Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?

Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?

Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?

“Ntango boyangani, . . . makambo nyonso esalema mpo na kotonga.”​—1 KO. 14:26.

1. Na kolanda 1 Bakorinti mokapo 14, wapi mokano moko ya ntina ya makita ya bokristo?

‘LIKITA yango elendisaki mpenza!’ Osilá koloba ndenge wana nsima ya koyangana na likita moko na Ndako ya Bokonzi? Ntembe ezali te! Makita ya lisangá elendisaka mpenza, mpe yango ezali likambo ya kokamwa te. Kutu, ndenge kaka ezalaki na mikolo ya bakristo ya liboso, mokano moko ya ntina mingi oyo tosalaka makita lelo ezali ya kolendisa bayangani nyonso na elimo. Talá ndenge ntoma Paulo amonisaki mokano yango ya makita na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakorinti. Na mokapo 14, azongelaki mbala na mbala ete eteni nyonso ya makita ya lisangá esengeli kozala na mokano kaka moko​—“kotongama ya lisangá.”​—Tángá 1 Bakorinti 14:3, 12, 26. *

2. (a) Nini esalisaka mpo makita etonga? (b) Motuna nini tokotalela?

2 Toyebi ete ezali libosoliboso elimo ya Nzambe nde esalaka mpo makita elendisa, to etonga. Yango wana, tobandaka makita ya lisangá na libondeli oyo esalemaka na motema moko mpo na kosɛnga Yehova, Tata na biso ya likoló, apambola makita na biso na nzela ya elimo santu na ye. Kasi, toyebi ete bandeko nyonso ya lisangá bakoki kosalisa mpo makita ya lisangá elendisa mpenza. Na yango, makambo nini mokomoko na biso akoki kosala mpo makita na biso oyo tosalaka na Ndako ya Bokonzi pɔsɔ na pɔsɔ epesaka ntango nyonso makasi na elimo mpe elendisaka?

3. Makita ya bokristo ezali na ntina nini?

3 Mpo na kozwa eyano, tokotalela makambo mosusu oyo bandeko oyo batambwisaka makita basengeli kobosana te. Tokomona mpe ndenge lisangá mobimba ekoki kosala mpo makita na biso ezala mabaku ya kolendisa mpo na bayangani nyonso. Lisolo oyo ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te makita na biso ezali mayangani mosantu. Ya solo, koyangana na makita mpe kopesa biyano ezali makambo ya ntina na losambo na biso epai ya Yehova.​—Nz. 26:12; 111:1; Yis. 66:22, 23.

Likita oyo ebongisamá mpo na koyekola Biblia

4, 5. Ntina ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali nini?

4 Biso nyonso tolingaka kozwa mpenza matomba na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tosalaka pɔsɔ nyonso. Na yango, mpo na koyeba malamu ntina monene ya likita yango, tótalela mwa bambongwana oyo euti kosalema na zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na masolo ya boyekoli.

5 Kobanda na nimero ya boyekoli ya liboso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2008, eloko moko ya ntina ebakisamaki na ezipeli ya ebandeli. Omonaki yango? Talá malamu ezipeli ya zulunalo oyo osimbi. Kuna na nse ya linɔ́ngi, ezali na Biblia oyo efungwami. Elilingi yango ebakisamaki mpo na kobenda likebi na ntina oyo tosalaka Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ezali ya koyekola Biblia na lisalisi ya zulunalo yango. Ya solo, na boyekoli na biso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ, Liloba ya Nzambe ‘emonisamaka polelepolele,’ mpe kaka ndenge ezalaki na ntango ya Nehemia, ‘balimbolaka yango.’​—Neh. 8:8; Yis. 54:13.

6. (a) Mbongwana nini esalemaki na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? (b) Nini tosengeli kobosana te mpo na bavɛrsɛ oyo ezali na liloba “tángá”?

6 Lokola Biblia nde buku na biso ya libosoliboso, mbongwana moko esalemaki na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bavɛrsɛ mingi oyo batye maloba na yango na masolo ya boyekoli te ezali na liloba “tángá.” Na ntango ya makita, biso nyonso tolendisami tólanda botángi ya bavɛrsɛ yango na Biblia na biso moko. (Mis. 17:11) Mpo na nini? Ntango tomoni toli ya Nzambe na Biblia na biso moko, esimbaka motema na biso koleka. (Ebr. 4:12) Yango wana, liboso bátánga bavɛrsɛ yango na mongongo makasi, motambwisi asengeli kopesa bayangani mwa ntango mpo báluka bavɛrsɛ yango mpe bálanda ntango ezali kotángama.

Ntango mpo na koyebisa kondima na biso ebakisami

7. Libaku nini tozali na yango na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli?

7 Mbongwana mosusu oyo esalemi na masolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etali bolai na yango. Na bambula oyo, masolo ya boyekoli ekómi mikuse. Na yango, na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ntango moke ezali kosalelama mpo na kotánga baparagrafe mpe ntango mingi etikali mpo na kopesa biyano. Sikoyo bato mingi na lisangá bazali na libaku ya koyebisa kondima na bango: bakoki kopesa biyano na mituna oyo ekomami, koyebisa ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko, kopesa ndakisa moko oyo emonisi ete kolanda mitinda ya Biblia ezali likambo ya bwanya, mpe bongo na bongo. Esengeli mpe kotika ntango mpo na kolobela bililingi.​—Tángá Nzembo 22:22; 35:18; 40:9.

8, 9. Mokumba ya motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali nini?

8 Nzokande, ntango mpo na kopesa bakomantɛrɛ ndenge na ndenge ekozala mingi kaka soki bandeko bazali kopesa biyano ya mikuse mpe soki ndeko oyo azali kotambwisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli azali kolobaloba mingi te. Na yango, nini ekoki kosalisa motambwisi azala na bokatikati na maloba na ye ná biyano ya lisangá mpo likita yango etonga bato nyonso?

9 Mpo na kozwa eyano, tózwa ndakisa moko. Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo etambwisami malamu ezali lokola liboke ya bafololo oyo ezali kosepelisa miso. Kaka ndenge liboke yango esangisi bafololo ebele, Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalami na bakomantɛrɛ ya ndenge na ndenge. Mpe kaka ndenge fololo mokomoko oyo ezali na liboke yango ekeseni na bonene mpe na langi na yango, biyano oyo epesamaka na likita yango ekeseni na bolai mpe na ndenge oyo epesamaka. Mosala ya ndeko oyo azali kotambwisa yango ezali nini? Maloba na ye ezali lokola mwa nkasa oyo babakisi na liboke yango. Nkasa yango elekaka bafololo te; kasi, esalisaka mpo bafololo esangana mpe ekóma liboke moko. Ndenge moko mpe, moto oyo azali kotambwisa asengeli kobosana te ete mokumba na ye ezali te ya kotondisa bato na maloba, kasi ya kobakisa mwa makanisi na maloba ya masanzoli oyo lisangá ezali kopesa. Ya solo, soki bakomantɛrɛ ndenge na ndenge oyo lisangá epesi esangani malamu ná mwa maloba moke oyo motambwisi azali kobimisa na esika oyo esengeli, ekosepelisa bayangani nyonso.

“Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso”

10. Ndenge nini bakristo ya liboso bazalaki komona makita?

10 Ndenge Paulo alobeli makita ya bokristo na 1 Bakorinti 14:26-33 esalisi biso tóyeba malamu ndenge makita yango ezalaki kotambwisama na ekeke ya liboso. Mpo na bavɛrsɛ yango, moto ya mayele moko akomi boye: “Likambo oyo tosengeli kosimba mpenza mpo na makita na eklezia ya liboso esengeli kozala ete bato nyonso bazalaki na libaku mpe na mokumba ya kopesa mabɔkɔ na makita yango. Moto azalaki koya kaka mpo na koyoka te; azalaki koya mpo na kozwa mpe mpo na kopesa.” Ya solo, bakristo ya liboso bazalaki komona ete makita ezali libaku ya koyebisa kondima na bango.​—Rom. 10:10.

11. (a) Nini esalisaka mingi mpo makita etonga, mpe mpo na nini? (b) Makanisi nini ekoki kosalisa biso tóbongisa ndenge ya kopesa biyano na makita? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

11 Koyebisa kondima na biso na makita esalisaka mpenza mpo na “kotongama ya lisangá.” Na ntembe te, okondima ete ata soki toyanganaka na makita banda bambula boni, koyoka biyano ya bandeko mibali mpe basi ezalaka kaka esengo. Eyano oyo ndeko mobange moko ya sembo apesi na motema moko esimbaka mpenza biso na motema; tolendisamaka mpenza na komantɛrɛ ya bwanya ya nkulutu moko ya boboto; mpe tozangaka te kosɛka ntango mwana moko abimisi na mbala moko eyano oyo emonisi bolingo ya solosolo mpo na Yehova. Ya solo, soki tozali kopesa biyano, biso nyonso tokoki kosalisa mpo makita ya bokristo etonga. *

12. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Moize ná Yirimia? (b) Libondeli esalaka nini na oyo etali kopesa biyano na makita?

12 Nzokande, mpo na baoyo bazalaka nsɔninsɔni, kopesa biyano ekoki kozala mpenza etumba. Soki yo mpe ozali ndenge wana, mbala mosusu motema na yo ekokita soki oyebi ete ozali yo moko te. Kutu, ata basaleli ya sembo ya Nzambe, na ndakisa Moize mpe Yirimia balobaki ete bazali na makoki te ya koloba liboso ya bato. (Kob. 4:10; Yir. 1:6) Nzokande, kaka ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye wana ya kala mpo bákumisa ye liboso ya bato, Nzambe akosalisa yo opesa bambeka ya lisanzoli. (Tángá Baebre 13:15.) Ndenge nini okoki kozwa lisalisi ya Yehova mpo otika kobanga kopesa biyano? Ya liboso, bongisáká makita malamu. Na nsima, liboso okende na Ndako ya Bokonzi, bondelá mpe sɛngá ye mingimingi mpiko ya kopesa komantɛrɛ. (Flp. 4:6) Lokola ozali kosɛnga eloko oyo ezali “na boyokani na mokano na ye,” okoki kolikya ete Yehova akoyanola libondeli na yo.​—1 Yoa. 5:14; Mas. 15:29.

Makita oyo ezali mpo na ‘kotonga, kolendisa, mpe kobɔndisa’

13. (a) Makita na biso esengeli kosala nini epai ya bayangani nyonso? (b) Motuna nini ezali na ntina mingi mpo na bankulutu?

13 Paulo alobaki ete ntina monene ya makita ya lisangá ezali ya ‘kotonga, kolendisa, mpe kobɔndisa’ bayangani nyonso. * (1 Ko. 14:3) Ndenge nini bankulutu lelo bakoki kosɛnzɛla ete lisolo oyo bakosala na makita etonga mpe ebɔndisa mpenza bandeko na bango na lisangá? Mpo na kozwa eyano, tótala naino likita moko oyo Yesu atambwisaki mwa moke nsima ya lisekwa na ye.

14. (a) Makambo nini esalemaki liboso ya likita oyo Yesu abongisaki? (b) Mpo na nini na ntembe te bantoma babɔndisamaki mpenza ntango Yesu “apusanaki mpe asololaki na bango”?

14 Talá naino ndenge makambo esalemaki liboso ya likita yango. Mwa moke liboso báboma Yesu, bantoma “basundolaki ye mpe bakimaki,” mpe ndenge esakolamaki, ‘bapanzanaki moto na moto na ndako na ye.’ (Mrk. 14:50; Yoa. 16:32) Kasi, nsima ya lisekwa na ye, Yesu abengisaki bantoma na ye oyo batondaki na mawa báya na likita moko ya ntina. * Na yango, “bayekoli zomi na moko bakendaki na Galile na ngomba oyo Yesu alakaki bango bákutana.” Ntango bakómaki, “Yesu apusanaki mpe asololaki na bango.” (Mat. 28:10, 16, 18) Kanisá ndenge bantoma babɔndisamaki ndenge Yesu asalaki likambo yango! Yesu alobelaki makambo nini?

15. (a) Makambo nini Yesu alobelaki na likita wana, kasi oyo wapi alobelaki te? (b) Likita yango esalaki nini epai ya bantoma?

15 Yesu abandaki na koyebisa bango likambo oyo ete: “Bapesi ngai bokonzi nyonso.” Na nsima apesaki bango mokumba ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.” Na nsuka, alendisaki bango na maloba oyo: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso.” (Mat. 28:18-20) Bomoni makambo nini Yesu asalaki te? Apamelaki bantoma na ye te; asalelaki mpe likita yango te mpo na kobɛtela bosembo na bango ntembe to mpo na kobakisa ngambo na mitema na bango na kozongeláká ndenge bamonisaki kondima moke mpo na mwa ntango. Kasi, Yesu amonisaki bango bolingo na ye ná oyo ya Tata na ye mpo na bango na ndenge apesaki bango mokumba moko monene. Bantoma bayokaki ndenge nini likambo oyo Yesu asalaki? Batongamaki, balendisamaki, mpe babɔndisamaki mingi na boye ete mwa moke nsima ya likita yango, bazalaki lisusu “koteya mpe kosakola nsango malamu.”​—Mis. 5:42.

16. Ndenge nini bankulutu lelo bamekolaka Yesu na oyo etali kotambwisa makita oyo ezali kolendisa?

16 Na ndakisa ya Yesu, bankulutu lelo bamonaka ete makita ezali libaku ya komonisa bandeko na bango bakristo ete Yehova alingaka mpenza basaleli na ye. (Rom. 8:38, 39) Yango wana, ntango bazali kosala masolo na bango na makita, bankulutu balobelaka mingimingi makambo malamu ya bandeko na bango, kasi bolɛmbu na bango te. Babɛtelaka bosembo ya bandeko na bango ntembe te. Kasi, maloba na bango emonisaka ete bamonaka ete bandeko na bango bakristo balingaka Yehova mpe bazali na mposa ya kosala oyo ezali malamu. (1 Tes. 4:1, 9-12) Ya solo, na bantango mosusu bankulutu bakoki kozala na mposa ya kopesa lisangá mobimba toli mpo na kosembola bango, kasi soki kaka bandeko moke nde bazali na mposa ya kosembolama, mbala mingi elelaka malamu soki toli yango epesami na bato oyo basengeli na yango na nkuku. (Gal. 6:1; 2 Tim. 2:24-26) Ntango bazali koloba na lisangá mobimba, bankulutu balukaka kopesa longonya ntango nyonso oyo ebongi. (Yis. 32:2) Basalaka makasi báloba na ndenge moko oyo ekosala ete na nsuka ya likita, bayangani nyonso bázala mitema ya kokita mpe bázwa makasi.​—Mat. 11:28; Mis. 15:32.

Esika ya kobatama

17. (a) Mpo na nini lelo ezali na ntina mingi ete makita ezala esika ya kobatama? (b) Okoki kosala nini mpo makita etongaka? (Talá etanda “Makambo zomi ya kosala mpo makita etonga biso moko mpe basusu.”)

17 Lokola mokili ya Satana ekómi na mitungisi mingi, tosengeli kosala ete makita ya lisangá ezala esika ya kobatama, epai moto nyonso azali kobɔndisama. (1 Tes. 5:11) Ndeko mwasi moko oyo azalaki kobunda na mikakatano elongo na mobali na ye eleki bambula alobi boye: “Kozala na Ndako ya Bokonzi ezalaki lokola nde Yehova amemi biso na mabɔkɔ na ye mpo na kobatela biso. Na bangonga oyo tozalaki kuna, elongo na bandeko na biso bakristo, tozalaki koyoka ete tozalaki kokoka kotikela Yehova mikumba na biso ya kilo, mpe tozalaki kozwa mwa kimya ya motema.” (Nz. 55:22) Tiká ete bato nyonso oyo bayanganaka na makita na biso báyokaka mpe ete balendisami mpe babɔndisami. Mpo ezala bongo, tókoba kosala nyonso mpo makita ya bokristo etongaka.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 1 Esakolamaki ete makambo mosusu oyo ezalaki kosalema na makita ya bokristo na ekeke ya liboso ekosuka. Na ndakisa, biso ‘tolobaka na minɔkɔ mosusu’ te, topesaka mpe “bisakweli” te. (1 Ko. 13:8; 14:5) Atako bongo, malako ya Paulo esalisi biso tóyeba malamu ndenge makita ya bokristo esengeli kotambwisama lelo.

^ par. 11 Mpo na kozwa makanisi mpo na ndenge ya kobongisa biyano na makita, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 2003, nkasa 19-22.

^ par. 13 Mpo na komonisa bokeseni oyo ezali kati na “kolendisa” ná “kobɔndisa,” diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elimboli ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kobɔndisa” emonisaka “bolingo ya motema mawa mingi koleka [kolendisa].”​—Talá mpe Yoane 11:19.

^ par. 14 Mbala mosusu yango nde libaku oyo Paulo ayaki kolobela na nsima ntango alobaki ete Yesu “abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500).”​—1 Ko. 15:6.

Okopesa eyano nini?

• Makita ya bokristo ezali na ntina nini?

• Mpo na nini bakomantɛrɛ oyo epesamaka na makita esalisaka mingi mpo na “kotongama ya lisangá”?

• Likita oyo Yesu asalaki na bayekoli na ye ekoki koteya biso nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda/​Bililingi na nkasa 22, 23]

MAKAMBO ZOMI YA KOSALA MPO MAKITA ETONGA BISO MOKO MPE BASUSU

Bongisá liboso. Soki oyekoli liboso makambo oyo tokolobela na Ndako ya Bokonzi, makita ekobenda likebi na yo mingi mpe ekosimba mpenza motema na yo.

Yanganáká pɔsɔ nyonso. Lokola moto nyonso alendisamaka soki bayangani bazali mingi, yo mpe osengeli kozala.

Kómá na ngonga malamu. Soki ozwi esika ya kofanda liboso makita ebanda, okoki kosangana na loyembo mpe libondeli ya ebandeli, oyo ezali mpe na kati ya losambo na biso epai ya Yehova.

Memá bisaleli nyonso. Memá Biblia na yo mpe mikanda oyo ekosalelama na makita mpo okoka kolanda malamu mpe okanga ntina ya makambo oyo bokotalela.

Kotya makanisi na makambo mosusu te. Na ndakisa, kotánga ba-sms te na ntango ya makita. Na yango, okoki kotya makambo na yo moko na esika na yango.

Pesá biyano. Soki bato mingi bazali kopesa bakomantɛrɛ, tolendisamaka mingi mpe totongamaka na maloba ya bandeko oyo bazali komonisa kondima na bango.

Bakomantɛrɛ na yo ezala mikuse. Yango ekopesa bato mingi libaku ya kopesa biyano.

Kokisá mikumba na yo. Soki ozali na lisolo na Eteyelo ya Mosala ya teokrasi, to na Likita ya Mosala, bongisá malamu, mekámeká yango liboso, mpe salá nyonso mpo ozangaka te kokokisa mikumba na yo.

Pesá baoyo basalaki mikumba longonya. Yebisá bato nyonso oyo basalaki masolo to bapesaki bakomantɛrɛ ete osepeli mingi na milende na bango.

Sololá na bandeko. Kopesa bandeko mbote mpe kosolola na bango liboso mpe nsima ya makita ebakisaka esengo mpe matomba ya koya na makita.