Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tóyembela Yehova!

Tóyembela Yehova!

Tóyembela Yehova!

“Nakobɛtɛla Nzambe na ngai mondule ntango nyonso nakozala na bomoi.”​—NZ. 146:2.

1. Nini etindaki elenge Davidi asala banzembo na ye mosusu?

NA BOLENGE na ye, Davidi alekisaki bangonga mingi na bilanga pembeni ya Beteleme mpo na kokɛngɛla bibwele ya tata na ye. Wana azalaki kokɛngɛla bampate, Davidi azalaki komona biloko kitoko oyo Yehova akelá: likoló oyo etondi na minzoto, “banyama ya esobe” mpe “bandɛkɛ ya likoló.” Makambo oyo azalaki komona esimbaki mpenza motema na ye na boye ete etindaki ye asala banzembo ya kosimba motema mpo na kokumisa Mokeli ya biloko wana kitoko. Banzembo mingi oyo Davidi asalaki ezali na mokanda ya Nzembo. *​—Tángá Nzembo 8:3, 4, 7-9.

2. (a) Miziki ekoki kosala nini epai ya moto? Pesá ndakisa. (b) Nzembo 34:7, 8 mpe Nzembo 139:2-8 ekoki koteya biso nini na oyo etali boyokani oyo Davidi azalaki na yango na Yehova?

2 Mbala mosusu ezalaki na eleko wana ya bomoi na ye nde Davidi akolisaki makoki na ye ya mobɛti-miziki. Ayebaki kobɛta miziki malamu mpenza, yango wana babengaki ye abɛtɛlaka Mokonzi Saulo nzɛnzɛ. (Mas. 22:29) Miziki ya Davidi ezalaki kokitisa motema ya mokonzi yango oyo azalaki kotungisama, kaka ndenge mbala mingi miziki ya malamu esalaka epai ya bato lelo. Soki kaka Davidi azwi ebɛtɛlo na ye, “ezalaki kokitisa Saulo motema mpe azalaki koyoka malamu.” (1 Sa. 16:23) Banzembo ya mobɛti-miziki wana oyo azalaki kobanga Nzambe mpe kokoma banzembo esilá ngala te. Kanisá naino likambo oyo: lelo, mbula koleka 3 000 nsima ya eleko ya Davidi, bamilio ya bato ya mimeseno ndenge na ndenge mpe oyo bazali na mikili ndenge na ndenge awa na mabele batángaka banzembo ya Davidi mbala na mbala mpo na kozwa libɔndisi mpe elikya.​—2 Nt. 7:6; tángá Nzembo 34:7, 8; 139:2-8; Amo. 6:5.

Miziki ezali na esika ya lokumu na losambo ya solo

3, 4. Na mikolo ya Davidi, bibongiseli nini ezwamaki mpo na kobɛta miziki na losambo?

3 Davidi azalaki na makoki, mpe asalelaki yango na ndenge oyo eleki malamu: mpo na kopesa Yehova nkembo. Nsima ya kokóma mokonzi ya Yisraele, Davidi azwaki bibongiseli mpo ete na misala oyo ezalaki kosalema na tabernakle babɛtaka mpe miziki kitoko. Balevi soki 4 000​—elingi koloba Molevi moko to koleka kati na Balevi zomi oyo bazalaki kosala misala—​baponamaki mpo na ‘kopesa Yehova masanzoli,’ kati na bango bato 288 oyo “bamesaná na nzembo ya Yehova, bango nyonso bato bayebi mosala malamumalamu.”​—1 Nt. 23:3, 5; 25:7.

4 Davidi ye moko asalaki banzembo mingi oyo Balevi yango bazalaki koyemba. Na ntembe te, ntango banzembo ya Davidi ezalaki koyembama, maloba ya banzembo yango ezalaki kosimba mpenza mitema ya Bayisraele nyonso oyo bazalaki kozwa libaku ya kozala na bisika yango. Na nsima, ntango bamemaki sanduku ya kondimana na Yerusaleme, “Davidi alobaki na bakapita ya Balevi bátya bandeko na bango bayembi elongo na bibɛtɛlo ya nzembo, bibɛtɛlo ya bansinga, banzɛnzɛ mpe basɛmbalɛ, bábɛta makasi mpo na kobimisa lokito ya esengo.”​—1 Nt. 15:16.

5, 6. (a) Mpo na nini bazalaki kopesa miziki motuya mingi na boyangeli ya Davidi? (b) Ndenge nini toyebi ete miziki ezalaki na esika ya ntina na losambo na Yisraele ya kala?

5 Mpo na nini bazalaki kopesa miziki motuya mingi na mikolo ya Davidi? Ezalaki kaka mpo mokonzi yango azalaki mobɛti-miziki? Te, ntina mosusu ezalaki, oyo emonisamaki bikeke mingi na nsima, ntango Hizikiya, mokonzi ya sembo abongisaki misala ya tempelo. 2 Ntango 29:25 elobi boye: “[Hizikiya] atɛlɛmisaki Balevi na ndako ya Yehova, na basɛmbalɛ, na bibɛtɛlo ya bansinga mpe banzɛnzɛ, na kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Gade, momoni-bimonaneli ya mokonzi, mpe ya mosakoli Natane, mpo na lobɔkɔ ya Yehova nde mitindo yango epesamaki na nzela ya basakoli na ye.”

6 Ya solo, na nzela ya basakoli na ye, Yehova atindaki basambeli na ye bákumisa ye na nzembo. Kutu, bayembi oyo bazalaki na libota ya banganga-nzambe basɛngisamaki te kosala misala mosusu oyo Balevi bazalaki kosala mpo bayembi yango bákoka kopesa ntango oyo ekoki na kosala banzembo mbala mosusu mpe, ezalaki mingimingi mpo na kosala bozongeli ya banzembo.​—1 Nt. 9:33.

7, 8. Na oyo etali koyemba banzembo na biso ya Bokonzi, likambo nini ezali na ntina koleka?

7 Mbala mosusu okoki koloba ete: “Na oyo etali koyemba, bakokaki kotánga ngai ata mokolo moko te na kati ya bato oyo bayebi mosala malamumalamu, oyo bazalaki koyemba na tabernakle!” Kasi, Balevi nyonso te nde bazalaki babɛti-miziki oyo bayebi mosala malamumalamu. Na kolanda 1 Ntango 25:8, ezalaki mpe na ‘bato oyo bazalaki koyekola.’ Tosengeli mpe kobosana te ete mbala mosusu, ezalaki na babɛti-miziki mpe bayembi ya malamu mpenza na mabota mosusu ya Yisraele, kasi Yehova aponaki nde Balevi mpo na mosala ya miziki. Ntembe ezali te ete ezala ‘baoyo bayebaki mosala malamu’ to baoyo ‘bazalaki koyekola,’ Balevi nyonso oyo bazalaki sembo bamipesaki mobimba na mosala yango.

8 Davidi alingaki miziki mpe ayebaki yango malamu. Kasi, kaka mayele wana nde ezalaki na ntina na miso ya Nzambe? Na Nzembo 33:3, Davidi akomaki boye: “Bósala nyonso oyo ekoki mpo na kobɛta nsinga mpe koganga na esengo.” Tomoni polele ete likambo eleki ntina ezali nde ‘kosala nyonso oyo ekoki’ mpo na kokumisa Yehova.

Mosala ya miziki nsima ya mikolo ya Davidi

9. Okokaki koyoka mpe komona nini soki ozalaka wana na bofungoli tempelo ntango Salomo azalaki koyangela?

9 Na boyangeli ya Salomo, miziki ezalaki na mosala monene na losambo ya pɛto. Na mokolo ya bofungoli tempelo, babɛti-miziki bazalaki ebele mpenza, mpe bibɛtɛli-miziki oyo esalemaki na kwivre ezalaki kelelo 120. (Tángá 2 Ntango 5:12.) Biblia eyebisi biso ete “Babɛti-kelelo [bango nyonso banganga-nzambe] ná bayembi bayembaki na bomoko lokola moto moko mpo na kosanzola mpe kopesa Yehova matɔndi, . . . ‘mpo azali malamu, mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.’” Ntango kaka babandaki koyemba na esengo, “ndako yango etondaki na lipata,” mpo na komonisa ete Yehova andimi yango. Na ntembe te, ezalaki mpenza esengo mpe nsɔmɔ koyoka lokito ya bakelelo wana nyonso ná bankoto ya bayembi oyo bazalaki koyemba lokola moto moko!​—2 Nt. 5:13.

10, 11. Nini emonisi ete bakristo ya liboso bazalaki kosalela miziki na losambo?

10 Bakristo ya liboso mpe bazalaki kosalela miziki. Ya solo, basambeli ya ekeke ya liboso bazalaki kokutana na batabernakle to na batempelo te, kasi na bandako ya bato. Mpo na minyoko mpe makambo mosusu, mbala mingi bisika oyo bazalaki kokutana ezalaki mpenza malamu te. Atako bongo, bakristo yango bazalaki kosanzola Nzambe na nzembo.

11 Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo ya Kolose ete: “Bókoba . . . kokebisana na nzembo, na masanzoli mpo na Nzambe, na nzembo ya elimo elongo na eyembeli kitoko.” (Kol. 3:16) Ntango babwakaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ, babandaki “kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo,” atako bazalaki na buku ya nzembo te. (Mis. 16:25) Soki babwaki yo na bolɔkɔ, nzembo boni ya Bokonzi okokoka koyemba na motó?

12. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na banzembo na biso ya Bokonzi?

12 Lokola miziki ezali na motuya mingi na losambo na biso, tosengeli komituna boye: ‘Nasepelaka na yango mpenza? Nasalaka nyonso mpo na kokóma na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene liboso ebanda, mpo nayemba loyembo ya ebandeli elongo na bandeko na ngai ya elimo? Nayembaka mpenza na motema mobimba? Nalendisaka bana na ngai bámonaka te ete loyembo oyo toyembaka mpo na koleka na Likita ya Mosala to na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali ntango ya bopemi, libaku mpo na bango ya kobima mpambampamba, mbala mosusu kaka mpo na kosembola makolo?’ Koyemba ezali na kati ya losambo na biso. Ya solo, tózala baoyo ‘bayebi mosala malamumalamu’ to baoyo ‘bazali koyekola,’ biso nyonso tokoki​—mpe tosengeli—​kosangisa mingongo na biso mpo na kosanzola Yehova.​—Talá mpe 2 Bakorinti 8:12.

Ntango ezali koleka, makambo mpe ezali kobongwana

13, 14. Mpo na nini ezali na ntina tóyembaka na motema mobimba na makita ya lisangá? Pesá ndakisa.

13 Esali sikoyo mbula koleka 100, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona elimbolaki moko na bantina oyo banzembo na biso ya Bokonzi ezali na ntina mingi. Elobaki boye: “Koyemba nzembo oyo ezali na mateya ya solo ezali lolenge malamu ya kokɔtisa yango na makanisi mpe na mitema ya basaleli ya Nzambe.” Maloba mingi ya banzembo na biso eutaka na mikapo ya Biblia; yango wana koyeba maloba ya banzembo mosusu ekoki kozala lolenge moko ya malamu ya kofandisa solo na mitema na biso. Mbala mingi, banzembo oyo eyembami na motema mobimba na lisangá esimbaka motema ya bato oyo bayei na makita na biso mpo na mbala ya liboso.

14 Na mpokwa moko na 1869, Charles Russell autaki mosala mpe azalaki kozonga ndako; ayokaki bato bazali koyemba na ndako moko ya nse ya mabele. Na eleko wana ya bomoi na ye, amonaki ete akoyeba soki moke te solo na ntina na Nzambe. Na yango, azwaki ekateli ya komipesa na mombongo. Akanisaki ete soki akómi na mwa mbongo, akokoka kosalisa bato na mosuni, ata soki akokoka kosalisa bango na elimo te. Ndeko Russell akɔtaki na ndako yango oyo ezalaki na putulu, salite mpe molilimolili mpe akutaki bato bazali kosambela kuna. Afandaki mpe ayokaki. Na nsima, akomaki ete makambo oyo ayokaki na butu wana “ekokaki, na lisalisi ya Nzambe, mpo na kolendisa lisusu kondima [na ye] oyo esilaki kolɛmba ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” Simbá ete ezali nzembo nde ebendaki Ndeko Russell mpo akende na likita wana.

15. Wapi mwa makambo oyo esembolamaki na boyebi na biso, oyo etindi biso tósala buku ya sika ya nzembo?

15 Wana ntango ezali koleka, tosembolaka boyebi na biso ya Makomami. Masese 4:18 elobi boye: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Pole oyo ezali kongɛnga ezangaka te kotinda biso tósembola maloba oyo tosalelaka ntango tozali ‘koyemba solo.’ Na mbula 25 oyo eleki, Batatoli ya Yehova na mikili mingi bazalaki kosalela buku ya nzembo oyo ezalaki na motó ya likambo Nzembo mpo na kokumisa Yehova. * Na bambula oyo elandaki banda buku wana ebimisamaki, pole engɛngaki makasi koleka na makambo mingi, mpe maloba mosusu oyo tosalelaki na buku wana ya nzembo ekómaki ya kala. Na ndakisa, na Lifalanse, “mokili ya sika” ezalaki kobengama “nouvel ordre” kasi sikoyo ekómá kobengama “monde nouveau.” Mpe tolobaka lisusu te ete nkombo ya Yehova “ekolongisama,” kasi nde ete “ekosantisama.” Tomoni polele ete na kolanda mateya na biso, ezalaki na ntina mpenza tósala buku ya nzembo ya sika.

16. Ndenge nini buku na biso ya sika ya banzembo ekosalisa biso tólanda toli ya Paulo oyo ezali na Baefese 5:19?

16 Mpo na ntina wana mpe bantina mosusu, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki kobimisa buku ya banzembo ya sika oyo ezali na motó ya likambo Tóyembela Yehova. Motángo ya banzembo na buku yango ya sika ekiti na 135. Lokola banzembo ya koyekola ezali mingi te, tosengeli kokoka kokanga maloba ya banzembo mosusu ya sika na motó. Yango eyokani na toli ya Paulo oyo ezali na Baefese 5:19.​—Tángá.

Okoki komonisa botɔndi

17. Makanisi nini ekoki kosalisa biso tólongola nsɔni na oyo etali koyemba na lisangá?

17 Tosengeli nde kotika nsɔni epekisa biso tóyemba na mongongo makasi na makita ya bokristo? Kanisá naino: na oyo etali maloba, ezali solo te ete “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi”? (Yak. 3:2) Atako bongo, totikaka te maloba na biso ya bato ya kozanga kokoka epekisa biso kosanzola Yehova na mosala ya kosakola ndako na ndako. Kasi, mpo na nini tosengeli kotika mingongo na biso ya kozanga kokoka epekisa biso tósanzola Nzambe na nzembo? Yehova, Ye oyo “asalá monɔkɔ mpo na moto” asepelaka koyoka biso ntango tozali kosalela mingongo na biso mpo na kosanzola ye na nzembo.​—Kob. 4:11.

18. Tokoki kosala nini mpo na koyekola maloba ya banzembo?

18 Ba-CD oyo ezali na motó ya likambo Tóyembela Yehova​—Na mingongo ebimisami na minɔkɔ mingi. Ezali na banzembo ya sika oyo esangisi miziki kitoko ná mingongo. Koyoka miziki yango ezali elɛngi mpenza. Yokáká yango mingi; na ndenge yango okoumela te koyeba maloba ya mwa banzembo mosusu ya sika. Maloba ya banzembo mingi esalemi na boye ete ntango ozali koyemba molɔngɔ moko, okoki kozala na mwa likanisi ya maloba oyo ekolanda. Na yango, ntango ozali koyoka ba-CD, mpo na nini te komeka koyemba elongo na mingongo yango? Soki omesani na maloba mpe miziki yango banda na ndako, na ntembe te okokoka koyemba kozanga kobanga na Ndako ya Bokonzi.

19. Makambo nini esalemaka mpo na kobongisa miziki ya banzembo na biso ya Bokonzi?

19 Mbala mingi, tokanisaka mpenza te mpo na miziki oyo ebɛtaka na mayangani ya mokolo moko, ya zongazonga, mpe ya etúká. Nzokande, mosala makasi esalemaka mpo na kobongisa yango. Soki baponi banzembo oyo tokosalela, etuluku ya bato oyo babongisaka miziki bakomaka yango na likebi mpo orchestre ya Watchtower oyo ezali na babɛti-miziki 64 bábɛta yango. Babɛti-miziki yango balekisaka bangonga ebele mpo na koyekola miziki yango, bamekamekaka yango mbala mingi mpe na nsima, bakɔtisaka yango na bastidio na biso na Patterson, na New-York. Bandeko mibali mpe ya basi zomi kati na bango bafandaka na États-Unis te. Bamonaka ete ezali lokumu monene kopesa mabɔkɔ na kobongisa banzembo wana oyo tosalelaka na mayangani na biso. Tokoki komonisa botɔndi mpo na milende oyo basalaka na bolingo nyonso. Ntango prezida ya liyangani ya moke to ya monene asɛngi biso tófanda, tósala yango na mbala moko mpe tóyoka na kimya miziki oyo ebongisamaki na bolingo nyonso.

20. Ozwi ekateli ya kosala nini?

20 Yehova atyaka likebi na banzembo oyo toyembaka mpo na kokumisa ye. Ezali na ntina mingi mpo na ye. Tokoki kosepelisa motema na ye ntango nyonso oyo toyangani mpo na losambo, soki tozali koyemba na motema mobimba. Ya solo, tózala bato oyo bayembaka malamu to oyo bazali koyekola, biso nyonso ‘tóyembela Yehova’!​—Nz. 104:33.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 1 Kutu, bikeke zomi nsima ya liwa ya Davidi, baanzelu ebele bayebisaki mbotama ya Masiya epai ya babateli ya bampate oyo, bazalaki kokɛngɛla bibwele na bango na bilanga pembeni ya Beteleme.​—Luka 2:4, 8, 13, 14.

^ par. 15 Buku mobimba oyo ezalaki na banzembo 225 ezalaki na minɔkɔ koleka 100.

Okanisi nini?

• Bandakisa nini ya kala emonisi ete miziki ezali na ntina mingi na losambo na biso?

• Okanisi ete boyokani nini ezali kati na kotosa etinda ya Yesu oyo ezali na Matai 22:37 mpe koyemba banzembo ya Bokonzi na motema mobimba?

• Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tosepelaka mpenza na banzembo na biso ya Bokonzi.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 23]

Opekisaka bana na yo bábima mpambampamba na ntango ya koyemba?

[Elilingi na lokasa 24]

Bozali koyekola maloba ya banzembo ya sika na ndako?