Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini koyekola epai ya Nzambe?

Mpo na nini koyekola epai ya Nzambe?

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Mpo na nini koyekola epai ya Nzambe?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.

1. Mpo na nini koyekola epai ya Nzambe?

Nzambe azali na nsango malamu ya likambo moko ya malamu koleka mpo na bato. Ayebisi biso yango na Biblia. Biblia ezali lokola mokanda moko oyo euti na likoló epai ya Tata na biso ya bolingo.​—Tángá Yirimia 29:11.

2. Nsango malamu yango ezali nini?

Bato bazali na mposa ya guvɛrnema ya malamu. Mokonzi moko te awa na mabele, alongolá mobulu, kozanga bosembo, maladi to liwa. Kasi, ezali na nsango ya malamu. Nzambe akopesa bato guvɛrnema moko ya malamu oyo ekosikola bato na makambo nyonso oyo epesaka mpasi.​—Tángá Danyele 2:44.

3. Mpo na nini ezali na ntina koyekola epai ya Nzambe?

Mosika te, Nzambe akolongola na mabele bato nyonso oyo babimisaka mpasi. Liboso asala yango, azali koteya bamilio ya bato ya komikitisa mpo bázala na bomoi ya malamu, oyo esimbami na bolingo. Na Liloba ya Nzambe, bato bazali koyekola ndenge ya kolonga mikakatano ya bomoi, ndenge ya kozwa esengo ya solosolo, mpe ndenge ya kosepelisa Nzambe.​—Tángá Sefania 2:3.

4. Biblia ezali mokanda ya nani?

Biblia ezali na mikanda mikemike 66. Bato soki 40 bakomaki yango. Moize nde akomaki mikanda mitano ya liboso esili koleka mbula soki 3 500. Ntoma Yoane nde akomaki mokanda ya nsuka ekokisi sikoyo mbula koleka 1 900. Kasi, bato oyo bakomaki Biblia, bakomaki makanisi ya Nzambe, kasi ya bango moko te. Na yango, Biblia ezali mokanda ya Nzambe.​—Tángá 2 Timote 3:16; 2 Petro 1:21.

Toyebi ete Biblia euti epai ya Nzambe mpo eyebisaka na bosikisiki makambo oyo ezali koya. Moto moko te akoki kosala yango. (Yisaya 46:9, 10) Lisusu, Biblia emonisaka bizaleli ya Nzambe. Ezali na nguya ya kobongola bomoi ya bato mpo ekóma malamu. Makambo wana endimisaka bamilio ya bato ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.​—Tángá Yosua 23:14; 1 Batesaloniki 2:13.

5. Ndenge nini okoki kokanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia?

Yesu akómaki moteyi monene ya Liloba ya Nzambe. Atako bato mingi oyo asololaki na bango bayebaki Biblia, bazalaki mpe na mposa ya lisalisi mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ezali na kati. Mpo na kosalisa bango, Yesu azalaki kotánga mokapo moko nsima ya mosusu mpe kolimbola “ntina ya Makomami.” Lisolo oyo, “Yekolá na Liloba ya Nzambe,” ekosalela mayele kaka wana mpo na kosalisa yo.​—Tángá Luka 24:27, 45.

Ezali na likambo moko te oyo ezali kitoko koleka koyekola epai ya Nzambe na oyo etali ntina ya bomoi. Kasi, bato mosusu bakosepela te oyekola Biblia. Kolɛmba nzoto te. Elikya na yo ya kozala na bomoi ya seko na mikolo ezali koya etaleli milende na yo ya kozwa boyebi ya Nzambe.​—Tángá Matai 5:10-12; Yoane 17:3.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 2 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.