Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?

Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?

Bilenge​—Bokosala nini na bomoi na bino?

“Ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te.”​—1 KO. 9:26.

1, 2. Mpo olonga na bomoi awa ozali kokola mpo na kokóma mokóló, osengeli kozala na nini?

SOKI moto alingi kosala mobembo na nzela moko oyo ayebi malamu te, mbala mosusu akomema karte to eloko babengi boussole. Karte ekosalisa ye ayeba esika oyo azali mpe apona nzela oyo asengeli kolanda. Boussole ekosalisa ye akoba na nzela ya malamu. Kasi, ezala karte to boussole ekosalisa ye mpenza te soki ayebi te epai wapi azali kokende. Mpo ayengayenga mpamba te, asengeli koyeba malamu esika oyo azali kokende.

2 Bomoi na yo ezali ndenge wana, awa ozali kokola mpo na kokóma mokóló. Ozali na karte, ozali mpe na boussole. Biblia ezali karte oyo ekoki kosalisa yo oyeba nzela nini osengeli kopona. (Mas. 3:5, 6) Soki lisosoli na yo eteyami malamu, ekoki kosalisa yo mingi mpo okoba kolanda nzela ya malamu. (Rom. 2:15) Ekoki kosala lokola boussole. Nzokande mpo olonga na bomoi na yo, osengeli mpe koyeba epai wapi ozali kokende. Osengeli komityela mikano ya sikisiki.

3. Ndenge Paulo alobaki na 1 Bakorinti 9:26, komityela mikano ezali na ntina nini?

3 Ntoma Paulo amonisaki na mokuse ntina ya komityela mikano mpe ya kosala makasi mpo na kokokisa yango ntango akomaki boye: “Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te; ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te.” (1 Ko. 9:26) Soki omityeli mikano, okopota mbangu bipotela te. Mosika te, ekosɛnga ozwa bikateli ya minene, na ndakisa na oyo etali losambo, mosala, libala, libota, mpe bongo na bongo. Nzokande na bantango mosusu, okoki komona ete oyebi te ekateli nini ozwa. Kasi, soki oponi liboso nzela oyo okolanda, olandi mateya mpe mitinda ya Liloba ya Nzambe mpo na kozwa bikateli, okokende na nzela ya mabe te.​—2 Tim. 4:4, 5.

4, 5. (a) Nini ekoki kosalema soki yo moko omityeli mikano te? (b) Mpo na nini mposa ya kosepelisa Nzambe nde esengeli kotambwisa bikateli na yo?

4 Soki yo moko omityeli mikano te, baninga mpe balakisi na yo bakoki kotinda yo osala oyo bango bamoni ete ezali malamu mpo na yo. Ya solo, ata soki omityeli mikano ya sikisiki, bato mosusu bakoki kaka kopesa makanisi na bango. Ntango ozali koyoka bango, osengeli komituna boye: ‘Mikano oyo bazali koyebisa ngai namityela ekosalisa ngai nakanisa Mozalisi na ngai na bolenge na ngai to ekopekisa ngai nasala yango malamu?’​—Tángá Mosakoli 12:1.

5 Mpo na nini mposa ya kosepelisa Nzambe esengeli kotambwisa bikateli oyo ozali kozwa na bomoi? Ntina moko ezali ete Yehova nde apesá biso biloko nyonso ya malamu oyo tozali na yango. (Yak. 1:17) Moto nyonso mpenza asengeli komonisa botɔndi epai ya Yehova. (Em. 4:11) Ezali nde na lolenge mosusu ya malamu mpo na komonisa botɔndi na yo, koleka kokanisa Yehova ntango ozali komityela mikano? Tótala mikano ya malamu oyo okoki komityela mpe nini osengeli kosala mpo na kokokisa yango.

Mikano nini okoki komityela?

6. Mokano nini ya libosoliboso okoki komityela, mpe mpo na nini?

6 Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mokano ya libosoliboso oyo okoki komityela ezali ya komindimisa ete makambo oyo Biblia elobi ezali solo. (Rom. 12:2; 2 Ko. 13:5) Mbala mosusu baninga na yo bandimaka liteya ya evolisyo to mpe mateya mosusu ya mangomba ya lokuta mpo bato mosusu bayebisá bango ete yango nde basengeli kondima. Kasi, osengeli kondima likambo te kaka mpo bato mosusu balingi ete ondima yango. Kobosana te, Yehova alingi osalela ye na makanisi na yo nyonso. (Tángá Matai 22:36, 37.) Tata na biso ya likoló alingi otonga kondima na yo likoló ya bilembeteli ya solosolo.​—Ebr. 11:1.

7, 8. (a) Mikano nini ya kokokisa nsima ya ntango mokuse ekosalisa yo okómisa kondima na yo makasi? (b) Matomba nini okozwa soki okokisi mikano mosusu oyo omityelaki mpo na kokokisa nsima ya ntango mokuse?

7 Mpo okómisa kondima na yo makasi, mpo na nini te komityela mikano oyo okoki kokokisa nsima ya ntango mokuse? Moko na yango ekoki kozala ya kobondela mokolo na mokolo. Mpo olobelaka makambo ya sikisiki mpe ya sika na mabondeli na yo, okoki kokanga na motó to kokoma makambo nyonso oyo esalemaki na mokolo, oyo okolinga kokɔtisa na mabondeli na yo. Kolobela te kaka mikakatano oyo okutanaki na yango, kasi mpe makambo mosusu oyo osepelaki na yango. (Flp. 4:6) Mokano mosusu ezali ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Oyebaka ete soki ozali kotánga nkasa soki minei na mokolo moko, okosilisa kotánga Biblia mobimba na mbula moko mpamba? * Nzembo 1:1, 2 elobi ete “esengo na moto oyo . . . asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.”

8 Mokano ya misato oyo okoki komityela mpo na kokokisa nsima ya ntango mokuse ezali ya kobongisa eyano mpo na likita nyonso ya lisangá. Na ebandeli, okoki kotánga eyano yango to kotánga vɛrsɛ. Nsima ya mikolo, okoki komityela mokano ya kopesa eyano na maloba na yo moko. Ntango nyonso oyo opesi eyano, ozali kopesa Yehova likabo. (Ebr. 13:15) Soki okokisi mikano yango mosusu, okobanga lisusu mingi te, botɔndi na yo epai ya Yehova ekobakisama, mpe okobonga mpo na komityela mikano oyo okokokisa nsima ya ntango molai.

9. Soki ozali naino mosakoli ya Bokonzi te, mokano nini ya kokokisa nsima ya ntango molai okoki komityela?

9 Mikano nini ya kokokisa nsima ya ntango molai okoki komityela? Soki okómi naino mosakoli ya nsango malamu na lisangá te, mokano oyo okoki kokokisa nsima ya mwa ntango ezali ya kokóma mosakoli ya Bokonzi. Soki okokisi mokano wana ya ntina, ekozala malamu ozala mosakoli oyo asakolaka sanza nyonso mpe oyo ayebi kosakola. Ekozala mpe malamu oyekola kosalela Biblia na mosala ya kosakola. Soki ozali kosala bongo, na ntembe te okomona ete okokóma kosepela mingi na mosala ya kosakola. Na nsima, okoki kobanda kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako to mpe kosala makasi obanda koyekola Biblia na moto. Soki ozali mosakoli oyo azwi naino batisimo te, ezali nde na mokano oyo ekoki koleka mokano ya kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova oyo amipesá mpe azwá batisimo?

10, 11. Mikano nini ya kokokisa nsima ya ntango molai bilenge oyo bazwá batisimo bakoki komityela?

10 Soki ozali mosaleli ya Yehova oyo azwá batisimo, talá mwa mikano oyo okoki komityela mpo na kokokisa nsima ya ntango molai. Okoki na bantango mosusu kosalisa masangá mpo na kosakola na bateritware oyo esakolamaka mingi te. Okoki mpe kopona kosalela makasi na yo mpe nzoto kolɔngɔnɔ na yo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ya sanza na sanza. Bankóto ya babongisi-nzela ya esengo bakoyebisa yo ete mosala ya ntango nyonso ezali lolenge malamu ya kokanisa Mozalisi na yo na bolenge na yo. Wana ezali mikano oyo okoki kokokisa wana ozali naino epai na bino. Kokokisa mikano yango ekosalisa mpe lisangá na bino.

11 Mikano mosusu ya kokokisa nsima ya ntango molai ekoki kopesa yo nzela ya kosalisa mpe masangá mosusu. Na ndakisa, okoki komibongisa mpo na kokende kosakola na esika mosusu to na ekólo mosusu esika mposa ezali makasi. Okoki mpe kolinga kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe babiro ya filiale na mikili mosusu. Okoki ata kozwa libaku ya kosala na Betele to kokóma misionɛrɛ. Kasi mokano ya kozwa batisimo ezali mokano ya ntina mingi oyo osengeli kokokisa liboso okoka komityela mikano ya kokokisa nsima ya ntango molai oyo touti kolobela awa. Soki ozwi naino batisimo te, talá soki kosala likambo yango monene na bomoi na yo elimboli nini.

Mpo okokisa mokano ya kozwa batisimo

12. Mpo na bantina nini bato mosusu bazwaka batisimo, mpe mpo na nini bantina yango ekoki te?

12 Mpo na yo, ntina ya batisimo ezali nini? Bato mosusu bakoki kokanisa ete ezali mpo na kobatela bango bákwea na masumu te. Bamosusu bakoki komona ete basengeli kozwa batisimo mpo baninga na bango bazwá batisimo. Bilenge mosusu bakoki kosala yango mpo na kosepelisa baboti na bango. Nzokande, batisimo ezali te kɔntra moko oyo ekopekisa yo osala makambo oyo yo moko okolinga kosala na kobombana; osengeli mpe te kozwa batisimo mpo bato mosusu bazali kotya yo mbamba. Osengeli kozwa batisimo ntango okangi mpenza ntina soki kozala Motatoli ya Yehova elimboli nini mpe ntango omoni mpenza ete okoki mpe ondimi kokokisa mokumba yango.​—Mos. 5:4, 5.

13. Mpo na ntina nini osengeli kozwa batisimo?

13 Ntina moko ya kozwa batisimo ezali ete Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo ete ‘bákómisa bato bayekoli mpe bábatisa bango.’ Apesaki mpe ndakisa na ndenge ye moko azwaki batisimo. (Tángá Matai 28:19, 20; Marko 1:9.) Longola yango, batisimo ezali likambo moko ya ntina mingi mpo na baoyo balingi kobika. Nsima ya kolobela ndenge Noa atongaki masuwa epai ye ná libota na ye babikisamaki na ntango ya Mpela, ntoma Petro alobaki boye: “Eloko oyo ekokani na yango ezali mpe sikoyo kobikisa bino, elingi koloba, batisimo, . . . na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo.” (1 Pe. 3:20, 21) Kasi, yango elimboli te ete esengeli kozwa batisimo kaka mpo na kozwa libateli. Okozwa batisimo nde mpo olingi Yehova mpe olingi kosalela ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi mpe na makasi na yo nyonso.​—Mrk. 12:29, 30.

14. Mpo na nini bato mosusu bakakatanaka kozwa batisimo, kasi elikya nini ozali na yango?

14 Bato mosusu bakoki kokakatana kozwa batisimo mpo bazali kobanga ete na nsima, bakoki kobimisama na lisangá. Yo mpe obangaka likambo ya ndenge wana? Soki ɛɛ, yebá ete kobanga yango ezali mpenzampenza mabe te. Ekoki komonisa ete oyebi mokumba monene oyo eyelaka moto soki akómi Motatoli ya Yehova. Ekoki nde kozala na ntina mosusu? Mbala mosusu ondimi mpenza naino te ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Soki ezali bongo, kokanisa mbuma mabe oyo bato oyo baboyaka kotosa mibeko ya Biblia babukaka ekoki kosalisa yo ozwa ekateli. Epai mosusu, ekoki mpe kozala ete olingaka mibeko ya Nzambe, kasi omonaka ete yo okokoka kotosa yango te. Soki ezali bongo, ekoki kozala elembo ya malamu, mpo ezali komonisa ete ozali na komikitisa. Kutu Biblia elobi ete mitema ya bato nyonso ya kozanga kokoka ezali na bokosi. (Yir. 17:9) Atako bongo, okoki kolonga soki ozali ntango nyonso ‘komibatela mpe kosalela liloba ya Nzambe.’ (Tángá Nzembo 119:9.) Ata soki ozali kokakatana kozwa batisimo mpo na bantina nini, osengeli kosilisa makambo mpe kolongola kobanga. *

15, 16. Ndenge nini okoki koyeba soki okoki mpo na kozwa batisimo?

15 Kasi, ndenge nini okoki koyeba soki okoki mpo na kozwa batisimo? Lolenge moko ezali ya komituna mituna lokola oyo: ‘Nakoki kolimbwela basusu mateya minene ya Biblia? Nabimaka na mosala ya kosakola ata ntango baboti na ngai babimi te? Nasalaka makasi nayanganaka na makita nyonso ya lisangá? Nakoki koyeba mabaku ya sikisiki oyo naboyaki kolanda makambo mabe ya baninga? Nakokoka kokoba kosalela Yehova ata soki baboti mpe baninga na ngai batiki kosala yango? Nasilá kobondela Yehova mpo na koyebisa ye ete boyokani na ngai na ye ezali na ntina? Mpe nayebisá mpenza Yehova na libondeli ete namipesi mobimba epai na ye?’

16 Batisimo ezali eloko moko oyo ebongolaka bomoi mpe osengeli kozwa yango na lisɛki te. Okɔmɛli mpenza mpo na kokanisa likambo yango malamu? Kokɔmɛla elimboli kaka te koyeba kosala masolo na estrade to kopesa biyano ya kitoko na makita. Esɛngaka koyeba kozwa bikateli oyo emonisi ete olandi mitinda ya Biblia. (Tángá Baebre 5:14.) Soki okoki kosala bongo, yebá ete libaku monene mpenza ezali kozela yo: libaku ya kosalela Yehova na motema na yo mobimba mpe kozala na bomoi oyo emonisi ete omipesá mpenza epai na ye.

17. Nini ekosalisa yo obunda na mikakatano oyo ekoki kobima nsima ya batisimo na yo?

17 Mbala moko nsima ya batisimo na yo, okoki koyoka esengo makasi ya kosalela Nzambe. Kasi, ekoumela te, okoki kokutana na mikakatano oyo ekoki komeka kondima mpe makasi na yo. (2 Tim. 3:12) Kokanisa te ete osengeli kobundisa mikakatano yango yo moko. Luká toli epai ya baboti na yo. Sɛngá bandeko oyo bakɔmɛli na lisangá básalisa yo. Kangamá makasi na bato oyo bakosunga yo. Kobosana soki moke te ete Yehova atyelaka yo likebi, mpe akopesa yo makasi oyo osengeli na yango mpo na kobundisa ata likambo nini oyo ekoki kokómela yo.​—1 Pe. 5:6, 7.

Ndenge nini okoki kokokisa mikano na yo?

18, 19. Ndenge nini kotalela makambo oyo otyaka na esika ya liboso ekoki kosalisa yo?

18 Ata soki ozali na makanisi ya malamu ndenge nini, ozali komona lokola ete ozalaka kaka na ntango te ya kosala oyo olingi mpe oyo osengeli kosala? Soki ezali bongo, osengeli kotalela lisusu makambo oyo otyaka na esika ya liboso. Tópesa ndakisa: Zwá katini ya kopale mpe tyá mabanga ya minene na kati. Na nsima, sopá zɛlɔ na katini yango. Omoni, katini yango etondi na mabanga ná zɛlɔ. Sikoyo, bimisá mabanga ná zɛlɔ yango mpe tyá yango pembeni. Na mbala oyo, tyá liboso zɛlɔ yango na katini, mpe na nsima meká kotya mabanga yango na kati. Omoni ete ekoki te? Ezali mpo otyaki zɛlɔ liboso.

19 Yo mpe okutanaka na mokakatano ya ndenge wana na oyo etali ndenge ya kosalela ntango na yo. Soki otye makambo lokola kominanola na esika ya liboso, okomona lokola ete ozali na ntango soki moke te mpo na makambo minene ya bomoi​—makambo ya elimo. Kasi soki olandi etinda ya Biblia ya ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina,’ okomona ete ozali na ntango, ezala mpo na matomba ya Bokonzi, to mpo na kominanola mwa moke.​—Flp. 1:10.

20. Soki ozali komitungisa mpe kokakatana wana ozali koluka kokokisa mikano na yo, osengeli kosala nini?

20 Wana ozali kosala makasi mpo na kokokisa mikano na yo, ata mpe kozwa batisimo, na bantango mosusu okoki komitungisa to kokakatana. Soki esalemi bongo, “bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo.” (Nz. 55:22) Sikoyo, ozali na libaku ya kosala likambo oyo epesaka esengo koleka mpe eleki ntina na bomoi ya bato: mosala ya kosakola mpe koteya oyo ezali kosalema na mokili mobimba. (Mis. 1:8) Okoki kopona kotala kaka ndenge bato mosusu bazali kosala mosala yango. To okoki kosala mosala yango. Koboya te kopesa makoki na yo mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso. Okoyoka mawa ata moke te soki osaleli “Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”​—Mos. 12:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2009, nkasa 15-18.

^ par. 14 Mpo na kozwa lisalisi na likambo yango, talá buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, mokapo 34 (na Lifalanse).

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini osengeli komityela mikano?

• Wapi mwa mikano ya malamu oyo okoki kokokisa?

• Kokokisa mokano ya kozwa batisimo elimboli nini?

• Ndenge nini kotalela makambo oyo otyaka na esika ya liboso ekoki kosalisa yo okokisa mikano na yo?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 13]

Omityelá mokano ya kotánga Biblia mokolo na mokolo?

[Elilingi na lokasa 15]

Nini ekosalisa yo okokisa mokano ya kozwa batisimo?

[Elilingi na lokasa 16]

Liteya nini ozwi na ndakisa oyo?