Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Elanga ya Edene ezalaki mpenza?

Elanga ya Edene ezalaki mpenza?

Elanga ya Edene ezalaki mpenza?

OYEBI lisolo ya Adama ná Eva mpe ya elanga ya Edene? Bato na mokili mobimba bayebi yango. Mpo na nini te kotánga yango yo moko? Okokuta yango na Ebandeli 1:26–3:24. Lisolo yango ezali boye:

Yehova Nzambe * asalaki moto na putulu, apesaki ye nkombo Adama, mpe atyaki ye na elanga moko na esika oyo ebengamaki Edene. Nzambe nde alonaki elanga yango. Ezalaki na mai oyo esengeli, mpe na ebele ya banzete kitoko oyo ebotaka mbuma. Na katikati ya elanga ezalaki na “nzete ya koyeba malamu ná mabe.” Nzambe apekisaki bato kolya mbuma ya nzete yango, mpe alobaki ete soki batosi te, bakokufa. Na nsima, Yehova asalelaki Adama moninga to mwasi​—Eva—​asalaki ye na mokuwa moko ya mopanzi ya Adama. Nzambe apesaki bango mosala ya kobatela elanga mpe ayebisaki bango bákóma mingi mpe bátondisa mabele.

Ntango Eva azalaki ye moko, nyoka asololaki na ye, alengolaki ye mpo alya mbuma, alobaki ete Nzambe akosaki ye mpe ete azalaki kopekisa ye azwa eloko moko ya kitoko, eloko oyo ekosala ete akokana na Nzambe. Andimaki mpe alyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki bango. Na nsima, Adama mpe alandaki mwasi na ye mpe azangaki botosi epai ya Nzambe. Yehova akatelaki Adama, Eva mpe nyoka etumbu. Nsima ya kobengana bango na elanga ya Edene, Nzambe atyaki baanzelu na ekɔtelo ya elanga mpo na kobatela yango.

Kala, bato ya mayele bazalaki koloba ete makambo oyo Biblia elobi na mokanda ya Ebandeli ezalaki solo mpe esalemaki mpenza. Lelo oyo, ntembe epalangani mingi na makambo nyonso wana. Kasi, nini ebimisi bantembe na lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli oyo elobeli Adama, Eva mpe elanga ya Edene? Tótalela makambo minei oyo bato mingi batyelaka ntembe.

1. Elanga ya Edene ezalaki mpenza esika ya solo?

Mpo na nini ntembe ezali na likambo yango? Ekoki kozala mpo na filozofi. Na boumeli ya bikeke mingi, bato ya teoloji bazalaki koloba ete elanga ya Edene ezalaki esika moko boye. Nzokande, lingomba elandaki makanisi ya bato ya filozofi ya Bagrɛki, na ndakisa Platon mpe Aristote oyo bazalaki koloba ete eloko moko te na mabele ekoki kozala ya kokoka. Kaka likoló nde ekoki kozala ya kokoka. Yango wana, bato ya teoloji balobaka ete Paradiso ya ebandeli ezalaki penepene mpenza na likoló. * Bamosusu balobaka ete elanga yango ezalaki mpenza likoló na ngomba moko oyo ezalaki mosika na mabele na biso oyo ebebá; bamosusu balobaka ete ezalaki mosika na pôle Nord mpe pôle Sud; bamosusu mpe balobaka ete ezalaki likoló to pene ya sanza.Tokoki kokamwa te ndenge lisolo ya Edene ekómaki komonana lokola lisapo mpamba. Bato mingi ya mayele lelo oyo bandimaka te ete elanga ya Edene ezalaki esika oyo Biblia elobelaka, balobaka kutu ete esika ya ndenge wana ezalaki te.

Kasi, Biblia elobelaka elanga ya Edene ndenge wana te. Mokanda ya Ebandeli 2:8-14, eyebisi biso makambo mingi ya sikisiki na ntina na esika yango. Ezalaki na ɛsti na esika oyo babengi Edene. Ebale moko ezalaki kopɔlisa elanga yango mpe ekabwanaki na bibale minei. Epesi nkombo ya ebale yango mokomoko mpe elobeli yango mwa moke. Makambo yango ezali kotungisa bato mingi ya mayele, mingi na bango bazalaki kosala bolukiluki na ntina na bavɛrsɛ yango ya Biblia mpo báyeba lelo oyo, esika elanga ya Edene ezalaki. Nzokande, bolukiluki na bango ebimisi makanisi ebele oyo ezali bongolabongola. Yango elingi koloba ete makambo oyo elobami mpo na Edene, elanga na yango, mpe bibale na yango ezali lokuta to lisapo mpamba?

Tótalela likambo oyo: Makambo oyo elekaki na Edene esalemaki eleki mbula soki 6 000. Emonani ete Moize nde akomaki yango, oyo ntango mosusu ayokaki masolo oyo bato balobaki to ekoki kozala ete atángaki makomi mosusu oyo ezalaki liboso. Atako bongo, Moize akomaki makambo yango mbula soki 2 500 nsima ya kosalema ya makambo yango. Na ntango wana, lisolo ya Edene ezalaki lisolo moko ya kala. Ekoki kosalema ete biloko lokola bibale ebongwana nsima ya bikeke mingi? Mabele oyo tozali ezali kobongwana ntango nyonso. Emonani ete esika oyo elanga ya Edene ezalaki, ezali esika oyo koningana ya mabele esalemaka mingi​—epai lelo oyo koningana makasi ya mabele (soki 17%) esili kosalema. Tokoki kokamwa te ete mbongwana esalema na bisika yango. Likambo oyo eleki, ekoki kozala ete Mpela ya mikolo ya Noa ebongolaki biloko mingi ya mabele na ndenge tokoki mpenza koyeba te lelo oyo. *

Kasi, mwa makambo oyo elandi emonisi bosolo ya makambo oyo toyebi: Lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli elobi ete elanga ya Edene ezalaki esika ya solo mpenza. Bibale mibale kati na bibale minei oyo lisolo yango elobeli​—Efrate mpe Tigrɛ, to Hidekele—​ezalaka lelo oyo, mpe mikɛli na yango mosusu ezali pene mpenza. Lisolo yango kutu etángi bankombo ya mikili oyo bibale yango ezalaki koleka mpe elobeli na bosikisiki mabanga ya ntalo oyo eyebani malamu na bisika yango. Mpo na bato ya Yisraele ya kala, bato ya liboso oyo batángaki lisolo oyo, makambo oyo nyonso esalisaki bango mingi.

Masapo to masolo mpamba esalisaka bato ndenge wana? To elukaka kolongola makambo ya sikisiki oyo bato bakoki kondima to koboya? Mbala mingi, masapo yango ebandaka boye: “Ezalaki mokolo moko.” Nzokande, masolo oyo eleká elukaka kokɔtisa makambo ya sikisiki, ndenge lisolo ya Edene elobi.

2. Tokoki mpenza kondima ete Nzambe akelaki Adama na putulu mpe Eva na mokuwa moko ya mopanzi ya Adama?

Bato ya siansi lelo oyo bandimi ete na nzoto ya moto ezali na biloko ndenge na ndenge​—na ndakisa hydrogène, oxygène, mpe carbone—​biloko yango nyonso ezalaka na putulu ya mabele. Kasi, ndenge nini biloko yango ekɔtisamaki na nzoto ya bikelamu ya bomoi?

Bato mingi ya siansi balobaka ete bomoi ebandaki yango moko, ebandaki na lolenge moko ya moke oyo ekolaki malɛmbɛmalɛmbɛ na boumeli ya bamilio ya bambula, mpo na kokóma monene. Nzokande, liloba “moke” ekoki kokosa moto, mpo biloko nyonso ya bomoi​—ata selile moko mpamba oyo ekoki komonana kaka na mikroskope—​ezali na makambo mingi na kati. Emonani polele ete ata eloko moko te ya bomoi ebimaki yango moko to mpe ekosalema te. Nzokande, biloko nyonso ya bomoi emonisi polele ete ekelamaki na Moto moko oyo azali na mayele koleka biso mosika. *​—Baroma 1:20.

Kanisá naino ozali koyoka nzembo moko ya kitoko to ozali kotala langi moko ya kitoko, to ndako moko ya kitoko; okoloba ete biloko yango ebimá kaka yango moko? Te! Kasi, biloko yango ekokani ata moke te na biloko ndenge na ndenge, ya kitoko to ya bwanya mingi oyo esalelamaki mpo na kokela nzoto na biso. Ndenge nini tokoki kokanisa ete ezalaki te na Mozalisi? Lisusu, lisolo ya Ebandeli emonisi ete na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali awa na mabele, kaka bato nde bakelamaki na elilingi ya Nzambe. (Ebandeli 1:26) Yango wana tokoki kokamwa te ete kaka bato nde bazali na likoki ya komonisa mposa ya Nzambe ya kokela, na bantango mosusu basalaka makambo ya kokamwa lokola miziki, biloko ya ntɔki, mpe bamasini. Tokoki kokamwa ete Nzambe azali mpenza Mokeli oyo aleki biso mosika?

Na likambo oyo Nzambe asalaki ya kokela mwasi na mokuwa moko ya mopanzi ya mobali, mokakatano ezali wapi? * Nzambe akokaki kosalela biloko mosusu, kasi lolenge oyo akelaki mwasi ezalaki na ndimbola moko monene. Alingaki ete mobali ná mwasi bábalana mpe bázala na bomoko lokola nde bazalaki “mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Lolenge oyo mobali ná mwasi bakokaki kosungana, kokóma na bomoko mpenza, emonisi te ete ezali na Mozalisi oyo azali na bwanya mpe bolingo?

Lisusu, bato ya mayele oyo bayekolaka ba-gènes (généticiens) bandimi ete bato nyonso bautá kaka na mobali mpe mwasi moko. Na yango, lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli ezali lisapo mpamba?

3. Balobaka ete nzete ya koyeba malamu ná mabe mpe nzete ya bomoi ezalaki solo te.

Lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli eteyaka te ete banzete yango ezalaki na nguya moko ya kokamwa. Kutu, ezalaki banzete oyo Yehova apesaki yango ndimbola moko ya elilingi.

Na bantango mosusu, bato basalaka mpe likambo ya bongo te? Na ndakisa, zuzi moko akoki kokebisa bato ete bábuka te mibeko ya tribinale. Alingi kolobela te bakiti, bamesa mpe bifelo ya esika oyo bazali kosambisa, kasi nde kokebisa bato bázanga limemya te na ebongiseli oyo bazuzi bazali komonisa. Bakonzi mingi basalelaki mpe lingenda mpe motole lokola elilingi ya boyangeli na bango.

Kasi, banzete wana mibale elimbolaki mpenza nini? Makanisi ndenge na ndenge epesamaki na likambo yango. Eyano ezali pɛtɛɛ, kasi ezali na ndimbola monene. Nzete ya koyeba malamu ná mabe emonisaki lotomo oyo kaka Nzambe nde azalaki na yango​—kokata oyo ezali malamu mpe mabe. (Yirimia 10:23) Tokoki kokamwa te ete ezalaki mpenza mabe koyiba mbuma ya nzete yango! Kasi, nzete ya bomoi ezalaki elilingi ya likabo oyo kaka Nzambe akoki kopesa​—bomoi ya seko.​—Baroma 6:23.

4. Balobaka ete nyoka oyo elobaki ezalaki lisapo mpamba.

Na ntembe te, lisolo wana ya Ebandeli ekoki kozala mpasi, mingimingi soki totaleli te makambo mosusu oyo Biblia elobi. Nzokande, mokemoke, Makomami emonisaki polele likambo yango oyo ezalaki mpasi kokanga ntina na yango.

Nani to nini esalaki ete nyoka yango eloba? Bato ya Yisraele ya kala bayebaki makambo mosusu oyo esalisaki bango báyeba likambo oyo nyoka esalaki. Na ndakisa, bayebaki ete atako banyama balobaka te, ekelamu moko ya elimo akoki kosala ete nyama emonana lokola nde ezali koloba. Moize akomaki lisolo ya Balama; Nzambe atindaki anzelu asala ete mpunda ya Balama eloba lokola moto.​—Mitángo 22:26-31; 2 Petro 2:15, 16.

Bikelamu mosusu ya elimo, ata mpe baoyo bazali banguna ya Nzambe basalaka makamwisi? Moize amonaki ndenge banganga-nzambe ya Ezipito oyo bazalaki kosalela maji, bamekolaki makamwisi mosusu ya Nzambe, na ndakisa babongolaki nzete ekóma nyoka. Nguya ya kosala makamwisi ya ndenge wana ekokaki kouta kaka epai ya banguna ya Nzambe oyo bazali na nzoto ya elimo.​—Kobima 7:8-12.

Emonani polele ete Moize akomaki mpe mokanda ya Yobo na litambwisi ya elimo santu. Mokanda yango eteyaki makambo mingi na ntina na Satana, monguna monene ya Nzambe, oyo na lokuta nyonso atyaka ntembe na bosembo ya basaleli ya Yehova. (Yobo 1:6-11; 2:4, 5) Bayisraele ya ntango ya kala, bakanisaki ete Satana asalelaki nyoka na Edene, asalaki ete emonana lokola ezali koloba, mpe akosa Eva mpo abebisa bosembo na ye epai ya Nzambe? Ekoki kozala bongo.

Satana nde asalelaki nyoka? Na nsima, Yesu abengaki Satana “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) “Tata ya lokuta” nde akoki kozala mobandisi ya lokuta ya liboso, oyo eleki lokuta nyonso, boye te? Lokuta ya liboso ezali na maloba oyo nyoka alobaki na Eva. Mpo na kobongola maloba oyo Nzambe alobaki ete soki moto alei mbuma ya nzete oyo epekisamaki akokufa, nyoka alobaki boye: “Bokokufa soki moke te.” (Ebandeli 3:4) Emonani polele ete Yesu ayebaki ete Satana asalelaki nyoka. Emoniseli oyo Yesu apesaki ntoma Yoane esalisi biso tóyeba likambo yango, ebengi Satana “nyoka ya ebandeli.”​—Emoniseli 1:1; 12:9.

Tokoki mpenza kondima ete ekelamu moko ya elimo akokaki kosalela nyoka, kosala ete emonana lokola ezali koloba? Ata bato oyo bazali na nguya mingi te lokola bikelamu ya elimo, bakoki kosala ete eloko moko emonana lokola nde ezali koloba mpo na kondimisa bato.

Likambo oyo tokoki kotyela yango ntembe soki moke te

Okoki kondima te ete bantembe oyo ebimá na ntina na lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli ezali mpenza na bilembeteli te? Epai mosusu, ezali na likambo ya ntina mingi oyo emonisi ete lisolo yango ezali mpenza solo.

Na ndakisa, Yesu Kristo abengami “motatoli ya sembo mpe ya solo.” (Emoniseli 3:14) Lokola azali moto ya kokoka, akosaki ata moke te, alukaki ata moke te kobongola solo. Likambo oyo eleki ntina, ateyaki ete azalaki na bomoi ntango molai liboso aya na mabele lokola moto​—kutu, azalaki na bomoi pembeni ya Tata na ye, Yehova “liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:5) Azalaki na bomoi ntango bomoi ebandaki awa na mabele. Likambo nini oyo motatoli yango oyo aleki batatoli nyonso alobaki oyo ebongi kotyela motema?

Yesu alobaki ete Adama ná Eva bazalaki bato ya solo. Alobelaki libala na bango ntango amonisaki mobeko ya Yehova ya kozala na mwasi moko mpe mobali moko. (Matai 19:3-6) Soki Adama ná Eva bazalaki te mpe soki elanga esika bazalaki kofanda ezalaki lisapo mpamba, na yango Yesu akosamaki to abukaki lokuta. Ezali bongo te! Yesu azalaki na likoló, azalaki komona ndenge mabe ekɔtaki na elanga yango. Likambo nini mosusu ekoki kondimisa bosolo ya likambo yango koleka?

Mpo na koloba solo, koboya kondima lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli ekoki kolongola kondima na biso epai ya Yesu. Makanisi ya ndenge wana ezali mpe kopekisa bato bákanga ntina ya mateya mosusu ya minene ya Biblia mpe bilaka ya solosolo. Tótala mpo na nini tolobi bongo.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Na Biblia, Yehova ezali mpenza nkombo ya Nzambe.

^ par. 7 Likanisi yango ezali na Biblia te. Biblia eteyaka ete mosala nyonso ya Nzambe ezali ya kokoka; mabe eutá epai mosusu. (Kolimbola Mibeko 32:4, 5) Ntango Yehova asilisaki kokela biloko nyonso na mabele, alobaki ete biloko nyonso oyo asalaki ezalaki “malamu mingi.”​—Ebandeli 1:31.

^ par. 9 Mpela oyo Nzambe atindaki elongolaki mpenza bilembo nyonso ya elanga ya Edene. Ezekiele 31:18 emonisi ete “banzete ya Edene” ezalaki lisusu te kobanda na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso. Na yango, baoyo nyonso balukaki esika elanga ya Edene ezalaki, balongaki te.

^ par. 14 Talá mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 16 Likambo ya esengo, lelo oyo minganga bamoni ete mokuwa ya mopanzi ezali na makoki ya kokamwa ya kokola. Na bokeseni na mikuwa mosusu, yango ekoki kokola lisusu soki ebebi te.