Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mwana na yo akoloba nini?

Mwana na yo akoloba nini?

Mwana na yo akoloba nini?

BABOTI: Na nimero ya 15 Yanuali 2010, nkasa 16-20, tolobelaki ntina ya kosala bilakiseli na bana na bino. Lisolo oyo epesi makanisi mpo na kosalisa bino bóbongisa mwana mpo alonga mikakatano na eteyelo. Mbala mosusu bokoki kosala bilakiseli yango na mpokwa oyo bosalaka Losambo na libota.

BANA oyo bazali Batatoli ya Yehova bakutanaka na mikakatano mingi. Mbala mingi baninga ya kelasi batunaka bango ntina oyo basalaka makambo mosusu te, na ndakisa koyemba loyembo ya ekólo, kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama, mpe bafɛti mosusu. Soki batuni mwana na yo ya mobali to ya mwasi mituna ya ndenge wana, akopesa eyano nini?

Bana bakristo mosusu balobaka kaka ete: “Nakoki kosala yango te. Na lingomba na biso tosalaka yango te.” Bana yango babongi kozwa longonya mpo na mpiko na bango. Eyano na bango ekoki kopekisa moto atuna mituna mosusu. Nzokande, Biblia elendisi biso ‘tómibongisa mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni biso ntina’ ya bindimeli na biso. (1 Pe. 3:15) Kosala bongo esuki te kaka na koloba ete: “Nakoki kosala yango te.” Ata soki bato mosusu bakondima biso te, bamosusu bakoki kosepela koyeba bantina ya bikateli na biso.

Bilenge Batatoli mingi basilá kobɛtela baninga na bango ya kelasi masolo ya Biblia na lisalisi ya mikanda lokola Yekolá epai ya Moteyi Monene. Masolo yango ekoki kosalisa na kolimbola ntina oyo bana oyo bazali Batatoli basalaka makambo mosusu kasi makambo mosusu basalaka yango te. Bana-kelasi mosusu bayokaka masolo ya Biblia na likebi, mpe mingi bakómi koyekola Biblia na ndenge wana. Kasi, bana-kelasi mosusu bakoki komona ete ezali mpasi koyoka lisolo moko ya Biblia na mobimba na yango. Soki elimbolami na mozindo te, masolo mosusu ya Biblia ekoki kozala mpasi mingi mpo bana ya mbula wana bákanga ntina na yango. Tózwa ndakisa ya Minhee oyo azali na mbula 11. Ntango moninga na ye abengisaki ye na fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama na ye, Minhee ayebisaki ye boye: “Biblia epesi biso nzela te ya kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama. Moto moko oyo Biblia elobeli, Yoane Mobatisi, abomamaki na fɛti moko ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama.” Atako bongo, Minhee alobi ete amonaki ete moninga na ye wana azalaki kokanga ntina ya eyano na ye te.

Na bantango mosusu, ezalaka malamu kolakisa mwana-kelasi elilingi moko to lisolo moko na kati ya mikanda na biso. Bongo soki bakonzi ya eteyelo balobi ete balingi te bana bákabolela bana-kelasi mosusu mikanda ya makambo ya losambo? Bana na biso bakokoka kopesa litatoli malamu ata soki bazali ata na mokanda moko te? Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo báloba mpo na bindimeli na bango?

Bósalaka bilakiseli

Kosala bilakiseli oyo kati na yango baboti bazwi esika ya baninga ya kelasi esalisaka mingi. Ntango bana bazali komeka ndenge bakoloba mpo na bindimeli na bango, ekozala malamu baboti bápesa bango longonya mpo na milende na bango mpe bámonisa bango ndenge oyo bakoki kosolola malamu koleka na baninga ya kelasi mpe ntina oyo kosala bongo ezali malamu. Na ndakisa, yebisá bango básalelaka maloba oyo bana-kelasi na bango bakoki kokanga ntina. Joshua, mwana mobali moko ya mbula 9, alobi ete bana-kelasi na bango bazalaki koyeba te maloba lokola “lisosoli” mpe “bosembo.” Na yango, esɛngaki asalela maloba ya pɛtɛɛ mpo asolola na bango malamu.​—1 Ko. 14:9.

Bana mosusu ya mike soki batuni motuna bakoki kolongola likebi soki eyano eleki molai. Bilenge Batatoli bakoki kosalisa bango bákoba kotya makanisi soki bazali kosolola na bango na nzela ya mituna. Haneul, mwana mwasi moko ya mbula 10, alobi boye: “Baninga na ngai ya kelasi balingaka nde bósolola, na esika olimbwela bango makambo.” Kosolola esɛngaka kotuna mituna, mpe na nsima koyoka na likebi makanisi oyo moto azali kobimisa.

Masolo oyo ezali awa na nse emonisi ndenge oyo bana bakristo bakoki kosolola na bana-kelasi na bango. Ezali na ntina te kokanga masolo yango na motó​—bana bakeseni, mpe eyano oyo ekopesama ekolanda ndenge makambo ezali. Yango wana, elenge Motatoli asengeli kozala na likanisi na motó na ye, kotya yango na maloba na ye moko, mpe na nsima koloba yango na ndenge oyo ebongi na bana-kelasi mpe na kotalela ndenge makambo ezali. Soki ozali na bana oyo bakendaka kelasi, meká kosala bilakiseli ya masolo yango ná bango.

Kopesa bana formasyo esɛngaka ntango mpe milende. Baboti bakristo balingaka kokɔtisa mitinda ya Biblia na mitema ya bana na bango mpe kosalisa bango bándima kotosa mitinda yango na bomoi na bango.​—Mib. 6:7; 2 Tim. 3:14.

Mbala ya nsima oyo bokosala Losambo na libota, bómeka kosala bilakiseli na masolo oyo ezali awa. Bótala ndenge ekoki kosalisa bana. Bóbosana te ete mokano ezali te ya kokanga biyano to maloba yango na motó. Kutu, bokoki kozongela elakiseli ya likambo moko mbala mingi: kopesa eyano mosusu mpe kotala ndenge bana bakosala soki esalemi bongo. Wana bazali komeka kolimbola ntina ya bindimeli na bango, salisá bango bázala makambo makasimakasi te mpe báloba na mayele. Malɛmbɛmalɛmbɛ, okoteya bana na yo ndenge ya koloba mpo na bindimeli na bango liboso ya bana-kelasi na bango, ya baninga ya kartye, ata mpe ya balakisi na bango.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 4]

BAFƐTI YA ANIVƐRSƐRƐ YA KOBOTAMA

Marie: Jean, ndenge nini? Nalingi oya na fɛti ya anivɛrsɛrɛ na ngai.

Jean: Mersi ndenge okanisi ngai, Marie. Natuna yo naino: mpo na nini olingi kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ?

Marie: Mpo nakanisa mokolo oyo nabotamaki. Yo osalaka yango te?

Jean: Te, nasalaka te.

Marie: Mpo na nini? Libota na ngai esepelaki mingi ntango nabotamaki.

Jean: Libota na ngai mpe ezali lokola oyo ya bino. Basepelaki ntango nabotamaki. Kasi, nakanisi te ete mpo na yango nasengeli kosalaka fɛti mbula na mbula. Na bafɛti ya anivɛrsɛrɛ na bango, bato mingi bamonaka ete bango nde baleki ntina. Kasi, Nzambe te moto aleki ntina? Mpe tosengeli te kopesa ye matɔndi mokolo na mokolo mpo apesaki biso bomoi?

Marie: Boye nasengeli kosala fɛti ya anivɛrsɛrɛ na ngai te?

Jean: Marie, wana etali yo moko. Kasi, kanisá naino: Bato mingi balingaka kozwa bakado na fɛti ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama na bango, kasi Biblia elobi ete esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa. Na esika tótya makanisi na biso kaka na mokolo oyo tobotamaki, ekoleka malamu te kokanisa basusu mpe kosalela bango bolamu?

Marie: Nakanisá naino likambo yango te. Boye, baboti na yo bapesaka yo bakado te?

Jean: Bapesaka ngai. Kasi bazelaka te tii mokolo oyo nabotamaki. Bapesaka ngai bakado ntango nyonso oyo balingi. Kasi, Marie, okolinga koyeba ndenge oyo bafɛti ya anivɛrsɛrɛ yango ebandaki?

Marie: Ɛɛ, yebisá ngai.

Jean: Boye, lobi nakobɛtɛla yo lisolo ya fɛti moko na ntango ya kala.

KOYEMBA LOYEMBO YA EKÓLO

Gail: Claire, mpo na nini oyembaka loyembo ya ekólo te?

Claire: Mersi na motuna na yo, Gail. Natuna yo naino: mpo na nini yo oyembaka yango?

Gail: Ezali mpo nalingaka ekólo na ngai mpe napesaka yango limemya. Yo opesaka yango limemya te?

Claire: Napesaka yango limemya. Bongo toyembaka mpo na kokumisa moto nyonso to eloko nyonso oyo topesaka limemya?

Gail: Te. Kasi nakanisi koyemba loyembo ya ekólo ezali na yango mabe te!

Claire: Gail, bato mingi bakanisaka ete loyembo ya ekólo emonisaka ekólo na bango. Ntango bakumisaka ekólo ndenge wana, bamonisaka ete bakosala nyonso mpo na ekólo na bango. Kasi, ngai nakanisaka bongo te. Nakoki te kopesa ekólo bomoi na ngai mpo Nzambe nde apesá ngai bomoi. Nazwá ekateli ya kopesa ye bomoi na ngai. Yango wana, napesaka ekólo na ngai limemya, kasi nayembaka loyembo ya ekólo te.

Gail: Namoni sikoyo.

Claire: Likambo te, Gail, nasepeli ndenge olobeli likambo yango. Mpe soki olingi koyeba ntina oyo nasalaka makambo mosusu kasi mosusu nasalaka te, tuná ngai. Kutu, Biblia elobi ete na ntango ya kala, mokonzi moko ya Babilone apesaki bato mitindo báfukama liboso ya ekeko moko. Bato mosusu bafukamaki te, atako bakokaki kobomama mpo na yango.

Gail: Ya solo? Basukaki ndenge nini?

Claire: Nakoyebisa yo yango na ntango ya bopemi.

POLITIKI NA ETEYELO

Mike: Tim, mpo na yo, nani asengeli kozala prezida ya kelasi na biso?

Tim: Nazali na ngai na ngámbo ya kandida moko te.

Mike: Mpo na nini?

Tim: Nazalaka na mokambi oyo aleki malamu. Lokola nazali mokristo, nalakaki ete nakolanda kaka Yesu. Na yango, nakoki kopona mokambi mosusu te. Kutu, oyebi mpo na nini namonaka ete Yesu azali Mokambi ya malamu mpenza?

Mike: Te, nazali na mposa ya koyeba yango te.

Tim: Malamu, soki mokolo mosusu olingi koyeba, nakosepela koyebisa yo.

[Elilingi]

“Jean, ndenge nini? Nalingi oya na fɛti ya anivɛrsɛrɛ na ngai”

[Elilingi na lokasa 3]

“Mpo na nini oyembaka loyembo ya ekólo te?”