Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto

Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto

Alicia, * elenge mwasi moko alobi boye: “Na bantango mosusu nalingaka kaka koyeba makambo etali kosangisa nzoto, kasi namonaka ete soki natuni baboti na ngai, bakozwela ngai makanisi ya mabe.”

Inez, mama ya Alicia, alobi boye: “Nalingaka kofanda mpe kosolola na mwana na ngai ya mwasi likambo etali kosangisa nzoto, kasi, namonaka ete azalaka na makambo mingi ya kosala oyo etali bomoi na ye moko. Ezalaka mpasi komona ye azangi eloko ya kosala.”

LELO oyo, likambo etali kosangisa nzoto elobamaka bisika nyonso​—na televizyo, na bafilme, mpe na bapiblisite. Emonani ete esika kaka moko oyo likambo yango ezali nsɔni mpo na kolobela, ezali kati na baboti mpe bana na bango. Michael, elenge moko na Canada alobi boye: “Baboti bayebaka te ete biso bilenge toyokaka nsɔni mpe tokakatanaka mpo na kosolola na bango likambo etali kosangisa nzoto; ezalaka pɛtɛɛ tósolola likambo yango na moninga moko.”

Ndenge moko na bana na bango, mbala mingi, baboti mpe bakakatanaka mpo na kolobela likambo yango. Na buku na ye (Beyond the Big Talk), Debra W. Haffner, molakisi moko na makambo ya kolɔngɔnɔ ya nzoto alobi boye: “Baboti mingi bayebisaki ngai ete basombelaki bana na bango buku oyo ezalaki kolobela likambo etali kosangisa nzoto to ntango mwana mwasi to mwana mobali abandi kokóma mpenza mobali to mwasi, batyaki yango na esika oyo bana na bango bakoki kotánga yango, mpe balobelaki likambo yango ata mbala moko te.” Haffner alobi ete likambo oyo baboti balingaki koyebisa bana na bango ezalaki polele: “Tolingi bino moko bóyeba makambo etali nzoto na bino mpe likambo etali kosangisa nzoto; tolingi te kosolola na bino likambo yango.”

Soki ozali moboti, osengeli kosala bongo te. Ya solo, ezali mpenza na ntina ete yo moko osolola na bana na yo likambo etali kosangisa nzoto. Talelá bantina misato oyo:

  1. Ndenge oyo mokili elimbolaka likambo etali kosangisa nzoto ebongwani. James, oyo azali na mbula 20, alobi boye: “Bato batalelaka lisusu te likambo ya kosangisa nzoto ndenge oyo Nzambe abongisaki mpo na mwasi ná mobali. Lelo oyo, kosangisa nzoto ekómi kosalema na monɔkɔ, na esumbeli, bato bazali kotindelana bililingi ya bolumbu na nzela ya internet to na telefone.”

  2. Bana na yo bakoki koyoka makambo ya lokuta na likambo yango, ntango bazali naino mike. Mama moko na nkombo Sheila, alobi boye: “Bakoyoka makambo etali kosangisa nzoto kaka ntango bakɔti kelasi, mpe bakozala te na makanisi oyo yo olingi bango bázala na yango na likambo yango.”

  3. Bana na yo bazalaka na mituna etali kosangisa nzoto kasi ekoki kozala ete balingaka te kozala bato ya liboso ya kobanda lisolo yango na yo. Ana, elenge moko ya mbula 15 na Brésil alobi boye: “Mpo na koloba solo, nayebaka te ndenge nakoki kobanda lisolo ya likambo etali kosangisa nzoto na baboti na ngai.”

Ya solo, kosolola na bana na yo likambo etali kosangisa nzoto ezali na kati ya mikumba oyo Nzambe apesi yo moboti. (Baefese 6:4) Toboyi te, ekoki kozala nsɔni mpo na yo mpe bana. Kasi, likambo ya malamu ezali ete bilenge mingi bazali na likanisi moko na Danielle, elenge moko ya mbula 14, oyo alobi boye: “Tolingaka baboti na biso báyebisa biso makambo etali kosangisa nzoto, kasi te balakisi to televizyo.” Na yango, ndenge nini okoki kosolola na bana na yo likambo wana ya ntina mingi atako ezalaka nsɔni mpo na kolobela yango? *

Talelá mbula na bango

Bana babandaka koyoka makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali mpenza mike, lobá kaka soki bazali esika bato bazali te. Likambo oyo ezali kotungisa mingi ezali ete na “mikolo ya nsuka” oyo, bato mabe bakómi lisusu kosala “mabe koleka.” (2 Timote 3:1, 13) Likambo ya mawa, mikóló bakómi kobebisa bana mingi na oyo etali kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔmɔ mpenza.

Yango wana, ezali na ntina obanda koteya bana na yo ntango bazali naino mike mpenza. Renate, mama moko na Allemagne, alobi boye: “Soki ozeli tii ntango bana na yo bakokóma bilenge, bakolinga lisusu te kosolola na yo polele likambo yango, mpo na nsɔni oyo bakómaka na yango ntango babandi kokóma mpenza mibali to basi.” Sekele ezali, koyebisa bana makambo oyo ekokani na mbula na bango.

Mpo na bana oyo bakɔti naino kelasi te:

Yebisá bango bankombo mpenza ya nzoto ya mwasi mpe ya mobali, mpe bendá bango matoi ete moto moko te asimba yango. Julia, mama moko na Mexique alobi boye: “Nabandaki koteya mwana na ngai ya mobali ntango azalaki naino na mbula misato. Lokola nayebaki ete balakisi, bato oyo bakɛngɛlaka bana, to bana oyo bakoli bakoki kobebisa ye, ezalaki kotungisa ngai mingi. Asengelaki koyeba ndenge akoki komibatela na bato mabe.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Teyá mwana na yo ayeba ndenge nini akoki kosala soki moto moko aluki kosakana na binama na ye mpenza ya mobali to ya mwasi. Na ndakisa, okoki koteya mwana na yo aloba: “Kosimba ngai te! Nakofunda yo!” Monisá mwana na yo ete ezali malamu ayebisaka yo​—ata soki moto yango ayebisi ye ete akopesa ye bakado to aluki kobɛta ye. *

Mpo na baoyo bazali na eteyelo ya ebandeli:

Na bambula wana okoki kobakisa malɛmbɛmalɛmbɛ makambo mosusu na oyo bayebi. Tata moko na nkombo Peter, apesi toli oyo: “Liboso ya kobanda lisolo na bango, luká koyeba makambo oyo bana bayebi na likambo yango mpe soki bakolinga koyeba lisusu mingi. Koluka kosolola na bango na makasi te. Bakokóma kosolola na yo kozanga kokakatana soki olekisaka ntango mbala na mbala na bango.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Sololáká na bango mbala na mbala, masolo mikuse na esika ya kosolola na bango makambo ebele mbala moko. (Kolimbola Mibeko 6:6-9) Na ndenge wana okotondisela bango te ebele ya makambo na motó. Lisusu, ntango bazali kokola bakoyeba makambo oyo bazali na yango mposa na kolanda ndenge bazali kokola na makanisi.

Mpo na bilenge:

Sikoyo nde ntango ya koyeba mpenza soki mwana na yo ayebi makambo nyonso na oyo etali kosangisa nzoto. Ana, elenge ya mbula 15, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Na eteyelo na biso, bilenge basi mpe mibali, bazalaka na bato oyo basangisaka na bango nzoto. Nakanisi ete lokola nazali mokristo nasengeli koyeba likambo yango malamu. Atako kolobela likambo etali kosangisa nzoto ezalaka nsɔni, ezali likambo oyo nasengeli koyeba.” *

Likebisi: Bilenge bakoki koboya kotuna mituna mpo bazali kobanga ete baboti na bango bakokanisa ete bakómi na etamboli ya mabe. Ezali yango nde tata moko na nkombo Steven amonaki. Alobi boye: “Mwana na biso ya mobali akómaki kokakatana kolobela likambo etali kosangisa nzoto. Kasi, na nsima tomonaki ete azalaki kokanisa ete tozali kokanisa ete akómi na bizaleli ya mabe. Toyebisaki ye polele ete tozalaki te kosolola likambo yango na ye mpo tozalaki kokanisa ete asali likambo moko ya mabe; tolingaki kaka koyeba ete azalaki na nyonso oyo asengelaki na yango mpo alanda te makambo ya mabe oyo bilenge mosusu basalaka.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Na esika ya kotuna mbala moko mwana na yo mituna etali kosangisa nzoto, tuná ye nde ndenge nini baninga na ye ya kelasi batalelaka likambo yango. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Bato mingi lelo oyo bakanisaka ete kosangisa nzoto na monɔkɔ ezali mpenza kosangisa nzoto te. Baninga na yo ya kelasi mpe bakanisaka bongo?” Kotuna ndenge wana ekoki kotinda mwana na yo aloba, amonisa makanisi na ye.

Kolongola nsɔni

Ya solo, kosolola na bana na yo likambo etali kosangisa nzoto ekoki kozala moko ya makambo ya nsɔni oyo moboti akokutana na yango. Kasi, ezali na ntina osala yango. Mama moko na nkombo Diane, alobi boye: “Nsima ya mikolo, nsɔni esilaka mpe kosolola na mwana na yo likambo etali kosangisa nzoto epesaka nzela na moboti mpe mwana bákóma baninga.” Steven, oyo tolobelaki liboso, andimi likambo yango. Alobi boye: “Ekómaka pɛtɛɛ kosolola makambo oyo ezalaka nsɔni kolobela yango, na ndakisa likambo ya kosangisa nzoto soki bozali na momeseno ya kosolola makambo nyonso na kati ya libota.” Abakisi boye: “Nsɔni esilaka nyonso te, kasi kosolola polele ezali na ntina mpo libota ya bakristo ezala malamu.”

^ par. 3 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 11 Lisolo oyo elobeli ntina ya kosolola na bana na yo likambo etali kosangisa nzoto. Lisolo mosusu oyo ekoya ekolobela ntina ya kokɔtisa bizaleli ya malamu na mitó ya bana ntango bozali kolobela likambo ya kosangisa nzoto.

^ par. 16 Na kolanda lisolo oyo ezali na lokasa 171 ya buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 19 Mpo na kosolola na mwana na yo oyo akómi elenge, likambo etali kosangisa nzoto, salelá mikapo 1-5, 28, 29, mpe 33 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

OMITUNA . . .

Tángá maloba oyo elandi oyo bilenge na mikili ndenge na ndenge balobi, mpe na nsima omituna mituna oyo elandi.

“Baboti na ngai bayebisaka ngai natánga masolo ezali kolobela likambo ya kosangisa nzoto mpe na nsima nayebisa bango soki nazali na mituna. Kasi, nakosepela báyebisa ngai makambo mingi na likambo yango.”​—Ana, Brésil.

Mpo na nini okanisi ete ezali na ntina osuka kaka te na kopesa mwana na yo mokanda atánga?

“Nayebi makambo mingi ya mabe na oyo etali kosangisa nzoto​—makambo oyo nakanisi ete tata na ngai ayebi te. Akoyoka nsɔmɔ soki natuni ye yango.”​—Ken, Canada.

Mwana na yo akoki kobanga nini mpo na kosolola na yo makambo oyo ezali kotungisa ye?

“Ntango nazwaki ekateli ya kotuna baboti na ngai motuna moko na likambo etali kosangisa nzoto, eyano oyo bapesaki ngai ezalaki lokola nde bazweli ngai makanisi ya mabe, batunaki ngai: ‘Mpo na nini otuni bongo? Osali nde likambo moko?’”​—Masami, Japon.

Ntango mwana na yo atuni yo motuna na likambo etali kosangisa nzoto, ndenge nini eyano na yo ekoki kopesa bino nzela bósololaka to mpe bósololaka lisusu te na likambo yango?

“Ekosalisa ngai soki baboti na ngai bayebisi ngai ete ntango bazalaki na mbula na ngai bango mpe bazalaki kotuna mituna yango mpe ete ezali mabe te ngai mpe natuna mituna yango.”​—Lisette, France.

Ndenge nini okoki kokitisa mwana na yo motema mpo akakatana te kosolola na yo likambo etali kosangisa nzoto?

“Mama na ngai azalaki kotuna ngai mituna na likambo etali kosangisa nzoto​—kasi na mongongo moko ya nkanda te. Kosala bongo ezali na ntina mpo mwana amona te ete bazali kosambisa ye.”​—Gerald, France.

Mongongo nini osalelaka ntango ozali koloba na mwana na yo likambo etali kosangisa nzoto? Osengeli nde kobongisa?