Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tokotambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba!

Tokotambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba!

Tokotambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba!

“Ngai nakotambola na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba.”​—NZ. 26:11.

1, 2. Yobo alobaki nini mpo na bosembo na ye, mpe Yobo mokapo 31 emonisi nini mpo na ye?

NA NTANGO ya kala, mbala mingi bazalaki komeka kilo ya biloko na emekeli-kilo. Mbala mingi, emekeli-kilo ezalaki ebende to nzete moko oyo elalá mpe na katikati na yango, bakangisá yango na mwa nzete to libaya oyo etɛlɛmi. Na nsuka mokomoko, ezalaki na saani. Bazalaki kotya eloko oyo balingi komeka na saani moko mpe kilo na saani mosusu. Yehova asɛngaki basaleli na ye básalelaka bimekeli-kilo ya bokosi te.​—Mas. 11:1.

2 Ntango Yobo, moto oyo azalaki kobanga Nzambe, akutanaki na minyoko oyo eutaki na Satana, alobaki boye: “[Yehova] akomeka ngai na emekeli-kilo ya sikisiki mpe Nzambe akoyeba bosembo na ngai.” (Yobo 31:6) Mpo na yango, Yobo atángaki mwa makambo oyo ekoki kotya moto oyo abatelaka bosembo na komekama. Kasi ye moko Yobo alongaki mpenza komekama, ndenge emonisami na maloba na ye oyo ezali na Yobo mokapo 31. Ndakisa na ye ya malamu ekoki kotinda biso tósala ndenge asalaki mpe tóloba na kondima nyonso, ndenge mokomi ya nzembo Davidi alobaki ete: “Ngai nakotambola na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba.”​—Nz. 26:11.

3. Mpo na nini ezali na ntina tózala sembo epai ya Nzambe na makambo ya minene mpe na makambo ya mike?

3 Atako Yobo anyokwamaki makasi mpenza, atikalaki sembo epai ya Nzambe. Bato mosusu bakoki kutu koloba ete Yobo azalaki mpenza elombe na ndenge abatelaki bosembo na kati ya komekama makasi ya ndenge wana. Biso tozali konyokwama lokola Yobo mpenza te. Kasi, tosengeli kozala sembo epai ya Nzambe na makambo ya minene mpe na makambo ya mike mpo tómonisa ete tolingi kokoba kotambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba mpe kosimba bokonzi na ye.​—Tángá Luka 16:10.

Kozanga mbeba na etamboli ezali na ntina

4, 5. Lokola azalaki kobatela bosembo na ye, etamboli nini Yobo aboyaki?

4 Mpo na kobatela bosembo na biso epai ya Yehova, tosengeli kondima mitinda na ye oyo etali etamboli, ndenge Yobo asalaki. Alobaki boye: “Nasalá kondimana na miso na ngai. Bongo ekobanda boni natya likebi epai ya ngɔndɔ? . . . Soki motema na ngai ebendamaki na mwasi moko boye, mpe soki nabatamaki mpo na kozela na monɔkɔ ya ndako ya moninga na ngai, tiká mwasi na ngai anikela mobali mosusu mbuma, mpe tiká mibali mosusu bágumba mabɔlɔngɔ na likoló na ye.”​—Yobo 31:1, 9, 10.

5 Lokola azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe, Yobo aboyaki kotala mwasi mosusu na makanisi ya mabe. Lokola azalaki na mwasi na ye, aboyaki kozala selesele na mwasi oyo azali monzemba to koluka kolingana na mwasi ya moto mosusu. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki likambo moko ya ntina mingi na oyo etali boyokani na biso na moto oyo azali molongani na biso te​—bato oyo babatelaka bosembo basengeli mpenza kobatela likambo yango na makanisi.​—Tángá Matai 5:27, 28.

Kolanda soki moke te banzela ya mbilingambilinga

6, 7. (a) Ndenge ezalaki mpo na Yobo, Nzambe asalelaka nini mpo na komeka bosembo na biso? (b) Mpo na nini tosengeli te kozala mbilingambilinga to na bokosi?

6 Tosengeli te kolanda banzela ya mbilingambilinga soki tolingi kotángama na kati ya bato oyo babatelaka bosembo. (Tángá Masese 3:31-33.) Yobo alobaki boye: “Soki natambolá na bato ya lokuta, mpe lokolo na ngai ekendaka nokinoki epai ya bokosi, [Yehova] akomeka ngai na emekeli-kilo ya sikisiki mpe Nzambe akoyeba bosembo na ngai.” (Yobo 31:5, 6) Yehova amekaka bato nyonso na “emekeli-kilo ya sikisiki.” Ndenge ezalaki mpo na Yobo, Nzambe asalelaka mibeko na ye ya kokoka na oyo etali boyengebene mpo na komeka bosembo ya basaleli na ye oyo bamipesá na ye.

7 Soki tokómi bato ya mbilingambilinga to ya bokosi, tokomonisa ete tobateli bosembo te na biso epai ya Nzambe. Bato oyo babatelaka bosembo ‘babwaká makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni’ mpe ‘batambolaka na mayele mabe te.’ (2 Ko. 4:1, 2) Ekozala boni soki tolobi to tosali likambo moko ya mbilingambilinga, oyo etindi ndeko na biso mokristo abondela Nzambe mpo na kosɛnga lisalisi? Wana, mawa na biso! Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Na mpasi na ngai nabengaki Yehova, mpe ayanolaki ngai. Ee Yehova, bikisá molimo na ngai na mbɛbu ya lokuta, na lolemo ya bokosi.” (Nz. 120:1, 2) Ezali malamu tóbosana te ete Nzambe akoki kotala mpenza na kati na biso mpo na ‘komeka motema ná bangɛi’ mpo amona soki tozali mpenza bato oyo babatelaka bosembo.​—Nz. 7:8, 9.

Zalá ndakisa na boyokani na yo ná basusu

8. Ndenge nini Yobo azalaki kosalela basusu makambo?

8 Mpo na kobatela bosembo na biso, tosengeli kozala lokola Yobo, oyo azalaki moto ya sembo, ya komikitisa mpe oyo azalaki komemya basusu. Alobaki boye: “Soki nazalaki koboya moombo na ngai ya mobali to moombo na ngai ya mwasi asamba na likambo na bango ya kosamba elongo na ngai, boye nakosala nini ntango Nzambe akotɛlɛma? Mpe ntango akosɛnga bázongisela ye monɔkɔ, nakoyanola ye nini? Moto oyo asalaki ngai na libumu asalaki mpe ye te, mpe Moto moko kaka nde abongisaki biso na kati ya libumu te?”​—Yobo 31:13-15.

9. Bizaleli nini Yobo amonisaki na boyokani na ye na baombo na ye, mpe ndenge nini tosengeli komekola ye na likambo yango?

9 Emonani lokola ete na ntango ya Yobo makambo oyo etali kosambisa ezalaki mindɔndɔ te. Bazalaki kosambisa makambo na molɔngɔ mpe batribinale ezalaki ata mpo na baombo. Yobo azalaki kosalela baombo na ye makambo na bosembo mpe azalaki na motema mawa. Mpo tótambola na ezaleli na biso ya kozanga mbeba, tosengeli komonisa bizaleli ya ndenge wana, mingimingi soki tozali nkulutu na lisangá.

Kabeláká basusu mpe kozala na bilulela te

10, 11. (a) Ndenge nini toyebi ete Yobo azalaki kokabela mpe kosalisa basusu? (b) Yobo 31:16-25 ekoki kokundwela biso batoli nini oyo, na nsima, ekomamaki na Biblia?

10 Yobo azalaki kokabela basusu mpe kosalisa bango; azalaki moimi to na bilulela te. Alobaki boye: “Soki . . . nalɛmbisaki miso ya mwasi oyo mobali akufá, mpe soki nazalaki kolya eloko na ngai kaka ngai moko, wana mwana oyo tata akufá azalaki kolya yango te . . . Soki nazalaki komona moto azali kokufa mpo azangi elamba . . . Soki naningisaki lobɔkɔ mpo na kokanela mwana oyo tata akufá, ntango namonaki ete bazali na bosɛnga ya lisalisi na ngai na porte, tiká mokuwa ya lipeka na ngai elongwa na lipeka ekwea, mpe lobɔkɔ na ngai ebukana na mokuwa na yango ya likoló.” Yobo alingaki mpe kobatela bosembo na ye te soki alobaki na wolo ete: “Natyeli yo motema!”​—Yobo 31:16-25.

11 Maloba wana ekoki kokundwela biso maloba ya moyekoli Yakobo oyo: “Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na bolɔzi na bango, mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.” (Yak. 1:27) Tokoki mpe kokanisa likebisi ya Yesu oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” Na nsima Yesu apesaki lisese ya mozwi moko oyo azalaki na bilulela kasi ntango akufaki azalaki “mozwi te na miso ya Nzambe.” (Luka 12:15-21) Mpo na kobatela bosembo, tosengeli kokwea te na lisumu ya bilulela to ya lokoso. Bilulela ezali losambo ya bikeko mpo eloko oyo moto ya lokoso azali na yango mposa makasi elongolaka likebi na ye epai ya Yehova mpe na ndenge yango, ekómaka ekeko. (Kol. 3:5) Ezaleli ya kozanga mbeba ná lokoso eyokanaka te!

Kangamá makasi na losambo ya solo

12, 13. Ndakisa nini Yobo atikaki na oyo etali koboya losambo ya bikeko?

12 Bato oyo babatelaka bosembo batikaka losambo ya pɛto te. Yobo mpe asalaki bongo te, mpo alobaki boye: “Soki nazalaki komona pole ntango ezalaki kongɛnga, to sanza ezali kongɛnga wana ezalaki kotambola, mpe motema na ngai ekómaki kobendama na nkuku mpe lobɔkɔ na ngai epwɛpwaki monɔkɔ na ngai, yango mpe elingaki kozala libunga oyo basambisi basengeli kolandela, mpo mbɛlɛ nawangani Nzambe ya solo na likoló.”​—Yobo 31:26-28.

13 Yobo asambelaki te biloko oyo ezangi bomoi. Soki motema na ye ekómaki kobendama na nkuku na biloko oyo azalaki komona na likoló, na ndakisa moi, mpe soki ‘lobɔkɔ na ye epwɛpwaki monɔkɔ na ye,’ mbala mosusu soki apwɛpwaki eloko na ndenge ya losambo, alingaki kozala mosambeli ya bikeko oyo awangani Nzambe. (Mib. 4:15, 19) Mpo tóbatela bosembo na biso epai ya Nzambe, tosengeli koboya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko.​—Tángá 1 Yoane 5:21.

Kozongisaka mabe te mpe kozala moto ya bokosi te

14. Mpo na nini tokoki koloba ete Yobo azalaki motema mabe te?

14 Yobo azalaki motema mabe te; azalaki mpe moto ya nko te. Ayebaki ete bizaleli ya ndenge ekomonisa ete azangi bosembo, mpo alobaki boye: “Soki nazalaki kosepela na kolimwa ya moto oyo ayinaka ngai makasi, to soki nayokaki esengo mpo mpasi ezwi ye . . . , natikaki te ete monɔkɔ na ngai esala lisumu na kosaláká ndai ya kolakela molimo na ye mabe.”​—Yobo 31:29, 30.

15. Mpo na nini ezali mabe kosepela ntango mpasi ekómeli moto oyo ayinaka biso?

15 Yobo, moto ya sembo, asepelaki ata moke te na mpasi oyo ekómeli moto mosusu. Bikeke na nsima, lisese moko epesaki likebisi oyo: “Ntango monguna na yo akwei, kosepela te; mpe ntango babɛtisi ye libaku, motema na yo ezala na esengo te, noki Yehova amona yango mpe likambo yango ezala mabe na miso na ye, mpe alongola nkanda na ye epai na moto yango.” (Mas. 24:17, 18) Lokola Yehova akoki kotánga motema, ayebaka soki motema na biso ezali kosepela na mpasi oyo ekómeli moto mosusu mpe na ntembe te, asepelaka na ezaleli ya ndenge wana te. (Mas. 17:5) Mbala mosusu Nzambe akoki koboya biso, mpo alobi ete: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai, mpe kofuta.”​—Mib. 32:35.

16. Ata soki tozali na bozwi te, ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya?

16 Yobo azalaki koyamba bapaya. (Yobo 31:31, 32) Ata soki tozali na bozwi te, tokoki ‘kozala na ezaleli ya koyamba bapaya.’ (Rom. 12:13) Tokoki kokabola ata mwa eloko moke ya kolya na basusu; tóbosana te ete “elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta mpe koyina elongo na yango.” (Mas. 15:17) Kolya elongo na ndeko mosusu oyo abatelaka mpe bosembo, na esika oyo bolingo ezali, ekokómisa ntango yango ntango moko ya esengo mpe ya kolendisa na elimo.

17. Mpo na nini tosengeli te koluka kobomba lisumu ya monene?

17 Na ntembe te, bapaya ya Yobo bazalaki kolendisama mingi na elimo, mpo azalaki mokosi te. Azalaki te lokola bato oyo batyolaka Nzambe oyo bakɔtaki na lisangá ya bokristo ya ekeke ya liboso mpe oyo ‘bazalaki kokumisa bato mpo na koluka litomba na bango moko.’ (Yuda 3, 4, 16) Yobo azalaki mpe kozipa lisumu na ye te to ‘kobomba libunga na ye na libenga,’ mpo na kobanga ete basusu bátyola ye soki bayebi yango. Andimaki Nzambe atalatala ye, mpo epai na ye nde akokaki koyambola likambo soki esengeli. (Yobo 31:33-37) Soki tosali lisumu ya monene, tóluka soki moke te kobomba mabe yango mpo na kobatela lokumu na biso. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali koluka kobatela bosembo? Tokomonisa yango soki tondimi libunga na biso, tobongoli motema, toluki lisalisi ya elimo, mpe tosali nyonso oyo tokoki mpo na kobongisa makambo.​—Mas. 28:13; Yak. 5:13-15.

Moto ya sembo asambisami

18, 19. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yobo abubaki moto te? (b) Yobo alingaki kondima nini soki emonanaki ete alobaki solo te?

18 Yobo azalaki moto ya kolongobana mpe ya sembo. Yango wana akokaki koloba boye: “Soki mpo na kofunda ngai, mabele na ngai ebelelaki mpo na koluka lisalisi, mpe banzela ya mikala na yango elelaki elongo; soki nalyaki mbuma na yango kozanga kopesa mbongo, mpe soki nasalaki ete molimo ya bankolo na yango emɛla mpema, na esika ya blé, matiti ya nzubɛnzubɛ ebima, mpe na esika ya ɔrje, matiti oyo ebimisaka nsolo mabe.” (Yobo 31:38-40) Yobo abɔtɔlaki mabele ya moto te, mpe abubaki basali na ye te. Na ndakisa na ye, tosengeli kobatela bosembo na biso epai ya Yehova na makambo ya minene mpe ya mike.

19 Liboso ya baninga na ye misato mpe elenge mobali Elihu, Yobo alobelaki lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango. Yobo alobaki ete moto nyonso oyo azali na likambo ya kofunda ye na ntina etali lisolo ya bomoi na ye oyo ye moko atyaki “sinyatire,” moto yango aloba. Yobo alobaki ete soki emonani ete alobaki solo te, akondima kozwa etumbu. Na yango, amemaki likambo na ye mpe azelaki Nzambe asambisa ye na tribinale na ye. Bongo, ‘maloba ya Yobo esukaki.’​—Yobo 31:35, 40.

Okoki kobatela bosembo

20, 21. (a) Mpo na nini Yobo alongaki kobatela bosembo na ye? (b) Ndenge nini tokoki kolona bolingo mpo na Nzambe?

20 Yobo alongaki kobatela bosembo na ye mpo alingaki Nzambe, mpe Yehova alingaki ye mpe asalisaki ye. Yobo alobaki boye: “Opesaki ngai bomoi mpe omoniselaki ngai motema boboto [to bolingo ya sembo]; mpe likebi na yo [Yehova] ebatelaki elimo na ngai.” (Yobo 10:12) Longola yango, Yobo azalaki kolinga basusu, ayebaki ete moto nyonso oyo aboyaka komonisela moninga motema boboto, akomonisa ete azangi limemya mpe abangaka Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te. (Yobo 6:14) Bato oyo babatelaka bosembo balingaka Nzambe mpe mozalani na bango.​—Mat. 22:37-40.

21 Tokoki kolona bolingo mpo na Nzambe soki tozali kotánga Liloba na ye mokolo na mokolo mpe soki tozali komanyola makambo oyo Liloba yango emonisi biso mpo na ye. Na libondeli oyo euti na motema, tokoki kokumisa Yehova mpe kopesa ye matɔndi mpo na bolamu na ye epai na biso. (Flp. 4:6, 7) Tokoki koyembela Yehova mpe kozwa matomba na makita elongo na basaleli na ye. (Ebr. 10:23-25) Bolingo na biso mpo na Nzambe ekokola mpe soki tozali kosangana na mosala ya kosakola mpe koyebisa “nsango malamu ya lobiko na ye.” (Nz. 96:1-3) Na ndenge yango, tokoki kobatela bosembo, lokola mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu. Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azali esika na ngai ya kokima.”​—Nz. 73:28.

22, 23. Lokola tozali kosimba bokonzi ya Yehova, na ndenge nini misala na biso ekokani na oyo ya bato ya kala oyo babatelaki bosembo?

22 Na boumeli ya bikeke, Yehova apesaki bato oyo babatelaki bosembo mikumba ndenge na ndenge. Noa atongaki masuwa mpe azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (2 Pe. 2:5) Yosua akɔtisaki Bayisraele na Mokili ya Ndaka, kasi alongaki kaka mpo azalaki kotánga ‘buku ya mobeko butu moi,’ mpe asalaki na boyokani na makambo nyonso oyo ezalaki na kati na yango. (Yos. 1:7, 8) Bakristo ya ekeke ya liboso bakómisaki bato bayekoli mpe bazalaki kokutana mbala na mbala mpo na koyekola Makomami.​—Mat. 28:19, 20.

23 Tokosimba bokonzi ya Yehova mpe tokobatela bosembo na biso soki tozali kosakola boyengebene, kokómisa bato bayekoli, kosalela toli ya Makomami, mpe koyangana na bandeko na biso bakristo na makita mpe na mayangani ya mike mpe ya minene. Makambo ya ndenge wana esalisaka biso tózala na mpiko, makasi na elimo, mpe tólonga kosala mokano ya Nzambe. Eleki mpasi te mpo na biso, mpamba te Tata na biso ya likoló ná Mwana na ye basungaka biso. (Mib. 30:11-14; 1 Bak. 8:57) Longola yango, tozali na lisungi ya “lisangá mobimba ya bandeko,” oyo bazali mpe kotambola na ezaleli na bango ya kozanga mbeba mpe kokumisa Yehova lokola Nkolo Mokonzi na bango oyo aleki nyonso.​—1 Pe. 2:17.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini tosengeli kotalela mitinda ya Yehova oyo etali etamboli?

• Bizaleli nini ya Yobo esepelisi yo mingimingi?

• Ndenge emonisami na Yobo 31:29-37, Yobo amitambwisaki ndenge nini?

• Mpo na nini tokoki kolonga kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 29]

Yobo abatelaki bosembo na ye epai ya Yehova. Biso mpe tokoki kosala bongo!

[Elilingi na lokasa 32]

Tokoki kobatela bosembo na biso!