini ezali na ntina tóluka boyengebene ya Nzambe?

4 Koluka boyengebene ya Yehova ezali na ntina nini? Tótala likambo oyo: Komekama ya liboso na elanga ya Edene ezalaki nde likambo ya koyeba soki Adama ná Eva bakondima to te ete Yehova azali na lotomo ya kotyela bango mibeko. (Eba. 2:17; 3:5) Ndenge bandimaki yango te, ememelá biso bakitani na bango mpasi mpe liwa. (Rom. 5:12) Nzokande, Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ye oyo azali kolanda boyengebene mpe motema boboto akozwa bomoi, boyengebene mpe nkembo.” (Mas. 21:21) Ya solo, koluka liboso boyengebene ya Nzambe esalisaka biso tózala na boyokani makasi na Yehova, mpe na nsima, boyokani yango ekomema biso na lobiko.​—Rom. 3:23, 24.

Likama ya komimona moyengebene

5. Likama nini tosengeli kokima?

5 Na mokanda na ye epai ya bakristo ya Roma, ntoma Paulo amonisaki likama oyo biso nyonso tosengeli kokima soki tolingi kolonga koluka liboso boyengebene ya Nzambe. Ntango azalaki koloba mpo na baninga na ye Bayuda, Paulo alobaki boye: “Nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te; mpo lokola bayebi boyengebene ya Nzambe te kasi bazali koluka kotya oyo ya bango moko, batosaki boyengebene ya Nzambe te.” (Rom. 10:2, 3) Mpo na Paulo, basambeli wana bayebaki te boyengebene ya Nzambe mpo bazalaki kolukaluka ndenge ya kotya boyengebene na bango moko. *

6. Makanisi ya ndenge nini tosengeli kokima, mpe mpo na nini?

6 Tokoki kokwea na motambo yango soki tokómi komona mosala ya Nzambe lokola likambo ya kowelana, soki tokómi komikokanisa na bato mosusu. Makanisi ya ndenge wana ekoki noki kotinda biso tómityela motema koleka ndelo na oyo etali makoki na biso. Kasi, likambo ya solo ezali ete soki tosali bongo, tozali kobosana boyengebene ya Yehova. (Gal. 6:3, 4) Eloko oyo etindaka biso tósala makambo ya malamu ezali bolingo na biso mpo na Yehova. Ntango nyonso oyo toluki komitánga bayengebene, tokoki komonisa ete tokosaka ntango tolobaka ete tolingaka ye.​—Tángá Luka 16:15.

7. Ndenge nini Yesu alobelaki likambo ya komimona moyengebene?

7 Yesu azalaki komitungisa mpo na baoyo “bazalaki komityela motema ete bazali bayengebene mpe bazalaki kotalela bato mosusu ete bazali mpamba.” Alobelaki likambo ya komimona moyengebene na ndakisa oyo: “Bato mibale bamataki na tempelo kobondela, moko Mofarisai mpe mosusu mokɔngɔli-mpako. Mofarisai atɛlɛmaki, abandi kobondela mpe koloba makambo oyo na motema na ye ete: ‘Ee Nzambe, natɔndi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, babɔtɔli, bato bazangi boyengebene, bato ya ekobo, to mpe lokola mokɔngɔli-mpako oyo. Nakilaka bilei mbala mibale na pɔsɔ, napesaka moko ya bandambo zomi ya biloko nyonso nazwaka.’ Kasi mokɔngɔli-mpako, atɛlɛmaki mosika, azalaki kutu kolinga kotombola miso na ye likoló te, kasi azalaki se kobɛtabɛta ntolo na ye mpe koloba ete: ‘Ee Nzambe, yokelá ngai mawa, ngai mosumuki.’” Yesu asukisaki na maloba oyo: “Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”​—Luka 18:9-14.

Likama mosusu​—Kokóma “moyengebene koleka ndelo”

8, 9. Kozala “moyengebene koleka ndelo” elimboli nini, mpe ekoki komema biso na nini?

8 Likama mosusu oyo tosengeli kokima elobelami na Mosakoli 7:16 ete: “Kokóma moyengebene koleka ndelo te, to komimonisa na bwanya koleka ndelo te. Mpo na nini okomibebisa?” Na vɛrsɛ 20, mokomi yango, oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, apesaki ntina oyo tosengeli kokima makanisi ya ndenge wana; alobi boye: “Mpo ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.” Moto oyo akómi “moyengebene koleka ndelo” atyaka mibeko na ye moko na oyo etali boyengebene mpe asambisaka basusu na kolanda mibeko yango. Kasi, abosanaka ete ntango azali kosala bongo, azali kotombola mibeko na ye moko likoló ya mibeko ya Nzambe mpe na ndenge yango, amimonisaka moto oyo azangi boyengebene na miso ya Nzambe.

9 Kozala “moyengebene koleka ndelo,” to ndenge ebongolami na Biblia mosusu, “kolekisa ndelo na bosembo,” ekoki ata kotinda biso tómona ete ndenge ya Yehova ya kosala makambo ezali malamu te. Kasi, tosengeli kobosana te ete soki tozali komona ete bikateli ya Yehova ezali sembo te to mpe ebongi te, tobandi nde kotya mibeko na biso na oyo etali boyengebene likoló ya mibeko ya Yehova. Ezali lokola nde tozali komeka Yehova mpe kosambisa ye na kolanda mibeko na biso moko na oyo etali malamu ná mabe. Nzokande, Yehova nde moto azali na lotomo ya kotya mibeko na oyo etali boyengebene, kasi biso te!​—Rom. 14:10.

10. Ndenge ekómelaki Yobo, nini ekoki kotinda biso tósambisa Nzambe?

10 Atako moko te kati na biso akolinga kosambisa Nzambe na nko, kozanga kokoka na biso ekoki kotinda biso tósala yango. Ekoki kosalema ntango tomoni likambo moko oyo tokanisi ete ezali sembo te to soki biso moko tozali konyokwama. Ata Yobo, moto ya sembo, asalaki libunga wana. Liboso, Yobo alobelamaki lokola moto oyo “azalaki na mbeba te mpe azalaki sembo, mpe azalaki kobanga Nzambe mpe kokima mabe.” (Yobo 1:1) Kasi na nsima, Yobo akutanaki na makambo ndenge na ndenge ya mpasi oyo mpo na ye, ezalaki sembo te. Yango etindaki Yobo atánga “molimo na ye moyengebene na esika ete ezala Nzambe.” (Yobo 32:1, 2) Makanisi ya Yobo esengelaki kosembolama. Na yango, tosengeli kokamwa te soki na bantango mosusu likambo ya ndenge wana ekómeli mpe biso. Soki ekómeli biso, nini ekoki kosalisa biso tósembola makanisi na biso?

Na bantango mosusu toyebaka makambo nyonso te

11, 12. (a) Soki tomoni ete likambo moko ezali sembo te, nini tosengeli kobosana te? (b) Mpo na nini moto akoki kokanisa ete ndakisa ya Yesu ya basali na elanga ya vinyo emonisi likambo moko ya kozanga bosembo?

11 Likambo ya liboso ya kobosana te ezali ete na bantango mosusu toyebaka makambo nyonso te. Ezalaki bongo mpo na Yobo. Ayebaki te ete baanzelu ya Nzambe na likoló bakɔtaki makita epai Satana akoselaki ye makambo. (Yobo 1:7-12; 2:1-6) Yobo ayebaki te ete Satana nde azalaki kobimisela ye mikakatano. Kutu, toyebi mpenza te soki Yobo ayebaki soki Satana azali mpenza nani! Na yango, akanisaki kaka ete mikakatano na ye eutaki epai ya Nzambe. Ya solo, ezalaka mpasi te tókanisa mabe mpo na likambo moko soki toyebi makambo nyonso te.

12 Tótala naino ndakisa oyo Yesu apesaki, ya basali na elanga ya vinyo. (Tángá Matai 20:8-16.) Na ndakisa yango, Yesu alobeli nkolo-ndako oyo afuti basali na ye nyonso mbongo ndenge moko, ezala baoyo basalaki mokolo mobimba to mpe baoyo basalaki kaka ngonga moko. Omoni likambo yango ndenge nini? Omoni ete ezali sembo? Mbala mosusu oyoki mbala moko mawa mpo na basali oyo basalaki mokolo mobimba na nse ya moi makasi. Omoni ete ebongaki báfutama mingi koleka! Soki totaleli likambo yango ndenge wana, tokoki komona ete nkolo-ndako azangi bolingo mpe bosembo. Ata eyano oyo apesaki basali oyo bamilelalelaki ekoki komonisa ete asalelaki bokonzi na ye mpo na konyokola basusu. Kasi, toyebi mpenza makambo nyonso?

13. Wapi ndenge mosusu oyo tokoki kotalela ndakisa oyo Yesu apesaki ya basali na elanga ya vinyo?

13 Tótalela ndakisa yango na ndenge mosusu. Na ntembe te nkolo-ndako amonaki ete mibali yango nyonso basengelaki koleisa mabota na bango. Na mikolo ya Yesu, basali na elanga bazalaki kofutama mokolo na mokolo. Mabota na bango ezalaki kobikela na lifuti oyo ezwami mokolo wana. Kobosana makambo yango te. Sikoyo omitya na esika ya bato oyo nkolo-ndako azwaki na retare, na nsuka ya mokolo mpe mpo na yango, basalaki kaka ngonga moko. Mbala mosusu balingaki kokoka koleisa mabota na bango na lifuti ya ngonga moko te; kasi, bandimaki kosala mpe bazelaki mokolo mobimba liboso bázwa bango na mosala. (Mat. 20:1-7) Ezalaki foti na bango te ndenge bapesamaki nzela te ya kosala mokolo mobimba. Eloko moko te emonisi ete balukaki kokima mosala na nko. Kanisá soki yo nde osengelaki kozela mokolo mobimba, mpe oyebi ete bato mosusu bazali kolikya kaka na biloko oyo okozwa na mokolo yango. Olingaki koyoka esengo ya ndenge nini soki ozwi mwa mosala​—mpe olingaki kokamwa ndenge nini soki bapesi yo lifuti oyo ekoki koleisa libota na yo!

14. Liteya nini ya ntina tozwi na ndakisa ya elanga ya vinyo?

14 Sikoyo tótalela lisusu makambo oyo nkolo-ndako asalaki. Akitisaki lifuti ya moto te. Kasi, amonaki ete basali nyonso babongi kozwa mbongo ya kobikela. Lokola bato oyo bazalaki koluka mosala bazalaki mingi, nkolo-ndako akokaki kozwa basali ebele mpe kopesa bango mbongo moke mpo na kolyela bango, kasi asalaki bongo te. Basali na ye nyonso bazongaki na ndako na mbongo oyo ekokaki mpo na koleisa mabota na bango. Kotalela makambo wana mosusu ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela makambo oyo nkolo-ndako asalaki. Ekateli na ye ezalaki ya bolingo; ezalaki te lolenge ya kosalela bokonzi mpo na konyokola bato. Liteya nini tokoki kozwa? Kotalela kaka mwa makambo moke ekoki kotinda biso tówela kokanisa mabe mpo na likambo moko. Ya solo, lisese wana emonisi ndenge boyengebene ya Nzambe eleki, mpo elandaka kaka mibeko te mpe elandaka te kaka oyo ebongi na moto.

Makanisi na biso ekoki kozala ebebá to mpe na ndelo

15. Mpo na nini makanisi na biso na oyo etali bosembo ekoki kozala ebebá to mpe na ndelo?

15 Likambo ya mibale ya kobosana te ntango tokutani na likambo oyo tomoni lokola ezangi bosembo ezali ete makanisi na biso ekoki kozala ebebá to mpe na ndelo. Ekoki kobebisama na kozanga kokoka na biso, na kokanisela basusu mabe, to mpe na mimeseno ya esika oyo tokolá. Lisusu, ezali na ndelo mpo tozalaka na likoki te ya kososola ntina oyo bato básalaka makambo mpe ya koyeba makambo oyo ezali mitema na bango. Nzokande, Yehova mpe Yesu bazali na bandelo ya ndenge wana te.​—Mas. 24:12; Mat. 9:4; Luka 5:22.

16, 17. Ekoki kozala mpo na nini Yehova asɛngaki te ete mobeko na ye na oyo etali ekobo etosama na lisumu ya Davidi ná Bate-sheba?

16 Tótalela lisolo ya ekobo ya Davidi ná Bate-sheba. ( Sa. 11:2-5) Na kolanda Mibeko ya Moize, basengelaki kobomama. (Lev. 20:10; Mib. 22:22) Atako Yehova apesaki bango etumbu, asɛngaki te ete mobeko na ye etosama wana kaka. Yehova azangaki nde bosembo? Aponaki nde bilongi mpe abukaki mibeko ya boyengebene oyo Ye moko atyaki? Batángi mosusu ya Biblia bakanisaka bongo.

17 Nzokande, Yehova apesaki mobeko yango oyo etali ekobo nde na bazuzi oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, oyo bakokaki kotánga mitema te. Atako makanisi na bango ezalaki na ndelo, mobeko yango ezalaki kosalisa bango bákataka likambo yango ndenge moko. Nzokande, Yehova akoki kotánga na mitema. (Eba. 18:25; 1 Nt. 29:17) Na yango, tosengeli kolikya te ete Yehova asengelaki kaka kokangama na mobeko oyo apesaki mpo na bazuzi oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka. Soki ezalaki bongo, elingaki kozala te lokola kotinda moto oyo azali na miso ya malamu alata linɛti oyo esalemi mpo na kosalisa moto oyo amonaka malamu te amona malamu? Yehova atángaki motema ya Davidi mpe ya Bate-sheba mpe amonaki ete babongoli mpenza mitema. Nsima ya kotala likambo lokola oyo wana, asambisaki bango na motema mawa mpe na bolingo.

Tókoba koluka boyengebene ya Yehova

18, 19. Nini ekosalisa biso tósambisa Yehova ata mokolo moko te na kolanda mibeko na biso moko na oyo etali boyengebene?

18 Na yango, soki na bantango mosusu tomoni likambo moko oyo tokanisi ete Yehova asali na bosembo te​—ezala totángi yango na lisolo moko ya Biblia to tokutani na yango na bomoi na biso moko—​tósambisa Nzambe ata mokolo moko te na kolanda mibeko na biso moko na oyo etali boyengebene. Tóbosana te ete mbala mosusu toyebaka makambo nyonso te mpe ete makanisi na biso ekoki kozala ebebá to mpe na ndelo. Tóbosana soki moke te ete “nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.” (Yak. 1:19, 20) Boye, ata mokolo moko te mitema na biso ‘ekokóma kosilikela Yehova.’​—Mas. 19:3.

19 Lokola Yesu, tóyebaka ntango nyonso ete kaka Yehova nde azali na lotomo ya kotya mibeko mpo na makambo oyo ezali sembo mpe malamu. (Mrk. 10:17, 18) Tósala makasi tózwa “boyebi ya solosolo” to “boyebi ya sikisiki” ya mibeko na ye. (Rom. 10:2; 2 Tim. 3:7) Soki tondimi mibeko yango mpe toyokanisi bomoi na biso na mokano na ye, tokomonisa ete tozali koluka liboso “boyengebene na ye.”​—Mat. 6:33.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Moto moko ya mayele alobi ete maloba oyo ebongolami na “kotya” ekoki mpe kolimbola ‘kotonga monima.’ Na yango, na ndenge ya elilingi, Bayuda yango bazalaki kotonga monima mpo na lokumu na bango moko kasi ya Nzambe te.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini koluka boyengebene ya Yehova ezali na ntina?

• Makama nini mibale tosengeli kokima?

• Ndenge nini tokoki koluka liboso boyengebene ya Nzambe?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 9]

Liteya nini tozwi na ndakisa oyo Yesu apesaki ya bato mibale oyo babondelaki na tempelo?

[Elilingi na lokasa 10]

Ezalaki sembo te kopesa basali oyo bazwamaki na ngonga ya 11 lifuti ndenge moko na baoyo basalaki mokolo mobimba?