Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva?

Mpo na nini Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva?

Mituna ya batángi . . .

Mpo na nini Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva?

▪ Na ntembe te ondimi ete Satana nde asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva, ndenge tolobelaki yango na lokasa 8. Ezali yango mpenza nde Biblia eteyaka. Nzokande, okoki komituna: ‘Mpo na nini ekelamu ya elimo ya nguya, akokaki kosalela nyoka na ndenge bato oyo bayebi koloba kozanga koningisa bibɛbu basalaka mpo na kopesa likanisi ete nyama moko to ekeko moko nde ezali koloba (ventriloque)?’

Biblia ebengi mayele oyo Satana asalelaka ete “mayele mabe,” mpe lisolo yango ezali komonisa bosolo ya likambo yango. (Baefese 6:11) Likambo oyo elekaki na Edene, ete nyama elobaki, ezali lisapo te; emonisi polele mayele mabe ya Satana mpe likama na yango, ya kopɛngwisa bato mosika na Nzambe. Ndenge nini?

Satana aponaki malamu nani oyo ye akokosa. Eva azalaki leki na bikelamu nyonso na molɔ́ngɔ́. Lokola ayebaki ete Eva ayebi makambo mingi te, atyelaki ye motambo mpe alɛngolaki ye. Satana, na mayele mabe nyonso abombaki mikano na ye ya mabe, na ndenge asalelaki nyoka, nyama oyo ezalaka ekɛngɛ. (Ebandeli 3:1) Tótalela mpe mokano oyo akokisaki na ndenge asalaki ete nyoka eloba.

Ya liboso, Satana abendaki likebi ya Eva. Eva ayebaki ete nyoka elobaka te; mobali na ye apesaki banyama nyonso nkombo, nsima ya koyekola bango malamumalamu; apesaki mpe nyoka nkombo. (Ebandeli 2:19) Na ntembe te, Eva mpe azalaki kotalatala nyama yango ya ekɛngɛ. Yango wana, Satana asalelaki yango mpo na kobenda likebi ya Eva; atindaki ye atya likebi na eloko moko oyo Nzambe apekisaki bango na elanga mobimba. Ya mibale, soki nyoka elalaki na etape ya nzete oyo epekisamaki, Eva alingaki kozala na likanisi nini? Akokaki kokanisa te ete mwa nyama wana oyo elobaka te, elei mbuma, yango wana ekómi koloba? Soki mbuma yango ekokaki kosala bongo epai ya nyoka, elingaki kosala nini epai na ye? Ya solo, tokoki koyeba te makanisi nini Eva azalaki na yango to soki nyoka elyaki mwa ndambo ya mbuma yango, kasi toyebi ete ntango nyoka elobaki na Eva ete mbuma yango ekosala ete akóma mpenza “lokola Nzambe,” Eva andimaki mpenza likambo yango ya lokuta.

Ndenge oyo Satana aponaki maloba ya koloba esalisi biso mpe tóyeba makambo mingi. Akɔtisaki bantembe na makanisi ya Eva, amonisaki ete Nzambe azalaki koboyela ye eloko moko ya kitoko, mpe azalaki koboya kopesa ye bonsomi kaka mpamba. Mayele mabe ya Satana elingaki kolonga kaka soki Eva atikaki ete matomba na ye moko eleka bolingo na ye epai ya Nzambe oyo apesaki ye biloko nyonso oyo azalaki na yango. (Ebandeli 3:4, 5) Likambo ya mawa, mayele mabe ya Satana elongaki; ezala Eva to Adama, moko te akolisaki na motema na ye bolingo mpe botɔndi oyo basengelaki kozala na yango epai ya Yehova. Lelo oyo, Satana azali te kolendisa bato báluka kaka matomba na bango moko mpe báluka komilongisa?

Kasi, ezali boni mpo na mikano ya Satana? Ebongwanaki? Na Edene, alukaki komibomba mpe kobomba mikano na ye. Kasi, na nsima amimonisaki. Ntango amekaki Yesu, na ntembe te ayebaki malamu ete koluka komibomba ezalaki na ntina te. Na yango, ayebisaki Yesu mbala moko ete: ‘Fukamá mpe salelá ngai likambo moko ya losambo.’ (Matai 4:9) Emonani ete, banda kala Satana azalaki kolula losambo oyo epesamaka epai ya Yehova Nzambe. Akosala likambo nyonso oyo akoki mpo na kopekisa basusu básambela Nzambe na lolenge oyo andimaka. Mposa na ye ezali ya kobebisa bosembo ya bato epai ya Nzambe.

Biblia emonisi polele ete Satana asalelaka mayele mabe mingi koleka mpo na kobebisa bato oyo akanelaka. Likambo ya esengo, tosengeli te kokosama ndenge Eva akosamaki “mpo toyebi malamu mayele na ye.”​—2 Bakorinti 2:11.